LISOLO YA BOMOI
Nakolɛmbisa mabɔkɔ ata moke te
BILENGE mingi na Betele babengaka ngai “papa,” “tata,” to “nɔkɔ.” Lokola nazali na mbula 89, esepelisaka ngai. Namonaka ete bankombo yango emonisaka ete balingaka ngai mpe ezali mbano oyo Yehova apesi ngai ndenge nasaleli ye mosala ya ntango nyonso mbula 72. Na kotalela makambo oyo nakutani na yango na mosala ya Yehova, nakoki koyebisa bilenge yango na motema mobimba ete: ‘Mosala na bino ekozala na mbano, soki bolɛmbisi mabɔkɔ te.’—2 Ntango 15:7.
BABOTI MPE BANDEKO NA NGAI YA LIBOTA
Baboti na ngai oyo bazalaki bato ya Ukraine bakendaki na Canada. Bafandaki na engumba Rossburn, na etúká ya Manitoba. Mama na biso abotá bana 16, mibali 8 ná basi 8. Abotá mapasa te, ngai nazalaki mwana ya 14. Papa na biso azalaki kolinga Biblia mpe azalaki kotángela biso yango mikolo ya lomingo na ntɔngɔ, kasi azalaki komona ete mangomba esalisaka bato te, kaka kosɛnga mbongo; mpe mbala mingi azalaki koloba na lisɛki ete: “Nani azalaki kofuta Yesu mpo na mosala na ye ya kosakola mpe ya koteya?”
Nsukansuka, bandeko na ngai 8, minei ya mibali ná minei ya basi, bandimaki solo. Yaya na ngai Rose azalaki mobongisi-nzela tii liwa na ye. Liboso akufa, azalaki kolendisa bato nyonso báyoka Liloba ya Nzambe, mpe azalaki koloba: “Nakosepela komona bino na mokili ya sika.” Kala, yaya na ngai Ted azalaki koteya ete bato bakendaka na lifelo. Mikolo nyonso ya lomingo, azalaki koteya na radio mpe koyebisa bayoki na ye na mpiko nyonso ete basumuki bakozika libela na libela na lifelo ya mɔtɔ oyo ekufaka te. Kasi na nsima, akómaki mosaleli ya Yehova ya sembo mpe ya molende.
NDENGE NABANDAKI MOSALA YA NTANGO NYONSO
Mokolo moko na sanza ya 06/1944 ntango nautaki kelasi, nayaki kokuta mwa buku moko na mesa oyo tozalaki kosalela mpo na kolya, ezalaki na motó ya likambo Bokonzi ya Nzambe ebɛlɛmi. * Natángaki lokasa ya liboso, ya mibale, mpe na nsima nakobaki kotánga yango. Ntango nasilisaki kotánga mwa buku yango, nakómaki na mposa ya kosalela Yehova ndenge Yesu asalaki.
Ndenge nini mwa buku yango ekómaki na ndako na biso? Yaya na ngai Steve alobaki ete mibali mibale oyo bazalaki kotɛka mikanda balekaki epai na biso. Yaya alobaki boye: “Nasombaki yango
mpo ezalaki kaka santimɛ 5.” Mibali yango bayaki lisusu na mokolo ya Lomingo. Bayebisaki biso ete bazali Batatoli ya Yehova mpe ete basalelaka Biblia mpo na kopesa biyano na mituna oyo bato bakoki kotuna. Tosepelaki mpo banda bomwana, baboti na biso bateyá biso ete tosengeli komemya Liloba ya Nzambe. Mibali wana mibale bayebisaki mpe biso ete mosika te Batatoli ya Yehova bakosala liyangani moko monene na engumba Winnipeg, esika yaya na ngai ya mwasi Elsie azalaki kofanda. Nazwaki ekateli ete nakokende liyangani yango.Natambolaki kilomɛtrɛ 320 na velo mpo na kokóma na Winnipeg, kasi natɛlɛmaki na nzela na engumba Kelwood, epai Batatoli mibale oyo bayaká na ndako na biso bazalaki kofanda. Ntango nazalaki kuna, nakendaki na makita, mpe nayebaki soki lisangá ezali nini. Nayekolaki mpe ete mobali nyonso, mwasi nyonso, mpe elenge nyonso asengeli kosakola ndako na ndako, ndenge Yesu azalaki kosala.
Na Winnipeg, nakutanaki na yaya na ngai Jack, oyo azalaki kofanda na nɔrdi ya Ontario mpe ayaki na liyangani yango. Mokolo ya liboso ya liyangani, ndeko moko apesaki liyebisi ete batisimo ekozala. Ngai ná Jack tondimaki kozwa batisimo na liyangani wana. Tozwaki ekateli ya kokóma babongisi-nzela kaka nsima ya kozwa batisimo. Nsima ya liyangani yango, Jack akómaki mobongisi-nzela. Lokola nazalaki na mbula 16, nasengelaki kozonga na kelasi; kasi nakómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza na mbula oyo elandaki.
MATEYA OYO NAZWÁ
Nabandaki mosala ya mobongisi-nzela elongo na ndeko Stan Nicolson na engumba Souris, na etúká ya Manitoba. Eumelaki te, namonaki ete mosala yango ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Mbongo oyo tozalaki na yango ebandaki kosila, kasi tokobaki kosakola. Mokolo moko nsima ya kosakola banda ntɔngɔ tii mpokwa , tozalaki ata na mbongo moke te mpe tozalaki na nzala makasi. Tokamwaki mpenza ntango tokutaki saki moko monene oyo ezalaki na biloko ebele ya kolya liboso ya porte na biso! Tii lelo, toyebaka te nani atyaki yango. Na mpokwa wana, tolyaki lokola bakonzi. Tozwaki mbano ndenge tolɛmbisaki mabɔkɔ te! Kutu, na nsuka ya sanza wana, mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai, nabakisaki kilo mingi.
Mwa basanza na nsima, batindaki biso na engumba Gilbert Plains, na kilomɛtrɛ soki 240, na nɔrdi ya Souris. Na ntango wana, lisangá mokomoko ezalaki na etando (tableau) moko monene na estrade, epai bazalaki kokoma lapolo ya mosala ya kosakola ya lisangá sanza na sanza. Na sanza moko, lokola molende ekitaki, nasalaki diskur mpo na koyebisa bandeko ete basengeli kosala malamu koleka. Nsima ya makita, ndeko mwasi moko ya mobange oyo azalaki mobongisi-nzela mpe mobali na ye azalaki Motatoli te, alobaki na ngai na mai na miso ete: “Nasalaki makasi, kasi nyonso oyo nakoki kosala yango wana.” Na nsima, ngai mpe nabandaki kolela mpe nasɛngaki ye bolimbisi.
Kaka ndenge nasalaki, ezalaka mpasi te bilenge mibali oyo bazali naino makasi básala mabunga ya ndenge wana, mpe na nsima bayokaka mawa. Kasi, namoná ete na esika ya kolɛmbisa mabɔkɔ, eleki malamu kozwa liteya na libunga oyo osali mpe kobosana yango te wana ozali kokende liboso. Makambo mosusu ya sembo oyo okosala ekopesa yo mbano.
ETUMBA YA QUÉBEC
Nazwaki libaku monene ya kokɔta na kelasi ya mbala ya 14 ya Eteyelo ya Gileade, oyo esilaki na sanza ya 02/1950; nazalaki na mbula 21! Bana-kelasi na biso ebele (1/4) batindamaki na etúká ya Québec, na Canada, esika oyo balobaka Français. Kuna, Batatoli bazalaki kokutana na botɛmɛli makasi. Batindaki ngai na engumba Val-d’Or, epai batimolaka wolo. Mokolo moko, tokendaki ebele kosakola na Val-Senneville, mboka moko ya pembeni. Sango ya mboka yango alobaki ete tólongwa nokinoki na mboka na bango, soki te bakobundisa biso. Tosambaki likambo yango na tribinale mpe ngai nde namemaki yango kuna. Sango yango azwaki etumbu. *
Likambo wana ná makambo mosusu ebele ya ndenge wana ekómaki kobengama “Etumba ya Québec.” Etúká ya Québec ezalaki na nse ya boyangeli ya Lingomba ya Katolike bambula koleka 300. Bakonzi ya lingomba ná bato ya politiki oyo basalaki na bango boyokani bazalaki konyokola Batatoli ya Yehova. Ezalaki ntango moko ya mpasi, mpe tozalaki mingi te; atako bongo tolɛmbisaki mabɔkɔ te. Bato ya mitema sembo bandimaki nsango malamu. Nazwaki libaku ya koyekola na bato ebele oyo bandimaki solo. Nazalaki koyekola na libota moko oyo ezalaki na bato 10. Libota yango mobimba ekómaki kosambela Yehova. Mpiko na bango etindaki bato mosusu bálongwa na Lingomba ya Katolike. Tokobaki kosakola, mpe nsukansuka tolongaki etumba wana!
KOPESA BANDEKO FORMASYO NA MONƆKƆ YA MBOKA NA BANGO
Na 1956, batindaki ngai na Haïti. Bamisionɛrɛ mingi oyo bayaki sika bazalaki kobunda mpo na koyekola Français, kasi bato bazalaki koyoka. Stanley Boggus oyo azalaki misionɛrɛ alobaki boye: “Tozalaki kokamwa ndenge bato bazalaki kosala oyo bakoki mpo na kosalisa biso tóbimisa makanisi na biso.” Liboso, nazalaki kosepela mpo nayekolaki Français na Québec. Kasi, eumelaki te, tomonaki ete bandeko mingi ya Haïti bazalaki koloba kaka Créole ya mboka na bango. Na yango, mpo biso bamisionɛrɛ tósalisa malamu, tosengelaki koyekola monɔkɔ ya mboka. Tosalaki yango, mpe tozwaki mbano mpo na milende na biso.
Mpo na kosalisa bandeko malamumalamu, Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimaki tóbongola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe mikanda mosusu na Créole ya Haïti. Bato ebele bakómaki koyangana na makita na ekólo mobimba. Na 1950, basakoli bazalaki 99 na Haïti, na 1960, basakoli balekaki 800! Na ntango wana, nazalaki kosala na Betele. Na 1961, nazwaki libaku ya kotángisa na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi. Toteyaki bankulutu mpe babongisi-nzela monene 40. Na liyangani ya etúká ya sanza 01/1962, tolendisaki bandeko báyekola ndenge ya komipesa malamumalamu na mosala ya kosakola, mpe basusu bakómaki babongisi-nzela monene. Tosalaki yango na ntango oyo ebongi mpenza mpo botɛmɛli ebandaki.
Na mokolo ya 23/01/1962, nsima ya liyangani ya etúká, bayaki kokanga ngai ná misionɛrɛ mosusu * Kasi, bandeko oyo bazwaki formasyo bakobaki kosala mosala malamu. Nasepelaka mpo na ezaleli ya koyika mpiko oyo bamonisaki mpe ndenge kondima na bango ekómaki makasi. Kutu lelo oyo, bazali na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika na Créole ya Haïti, nzokande na ntango wana, ezalaki kaka ndɔtɔ.
Andrew D’Amico na Betele, mpe bazwaki bakartɔ ya Lamuká! ya 08/01/1962 ya Français. Lamuká! yango ezongelaki maloba ya bazulunalo ya France oyo elobaki ete bato ya Haïti basalaka bondɔki (vaudou). Bato mosusu basepelaki na maloba yango te mpe balobaki ete tokomaki lisolo yango na Betele. Mwa bapɔsɔ na nsima, babenganaki bamisionɛrɛ.MOSALA YA KOTONGA NA RÉPUBLIQUE CENTRAFRICAINE
Nsima ya kosala na Haïti, batindaki ngai misionɛrɛ na République centrafricaine. Nakómaki liboso mokɛngɛli-motamboli, mpe na nsima mokɛngɛli ya Betele.
Na ntango wana, Bandako ya Bokonzi ezalaki kaka bongobongo. Nayekolaki ndenge ya kolɔkɔta matiti na zamba mpo na kosala nsamba. Baleki-nzela bazalaki kokamwa ndenge nazalaki kobunda mpo na kosala yango. Elendisaki mpe bandeko bámipesa lisusu na kotonga mpe kobatela Bandako ya Bokonzi. Bakonzi ya mangomba bazalaki kosɛka biso mpo bandako-nzambe na bango ezalaki na batole. Kasi tolɛmbaki te, tokobaki kosala Bandako ya Bokonzi na nsamba ya matiti. Batikaki kotyola biso ntango mbula moko ya mopɛpɛ makasi ebɛtaki na Bangui, engumba-mokonzi. Elongolaki batole ya ndako-nzambe moko mpe ebwakaki yango na balabala monene. Nsamba ya matiti ya Bandako ya Bokonzi na biso elongwaki te. Mpo mosala ya Bokonzi ekende liboso, totongaki Betele ya sika mpe ndako ya bamisionɛrɛ na sanza mitano mpamba. *
NABALI NDEKO MWASI MOKO YA MOLENDE
Na 1976, bapekisaki mosala ya Bokonzi na République centrafricaine, mpe batindaki ngai na N’Djamena, engumba-mokonzi ya Tchad, ekólo oyo ezali pembeni. Kuna, nakutanaki na Happy, ndeko mwasi moko oyo azalaki mobongisi-nzela monene ya molende, mwana-mboka Cameroun. Tobalanaki na mokolo ya 01/04/1978. Na sanza yango kaka, etumba ebandaki na mboka, mpe bato mingi, ata mpe biso tokimaki na sudi ya ekólo. Ntango etumba esilaki, tozongaki mpe tomonaki ete basoda bakómá kofanda na ndako na biso. Bazwaki mikanda nyonso, elamba ya Happy ya libala mpe bakado na biso nyonso. Kasi, tolɛmbisaki mabɔkɔ te. Tozalaki biso mibale mpe totyaki miso na mosala oyo esengelaki kosalema.
Mbula soki mibale na nsima, epekiseli na République centrafricaine elongwaki. Tozongaki kuna mpe nasalaki lokola mokɛngɛli-motamboli. Ndako na biso ezalaki motuka moko ya monene; ezalaki na mbeto oyo egumbamaka, tono moko ya mai ya litrɛ 200, frigo moko ya gaze, ná resho ya gaze. Kosala mibembo ezalaki mpasi. Na mobembo moko, bapolisi batɛlɛmisaki biso mbala soki 117.
Mbala mingi moi ezalaki makasi mpenza (50°C). Na mayangani, mbala mosusu ezalaki mpasi kozwa mai oyo ekoki mpo na batisimo. Na yango, bandeko bazalaki kotimola bisika oyo bibale ezalaki kala mpe mokemoke, bazalaki kozwa mai oyo ekoki mpo na batisimo, oyo mbala mingi ezalaki kosalema na kati ya tono.
MOSALA NA BAMBOKA MOSUSU YA AFRIKA
Na 1980, tokendaki na Nigeria. Kuna, tosalisaki na kobongisa makambo mbula mibale na ndambo mpo Betele ya sika etongama. Bandeko basombaki ndako moko monene ya etaje, mpe tosengelaki kolongola eteni na yango mokomoko mpe na nsima kotonga yango na lopango na biso. Mokolo moko, namataki likoló mpenza ya ndako yango mpo na kolongola biteni na yango. Pene na midi, nabandaki kokita kaka nzela oyo namataki. Kasi, lokola tolongolaki biloko mosusu, natyaki lokolo
na esika oyo eloko ezalaki lisusu te, mpe nakweaki. Ezalaki nsɔmɔ, kasi nsima ya kokɔta radio, monganga ayebisaki Happy ete: “Komitungisa te. Mikuwa eningani kaka mwa moke, ekobonga nsima ya pɔsɔ soki moko.”Na 1986, tokendaki na Côte d’Ivoire; nasalaki mosala ya mokɛngɛli-motamboli. Tozalaki kokende tii na Burkina Faso. Nakanisaki te ete nsima ya bambula ebele, tokofanda na Burkina Faso mpo na mwa ntango.
Nalongwaki Canada na 1956, kasi na 2003, nsima ya mbula 47, nazongaki na Betele ya Canada, na mbala oyo elongo na Happy. Na mikanda, tozalaki bana-mboka Canada, kasi tozalaki komiyoka ete tozali bato ya Afrika.
Na nsima, na 2007, ntango nakómaki na mbula 79, tozongaki lisusu na Afrika! Batindaki biso na Burkina Faso, epai nasalaki na Komite ya ekólo. Na nsima, biro yango ekómaki biro ya kobongola mikanda, oyo Betele ya Bénin ezalaki kokamba; mpe na sanza ya 08/2013, batindaki biso na Betele ya Bénin.
Atako nzoto na ngai ezali lisusu makasi te, tii lelo nalingaka mosala ya kosakola. Mbula misato oyo eleki, na lisalisi ya bankulutu mpe ya mwasi na ngai, bato mibale oyo nazalaki koyekola na bango Biblia, Gédéon ná Frégis, bazwaki batisimo mpe nayokaki esengo mingi. Lelo oyo, bazali kosalela Yehova na molende.
Na eleko moko, batindaki ngai ná mwasi na ngai na Betele ya Afrika ya Sudi mpo nazwa lisalisi ya monganga. Afrika ya Sudi ezali ekólo ya nsambo ya Afrika epai nazwi libaku ya kosalela Yehova. Na nsima, na sanza ya 10/2017, tozwaki lipamboli mosusu ya monene. Tokendaki na molulu ya kofungola biro monene na Warwick. Tokobosana likita yango te!
Buku ya mobu 1994 na lokasa 255 elobi boye: “Tolendisi bandeko nyonso oyo basaleli Nzambe bambula ebele ete: ‘Bózala na mpiko mpe bólɛmbisa mabɔkɔ te, mpamba te mosala na bino ezali na mbano.’—2 Ntango 15:7.” Ngai ná Happy tozali na ekateli ya kosalela toli yango mpe kolendisa basusu básala mpe bongo.
^ par. 9 Ebimisamaki na Batatoli ya Yehova na 1944. Lelo ebimisamaka lisusu te.
^ par. 18 Talá lisolo “Bakangi sango moko na Québec mpo abundisaki Batatoli ya Yehova,” na Lamuká! ya 08/11/1953, nkasa 3-5, na Anglais.
^ par. 23 Mpo na koyeba likambo yango malamu, tángá Buku ya mobu 1994 ya Batatoli ya Yehova, nkasa 148-150, na Français.
^ par. 26 Talá lisolo “Kotonga na moboko ya makasi” na Lamuká! ya 08/05/1966, lokasa 27, na Anglais.