Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Motema molai​—Yiká mpiko na ntina

Motema molai​—Yiká mpiko na ntina

LOKOLA bomoi ezali se kokóma mpasi na ‘mikolo oyo ya nsuka,’ tosengeli mpenza kozala na motema molai. (2 Timote 3:1-5) Bato mingi na mokili bazali na motema molai te. Bazali na moimi, balingaka boyokani te, mpe bazangi komipekisa. Yango wana, mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Nazali kozanga motema molai lokola bato oyo bazali zingazinga na ngai? Kozala mpenza na motema molai elimboli nini? Nakoki kosala nini mpo motema molai ekóma bomoto na ngai?’

MOTEMA MOLAI ELIMBOLI NINI?

Na ndenge esalelami na Biblia, maloba “motema molai” esuki kaka te na kokanga motema ntango okutani na mokakatano. Moto oyo azali na motema molai ayikaka mpiko na ntina. Atalaka kaka likambo na ye te, kasi akanisaka ata bolamu ya moto oyo apesaki ye mpasi to asalaki ye mabe. Azalaka kaka na elikya ete bakobongisa boyokani na bango. Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te ndenge Biblia etángi motema molai na esika ya liboso na bizaleli oyo bolingo ebimisaka. * (1 Bakorinti 13:4) Motema molai ezali mpe na kati ya “mbuma ya elimo.” (Bagalatia 5:22, 23) Na yango, tosengeli kosala nini mpo tókóma mpenza na motema molai?

NDENGE YA KOKÓMA NA MOTEMA MOLAI

Mpo na kokóma na motema molai, tosengeli kobondela mpo na kosɛnga lisalisi ya elimo santu, oyo Yehova apesaka baoyo batyelaka ye motema. (Luka 11:13) Atako elimo yango ezali na nguya mingi, biso mpe tosengeli kosala na boyokani na mabondeli na biso. (Nzembo 86:10, 11) Yango elingi koloba ete tosengeli kosala makasi tómonisaka motema molai mokolo na mokolo mpo ekóma na kati ya bomoto na biso. Kasi na bantango mosusu tokoki kozanga motema molai. Nini ekoki kosalisa biso?

Tosengeli koyekola mpe komekola ndakisa ya Yesu. Na lisalisi ya elimo santu, ntoma Paulo alobelaki “bomoto ya sika,” motema molai mpe ezali na kati; na nsima alobaki ete tótika “kimya ya Kristo etambwisa mitema na [biso].” (Bakolose 3:10, 12, 15) Mpo na yango, tosengeli kolanda ndakisa ya Yesu mpe kotya motema mobimba ete na ntango oyo ebongi, Nzambe akosembola makambo. Soki tosali bongo, tokozala motema mokuse te, ata soki makambo nini ezali kosalema zingazinga na biso.​—Yoane 14:27; 16:33.

Biso nyonso tozali na mposa makasi ete mokili ya sika eya. Kasi tokozala na motema molai mingi soki tokanisi na mozindo ndenge Yehova amoniselaka biso motema molai. Biblia elobi na biso boye: “Yehova azali koumisa makambo te na elaka na ye, ndenge bato mosusu batalelaka koumisa makambo, kasi azali nde komonisela bino motema molai mpo alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.” (2 Petro 3:9) Soki tokanisi ndenge oyo Yehova amoniselaka biso motema molai, biso mpe tokomonisela basusu motema molai. (Baroma 2:4) Wapi mwa makambo oyo esɛngaka tómonisa motema molai?

MAKAMBO OYO ESƐNGAKA TÓMONISA MOTEMA MOLAI

Mokolo na mokolo, tokutanaka na makambo mingi oyo esɛngaka tómonisa motema molai. Na ndakisa, esɛngaka kozala na motema molai mpo tókata basusu maloba te ntango tomoni ete tolingi tóloba likambo moko ya ntina. (Yakobo 1:19) Esɛngaka mpe komonisa motema molai ntango bandeko basali likambo oyo epesi biso nkanda. Na esika ya kotomboka mbala moko, malamu kokanisa ndenge Yehova ná Yesu batalelaka bolɛmbu na biso. Batyaka miso kaka te na mabunga ya mikemike oyo tosalaka. Kasi, bamonaka nde bizaleli na biso ya malamu mpe bapesaka biso ntango ya kobongisa yango lisusu.​—1 Timote 1:16; 1 Petro 3:12.

Tosengeli mpe komonisa motema molai ntango moto alobi ete tolobaki to tosalaki mabe. Mbala mingi, tolukaka liboso kosilika to komilongisa. Kasi Biblia emonisi biso ndenge mosusu ya kosala. Elobi: “Moto ya motema molai aleki moto oyo azali na elimo ya lolendo. Elimo na yo esilika nokinoki te, mpo nkanda efandaka nde na ntolo ya bazoba.” (Mosakoli 7:8, 9) Na yango, ata soki bafundi biso na likambo oyo ezali mpenza lokuta, tosengeli komonisa motema molai mpe kokanisa liboso ya kosala likambo. Yango nde Yesu asalaki ntango bakoselaki ye makambo.​—Matai 11:19.

Mingimingi baboti basengeli kozala na motema molai ntango balingi kosembola bana na bango mpo na ezaleli moko ya mabe to kosalisa bango bálongola makanisi to bamposa ya mabe. Tózwa ndakisa ya Mattias, oyo asalaka na Betele ya Scandinavie. Liboso Mattias akokisa mbula 20, baninga na ye ya kelasi bazalaki kosɛka ye mpo azali Motatoli ya Yehova. Na ebandeli, baboti na ye bayebaki likambo yango te. Kasi, na nsima bamonaki ete Mattias akómaki na bantembe mpo na bindimeli na ye. Gillis, tata ya Mattias alobi ete ye ná mwasi na ye basengelaki komonisa motema molai mingi na likambo yango. Mattias azalaki kotuna mituna lokola: “Nzambe azali nani? Kasi, bongo soki Biblia ezali Liloba ya Nzambe te? Ndenge nini toyebi ete Nzambe nde alingi tósala boye to boye?” Azalaki mpe kotuna tata na ye: “Mpo na nini kosambisa ngai soki tozali na makanisi moko te mpe bindimeli moko te?”

Gillis alobi boye: “Na bantango mosusu mituna ya mwana na biso ezalaki komonisa ete azali na nkanda, nkanda mpo na ngai ná mama na ye te, kasi mpo na solo, mpo azalaki komona ete ezali kotya ye nkaka.” Ndenge nini Gillis asalisaki mwana na ye? Alobi boye: “Ngai ná mwana na ngai tozalaki kozwa mpenza ntango ya kofanda mpo na kosolola. Mbala mingi nazalaki koyoka ye mpe kotuna ye mwa mituna mpo tóyeba malamu makanisi na ye mpe ndenge azalaki komiyoka. Na bantango mosusu, nazalaki kolimbwela ye likambo mpe kosɛnga ye akanisa yango ata mokolo mobimba bongo tósolola yango lisusu nsima. Mpe nazalaki koyebisa ye apesa ngai mwa mikolo mpo nakanisa likambo moko oyo alobaki. Na nzela ya masolo wana, Mattias abandaki mokemoke kokanga ntina ya makambo mpe kondima mateya lokola lisiko, boyangeli ya Nzambe, mpe bolingo ya Yehova. Ezwaki ntango, mpe mbala mingi ezalaki mpasi, kasi mokemoke akolisaki bolingo ya Yehova na motema na ye. Ngai ná mwasi na ngai tozali na esengo mingi ndenge motema molai oyo tomonisaki mpo na kosalisa mwana na biso na bolenge ebotaki mbuma mpe esimbaki motema na ye.”

Ntango Gillis ná mwasi na ye bazalaki kosalisa mwana na bango, batyaki motema ete Yehova akosunga bango. Gillis alobi boye: “Mbala mingi nazalaki koyebisa Mattias ete lokola ngai ná mama na ye tolingaka ye mingi, tokómaki kobondela mingi mpo Yehova asalisa ye akanga ntina.” Baboti wana bazali mpenza na esengo ndenge bamonisaki motema molai!

Tosengeli mpe komonisa motema molai ntango tozali kosalisa ndeko to moninga oyo aumeli na maladi. Tózwa ndakisa ya Ellen, * oyo afandaka mpe na Scandinavie.

Eleki mbula soki mwambe, mobali ya Ellen asalaki AVC mbala mibale mpe ebebisaki ye bɔɔngɔ. Na yango, ayebaka lisusu komitya na esika ya basusu te, ayokaka lisusu esengo te, mawa mpe te. Ezali mokakatano monene mpo na Ellen. Alobi boye: “Esɛngaka komonisa mpenza motema molai mpe kobondela mingi.” Abakisi boye: “Vɛrsɛ oyo ebɔndisaka ngai mingi ezali Bafilipi 4:13, oyo elobi: ‘Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.’” Nguya ya Yehova esalisaka Ellen amonisa motema molai mpe ayikela mokakatano wana mpiko.​—Nzembo 62:5, 6.

MEKOLÁ MOTEMA MOLAI YA YEHOVA

Tóbosana te ete Yehova ye moko nde ndakisa eleki malamu na oyo etali komonisa motema molai. (2 Petro 3:15) Masolo mingi ya Biblia elobeli motema molai na ye. (Nehemia 9:30; Yisaya 30:18) Na ndakisa, Yehova asalaki nini ntango Abrahama atunaki ye mituna ebele mpo na ekateli na ye ya kobebisa Sodoma? Yehova akataki Abrahama maloba te. Amonisaki motema molai mpe atikaki Abrahama atuna mituna mpe aloba mitungisi na ye. Na nsima, Yehova amonisaki ete ayoki mitungisi ya Abrahama mpe ayebisaki ye ete akobebisa Sodoma te soki bayengebene bazali ata 10 na engumba yango. (Ebandeli 18:22-33) Yehova amonisaka motema molai ntango azali koyoka moto, azalaka motema mɔtɔmɔtɔ te!

Motema molai ezali na esika ya ntina mingi na kati ya bomoto ya sika oyo bakristo nyonso basengeli kolata. Soki tosali makasi tókóma mpenza na motema molai, tokokumisa Yehova, Tata na biso ya bolingo mpe ya motema molai, mpe tokozala kati na “baoyo bazali kozwa libula ya bilaka na nzela ya kondima mpe motema molai.”​—Baebre 6:10-12.

^ par. 4 Tolobelaki bolingo na lisolo ya liboso na masolo libwa oyo ezali kolobela bizaleli ya mbuma ya elimo santu ya Nzambe.

^ par. 15 Topesi ye nkombo mosusu.