Moniselá “bato ya ndenge nyonso” motema mawa
NTANGO Yesu ateyaki bayekoli na ye ndenge ya kosakola nsango malamu, ayebisaki bango mpe ete bato nyonso te nde bakondima nsango yango. (Luka 10:3, 5, 6) Ezali mpe bongo lelo oyo mpo na mosala ya kosakola. Na mosala ya kosakola bato mosusu bakoki koyamba biso malamu te to kutu kosilikela biso. Mpe ntango basalaka bongo, ekoki kozala mpasi mpo tómonisela bango motema mawa mpe tókoba kosakwela bango.
Moto ya motema mawa atyaka likebi na mposa mpe makambo oyo etungisaka basusu, ayokelaka bango mawa, mpe alingaka kosalisa bango. Kasi nini ekosalema soki tozali lisusu koyokela bato oyo tosakwelaka mawa te? Molende na biso ekoki kokita, tokozala lisusu na mposa ya kosakwela bango te, mpe ya kosalisa bango te. Molende na biso ezali lokola mɔtɔ. Mpo mɔtɔ ekoba kopela makasi, esengeli na mopɛpɛ mingi. Ndenge moko mpe mpo tózala na molende makasi, tosengeli kozala na motema mawa!—1 Batesaloniki 5:19.
Ndenge nini tokoki komonisa motema mawa ata na ntango oyo ezali pɛtɛɛ te? Tótalela bandakisa ya bato misato oyo tokoki komekola: Yehova, Yesu, mpe ntoma Paulo.
MEKOLÁ MOTEMA MAWA YA YEHOVA
Banda bambula ebele, bato balobaka lokuta mpo na Yehova. Atako bongo, akobaka ‘kosalela bato oyo bazangi botɔndi mpe bato mabe makambo na boboto.’ (Luka 6:35) Boboto na ye emonanaka ndenge azali motema molai. Yehova alingi ete “bato ya ndenge nyonso” bábika. (1 Timote 2:3, 4) Atako Yehova ayinaka mabe, bato bazali na motuya na miso na ye mpe alingi ata moto moko te akufa.—2 Petro 3:9.
Yehova ayebi ete Satana asalelaka mayele mabe mpo na kotinda bato bándima makambo ya lokuta. (2 Bakorinti 4:3, 4) Bateyá bato mingi makambo ya lokuta mpo na Nzambe banda bomwana na bango, yango wana ezali mpasi bándima solo. Kasi Yehova azali pene ya kosalisa bango. Ndenge nini toyebi yango?
Tótalela ndenge oyo Yehova azalaki kotalela bato ya Ninive. Atako bazalaki bato ya mobulu, Yehova alobaki na Yona ete: “Bongo ngai, nasengeli nde koyokela Ninive engumba oyo monene mawa te, engumba oyo ezali na bato koleka nkóto nkama moko na ntuku mibale (120 000) oyo bayebi ata moke te kokesenisa lobɔkɔ na bango ya mobali ná lobɔkɔ na bango ya mwasi.” (Yona 4:11) Yehova ayokelaki bango mawa, mpo bayebaki ye te. Na yango, atindaki Yona akebisa bango.
Ndenge moko na Yehova, biso mpe tomonaka ete bato bazali na motuya. Tokomekola Yehova soki tozali kosala makasi mpo na kosalisa moto nyonso ayoka nsango ya Yehova, ata soki emonani lokola ete akondima te.
MEKOLÁ MOTEMA MAWA YA YESU
Ndenge moko na Yehova, Yesu mpe azalaki koyokela bato mawa “mpo banyokwamaki mpe basundolamaki lokola bampate oyo ezangá mobateli.” (Matai 9:36) Yesu ayebaki ntina oyo bazalaki bongo. Ezalaki mpo bakonzi ya mangomba bazalaki kosalela bango makambo na ndenge ya malamu te mpe koteya makambo ya lokuta. Mpe atako Yesu ayebaki ete mpo na bantina ndenge na ndenge bato mingi bakokóma bayekoli na ye te, akobaki koteya bango makambo mingi.—Marko 4:1-9.
Ntango bato baboyi nsango malamu, tosengeli koluka koyeba ntina oyo baboyi. Mbala
mosusu bazali na makanisi malamu te mpo na Biblia to mpo na bakristo, mpamba te bamonaki ete bato oyo bamibengaka bakristo basalaka makambo oyo ebongi te. Ekoki kozala ete basusu bayoká makambo ya lokuta mpo na bindimeli na biso. Basusu mpe bakoki kobanga ete bandeko na bango to bato mosusu básɛka bango mpo bazali kosolola na biso.Ekoki kozala ete bato mosusu oyo tokutanaka na bango bakutaná na makambo ya nsɔmɔ oyo esalá bango mabe mpenza. Ndeko mwasi moko ya misionɛrɛ na nkombo Kim alobi boye: “Na bisika mosusu na teritware na biso bato mingi babungisaki biloko na bango nyonso mpo na bitumba. Bazali mpenza na elikya te mpo na mikolo ezali koya. Bazali nkandankanda mpe batyelaka moto moko te motema. Na teritware yango bato balukaka kopekisa biso kosakola. Kutu mokolo moko balukaki kobundisa ngai na mosala ya kosakola.”
Ndeko Kim asalaki nini mpo akoba koyokela bato mawa, ata ntango basalelaki ye makambo na ndenge ebongi te? Alobi boye: “Ntango basaleli ngai makambo na ndenge ebongi te, nasalaka makasi nakanisa maloba ya Masese 19:11, oyo elobi: ‘Mayele ya kososola oyo moto azali na yango ekitisaka mpenza nkanda.’ Kokanisa na makambo oyo bato ya teritware na biso bakutaná na yango esalisaka ngai nakoba komonisela bango motema mawa. Lisusu bato nyonso oyo tokutanaka na bango bazalaka bongo te. Kaka na teritware yango, nazali na bato oyo nazongelaka.”
Tokoki komituna boye: ‘Soki nayebaki solo te, nalingaki kosala nini soki Batatoli ya Yehova bayei koteya ngai?’ Na ndakisa, nalingaki kosala nini soki nayokaki makambo mingi ya lokuta mpo na bango? Mbala mosusu yo mpe olingaki koyamba bango te mpe elingaki kosɛnga bámonisela yo motema mawa. Yesu alobaki ete makambo nyonso oyo tolingaka bato básalela biso, tosengeli mpe kosalela basusu kaka bongo. Yango wana, tosengeli kosala makasi koyeba ntina oyo etindi moto asala likambo boye to boye, mpe kozala motema molai, ata soki ezali pɛtɛɛ te.—Matai 7:12.
MEKOLÁ NDAKISA YA NTOMA PAULO
Ntoma Paulo ayokelaki bato mawa, ata baoyo batɛmɛlaki ye. Mpo na nini? Mpo azalaki komikundola ndenge azalaki. Alobaki ete: “Liboso nazalaki kofinga mpe konyokola mpe nazalaki moto ya lofundo. Nzokande, bayokelaki ngai mawa, mpo nazalaki na boyebi te mpe nazalaki kosala na kondima te.” (1 Timote 1:13) Paulo ayebaki ete Yehova ná Yesu bamoniselaki ye motema mawa. Akokaki komitya na esika ya bato oyo balingaki kopekisa mosala ya kosakola, mpo ye mpe liboso azalaki kosala bongo.
Na bantango mosusu, Paulo akutanaki na bato oyo bazalaki mpenza kondima mateya ya lokuta. Asalaki nini? Misala 17:16 elobi ete ntango akómaki na Atene, ‘ayokaki nkanda na kati na ye na ndenge amonaki ete engumba yango etondi na bikeko.’ Nzokande, mpo na kopesa litatoli Paulo asalelaki likambo yango oyo epesaki ye nkanda. (Misala 17:22, 23) Abongolaki ndenge na ye ya koteya, mpe asololaki na bato ya ndenge na ndenge mpo ‘ata ndenge nini, abikisa bamosusu.’—1 Bakorinti 9:20-23.
Ntango tozali kosakwela bato oyo baboyi nsango malamu to baoyo bandimaka makambo ya lokuta, tokoki komekola Paulo. Tokoki kosalela makambo oyo toyebi mpo na bango mpo tósalisa bango báyeba “nsango malamu ya eloko moko ya malamu koleka.” (Yisaya 52:7) Ndeko mwasi moko na nkombo Dorothy alobi boye: “Na teritware na biso, bato mingi bateyá bango ete Nzambe azalaka makambo makasi mpe asambisaka bato mpambampamba. Napesaka bato ya ndenge wana longonya ndenge bandimelaka Nzambe, mpe na nsima nabendaka likebi na bango na oyo Biblia elobi mpo na bizaleli malamu oyo Yehova azali na yango mpe bilaka kitoko oyo alaki na mikolo ezali koya.”
“SALÁKÁ MALAMU MPO NA KOLONGA MABE”
Lokola nsuka ekómi mpenza pene, tóyeba ete bizaleli ya bato ekokóma “lisusu mabe koleka.” (2 Timote 3:1, 13) Kasi kotika te koyokela bato mawa to kobungisa esengo mpo na likambo oyo basali. Yehova akoki kopesa biso makasi ya ‘kosalaka malamu mpo na kolonga mabe.’ (Baroma 12:21) Ndeko Jessica, oyo azali mobongisi-nzela, alobi boye: “Mbala mingi nakutanaka na bato ya lolendo mpe basɛkaka biso ná nsango oyo tomemelaka bango. Yango ekoki kolɛmbisa. Ntango nabandaka lisolo, nabondelaka Yehova na nse ya motema asalisa ngai natalelaka bato ndenge ye atalelaka bango. Yango esalisaka ngai natya likebi te na makanisi ya moto kasi nde na ndenge oyo nakoki kosalisa ye.
Tosengeli mpe kolendisa bandeko na biso ntango tozali kosakola elongo. Jessica abakisi boye: “Soki ndeko moko akutanaki na mokakatano moko, nasalaka makasi natya makanisi na likambo yango te. Kutu, namemaka nde lisolo na ndenge oyo ekosalisa, na ndakisa, nalobelaka makambo malamu oyo mosala ya kosakola ezali kobimisa atako bato mosusu bazali kondima te.”
Yehova ayebi malamu makambo ya mpasi tokutanaka na yango na mosala ya kosakola. Kasi azalaka na esengo ntango tomekolaka motema mawa na ye! (Luka 6:36) Ya solo, Yehova akomonisela bato motema mawa mpo na libela te. Tosengeli komindimisa ete ayebi malamu ntango oyo akosukisa ebongiseli oyo. Kasi, liboso ntango yango ekoka, tosengeli kosakola na molende. (2 Timote 4:2) Na yango, tókoba kosakola na molende mpe komonisela “bato ya ndenge nyonso” motema mawa.