Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu akufaki mpenza mpo na ngai?

Yesu akufaki mpenza mpo na ngai?

NA BIBLIA, tokoki kotánga masolo ya bato ebele ya sembo oyo babimisaki mayoki na bango mpo bazalaki ‘bato lokola biso.’ (Yak. 5:17) Na ndakisa, tokoki mbala moko komitya na esika ya ntoma Paulo, soki totángi maloba na ye oyo ezali na Baroma 7:21-24 ete: “Ntango nalingi kosala oyo ezali malamu, oyo ezali mabe nde ezali epai na ngai. . . . Ngai moto ya mawa!” Koyoka moto ya sembo lokola Paulo alobi maloba ya ndenge wana ekoki kolendisa biso soki biso mpe tobundisaka ezaleli na biso ya kozanga kokoka.

Ntoma Paulo abimisaki mpe mayoki ya ndenge mosusu. Na Bagalatia 2:20, alobaki ete andimaka ete Yesu “alingaki [ye] mpe amikabaki mpo na [ye]”! Ekoki kozala ete na bantango mosusu ondimaka likambo yango te.

Soki omimonaka ntina te mpo na masumu oyo osalá kala, mbala mosusu ondimaka mpenza te ete Yehova alingaka yo mpe alimbisá yo, mpe ekoki kozala mpasi omona ete mbeka ya lisiko ezali likabo oyo apesá yo. Yesu alingi mpenza tómonaka ete mbeka ya lisiko ezali likabo? Soki bongo, nini ekoki kosalisa biso tótalelaka yango ndenge wana? Tólobela mituna yango mibale.

NDENGE OYO YESU ALINGI TÓTALELA MBEKA OYO APESAKI

Yesu alingi omonaka ete mbeka na ye ezali likabo oyo apesá yo. Mpo na nini tokoki koloba bongo? Meká kokanisa makambo oyo Luka 23:39-43 elobeli. Babaki mobali moko na nzete ya mpasi penepene na Yesu. Mobali yango andimi ete asalá mabe. Na ntembe te, ezalaki likambo ya monene mpo etumbu wana ya makasi ezalaki mpo na basali-mabe minene. Mobali yango azalaki na mawa makasi mpe asɛngaki Yesu ete: “Kanisá ngai ntango okokɔta na bokonzi na yo.”

Yesu alobaki nini? Meká komona ndenge asalaki makasi abalola motó mpo atala elongi ya mosali-mabe yango. Atako azalaki na mpasi makasi, Yesu afungolaki elongi mpe akitisaki mobali yango motema; alobaki na ye: “Ya solo nazali koyebisa yo lelo: Okozala na ngai na Paradiso.” Yesu akokaki kaka koyebisa moto yango ete “Mwana ya moto ayaki . . . kopesa molimo [to bomoi] na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Mat. 20:28) Kasi, na boboto nyonso, Yesu amonisaki ete mbeka na ye epesamaki mpe mpo na moto wana! Amonisaki boboto ndenge asalelaki maloba “yo” mpe “ngai.” Yesu amonisaki mpe bolamu oyo mbeka na ye ekomemela mosali-mabe yango: akokaki kozala na paradiso awa na mabele.

Na ntembe te, Yesu alingaki ete mobali wana andima ete mbeka na ye ezali mpe likabo mpo na ye. Soki Yesu akanisaki ndenge wana mpo na mosali-mabe, oyo azwaki ata libaku te ya kosalela Nzambe, na ntembe te akanisaka mpe bongo mpo na mokristo oyo azwá batisimo mpe asalelaka Nzambe. Na yango, nini ekoki kosalisa biso tómitalela na ndenge oyo ebongi ata soki tosalá masumu minene na kala?

NINI ESALISAKI NTOMA PAULO?

Mosala ya kosakola oyo Yesu apesaki Paulo esalisaki ye andima ete Yesu akufaki mpe mpo na ye. Na ndenge nini? Paulo alobaki boye: “Nazali kotɔnda Kristo Yesu Nkolo na biso, oyo apesaki ngai nguya, mpo amonaki ngai sembo na ndenge apesaki ngai mosala, atako liboso nazalaki kofinga mpe konyokola mpe nazalaki moto ya lofundo.” (1 Tim. 1:12-14) Atako na kala Paulo asalaki makambo ya mabe, mokumba oyo azwaki ezalaki kondimisa ye ete Yesu amoniselaki ye motema mawa, alingaki ye, mpe atyelaki ye motema. Lelo oyo mpe, Yesu apesi mokomoko na biso mosala ya kosakola. (Mat. 28:19, 20) Ndenge nini yango ekoki kosalisa biso tóndima ete Yesu akufelaki mpe biso?

Albert, oyo alongolamaki na lisangá mbula soki 34, kasi auti sikoyo kozongela Yehova, alobi boye: “Nabosanaka te masumu oyo nasalá. Kasi ntango nazali na mosala ya kosakola, namonaka ete, ndenge moko na ntoma Paulo, Yesu apesá ngai mokumba. Epesaka ngai esengo mpe esalisaka ngai nazala na makanisi malamu mpo na bomoto na ngai, bomoi na ngai mpe elikya na ngai mpo na mikolo oyo ezali koya.”​—Nz. 51:3.

Ntango ozali koyekola Biblia na bato ya ndenge nyonso, salisá bango bándima ete Yesu amoniseli bango motema mawa mpe alingi bango

Allan, oyo azalaki mosali-mabe mpe moto ya mobulu liboso ayeba solo, alobi boye: “Nabosanaka te makambo nyonso ya mabe oyo nasalá bato. Na bantango mosusu, ekómisaka ngai mawamawa. Kasi, napesaka Yehova matɔndi ndenge andimi ete mosumuki lokola ngai amemelaka basusu nsango malamu. Ntango namonaka ndenge bato bazali kondima nsango malamu, ekundwelaka ngai ete Yehova azali malamu mpe azali bolingo. Namonaka ete azali kosalela ngai mpo na kosalisa baoyo basalá mpe makambo ya mabe.”

Ntango tobimi na mosala ya kosakola, tosalaka likambo ya malamu mpe yango esalisaka biso tókanisa makambo ya malamu. Yango endimisaka biso ete Yesu amoniselaka biso motema mawa, alingaka biso mpe atyelaka biso motema.

YEHOVA AZALI MONENE KOLEKA MITEMA NA BISO

Lokola mokili oyo ya Satana ebebisami naino te, mitema na biso ekoki kokoba kokweisa biso mpo na mabunga oyo tósala kala. Nini ekosalisa yo obundisa makanisi ya ndenge wana?

Ndeko mwasi Jean, oyo amitungisaka mingi mpo azalaki na bomoi ya liso na nse ya lokasa na bolenge, alobi boye: “Nasepelaka ndenge ‘Nzambe azali monene koleka mitema na biso.’” (1 Yoa. 3:19, 20) Ndenge moko na Jean, biso mpe tokoki kozwa libɔndisi na koyeba ete Yehova ná Yesu bayebi malamu ete tozali bato ya masumu. Kobosana te ete bapesaki lisiko, mpo na bato ya kokoka te, kasi nde mpo na bato ya masumu oyo babongoli motema.​—1 Tim. 1:15.

Okondimisa motema na yo ete lisiko epesamaki mpe mpo na yo soki ozali kokanisa na mozindo ndenge oyo Yesu asalelaki bato ya kozanga kokoka makambo, mpe soki ozali kosala nyonso okokisa malamu mosala ya kosakola oyo apesá biso. Soki ozali kosala bongo, ndenge moko na Paulo, okoki koloba ete: Yesu “alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.