Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge ya komibatela na moko ya mitambo ya Satana

Ndenge ya komibatela na moko ya mitambo ya Satana

NTANGO Bayisraele balingaki kokatisa Ebale Yordani mpo na kokɔta na mokili oyo Nzambe alakaki bango, bayambaki bapaya. Bapaya yango ezalaki basi ya bikoló mosusu oyo bayaki mpo na kobengisa mibali ya Yisraele na fɛti. Yango emonanaki lokola libaku moko monene mpe ya malamu mpenza. Kuna, balingaki kozwa baninga ya sika, kobina, mpe kolya bilei ya kitoko mpenza. Atako mimeseno mpe bizaleli ya basi yango eyokanaki te na Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele, mbala mosusu mibali ya Yisraele balobaki ete: ‘Ekosala biso eloko te. Tokozala ekɛngɛ.’

Nini esalemaki? Biblia elobi ete: “Bato babandaki kosala pite ná bana basi ya Moabe.” Kutu, mposa ya basi yango ezalaki ete Bayisraele básambela banzambe ya lokuta. Mpe esalemaki kaka bongo! Na yango, tokoki kokamwa te ndenge “nkanda ya Yehova ebandaki kongalela Yisraele.”​—Mit. 25:1-3.

Bayisraele yango babukaki Mibeko ya Nzambe na ndenge mibale: Basambelaki bikeko, mpe basalaki pite. Ebele ya mibali bakufaki mpo bazangaki botosi. (Kob. 20:4, 5, 14; Mib. 13:6-9) Mpo na nini ezalaki likambo ya mawa mingi mpenza? Mpo etikalaki moke bákɔta na Mokili ya Ndaka. Soki ebele ya mibali yango babukaka Mibeko ya Nzambe te, balingaki kokatisa Yordani mpe kokɔta na Mokili ya Ndaka.​—Mit. 25:5, 9.

Mpo na makambo yango, ntoma Paulo akomaki: “Makambo wana ezalaki kokómela bango mpo ezala bandakisa, mpe ekomamaki mpo ezala likebisi mpo na biso baoyo tokómi na bansuka ya bantango oyo.” (1 Ko. 10:7-11) Na ntembe te, Satana asepelaki mingi ndenge Bayisraele mosusu basalaki lisumu ya monene mpe babungisaki libaku ya kokɔta na Mokili ya Ndaka. Ekozala likambo ya bwanya soki tolandi likebisi yango, mpo toyebi ete Satana akosepela soki azangisi biso kokɔta na mokili ya sika oyo Nzambe alaki!

MOTAMBO MOKO YA MABE MPENZA

Satana alingaka kotyela bakristo mitambo, mpe mpo na yango asalelaka mayele oyo ayebi malamu mpe oyo esimbaka malamu mpo na kokanga bato ebele. Ndenge kaka tomonaki yango, asalelaki pite mpo na kozwa Bayisraele. Tii lelo, pite ezali motambo ya mabe mpenza. Likambo ya libosoliboso oyo ekoki komema na pite ezali pornografi, elingi koloba bililingi ya mbindo ya bato oyo bazali bolumbu to bazali kosangisa nzoto.

Lelo oyo, moto akoki kotala pornografi kozanga ete bato mosusu báyeba yango. Kala, moto oyo alingi kotala pornografi asengelaki kokende na bisika oyo balakisaka bafilme ya mabe to mpe na bisika oyo batɛkaka babuku oyo ezali na makambo ya pornografi. Ekoki kozala ete bato mingi bazalaki kokende na bisika yango te mpo ekokaki kozala nsɔni bato mosusu bámona bango kuna. Kasi lelo, moto oyo asalelaka Internet akoki kotala pornografi na mosala to ata na kati ya motuka oyo ezali na parkingi. Mpe na bisika mingi na mokili, mobali to mwasi akoki kotala pornografi ata na kati ya ndako na ye.

Esuki wana te. Baaparɛyi ya mabɔkɔ esali ete kotala pornografi ezala lisusu likambo ya mpasi te. Ezala na ntango bato bazali kotambola na balabala, ntango bazali na bisi, to na engbunduka, bakoki kotala bililingi ya mbindo na baaparɛyi na bango.

Lokola ezali lisusu mpasi te kotala pornografi kozanga ete moto mosusu ayeba yango, pornografi ezali kosala bato mabe mingi lelo koleka ndenge ezalaki liboso. Bato mingi oyo batalaka pornografi babebisaka mabala na bango, lokumu na bango mpe lisosoli na bango. Likambo ya mabe koleka, bakoki kobebisa boyokani na bango na Nzambe. Ezali polele ete pornografi ebebisaka baoyo batalaka yango. Mbala mingi, esalaka moto mabe mpenza mpe etikaka bilembo oyo ekoki koumela ntango molai.

Kasi, tóyeba ete Yehova akoki kobatela biso na motambo yango ya Satana. Mpo abatela biso, tosengeli kosala likambo oyo Bayisraele basalaki te: ‘Kotosa mpenza Yehova.’ (Kob. 19:5) Tosengeli koyeba ete Nzambe ayinaka mpenza pornografi. Mpo na nini tolobi bongo?

LOKOLA YEHOVA, YO MPE YINÁ YANGO

Kanisá naino likambo oyo: Mibeko oyo Yehova apesaki Bayisraele ekesanaki mosika na mibeko ya bikólo mosusu nyonso ya ntango wana. Mibeko yango ezalaki lokola efelo oyo ezalaki kokabola Bayisraele na bato ya bikólo ya zingazinga ná mimeseno na bango ya mabe. (Mib. 4:6-8) Mibeko yango emonisaki polele ete Yehova ayinaka makambo ya pite.

Yehova atángaki makambo ya mbindo oyo bato ya bikólo yango bazalaki kosala mpe ayebisaki Bayisraele ete: “Bosengeli te kosala ndenge mokili ya Kanana, epai nazali komema bino, esalaka; . . . Mokili ezali mbindo, mpe nakoyeisela yango etumbu mpo na libunga na yango.” Mpo na Nzambe mosantu ya Yisraele, lokola bizaleli ya bato ya Kanana ezalaki mbindo, mokili na bango mpe ekómaki mbindo mpe eloko ya bosɔtɔ.​—Lev. 18:3, 25.

Atako Yehova apesaki bato ya Kanana etumbu, bato mosusu bakobaki kosala pite. Mbula koleka 1 500 na nsima, ntoma Paulo alobaki ete bakristo bazalaki kofanda na bikólo oyo bato “babungisá bizaleli nyonso ya malamu.” Kutu, ‘bamipesaki na etamboli ya nsɔni mpo na kosala mbindo ya ndenge nyonso na lokoso.’ (Ef. 4:17-19) Lelo oyo mpe, bato mingi bayokaka nsɔni te kosala makambo ya mbindo. Na yango, biso bakristo ya solo tosengeli kosala nyonso tótala te mbindo ya bato ya mokili oyo.

Pornografi efingisaka mpenza Nzambe. Akelaki moto na elilingi na ye, azala lokola ye. Lisusu, apesá biso likoki ya koyeba ete likambo boye ezali malamu to mabe. Na bwanya na ye, Nzambe apesaki mibeko na likambo etali kosangisa nzoto. Abongisaki ete kosangisa nzoto ezala likambo ya kosepelisa na kati ya libala. (Eba. 1:26-28; Mas. 5:18, 19) Nzokande, bato oyo babimisaka bililingi ya pornografi to balendisaka yango batyolaka mpenza mibeko ya Nzambe. Ya solo, baoyo balendisaka pornografi bafingisaka Yehova. Akosambisa baoyo baboyaka kotosa mibeko na ye mpe babimisaka to balendisaka makambo ya mbindo.​—Rom. 1:24-27.

Bongo bato oyo batángaka to batalaka makambo ya pornografi na nko nyonso? Bato mosusu bakoki kokanisa ete ezali na likama te. Nzokande, bazali kopesa mabɔkɔ na baoyo batyolaka mibeko ya Yehova. Mbala mosusu bakanisaki bongo te ntango babandi kotala pornografi. Atako bongo, Biblia emonisi polele ete basaleli ya solo ya Nzambe basengeli mpenza koyina pornografi. Biblia elobi boye: “Ee bino baoyo bolingaka Yehova, bóyina oyo ezali mabe.”​—Nz. 97:10.

Ata baoyo balingi kotala pornografi te bakoki komona ete ezali mpasi kosala bongo. Tozali bato ya kozanga kokoka mpe mbala mosusu ekoki kosɛnga tóbundisa bamposa mabe ya kosangisa nzoto. Lisusu, motema na biso ya kozanga kokoka ekoki kotinda biso tómona ete kotala pornografi ezali mabe te. (Yir. 17:9) Nzokande, bato mingi oyo bakómá bakristo, balongi etumba yango. Koyeba likambo yango ekoki kolendisa yo soki ozali mpe na etumba yango. Talá ndenge Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa yo okima pornografi, oyo ezali motambo ya Satana.

KOTYA MAKANISI TE NA BAMPOSA YA MBINDO

Ndenge tolobaki yango liboso, Bayisraele mingi batikaki bamposa ya mabe emema bango na likama. Likambo ya bongo ekoki mpe kosalema lelo oyo. Moyekoli Yakobo alobelaki likama yango na maloba oyo: “Moto na moto amekamaka nde na mposa na ye moko oyo ezali komema ye mpe kobenda ye. Na nsima mposa wana, ntango ekoli, eboti lisumu.” (Yak. 1:14, 15) Ntango moto atiki mposa mabe ekola na motema na ye, nsukansuka akoki kosala lisumu. Na yango, soki makanisi ya mbindo eyeli biso, tosengeli kolongola yango mpe kokanisakanisa yango te.

Soki omoni ete ozali kokoba kokanisa makambo ya mbindo, zwá ekateli nokinoki. Yesu alobaki: “Soki lobɔkɔ na yo to lokolo na yo ezali kobɛtisa yo libaku, katá yango mpe bwaká yango mosika na yo. . . . Lisusu, soki liso na yo ezali kobɛtisa yo libaku, pikolá yango mpe bwaká yango mosika na yo.” (Mat. 18:8, 9) Yesu alingaki koloba te ete tosengeli kokata binama ya nzoto na biso. Amonisaki nde ntina ya kolongola nokinoki mpe na makasi eloko oyo ezali kobɛtisa biso libaku. Ndenge nini tokoki kosalela toli yango na likambo etali pornografi?

Soki okutani na bililingi ya pornografi, kokanisa te ete: ‘Ekosala ngai eloko te.’ Longolá nde miso mbala moko. Kangá televizyo kozanga koumela. Kangá ordinatɛrɛ to aparɛyi na yo nokinoki. Kanisá makambo oyo ezali pɛto. Kosala bongo ekosalisa yo ozala na bokonzi likoló ya makanisi na yo na esika otika bamposa ya mabe ekonza yo.

BONGO SOKI PORNOGRAFI OYO OTALÁ KALA EZONGELAKA YO NA MAKANISI?

Okosala nini soki otiká kotala pornografi, kasi na bantango mosusu bililingi yango ezongelaka yo na makanisi? Bililingi ya makambo ya pornografi ekoki kotikala na motó ya moto ntango molai. Ekoki kozongela moto na makanisi na mbalakaka. Soki esalemi bongo, okoki koyoka mposa makasi ya kosala likambo moko ya mbindo, na ndakisa kosimbasimba enama na yo ya kobotela tii okoyoka elɛngi. Na yango, yebá ete makanisi ya ndenge wana ekoki koyela yo na mbalakaka, mpe kanisá libela oyo okosala mpo na kobundisa yango.

Zalá na ekateli makasi ya kokanisa mpe ya kosala makambo oyo Nzambe alingi. Zalá lokola ntoma Paulo, oyo azalaki “kobɛtabɛta nzoto na [ye] mpe kokómisa yango lokola moombo.” (1 Ko. 9:27) Kondima te kokóma moombo ya bamposa ya mbindo. ‘Bongwaná, kómisá makanisi na yo makanisi ya sika, mpo omindimisa yo moko mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.’ (Rom. 12:2) Kobosana likambo oyo te: Kokanisa mpe kosala makambo oyo Nzambe alingi ekopesa yo esengo mingi koleka kosala makambo ya mbindo.

Kokanisa mpe kosala makambo oyo Nzambe alingi ekopesa yo esengo mingi koleka kosala makambo ya mbindo

Salá makasi okangá bavɛrsɛ mosusu na motó. Na nsima, soki makanisi wana ya mbindo eyeli yo, salá makasi okanisa bavɛrsɛ yango. Bavɛrsɛ lokola Nzembo 119:37; Yisaya 52:11; Matai 5:28; Baefese 5:3; Bakolose 3:5 mpe 1 Batesaloniki 4:4-8 ekosalisa yo otalela pornografi ndenge Yehova atalelaka yango mpe oyeba oyo alingi ete osala.

Bongo soki na mabaku mosusu ozali kokoka te kokanga mposa ya kotala mpe ya kokanisa makambo ya mbindo? Landá malamumalamu matambe ya Yesu, Ndakisa na biso. (1 Pe. 2:21) Nsima ya batisimo na ye, Satana amekaki ye mbala ebele. Yesu asalaki nini? Akobaki kotɛmɛla ye. Asalelaki makomami mpo na kotɛmɛla komekama mokomoko ya Satana. Alobaki: “Longwá, Satana!” mpe Satana atikaki ye. Kaka ndenge Yesu atikaki te kobundisa Zabolo, yo mpe salá bongo. (Mat. 4:1-11) Satana ná bato ya mokili na ye bakokoba koluka kotondisa makanisi na yo na makambo ya mbindo, kasi kotika te kobundisa bango. Okoki kolonga etumba ya kotika kotala pornografi. Yehova akoki kosalisa yo olonga monguna yango.

BONDELÁ YEHOVA MPE TOSÁ YE

Kobá kobondela Yehova mpe kosɛnga ye asalisa yo. Ntoma Paulo alobaki boye: “Kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino na nzela ya Kristo Yesu.” (Flp. 4:6, 7) Nzambe akopesa yo kimya ya makanisi mpo esalisa yo oboya kosala oyo ezali mabe. Soki opusani penepene na Yehova, “akopusana penepene na [yo].”​—Yak. 4:8.

Ndenge eleki malamu ya komibatela na mitambo nyonso ya Satana ezali ya kobatela boyokani makasi na Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Yesu alobaki boye: “Mokonzi ya mokili oyo [Satana] azali koya. Mpe azali na bokonzi likoló na ngai te.” (Yoa. 14:30) Nini endimisaki Yesu likambo yango? Mokolo moko alobaki ete: “Moto oyo atindaki ngai azali elongo na ngai; atiki ngai ngai moko te, mpo nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka ye.” (Yoa. 8:29) Ndenge moko mpe, soki ozali kosala makambo oyo esepelisaka Yehova, akotika yo soki moke te. Kimá motambo ya pornografi, mpe Satana akozala na bokonzi te likoló na yo.