Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bato oyo bakabaka bazalaka na esengo

Bato oyo bakabaka bazalaka na esengo

“Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”​—MISALA 20:35.

NZEMBO: 76, 110

1. Nini emonisi ete Yehova akabaka?

LIBOSO Yehova abanda kokela, azalaki kaka ye moko. Na nsima asepelaki kopesa likabo ya bomoi na baanzelu na likoló mpe bato awa na mabele. Yehova, “Nzambe ya esengo,” asepelaka kopesa basusu biloko ya malamu. (1 Timote 1:11; Yakobo 1:17) Lokola alingi ete biso mpe tózala na esengo, ateyaka biso kokaba.​—Baroma 1:20.

2, 3. (a) Mpo na nini kokaba epesaka esengo? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Nzambe asalaki moto na elilingi na ye. (Ebandeli 1:27) Elingi koloba ete ntango akelaki biso, Yehova apesaki biso bizaleli oyo azalaka na yango. Na yango, mpo tózala mpenza na esengo, tosengeli kolanda ndakisa na ye. Tosengeli kotyela basusu likebi mpe kokaba na esengo biloko oyo tozali na yango. (Bafilipi 2:3, 4; Yakobo 1:5) Mpo na nini? Mpo Yehova akelá biso bongo. Atako tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki komekola Yehova na oyo etali kokaba.

3 Tólobela sikoyo mwa makambo oyo Biblia elobi na likambo etali kokaba. Tokolobela ntina oyo Yehova asepelaka ntango tokabaka, mpe ndenge ezaleli yango esalisaka biso tósala mosala oyo Yehova apesá biso. Tokolobela mpe ntina oyo kokaba epesaka esengo mpe mpo na nini tosengeli kokoba kokaba.

YEHOVA ASEPELAKA NTANGO TOKABAKA

4, 5. Ndakisa nini ya kokaba Yehova ná Yesu batikelá biso?

4 Lokola Yehova alingi tómekola ye, asepelaka ntango tokabaka. (Baefese 5:1) Ndenge Yehova asalá nzoto na biso mpe biloko kitoko oyo atyá na mabele mpo tósepela na bomoi, emonisaka polele ete alingi tózala na esengo. (Nzembo 104:24; 139:13-16) Yango wana, topesaka Yehova lokumu ntango tosalaka makasi tópesa basusu esengo.

5 Tomekolaka mpe Yesu, oyo atikelá biso ndakisa ya kokoka na likambo etali kokaba. Alobaki: “Mwana ya moto ayaki, mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela mpe kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Matai 20:28) Ntoma Paulo mpe alendisaki bakristo na maloba oyo: “Bóbatela na kati na bino makanisi oyo Kristo Yesu mpe azalaki na yango . . . Amikómisaki nde mpamba mpe akómaki lokola moombo.” (Bafilipi 2:5, 7) Na yango, mokomoko na biso amituna boye: ‘Nakoki lisusu kolanda ndakisa ya Yesu malamumalamu?’​—Tángá 1 Petro 2:21.

6. Liteya nini Yesu apesaki biso na lisolo ya Mosamaria ya motema malamu? (Talá elilingi ya ebandeli.)

6 Yehova asepelaka ntango tolandi ndakisa ya kokoka oyo ye ná Yesu bapesá biso. Tomonisaka yango soki tozali kotyela bato likebi mpe koluka ndenge ya kosalisa bango. Yesu amonisaki yango polele ntango abɛtaki lisolo ya Mosamaria ya motema malamu mpo na koteya bayekoli na ye ete basengeli kosalisa basusu, ata soki bazali banani to bauti wapi. (Tángá Luka 10:29-37.) Mpo na nini Yesu abɛtaki lisolo yango? Mpo Moyuda moko atunaki ye: “Nani mpenza azali mozalani na ngai?” Eyano ya Yesu ezali koteya biso ete lokola Mosamaria wana, tosengeli kokabaka soki tolingi kosepelisa Yehova.

7. Ndenge nini tokomonisa ete tondimaka ete ndenge ya Yehova ya kosala makambo nde eleki malamu? Limbolá.

7 Ntina mosusu oyo tosengeli kokaba ezali mpo na ntembe oyo Satana abimisaki na elanga ya Edene. Alobaki ete Adama ná Eva bakozala na esengo koleka soki batosi Yehova te mpe baluki libosoliboso matomba na bango moko. Eva azalaki moimi mpe alingaki kozala lokola Nzambe. Adama azalaki moimi mpe alingaki kosepelisa Eva na esika ya kosepelisa Nzambe. (Ebandeli 3:4-6) Ekateli na bango ebimisá mbuma ya mabe mpenza. Ezali polele ete moto moko te akoki kozala na esengo soki azali moimi. Kasi soki tolukaka matomba ya basusu mpe tokabaka, tokomonisa ete tondimaka ete ndenge oyo Yehova asalaka makambo nde eleki malamu.

SALÁ MOSALA OYO NZAMBE APESI BISO

8. Mpo na nini Adama ná Eva basengelaki kokanisa bato mosusu?

8 Atako Adama ná Eva bazalaki bango moko na elanga ya Edene, basengelaki kokanisa mpe bato mosusu. Mpo na nini? Mpo Yehova apesaki bango mosala; ayebisaki bango bábota bana, bátondisa mabele, mpe bákómisa yango paradiso. (Ebandeli 1:28) Ndenge kaka Yehova alingaki ete bato nyonso bázala na esengo, Adama ná Eva mpe basengelaki kokanisa bongo mpo na bana oyo basengelaki kobota. Balingaki kosala elongo mpo na kokómisa mabele mobimba paradiso. Elingaki kosɛnga básala mosala monene wana na bomoko libota mobimba!

9. Mpo na nini kokómisa mabele paradiso elingaki kopesa bato esengo?

9 Elingaki mpe kosɛnga ete bato ya kokoka básala na bomoko elongo na Yehova mpo na kokómisa mabele paradiso mpe kokokisa mokano na ye. Na ndenge yango balingaki kokɔta na kopema na ye. (Baebre 4:11) Kanisá esengo oyo mosala yango elingaki kopesa bango! Yehova alingaki kopambola bango mingi mpo balingaki komipesa mobimba mpo na bolamu ya basusu.

10, 11. Nini ekosalisa biso tósala mosala kosakola mpe kokómisa bato bayekoli?

10 Lelo oyo, Yehova apesi biso mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli. Mpo na kosala yango, tosengeli mpenza kotyela bato likebi. Kutu, tokokoba kosala mosala yango kaka soki tozali na makanisi ya malamu, elingi koloba soki tolingaka Yehova mpe bazalani na biso.

11 Na siɛklɛ ya liboso, ntoma Paulo alobaki ete ye ná bakristo mosusu bazalaki “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe” mpo bazalaki kosakola mpe koteya bato solo. (1 Bakorinti 3:6, 9) Lelo oyo, biso mpe tokoki kozala “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe” soki tozali kopesa ntango, makasi mpe biloko na biso mpo na kosala mosala ya kosakola oyo Nzambe apesi biso. Ezali lokumu monene mpenza!

Kosalisa moto ayeba solo ekopesa yo esengo mingi (Talá paragrafe 12)

12, 13. Mapamboli nini mosala ya kokómisa bato bayekoli ememaka?

12 Kopesa ntango mpe makasi na biso na mosala ya kosakola mpe ya koteya epesaka esengo mpenza. Bandeko oyo bazwá libaku ya koyekola Biblia na bato oyo bakolaki na elimo bakoyebisa yo ete ezali mosala ya esengo. Toyokaka esengo mingi ntango bayekoli na biso ya Biblia bazali kosepela mpo bakangi mpenza ntina ya makambo oyo Biblia eteyaka, bakómi na kondima makasi, basali mbongwana na bomoi na bango, mpe babandi koyebisa basusu makambo oyo bazali koyekola. Yesu mpe asepelaki mingi ntango basakoli 70 oyo atindaki bákende kosakola “bazongaki na esengo” mpo bakutanaki na makambo ya malamu.​—Luka 10:17-21.

13 Bandeko na biso na mokili mobimba basepelaka komona ndenge nsango malamu ezali kosalisa bato bábongisa bomoi na bango. Na ndakisa, ndeko mwasi moko ya monzemba na nkombo Anna * azalaki na mposa ya kosala mingi na mosala ya Yehova. Akendaki na mboka moko na Mpoto ya Ɛsti esika mposa ya basakoli ezalaki monene. Akomaki boye: “Mabaku ya kobanda koyekola Biblia na bato ezali ebele, mpe likambo yango ezali kosepelisa ngai mingi. Mosala ya kosakola ezali kopesa ngai esengo mpenza. Soki nazongi na ndako, nazalaka na ntango te ya kotya makanisi kaka na makambo na ngai. Nakanisaka bayekoli na ngai ya Biblia​—bampasi na bango mpe mitungisi na bango. Nalukaka ndenge ya kolendisa bango mpe ya kosalisa bango. Yango endimisaka ngai ete ‘esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.’”​—Misala 20:35.

Ntango tozali kokende na ndako nyonso ya teritware na biso, tozali kopesa bato libaku ya kondima to koboya nsango ya Bokonzi (Talá paragrafe 14)

14. Na ndenge nini mosala ya kosakola ekoki kopesa yo esengo ata soki bato bazali kondima te?

14 Ata soki bato bazali koyoka biso te, tokoki koyoka esengo mpo topesaka bango libaku ya koyoka nsango malamu. Kutu, mosala na biso ezali lokola mosala ya mosakoli Ezekiele; Yehova alobaki na ye: “Osengeli kolobela bango maloba na ngai, báyoka to báboya.” (Ezekiele 2:7; Yisaya 43:10) Na yango, bato báyoka to te, Yehova azwaka na motuya milende oyo tosalaka. (Tángá Baebre 6:10.) Ndeko moko oyo azalaki na makanisi ya malamu mpo na mosala ya kosala alobaki boye: “Toloni, tomwangisi mai, mpe tobondeli na elikya ete Yehova akokolisa.”​—1 Bakorinti 3:6.

NDENGE YA KOZALA NA ESENGO

15. Mpo na nini tosengeli kopesa ata soki bato bazali na botɔndi te?

15 Yesu alingi ete tókabaka mpo tóyoka esengo ya kopesa. Mbala mingi, soki moto akabaka, basusu mpe bakabelaka ye. Alobaki: “Bópesaka, mpe bato bakopesa bino. Bakosopa na mabenga na bino biloko mingi, oyo bafini, baningisi mpe etondi mɛkɛ. Mpo bakomekela bino na emekeli oyo bozali komekela.” (Luka 6:38) Ya solo, ntango ozali kopesa, moto nyonso te akomonisa botɔndi. Kasi, ntango bato mosusu bamonisi botɔndi, ekoki kotinda bango mpe bápesa basusu. Na yango, ata soki ezali komonana lokola ete bato bazali na botɔndi te, kobá kopesa. Okoki koyeba te matomba oyo ekoki kobima mpo opesaki epai ya moto moko.

16. Tosengeli kokabela banani, mpe mpo na nini?

16 Moto oyo akabaka na motema moko asalaka yango te mpo na nsima bázongisela ye. Yesu alobaki: “Ntango osali fɛti, bengisá babola, bibɔsɔnɔ, batɛngumi, bato oyo bakufá miso; mpe okozala na esengo, mpo bazali na eloko ya kozongisela yo te.” (Luka 14:13, 14) Biblia elobi: “Ye oyo azali na liso ya boboto akopambwama, mpo apesi bilei na ye na moto oyo azangá.” Elobi mpe: “Esengo na moto oyo azali kotya likebi na moto oyo azangá.” (Masese 22:9; Nzembo 41:1) Ya solo, tosengeli kokaba mpo tolingi mpenza kosalisa basusu.

17. Kopesa ya ndenge nini ekosala ete tózala na esengo?

17 Ntango ntoma Paulo azongelaki maloba ya Yesu ete “esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa,” azalaki kolobela kaka biloko ya mosuni te. Azalaki mpe kolobela kopesa basusu bilendiseli, toli ya Biblia, mpe lisalisi. (Misala 20:31-35) Na maloba mpe na misala na ye, Paulo ateyaki biso ndenge ya kopesa ntango na biso, makasi na biso, likebi na biso, mpe bolingo na biso.

18. Bato mingi ya mayele balobi nini na oyo etali kokaba?

18 Bato ya mayele oyo bayekolaka bizaleli ya bato bamoni mpe ete moto oyo apesaka azalaka na esengo. Lisolo moko elobi boye: “Bato balobaka ete bayokaka esengo mingi nsima ya kosala makambo ya malamu mpo na basusu.” Bato yango ya mayele balobi ete soki tozali kosalisa basusu, tokoyoka ete bomoi na biso ezali na ntina. Yango wana, bapesaka bato toli ete bámipesa na kosalisa basusu mpo bázala nzoto kolɔngɔnɔ mpe na esengo mingi. Nyonso wana ekoki kokamwisa biso te, mpo Yehova, Mozalisi na biso ya bolingo ateyaka biso banda kala ete tokozala na esengo soki tozali kopesa.​—2 Timote 3:16, 17.

KOBÁ KOKABA

19, 20. Mpo na nini olingi komonisa elimo ya kokaba?

19 Ekoki kozala mpasi kobatela ezaleli ya kokaba soki bato oyo bazali zingazinga na biso balukaka libosoliboso bolamu na bango moko. Kasi, Yesu alobaki ete mibeko mibale oyo eleki minene ezali kolinga Yehova na motema na biso mobimba, molimo na biso mobimba, mpe na makanisi ná makasi na biso nyonso, mpe kolinga mozalani na biso lokola biso moko. (Marko 12:28-31) Ndenge toyekoli yango na lisolo oyo, bato oyo balingaka Yehova bamekolaka ye. Yehova ná Yesu bakabaka; mpe balendisaka biso tólanda ndakisa na bango, mpo bayebi ete yango ekopesa biso esengo mpenza. Soki tosali makasi tóbatela elimo ya kokaba na boyokani na biso na Nzambe mpe bazalani na biso, tokokumisa Yehova mpe biso moko ná bato mosusu tokozwa matomba.

20 Na ntembe te, osalaka milende mpo okabaka mpe osalisaka basusu, mingimingi bandeko ya lisangá. (Bagalatia 6:10) Soki okobi kosala bongo, bato bakozala na botɔndi mpe bakolinga yo, mpe yango ekosala ete ozala na esengo. Biblia elobi: “Molimo oyo ekabaka ekokóma mafutamafuta, mpe moto oyo amwangiselaka bato mosusu mai mingi, ye mpe bakomwangisela ye mai mingi.” (Masese 11:25) Na bomoi na biso mpe na mosala ya kosakola, ezali na ndenge mingi oyo tokoki komonisa ete tolukaka matomba ya basusu, tozali na boboto, mpe tokabaka. Tokolobela makambo yango mosusu na lisolo elandi.

^ par. 13 Topesi ye nkombo mosusu.