LISOLO YA BOYEKOLI 25
Tyelá Yehova motema ntango otungisami
“Nazali [moto] oyo atungisami.”—1 SA. 1:15.
LOYEMBO 30 Tata na ngai, Nzambe na ngai, mpe moninga na ngai
NA MOKUSE *
1. Mpo na nini tosengeli koyoka likebisi ya Yesu?
NA ESAKWELI oyo Yesu apesaki mpo na mikolo ya nsuka, alobaki boye: “Bókeba ete mitema na bino ekóma kilo te na . . . mitungisi ya bomoi [to mitungisi mpo na kozwa mbongo ya kobikela].” (Luka 21:34) Mpo na nini tosengeli koyoka likebisi yango? Mpo lelo oyo, biso mpe tokutanaka na makambo mingi oyo etungisaka bato mosusu nyonso.
2. Makambo nini oyo etungisaka mingi bandeko na biso bakutanaka na yango?
2 Na bantango mosusu, makambo oyo etungisaka mingi ekoki kokómela biso ebele na mbala moko. Tótalela mwa bandakisa. Ndeko moko na nkombo John * azalaki na maladi makasi oyo babengi sclérose en plaques, mpe asilaki mayele ntango mwasi na ye oyo bafandaki elongo na libala mbula 19 asundolaki ye. Lisusu, bana na ye mibale ya basi batikaki kosalela Yehova. Ndakisa mosusu: Ndeko Bob ná mwasi na ye Linda bakutanaki na mikakatano ya ndenge mosusu. Balongolaki bango na mosala, mpe na nsima bazalaki lisusu na mbongo ya kofutela ndako te. Longola yango, Linda abɛlaki maladi ya motema, oyo ekokaki koboma ye, mpe azalaki na maladi mosusu oyo ekómaki kobebisa likoki oyo nzoto ezalaka na yango ya kobundisa bamikrobe oyo epesaka maladi.
3. Bafilipi 4:6, 7 eyebisi biso nini mpo na Yehova?
3 Tóbosanaka te ete Yehova, Mozalisi na biso mpe Tata na biso ya bolingo, ayebi ndenge oyo tomiyokaka ntango totungisami. Mpe alingaka kosalisa biso tóyika mpiko na mikakatano oyo tokutani na yango. (Tángá Bafilipi 4:6, 7.) Liloba ya Nzambe ezali na masolo ebele oyo emonisi mikakatano oyo basaleli na ye bakutanaki na yango. Emonisi mpe ndenge Yehova asalisaki bango báyika mpiko na mikakatano yango oyo ezalaki kotungisa bango. Tótalela mwa bandakisa.
ELIYA “AZALAKI MOTO LOKOLA BISO”
4. Mikakatano nini Eliya akutanaki na yango, mpe andimaki likambo nini mpo na Yehova?
4 Eliya asalelaki Yehova na eleko moko ya mpasi mpe akutanaki na mikakatano ya makasi. Mokonzi Ahaba, oyo azalaki moko ya bakonzi ya Yisraele oyo bazalaki sembo te epai ya Yehova, abalaki Yezabele, mwasi mabe oyo azalaki kosambela Baala. Bango mibale batondisaki mboka na losambo ya Baala mpe babomaki ebele ya basakoli ya Yehova. Eliya alongaki kokima mpo báboma ye te. Lisusu, lokola atyelaki Yehova motema, abikaki na eleko ya nzala makasi oyo ekɔtaki na mboka. (1 Bak. 17:2-4, 14-16) Longola yango, na lisalisi ya Yehova, akweisaki basakoli ya Baala mpe bato oyo bazalaki kosambela ye. Alendisaki Bayisraele básalela Yehova. (1 Bak. 18:21-24, 36-38) Na yango, Eliya azalaki na bilembeteli ebele oyo endimisaki ye ete Yehova asalisaki ye mbala na mbala na ntango wana ya mpasi.
5-6. (a) Na kotalela 1 Bakonzi 19:1-4, Eliya amiyokaki ndenge nini? (b) Ndenge nini Yehova amonisaki ete alingaki Eliya?
5 Tángá 1 Bakonzi 19:1-4. Atako bongo, Eliya abangaki ntango Yezabele alobaki ete akoboma ye. Na yango, akimaki na Beere-Sheba. Alɛmbaki mpenza nzoto mpe ‘asɛngaki ete akufa.’ Nini esalaki ete amiyoka bongo? Eliya azalaki moto ya kozanga kokoka, “moto lokola biso.” (Yak. 5:17) Ntango mosusu amitungisaki koleka ndelo mpe alɛmbaki mingi. Emonani ete Eliya akanisaki ete milende oyo asalaki mpo na kolendisa bato básambela Yehova ezalaki mpamba, ete makambo ebongwanaki te na Yisraele, mpe ete kaka ye moko nde azalaki kokoba kosalela Yehova. (1 Bak. 18:3, 4, 13; 19:10, 14) Ndenge oyo mosakoli yango ya sembo amiyokaki ekoki kokamwisa biso. Kasi Yehova akamwaki te, amityaki na esika na ye.
6 Yehova apamelaki Eliya te ndenge abimisaki mayoki na ye. Kasi, asalisaki ye azwa lisusu makasi. (1 Bak. 19:5-7) Na nsima, Yehova asembolaki makanisi ya Eliya na boboto nyonso na ndenge amonisaki ye nguya na Ye ya kokamwa. Na nsima, Yehova ayebisaki ye ete ezalaki na bato mosusu 7 000 na Yisraele oyo baboyaki kosambela Baala. (1 Bak. 19:11-18) Na ndenge yango, Yehova amonisaki Eliya ete alingaki ye.
NDENGE OYO YEHOVA AKOSALISA BISO
7. Ndenge oyo Yehova asalisaki Eliya ezali kondimisa biso likambo nini?
7 Ezali na likambo moko oyo ezali kotungisa yo? Koyeba ete Yehova amityaki na esika ya Eliya ezali mpenza likambo ya kobɔndisa! Ezali kondimisa biso ete amityaka mpe na esika na biso ntango totungisami. Ayebi makambo oyo tokoki kosala ná oyo tokoki kosala te, mpe ayebaka ata makambo oyo tozali kokanisa mpe ndenge oyo tozali komiyoka. (Nz. 103:14; 139:3, 4) Na ndakisa ya Eliya, soki biso mpe totyeli Yehova motema, akosalisa biso tóyika mpiko na makambo oyo ezali kotungisa biso.—Nz. 55:22.
8. Ndenge nini Yehova akoki kosalisa yo oyika mpiko ntango otungisami?
8 Kotungisama ekoki kosala ete tókóma na makanisi ya mabe, mpe tólɛmba nzoto. Soki likambo yango ekómeli yo, kobosana te ete Yehova akosalisa yo oyika mpiko. Ndenge nini akosala yango? Asɛngi yo oyebisa ye makambo oyo ezali kotungisa yo. Akoyoka kolela na yo mpe akosalisa yo. (Nz. 5:3; 1 Pe. 5:7) Na yango, bondeláká Yehova mbala na mbala mpo na makambo oyo ezali kotungisa yo. Akoloba na yo mbala moko boye te ndenge alobaki na Eliya; kasi akoloba na yo na nzela ya Liloba na ye Biblia, mpe na nzela ya ebongiseli na ye. Masolo oyo ezali na Biblia ekoki kobɔndisa yo mpe kopesa yo elikya. Lisusu, bandeko ya lisangá bakoki mpe kolendisa yo.—Rom. 15:4; Ebr. 10:24, 25.
9. Ndenge nini moninga oyo totyelaka motema akoki kosalisa biso?
9 Yehova ayebisaki Eliya ete apesa Elisha mikumba na ye mosusu. Na ndenge yango, Yehova apesaki Eliya moninga ya mosala oyo akokaki kosalisa ye ayika mpiko na mitungisi na ye. Ndenge moko mpe, soki toyebisi moninga moko ya motema makambo oyo ezali kotungisa biso, akoki kosalisa biso tóyika mpiko na mitungisi na biso. (2 Bak. 2:2; Mas. 17:17) Soki omoni ete ozali na moto te oyo okoki koyebisa makambo na yo, bondelá Yehova asalisa yo ozwa mokristo moko oyo akɔmɛli na elimo, oyo akoki kosalisa yo oyika mpiko na mitungisi na yo.
10. Na ndenge nini ndakisa ya Eliya ezali kopesa biso elikya, mpe ndenge nini elaka oyo ezali na Yisaya 40:28, 29 ekoki kosalisa biso?
10 Yehova asalisaki Eliya ayika mpiko na mitungisi mpe asalela ye na bosembo bambula mingi. Ndakisa ya Eliya ezali kopesa biso elikya. Mbala mosusu tokoki kozala na mitungisi ya makasi oyo ezali kosilisa biso makasi na nzoto mpe na makanisi. Kasi, soki totyeli Yehova motema, akopesa biso nguya oyo tosengeli na yango mpo tókoba kosalela Ye.—Tángá Yisaya 40:28, 29.
HANA, DAVIDI, MPE MOKOMI MOKO YA NZEMBO BATYELAKI YEHOVA MOTEMA
11-13. Mitungisi esalaki nini na bomoi ya basaleli misato ya Nzambe na ntango ya kala?
11 Ezali mpe na bato mosusu oyo Biblia elobeli, oyo bakutanaki mpe na makambo oyo etungisaki bango mingi. Na ndakisa, Hana ayikaki mpiko na nsɔni ya kozanga kobota mpe na maloba mabe ya mbanda na ye. (1 Sa. 1:2, 6) Mitungisi na ye ezalaki kokómisa ye mawamawa, azalaki kolela mpe azalaki lisusu na mposa ya kolya te.—1 Sa. 1:7, 10.
12 Na ntango moko boye, Mokonzi Davidi atungisamaki mingi. Kanisá mikakatano nyonso oyo akutanaki na yango. Azalaki koyoka lokola amemi ngambo mpo na mabunga oyo asalaki. (Nz. 40:12) Mwana na ye Abisalome oyo azalaki kolinga mingi atombokelaki ye, mpe botomboki yango ememaki ye na liwa. (2 Sa. 15:13, 14; 18:33) Mpe moninga na ye moko ya motema atɛkaki ye. (2 Sa. 16:23–17:2; Nz. 55:12-14) Na nzembo mingi oyo Davidi akomaki, azalaki komonisa ndenge alɛmbaki nzoto mpe ndenge oyo azalaki kotyela Yehova motema ntango nyonso.—Nz. 38:5-10; 94:17-19.
13 Na nsima, mokomi moko ya nzembo akómaki kolula bomoi ya bato mabe. Mbala mosusu azalaki mokitani ya Molevi moko na nkombo Asafe oyo asalaki na “esika mosantu monene ya Nzambe.” Mokomi yango ya nzembo amitungisaki mingi mpe yango esilisaki ye esengo mpe azalaki kosepela lisusu te na oyo azalaki na yango. Kutu, azalaki lisusu kondima te ete kosalela Nzambe ememaka mapamboli.—Nz. 73:2-5, 7, 12-14, 16, 17, 21.
14-15. Ndakisa ya bato misato oyo Biblia elobeli eteyi biso nini na oyo etali koluka lisalisi ya Yehova?
14 Basaleli yango misato ya Nzambe batyelaki Yehova motema mpo asalisa bango. 1 Sa. 1:9, 10; Nz. 55:22; 73:17; 122:1.
Bayebisaki Yehova mitungisi na bango. Bayebisaki ye polele ntina oyo batungisamaki mingi. Lisusu, batikaki te kokende na esika oyo bazalaki kosambela Yehova.—15 Yehova ayokelaki mokomoko na bango mawa mpe asalisaki bango. Hana akómaki na kimya ya motema. (1 Sa. 1:18) Davidi akomaki boye: “Bampasi ya moyengebene ezali mingi, kasi Yehova abikisaka ye na yango nyonso.” (Nz. 34:19) Na nsima, mokomi wana ya nzembo ayokaki lokola ete Yehova ‘asimbi lobɔkɔ na ye ya mobali,’ azali kopesa ye toli mpo na kotambwisa ye. Ayembaki boye: “Mpo na ngai, kobɛlɛma na Nzambe ezali malamu. Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso azali esika na ngai ya kokima.” (Nz. 73:23, 24, 28) Bandakisa yango eteyi biso nini? Na bantango mosusu, tokokutana na makambo oyo ekosala ete tótungisama. Kasi, tokoki koyikela yango mpiko soki tomanyoli ndenge oyo Yehova asalisaki bato mosusu, tobondeli ye mpe totyeli ye motema, mpe tozali kotosa ye.—Nz. 143:1, 4-8.
TYELÁ YEHOVA MOTEMA MPO OLONGA
16-17. (a) Mpo na nini tosengeli te kokima Yehova mpe bandeko? (b) Ndenge nini tokoki kozwa lisusu makasi?
16 Bandakisa yango misato eteyi biso likambo mosusu ya ntina mingi—tosengeli Mas. 18:1) Nancy, oyo atungisamaki makasi ntango mobali na ye asundolaki ye, akomaki boye: “Na boumeli ya mikolo ebele, nazalaki na mposa ya komona moto te mpe ya kosolola na moto te. Lokola nazalaki kokima bato, mawa na ngai mpe ezalaki kokóma makasi.” Makambo ebongwanaki ntango Nancy alukaki ndenge ya kosalisa bato mosusu na mikakatano na bango. Alobi boye: “Ntango basusu bazalaki koyebisa ngai mitungisi na bango, nazalaki koyoka bango na likebi. Namonaki ete ntango nazalaki kosala makasi namitya na esika na bango, nazalaki kobosana mikakatano na ngai.”
te kokima Yehova mpe basaleli na ye. (17 Tokoki kozwa lisusu makasi soki tozali koyangana na makita. Na makita, topesaka Yehova mabaku mosusu ya ‘kosalisa mpe ya kobɔndisa biso.’ (Nz. 86:17) Kuna, apesaka biso makasi na nzela ya elimo santu na ye, Liloba na ye mpe basaleli na ye. Lisusu, ezali esika oyo tokoki ‘kolendisana.’ (Rom. 1:11, 12) Ndeko mwasi moko na nkombo Sophia alobaki boye: “Yehova mpe bandeko basalisaki ngai nayika mpiko. Makita ya lisangá nde ezalaki na ntina mingi mpo na ngai. Namoni ete soki nazali komipesa mingi na mosala ya kosakola mpe na makambo ya lisangá, yango esalisaka ngai natika kotungisama mpe kobanga.”
18. Soki tolɛmbi nzoto, ndenge nini Yehova akoki kosalisa biso?
18 Ntango tolɛmbi nzoto, tóbosana te ete Yehova alaki kaka te ete akosilisa mitungisi mpo na libela na mikolo oyo ezali koya, kasi alaki mpe ete akosalisa biso tóyikela mitungisi na biso mpiko lelo oyo. Asalisaka biso ‘tólinga mpe tósala’ mpo na kolongola makanisi ya kolɛmba nzoto mpe kozanga elikya.—Flp. 2:13.
19. Baroma 8:37-39 endimisi biso likambo nini?
19 Tángá Baroma 8:37-39. Ntoma Paulo alobi polele ete eloko moko te ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe. Ndenge nini tokoki kosalisa bandeko na biso oyo bazali kotungisama mpo báyika mpiko? Lisolo oyo elandi ekolobela ndenge oyo tokoki komekola Yehova na oyo etali koyokela basusu mawa mpe kosalisa bandeko oyo batungisami.
LOYEMBO 44 Libondeli ya moto ya komikitisa
^ par. 5 Kotungisama koleka ndelo to kotungisama ntango molai ekoki kobebisa nzoto mpe makanisi na biso. Ndenge nini Yehova akoki kosalisa biso? Tokotalela ndenge oyo Yehova asalisaki Eliya mpo ayika mpiko ntango azalaki kotungisama. Tokotalela mpe bandakisa mosusu ya Biblia oyo ekomonisa makambo oyo tosengeli kosala mpo Yehova asalisa biso ntango totungisami.
^ par. 2 Topesi bango bankombo mosusu.