Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 30

Tósalisa bato oyo basambelaka ata na lingomba moko te báyeba Nzambe

Tósalisa bato oyo basambelaka ata na lingomba moko te báyeba Nzambe

“Nakómaki makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso, mpo ata ndenge nini, nabikisa bamosusu.”​—1 KO. 9:22.

LOYEMBO 82 “Tiká pole na bino engɛnga”

NA MOKUSE *

1. Na bambula oyo eleki, mbongwana nini esalemi na bikólo mosusu?

NA KALA, ezalaki komonana ete na mokili mobimba, bato bazalaki kosambela na mangomba ndenge na ndenge. Kasi, na bambula oyo eleki, makambo ebongwani na ndenge ya kokamwa. Bato mingi balingi lisusu kokende na ndako-nzambe te. Kutu, na bikólo mosusu, bato bakómi koloba ete basambelaka ata na lingomba moko te. *​—Mat. 24:12.

2. Wapi mwa bantina oyo esali ete bato básambelaka lisusu ata na lingomba moko te?

2 Mpo na nini bato mingi bakómi koloba ete basambelaka ata na lingomba moko te? * Bamosusu kati na bango bamipesi na koluka bisengo to bazali na mitungisi ya bomoi. (Luka 8:14) Bamosusu bakómi koloba ete Nzambe azalaka te. Bamosusu bandimaka ete Nzambe azalaka, kasi bamonaka ete kozala moto ya lingomba moko ezali makambo ya kala, ezali na ntina te, eyokani te na siansi mpe ebongi te. Mbala mosusu bayokaka baninga, balakisi, to bapanzi-nsango bazali koloba ete bomoi ebimá kaka yango moko, kasi bayokaka mpenza te makambo oyo ekoki kotinda bango bándima ete Nzambe azali. Bato mosusu babayá bakonzi ya mangomba mpo na lokoso na bango ya mbongo mpe ya bokonzi. Na bisika mosusu, bakonzi ya mboka batyá mibeko mpo na kopekisa makambo mosusu ya mangomba.

3. Lisolo oyo ebongisami mpo na nini?

3 Yesu atindi biso ‘tókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.’ (Mat. 28:19) Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo basambelaka ata na lingomba moko te bálinga Nzambe mpe bákóma bayekoli ya Kristo? Tosengeli koyeba ete ndenge oyo moto abɔkwamá ekoki kotinda ye ayoka to aboya nsango na biso. Na ndakisa, bato oyo bakolá na Mpoto (Europe) bakoki koboya koyoka nsango na biso, kasi bato oyo bakolá na Azia bakoki kondima. Mpo na nini? Na Mpoto, bato mingi bayebi mwa makambo ya Biblia mpe bayokaka ete Nzambe nde akelá biloko nyonso. Kasi na Azia, kaka bato moke nde bayebi mwa makambo ya Biblia, kasi mingi bayebi yango te, mpe bato mosusu bandimaka kutu te ete Mozalisi azali. Lisolo oyo ebongisami mpo na kosalisa biso tóyeba ndenge ya koteya bato nyonso oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola, ata soki bautá wapi mpe bazali na bindimeli nini.

BATELÁ MAKANISI YA MALAMU

4. Mpo na nini ebongi tóbatela makanisi ya malamu?

4 Zalá na makanisi ya malamu. Mbula na mbula, bato mingi oyo bazalaki liboso kosambela ata na lingomba moko te bazali kokóma Batatoli ya Yehova. Mingi na bango bazalaki kotosa banda kala mibeko oyo etali bizaleli malamu mpe bazalaki kosepela te na bokosi ya bato ya mangomba. Bamosusu bazalaki na bizaleli ya mbindo mpe mimeseno mabe, kasi babongwanaki. Tokoki kotya motema ete Yehova akoki kosalisa biso tózwa bato oyo bazali “na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.”​—Mis. 13:48; 1 Tim. 2:3, 4.

Yebá mayele oyo okosalela ntango ozali kosolola na bato oyo bandimelaka Biblia te (Talá paragrafe 5-6) *

5. Mbala mingi nini esalaka ete bato báyoka nsango na biso?

5 Zalá na boboto mpe lobáká na mayele. Mbala mingi, soki bato bayoki nsango na biso, ezalaka te mpo na makambo oyo tolobi, ezalaka nde mpo na ndenge oyo tolobi yango. Bato basepelaka soki tozali na boboto, tozali koloba na mayele, mpe tozali mpenza kotyela bango likebi. Totyaka bato mbamba te ete báyoka makambo oyo tozali koloba. Kasi, tolukaka kososola ntina oyo bazali na likanisi boye to boye mpo na mangomba. Na ndakisa, bato mosusu balingaka te kosolola makambo ya mangomba na moto oyo bayebi te. Bamosusu bamonaka ete kotuna moto soki akanisaka nini mpo na Nzambe ezali kozanga bokonde. Basusu mpe bayokaka nsɔni bato bámona bango bazali kotánga Biblia, mingimingi na Batatoli ya Yehova. Ezala ata mpo na ntina nini, tosalaka makasi tóyeba makanisi ya bato.​—2 Tim. 2:24.

6. Ntoma Paulo asalaki nini mpo na kosolola na bato ndenge na ndenge, mpe ndenge nini tokoki komekola ye?

6 Tokoki kosala nini soki tomoni ete moto azali kosepela te ntango tozali kosalela maloba lokola “Biblia,” “biloko oyo Nzambe akelá,” “Nzambe,” to mpe “lingomba”? Tosengeli komekola ntoma Paulo mpe kosalela maloba mosusu. Ntango ntoma Paulo azalaki kosolola na Bayuda, asalelaki Makomami. Kasi, ntango bamemaki ye na Areopaje, epai asololaki na Bagrɛki oyo bazalaki bato ya filozofi, alobaki polele te ete azalaki koloba makambo oyo ezali na Biblia. (Mis. 17:2, 3, 22-31) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Paulo? Soki okutani na moto oyo andimaka Biblia te, ekoki koleka malamu olobela Biblia polele te ntango ozali kosolola na ye. Soki omoni ete moto yango alingi te basusu bámona ete ozali kotángela ye Biblia, meká kolakisa ye vɛrsɛ na ndenge oyo ekobenda likebi ya bato te, na ndakisa na telefone to na tablɛti.

7. Mpo tózala lokola Paulo, ndenge emonisami na 1 Bakorinti 9:20-23, ekoki kosɛnga tósala nini?

7 Zalá na bososoli mpe yokáká. Tosengeli komeka koyeba ntina oyo bato oyo tozali kosolola na bango bakómá na makanisi oyo bazali na yango. (Mas. 20:5) Tótalela lisusu ndakisa ya Paulo. Akolaki esika moko na Bayuda. Na ntembe te, esɛngaki asalela mayele mosusu mpo na koteya bato ya bikólo mosusu, oyo bayebaki makambo mingi te mpo na Yehova mpe Makomami to mpe bayebaki yango te. Ekoki kosɛnga tósala mwa bolukiluki to mpe tósolola na bandeko oyo baumeli na lisangá mpo básalisa biso tóyeba makanisi ya bato ya teritware na biso.​—Tángá 1 Bakorinti 9:20-23.

8. Wapi lolenge moko oyo tokoki kobanda lisolo ya Biblia na moto?

8 Mokano na biso ezali ya kozwa bato oyo ‘babongi.’ (Mat. 10:11) Mpo tólonga, tosengeli kosɛngaka bato báyebisa biso makanisi na bango, mpe na nsima koyoka bango na likebi. Ndeko mobali moko na Angleterre asɛngaka bato bápesa makanisi na bango na makambo lokola ndenge ya kozala na libala ya esengo, kobɔkɔla bana, to ndenge ya kokanga motema na makambo ya mabe. Nsima ya koyoka makanisi na bango, alobaka boye: “Okanisi nini mpo na toli oyo, oyo ekomamá eleki mbula pene na 2000?” Na nsima, kozanga ete asalela liloba “Biblia,” alakisaka bango na telefone na ye bavɛrsɛ oyo abongisaki malamu.

NDENGE YA KOSIMBA MITEMA YA BATO

9. Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo balingaka te kolobela makambo ya Nzambe?

9 Mbala mingi, tokoki kosimba mitema ya bato oyo balingaka te kolobela makambo ya Nzambe soki tosololi na bango naino makambo oyo esepelisaka bango. Na ndakisa, bato mingi bakamwaka biloko oyo Nzambe akelá. Na yango, tokoki koloba boye: “Na ntembe te, oyebi ete bato ya siansi basalaka biloko ebele soki balandi kaka biloko oyo tomonaka na mokili. Na ndakisa, bato oyo basalaka bamikro bayekolaka makambo etali matoi, mpe bato oyo basalaka kamera bayekolaka makambo etali miso. Okanisaka nini mpo na biloko oyo tomonaka na mokili? Ebimá kaka yango moko, moto nde asalá yango, to ozali na likanisi mosusu?” Nsima ya koyoka ye na likebi, tokoki kobakisa boye: “Nasepelaki mingi na likambo oyo moto moko ya ntango ya kala akomaki. Alobaki boye: ‘Moto oyo asalá litoi, akoki nde koyoka te? To Moto oyo asalá liso, akoki nde komona te? . . . Ɛɛ, moto oyo ateyaka bato boyebi?’ Bato mosusu ya siansi bandimi maloba yango mpe bamoni ete Mozalisi azali.” (Nz. 94:9, 10) Na nsima, tokoki kosalela video moko ya jw.org® oyo ezali na eteni “Masolo ya bomoi,” “Makanisi na oyo etali ebandeli ya bomoi.” (Kende na MIKANDA > BAVIDEO.) Okoki mpe kopesa ye mwa buku La vie a-t-elle été créée ? to mwa buku Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie.

10. Wapi ndenge mosusu ya kobanda lisolo na moto oyo alingaka kolobela makambo ya Nzambe te?

10 Bato mingi balingaka kozala na bomoi ya malamu na mikolo oyo ezali koya. Kasi, mingi babangaka ete mokolo mosusu mabele ebebisama to etikala mpamba. Mokɛngɛli-motamboli moko na Norvège alobi ete mbala mingi, bato oyo balingaka kolobela makambo ya Nzambe te bandimaka kolobela makambo oyo ezali kosalema na mokili. Nsima ya kopesa moto mbote, alobaka boye: “Okanisi nini mpo na elikya na biso ya kozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya? Banani nde bakokokisa yango: bato ya politiki, bato ya siansi, to moto mosusu?” Nsima ya koyoka eyano ya moto na likebi, atángaka to mpe azongelaka maloba ya vɛrsɛ oyo elobeli bomoi ya malamu na mikolo oyo ezali koya. Bato mosusu bakamwaka komona ete Biblia elaki ete mabele ekozala libela na libela mpe ete bato malamu bakofanda na mabele seko na seko.​—Nz. 37:29; Mos. 1:4.

11. Mpo na nini tosengeli komeka mayele ndenge na ndenge mpo na kosolola na bato, mpe ndenge nini tokoki komekola Paulo, na kotalela Baroma 1:14-16?

11 Tosengeli komeka mayele ndenge na ndenge mpo na kosolola na bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola. Mpo na nini? Mpo moto na moto azali na ndenge na ye. Likambo oyo esepelisi moto moko, moto mosusu akosepela na yango te. Bato mosusu bamonaka mabe te kolobela polele makambo ya Nzambe to ya Biblia, kasi bamosusu bandimaka soki tobandi naino na kolobela makambo mosusu. Ezala ndenge nini, tosengeli kolukaka mabaku ya kosolola na bato ya ndenge nyonso. (Tángá Baroma 1:14-16.) Tosengeli mpe kobosana te ete Yehova nde asalaka ete solo ekola na mitema ya bato oyo balingaka makambo ya malamu.​—1 Ko. 3:6, 7.

NDENGE YA KOTEYA BATO YA AZIA SOLO YA BIBLIA

Basakoli mingi balingaka kosolola na bato oyo bautá na bikólo oyo bato bazali bakristo te mpe bayebisaka bango ndenge toli ya Biblia ekoki kosalisa bango (Talá paragrafe 12-13)

12. Tokoki kosala nini mpo na koteya bato oyo bakolá na Azia, oyo bakanisá naino mpenza te soki Mozalisi azali to te?

12 Na mokili mobimba, basakoli ebele bazali kokutana na bato oyo bautá na bikólo ya Azia, ata mpe na bikólo oyo baguvɛrnema etyá bipekiseli na makambo ya mangomba. Na bikólo mingi ya Azia, bato mingi bakanisá naino malamumalamu te soki Mozalisi azali to te. Bamosusu balingaka koyeba makambo ya sika mpe bandimaka mbala moko soki tosɛngi bango tóyekola Biblia; kasi bamosusu bandimaka mbala moko te koyekola makambo ya sika. Ndenge nini tokoki kosalisa bango? Basakoli mosusu oyo bameseni na mosala ya kosakola bamoni ete na ebandeli, ezali malamu kosolola na bango kaka lokola moninga, mpe kotyela bango likebi. Na nsima, soki libaku emonani, tokoki koyebisa bango ndenge bomoi na biso ekómaki malamu ntango tobandaki kosalela toli moko oyo ezali na Biblia.

13. Nini ekoki kosala ete bato básepela na nsango ya Biblia? (Talá elilingi ya ezipeli.)

13 Bato mingi basepelaka koyoka ete toli ya Biblia ekoki kosalisa na bomoi ya mokolo na mokolo. (Mos. 7:12) Na New York, ndeko mwasi moko oyo akendaka kotala bato oyo balobaka Chinois alobi boye: “Nasalaka makasi namonisa ete nazali kotyela bango likebi mpe nayokaka bango. Soki bapaya mosusu ya sika bayei, nakoki kotuna bango: ‘Bozali komesana malamu? Bozwi mosala? Bato bazali komonisela bino boboto?’” Na bantango mosusu, yango epesaka ye nzela ayebisa bango liteya moko ya Biblia. Soki likoki ezali, ndeko mwasi yango abakisaka ete: “Mpo na yo, nini ekoki kosalisa bato báyokanaka malamu? Nakoki kolakisa yo lisese moko oyo ezali na Biblia? Elobi boye: ‘Ebandeli ya kowelana ezali lokola ntango moto azali kofungola mai; na bongo liboso koswana ebima, bendá nzoto.’ Okanisi ete toli yango ekoki kosalisa biso tóyokanaka malamu na basusu?” (Mas. 17:14) Masolo ya ndenge wana ekoki kosalisa biso tóyeba bato oyo bakosepela tózongela bango lisusu.

14. Ndenge nini ndeko moko na Extrême-Orient asalisaka bato oyo balobaka ete bandimelaka Nzambe te?

14 Tokoki koloba nini epai ya moto oyo alobi ete andimelaka Nzambe te? Ndeko mobali moko oyo amesani koteya bato ya Extrême-Orient oyo basambelaka ata na lingomba moko te, alobi boye: “Mbala mingi awa, soki moto alobi, ‘Nandimelaka Nzambe te,’ alingi nde koloba ete andimaka te ete esengeli kosambela banzambe ya bankɔkɔ. Na yango, mbala mingi nandimaka ete bato basali banzambe ebele mpe banzambe yango bazali ya solo te. Natángaka Yirimia 16:20, oyo elobi: ‘Moto ya mabele akoki nde komisalela banzambe nzokande bazali banzambe te?’ Na nsima, natunaka boye: ‘Ndenge nini tokoki kokesenisa nzambe ya solo na banzambe oyo bato basalá.’ Nayokaka eyano na likebi, mpe na nsima natángaka Yisaya 41:23, oyo elobi: ‘Bóloba makambo oyo ekoya na nsima, mpo tóyeba ete bozali banzambe.’ Nsima na yango, napesaka ndakisa oyo emonisi ndenge Yehova asakolaka makambo oyo ekoya.”

15. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya ndeko moko?

15 Ndeko moko na Azia ya Ɛsti asalelaka mayele mosusu ntango azongelaka bato. Alobi boye: “Napesaka bandakisa oyo emonisi ete toli ya Biblia esalisaka, nalobelaka bisakweli ya Biblia oyo ekokisami, mpe mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́. Na nsima, nalakisaka bango ndenge makambo nyonso wana emonisi ete ezali na Mozalisi moko ya mayele. Soki moto andimi ete mbala mosusu Nzambe azalaka, nabandaka kolakisa ye oyo Biblia elobi mpo na Yehova.”

16. Na kotalela Baebre 11:6, mpo na nini bayekoli ya Biblia basengeli kondimela Nzambe mpe Biblia, mpe ndenge nini tokoki kosalisa bango bákóma na kondima yango?

16 Ntango tozali koyekola Biblia na bato oyo basambelaka ata na lingomba moko te, tosengeli kokoba kosalisa bango mpo bákóma na kondima makasi ete Nzambe azali. (Tángá Baebre 11:6.) Tosengeli mpe kosalisa bango bándimela Biblia. Yango ekoki kosɛnga tózongela makambo mosusu mbala ebele. Ntango tozali koyekola, ekoki kosɛnga tólobela makambo oyo endimisaka biso ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Yango ekoki kosɛnga tólobela mwa moke bisakweli ya Biblia oyo ekokisamá, ndenge Biblia eyokani na siansi mpe istware, to ndenge toli ya Biblia esalisaka biso.

17. Bolingo oyo tolingaka bato ekoki kosala nini epai na bango?

17 Mpo na kosalisa bato bákóma bayekoli ya Kristo, tosengeli kolinga bango, ezala basambelaka na lingomba moko boye to te. (1 Ko. 13:1) Ntango tozali koteya bango, mokano na biso ezali ya komonisa ete Nzambe alingaka biso mpe alingi ete biso mpe tólinga ye. Mbula na mbula, ebele ya bato oyo liboso bayebaki kaka moke to mpe bayebaki te makambo ya mangomba bazali kozwa batisimo mpo bayekoli kolinga Nzambe. Na yango, zalá na makanisi ya malamu, mpe tyeláká mpenza bato ya ndenge nyonso likebi. Yokáká bango. Mekáká koyeba ntina oyo bazali na makanisi boye to boye. Na bizaleli na yo, monisáká bango ndenge moyekoli ya Kristo asengeli kozala.

LOYEMBO 76 Oyokaka nini?

^ par. 5 Bato oyo basambelaka ata na lingomba moko te bakómi mingi lelo oyo koleka ndenge ezalaki liboso, mpe tokoki kokutana na bango ntango tozali na mosala ya kosakola. Lisolo oyo elobeli ndenge oyo tokoki koteya bango solo ya Biblia mpe ndenge oyo tokoki kosalisa bango bándimela Biblia mpe bázala na kondima epai ya Yehova Nzambe.

^ par. 1 Baankɛtɛ emonisi ete na bikólo ya Mpoto tokoki kotánga: Albanie, Allemagne, Autriche, Azerbaïdjan, Danemark, Espagne, France, Irlande, Norvège, Pays-Bas, République tchèque, Royaume-Uni, Suède, mpe Suisse. Na bikólo ya Azia, tokoki kotánga: Chine, Corée du Sud, Hong Kong, Israël, Japon, mpe Vietnam. Ezali mpe bongo mpo na Australie ná Canada.

^ par. 2 NDIMBOLA YA MALOBA: Na lisolo oyo, maloba bato oyo basambelaka ata na lingomba moko te elimboli mpe bato oyo bandimaka te ete Nzambe azali.

^ par. 54 ELILINGI: Ndeko mobali moko azali koteya moninga na ye monganga; na nsima moto yango akɔti na site Internet na biso.