Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Tiká pole na bino engɛnga” mpo na kopesa Yehova nkembo

“Tiká pole na bino engɛnga” mpo na kopesa Yehova nkembo

“Tiká pole na bino engɛnga liboso ya bato, mpo . . . bápesa Tata na bino oyo azali na likoló nkembo.”​—MATAI 5:16.

NZEMBO: 77, 59

1. Likambo nini mpenza ezali kotinda biso tózala na esengo?

TOZALI mpenza na esengo ndenge basaleli ya Nzambe bazali kotika pole na bango engɛnga! Na mbula eleki, basaleli ya Yehova bayekolaki Biblia na bato koleka 10 000 000. Mpe bamilio ya bato oyo basepelaka na solo bayaki na Ekaniseli mpe bamonaki bolingo oyo Yehova amonisaki ndenge apesaki lisiko.​—1 Yoane 4:9.

2, 3. (a) Makambo nini ekoki te kopekisa biso kongɛnga “lokola miinda”? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Na mokili mobimba, basaleli ya Yehova balobaka minɔkɔ ekeseni. Kasi yango epekisaka bango te kokumisa Yehova lokola bato ya libota moko. (Emoniseli 7:9) Ata soki tolobaka monɔkɔ nini to tofandaka wapi, tokoki kongɛnga “lokola miinda na mokili.”​—Bafilipi 2:15.

3 Mosala ya kosakola, bomoko na biso, mpe ezaleli na biso ya kosɛnzɛla epesaka Yehova nkembo. Ndenge nini tokoki kotika pole na biso engɛnga na makambo wana misato?​—Tángá Matai 5:14-16.

TÓSALISA BASUSU BÁKÓMA KOSAMBELA YEHOVA

4, 5. (a) Longola kosakola, ndenge nini tokoki kotika pole na biso engɛnga? (b) Komonisa boboto ebimisaka matomba nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

4 Kosakola mpe kokómisa bato bayekoli ezali lolenge ya ntina mingi ya kotika pole na biso engɛnga. (Matai 28:19, 20) Na 1925, lisolo “Kongɛnga na molili,” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/06/1925, elobaki ete na mikolo ya nsuka, moto moko te akoki kozala sembo epai ya Nkolo soki azwi te “libaku ya kotika pole na ye engɛnga.” Lisolo yango ebakisaki boye: “Akosala yango soki azali kosakwela bato nsango malamu na mabele, mpe soki ye moko amitye na ngámbo ya pole.” Longola mosala ya kosakola, etamboli na biso mpe epesaka Yehova nkembo. Bato mingi bamonaka biso ntango tosakolaka. Ntango tosɛkisaka bango mpe topesaka bango mbote na esengo, yango esalaka ete báloba malamu mpo na biso mpe mpo na Nzambe oyo tosambelaka.

5 Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Ntango bokokɔta na ndako, bópesa bato ya ndako mbote.” (Matai 10:12) Na bisika oyo Yesu azalaki kosakola, bazalaki na momeseno ya kokɔtisa bapaya na ndako. Lelo oyo, na bisika mingi esalemaka bongo te. Mbala mingi bato basilikaka to babangaka soki mopaya ayei na porte na bango. Kasi soki tozali na boboto, ekoki kokitisa bango motema. Ntango osakolaka na esika ya bato nyonso, na ndakisa na shario, omonaka te ete soki osɛki mpe opesi moto mbote na boboto, asepelaka koya kozwa mikanda? Akoki ata kondima bósolola!

6. Nini esalisaki ndeko mobali moko ná mwasi na ye oyo bakómi mikóló bákoba kosakola?

6 Mobali moko ná mwasi na ye oyo bakómi mikóló mpe bafandaka na Angleterre bakokaka lisusu te kosakola ndako na ndako mpo nzoto etungisaka bango. Yango wana, babandaki kotya mikanda na mesa kaka liboso ya ndako na bango. Bazalaki kofanda pene ya eteyelo moko, mpe baboti oyo bazalaki koya kozwa bana na bango bazalaki kosepela na mikanda. Baboti mosusu bazalaki kozwa mikanda, ata mpe buku Mituna oyo bilenge batunaka​Biyano oyo ebongi, Volimi 1 mpe 2. Ndeko mwasi moko ya mobongisi-nzela abandaki mpe koya kosakola elongo na bango. Baboti bamonaki ndenge ndeko yango azalaki na boboto mpe ndenge ndeko mobali wana ná mwasi na ye balingaki mpenza kosalisa basusu. Moboti moko kutu andimaki koyekola Biblia.

7. Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo bakimá bamboka na bango?

7 Na bambula oyo eleki, bato mingi bakimaki bamboka na bango mpo na kokende kofanda na bamboka ya bapaya. Tokoki kosala nini mpo na kosalisa bango báyeba Yehova? Ya liboso, tokoki koyekola ndenge ya kopesa mbote na monɔkɔ na bango. Ya mibale, tokoki kosalela JW Language mpo na koyekola mwa maloba oyo ekosalisa biso tósolola na bango. Na nsima, tokoki kolakisa bango bavideo mpe mikanda ya minɔkɔ na bango oyo ezali na jw.org.​—Kolimbola Mibeko 10:19.

8, 9. (a) Na ndenge nini makita na biso ya pɔsɔ esalisaka biso? (b) Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana bápesaka biyano ya malamu na makita?

8 Yehova apesaka biso mpenza oyo tosengeli na yango mpo na kosakola malamu. Na ndakisa, makambo oyo toyekolaka na likita Bomoi mpe mosala esalisaka biso tósepela kozongela bato mpe tóbanda boyekoli ya Biblia elongo na bango.

9 Ntango bato ya sika bayaka na makita na biso, mbala mingi bakamwaka biyano oyo bana bapesaka. Okoki koteya bana na yo bápesaka biyano na maloba na bango moko. Bato mosusu basepelaki na solo ntango bayokaki bana bazali komonisa kondima na bango polele mpe na motema mobimba.​—1 Bakorinti 14:25.

TÓBATELA BOMOKO NA BISO

10. Na ndenge nini losambo na kati ya libota esalaka ete bato ya libota bázala na bomoko?

10 Lolenge mosusu ya kotika pole na biso engɛnga ezali ya kosala makasi mpo na kobatela bomoko na libota mpe na lisangá. Na ndakisa, baboti bakoki kosala losambo na kati ya libota pɔsɔ nyonso. Mabota mingi etalaka TV JW, mpe na nsima balobelaka ndenge oyo bakoki kosalela makambo bayekoli. Tóbosana te ete bamposa ya bana mike ekeseni na oyo ya bilenge. Tósala nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa moto mokomoko ya libota na biso azwa mpenza litomba na losambo na kati ya libota.​—Nzembo 148:12, 13.

Ezali malamu tólekisaka ntango na bandeko oyo bakómi mikóló (Talá paragrafe 11)

11-13. Biso nyonso tokoki kosala nini mpo lisangá ezala lisusu na bomoko?

11 Ata soki ozali elenge, okoki kosala ete moto nyonso na lisangá amona ete azali na ntina. Lolenge moko ya kosala yango ezali ya kosala boninga na bandeko oyo bakómi mikóló. Tuná bango makambo oyo esalisi bango básalela Yehova na boumeli ya bambula ebele. Okoki koyekola makambo mingi epai na bango. Yango ekoki mpe kolendisa bino nyonso! Moto nyonso akoki koyamba bato ya sika oyo bayaka na makita na biso. Tokoki kopesa bato ya sika mbote na esengo, kolukela bango esika ya kofanda mpe kolakisa bango bandeko mosusu. Soki tosali bongo bakomiyoka malamu.

12 Soki baponi yo otambwisaka likita ya mosala ya kosakola, okoki kosalisa bandeko oyo bakómi mikóló mpo bákoba kosakola. Esengeli koyeba soki bandeko yango bazali na teritware oyo ebongi. Ntango mosusu, bokoki kobongisa ete básakola elongo na bilenge mpo básalisa bango. Bokoki mpe komitya na esika ya bandeko oyo bazali kobɛla mpe baoyo bazali na likoki ya kosala makambo mingi te. Ya solo, soki bozali komitya na esika ya basusu mpe komonisa bososoli, yango ekosalisa bilenge, mikóló, bandeko oyo baumeli mpe basakoli ya sika, básakola nsango malamu na molende.​—Balevi 19:32.

13 Bayisraele bazalaki kosepela kosambela Yehova elongo. Mokomi ya Nzembo akomaki ete: “Ezali mpenza malamu mpe ezali mpenza esengo ete bandeko báfanda na bomoko!” (Tángá Nzembo 133:1, 2.) Akokanisaki bomoko yango na mafuta mosantu, oyo ebongisaka loposo mpe ebimisaka nsolo ya kitoko. Ndenge moko mpe, tokoki kokitisa bandeko na biso motema soki tozali na esengo mpe na boboto. Yango ekosala ete lisangá ezala lisusu na bomoko. Okoki kosala makasi oyeba bandeko ya lisangá malamu koleka?​—2 Bakorinti 6:11-13.

14. Ndenge nini okoki kotika pole na yo engɛnga esika ofandaka?

14 Pole na biso ekoki kongɛnga ata soki tofandaka wapi. Soki ozali komonisa boboto esika ofandaka, bato bakosepela koyekola makambo etali Yehova. Okoki komituna boye: ‘Bato ya kartye na ngai bakanisaka nini mpo na ngai? Ndako na ngai ebongisami malamu mpe ezali pɛto? Bato basepelaka kotala yango? Nazalaka pene ya kosalisa basusu?’ Ntango osololaka na bandeko mosusu, meká kotuna bango ndenge oyo boboto na bango mpe etamboli na bango ya malamu esalisaka bandeko ya libota, baninga ya kartye, ya mosala, to ya kelasi.

TÓKOBA KOSƐNZƐLA

15. Mpo na nini tosengeli kokoba kosɛnzɛla?

15 Soki tolingi kokoba kongɛngisa pole na biso makasi, tosengeli koyeba eleko oyo tozali. Yesu ayebisaki bayekoli na ye mbala mingi ete: “Bósɛnzɛlaka.” (Matai 24:42; 25:13; 26:41) Soki tozali komona ete “bolɔzi monene” ezali mosika, tokosalela libaku ata moko te ya kosalisa basusu báyeba Yehova. (Matai 24:21) Na esika pole na biso engɛnga, ekokita mokemoke tii ekoki ata kolimwa.

16, 17. Tosengeli kosala nini mpo tókoba kosɛnzɛla?

16 Lokola mikolo ezali se kokóma mabe, biso nyonso tosengeli kokoba kosɛnzɛla. Kasi toyebi ete nsuka ekoya na ngonga oyo Yehova atyá. (Matai 24:42-44) Tosengeli mpe kozala motema molai mpe kotya makanisi na mikolo ezali koya. Tángáká Biblia mokolo na mokolo, mpe kotika kobondela te. (1 Petro 4:7) Yekolá epai ya bandeko oyo basaleli Yehova na boumeli ya bambula ebele. Na ndakisa, okoki kotánga masolo ya bomoi ya bandeko, lokola lisolo oyo elobi, “Nasimbi eteni ya nse ya elamba ya Moyuda banda mbula ntuku nsambo,” oyo ebimá na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/04/2012, nkasa 18-21.

17 Zalá na mingi ya kosala na mosala ya Yehova. Saleláká basusu makambo na boboto, mpe lekisáká ntango na bandeko. Yango ekosala ete ozala na esengo, mpe okomona ete mikolo ezali kokende mbangu. (Baefese 5:16) Mbula nkama oyo euti koleka, ebongiseli ya Yehova esali makambo mingi. Kasi lelo, mosala ya kosala ezali mingi koleka. Mosala ya Yehova ezali se kokende liboso na ndenge oyo tokokaki kokanisa te. Pole na biso ezali mpenza kongɛnga!

Tokoki kozwa bwanya ya Nzambe ntango bankulutu bayaka kotala biso (Talá paragrafe 18, 19)

18, 19. Ndenge nini bankulutu basalisaka biso tósalela Yehova na molende? Pesá ndakisa.

18 Yehova andimaka tósalela ye, atako tosalaka mabunga mingi. Mpo na kosalisa biso, apesi biso “makabo oyo ezali bato,” elingi koloba bankulutu na lisangá. (Tángá Baefese 4:8, 11, 12.) Na yango, soki bankulutu bayei kotala yo, salelá ntango wana mpo na kozwa bwanya mpe toli epai na bango.

19 Na ndakisa, ndeko mobali moko ná mwasi na ye oyo bafandaka na Angleterre, bazalaki na mikakatano na libala na bango mpe basɛngaki lisalisi epai ya bankulutu mibale. Ndeko mwasi azalaki komona ete mobali na ye azali kokamba libota malamu te na makambo ya losambo. Mobali azalaki komona ete azali moteyi malamu te mpe andimaki ete azalaki kobongisa te ete losambo na kati ya libota esalema mbala na mbala. Bankulutu basalisaki ndeko mobali yango ná mwasi na ye bálanda ndakisa ya Yesu. Balendisaki mobali alanda ndenge oyo Yesu azalaki kosalela bayekoli na ye makambo. Balendisaki mpe mwasi azala motema molai epai ya mobali na ye. Bapesaki bango mwa makanisi na ndenge oyo basengeli kosala losambo na kati ya libota elongo na bana na bango mibale. (Baefese 5:21-29) Mobali asalaki makasi atambwisa libota na ndenge ya malamu. Bankulutu balendisaki bango bálɛmba te mpe bákoba kotyela elimo santu ya Yehova motema. Bolingo mpe boboto oyo bankulutu wana bamonisaki esalisaki mpenza libota wana!

20. Nini ekosalema soki otiki pole na yo engɛnga?

20 Mokomi moko ya nzembo akomaki ete: “Esengo na moto nyonso oyo azali kobanga Yehova, oyo azali kotambola na banzela na ye.” (Nzembo 128:1) Okozala na esengo soki otiki pole na yo engɛnga. Na yango, teyá basusu makambo ya Nzambe, salá nyonso mpo na kosalisa libota na yo mpe lisangá ezala na bomoko, mpe kobá kosɛnzɛla. Basusu bakomona ndakisa na yo ya malamu mpe bakopesa nkembo na Yehova, Tata na biso.​—Matai 5:16.