Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyo okoki kosala mpo boyekoli na yo ya Biblia ezala malamu mpe esepelisa yo mingi

Oyo okoki kosala mpo boyekoli na yo ya Biblia ezala malamu mpe esepelisa yo mingi

YOSUA asengelaki kokamba ekólo Yisraele na Mokili ya Ndaka. Ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Kasi, Yehova apesaki ye makasi mpe alendisaki ye na maloba oyo: “Zalá na mpiko mpe zalá na makasi mpenza.” Ayebisaki Yosua ete soki azali kotánga mpe kotosa Mobeko, yango ekosala ete asala makambo na bwanya mpe alongisa nzela na ye.​—Yosua 1:7, 8.

Na ‘ntango oyo ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano,’ bomoi na biso mpe etondi na mpasi. (2 Timote 3:1) Soki tolingi kolonga lokola Yosua, tosengeli kolanda toli oyo Yehova apesaki ye. Tosengeli kotángaka Biblia mbala na mbala mpe kosalela makambo tozali koyekola mpo na kozwa bikateli ya malamu.

Kasi, mbala mosusu mingi kati na biso toyebi mpenza te ndenge ya kosala boyekoli, to tosepelaka koyekola te. Nzokande, koyekola Biblia biso moko ezali na ntina mingi. Ntango okotalela etanda “ Meká kosalela batoli oyo,” okomona mayele oyo ekosalisa yo ozwa matomba na boyekoli na yo moko mpe osepela na yango lisusu mingi.

Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Tambwisá ngai na nzela ya mitindo na yo, mpo nasepeli na yango.” (Nzembo 119:35) Yo mpe okoki kosepela koyekola Liloba ya Nzambe. Okomona makanisi mingi ya kitoko wana okokoba koyekola Biblia.

Atako okokamba ekólo moko boye te lokola Yosua, yo mpe ozali na mikakatano. Na yango, ndenge moko na Yosua, yekolá mpe tosá Liloba ya Nzambe. Soki osali bongo, okosala makambo na bwanya mpe okolongisa nzela na yo.