Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Salá elongo na Yehova mokolo na mokolo

Salá elongo na Yehova mokolo na mokolo

“Tozali bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe.”​—1 BAKORINTI 3:9.

NZEMBO: 64, 111

1. Na makambo nini tokoki kosala elongo na Yehova?

NTANGO Yehova akelaki bato, alingaki ete básala elongo na ye mpo na kokokisa makambo oyo akanaki. Atako lelo tozali bato ya kozanga kokoka, bato ya sembo bakoki kosala elongo na Yehova mokolo na mokolo. Na ndakisa, tokómaka “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe” ntango tozali kosakola nsango malamu ya Bokonzi na ye mpe kokómisa bato bayekoli. (1 Bakorinti 3:5-9) Ezali lokumu monene mpenza ndenge Mozalisi oyo azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso aponi biso tósala mosala yango ya ntina mingi! Atako bongo, tosalaka elongo na Yehova kaka na mosala ya kosakola te. Na lisolo oyo, tokoyekola ndenge oyo tosalaka mpe elongo na ye ntango tozali kosalisa libota na biso mpe bato ya lisangá, ntango tozali na ezaleli ya koyamba bapaya, ntango tozali kopesa mabɔkɔ na misala oyo ebongiseli ya Nzambe ezali kosala, mpe ntango tomipesi lisusu mingi na makambo ya losambo na biso.​—Bakolose 3:23.

2. Mpo na nini tosengeli soki moke te kokokanisa mosala na biso mpo na Yehova na oyo ya basusu?

2 Wana tozali kotalela lisolo oyo, tóbosana te ete oyo tokoki kosala mpo na Yehova ekeseni na oyo basusu bakoki kosala. Mbula oyo tozali na yango, kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso, makambo ya bomoi na biso mpe makoki na biso ezali ndenge moko te. Na yango, komikokanisa na basusu te. Ntoma Paulo alobaki: “Moto na moto ameka mosala na ye moko ndenge ezali, bongo akozwa likambo ya komikumisa na yango mpo na ye moko, kasi mpo azali komikokanisa na moto mosusu te.”​—Bagalatia 6:4.

SALISÁ LIBOTA NA YO MPE BANDEKO YA LISANGÁ

3. Mpo na nini tokoki koloba ete moto nyonso oyo akokisaka bamposa ya libota na ye azali kosala elongo na Nzambe?

3 Yehova alingi ete basaleli na ye bákokisaka bamposa ya mabota na bango. Na ndakisa, ekoki kosɛnga oluka mbongo mpo okokisa bamposa ya libota na yo. Bamama mingi batikalaka na ndako mpo na kobatela bana. Mpe ntango baboti na biso bazali lisusu kokoka kosala makambo bango moko te, ekoki kosɛnga tósunga bango. Makambo wana nyonso ezali na ntina. Biblia elobi: “Soki moto azali te kopesa bato na ye, mpe mingimingi bato ya ndako na ye, biloko oyo basengeli na yango, awangani kondima mpe azali mabe koleka moto oyo azali na kondima te.” (1 Timote 5:8) Soki ozali na mikumba ya libota, mbala mosusu ozali kokoka te kosalela Yehova mingi ndenge olingi. Kasi kolɛmba nzoto te! Yehova asepelaka ntango ozali kokokisa bamposa ya libota na yo.​—1 Bakorinti 10:31.

4. Ndenge nini baboti bakoki kotya Bokonzi na esika ya liboso, mpe yango ebimisaka matomba nini?

4 Baboti basalaka elongo na Yehova ntango bazali kosalisa bana na bango bámityela mikano ya elimo. Baboti mingi basalaki yango. Na nsima, bana na bango bazwaki ekateli ya kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso, ata mpe mosika na baboti na bango. Basusu bazali bamisionɛrɛ, basusu bazali babongisi-nzela esika mposa ya basakoli ezali monene, mpe basusu basalaka na Betele. Ya solo, soki bana bazali mosika, baboti bakolekisa ntango mingi te elongo na bana na bango ndenge bakoki kolinga. Atako bongo, baboti oyo bazali na elimo ya komipimela balendisaka bana na bango bákoba kosalela Nzambe esika nyonso oyo bazali. Mpo na nini? Mpo bayokaka esengo mingi ndenge bana na bango bazali kotya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na bango. (3 Yoane 4) Baboti yango mosusu bayokaka lokola Hana, oyo alobaki ete ‘adefisi’ Samwele epai ya Yehova. Bamonaka ete ezali lokumu monene kosala elongo na Yehova na ndenge wana.​—1 Samwele 1:28.

5. Ndenge nini okoki kosalisa bandeko ya lisangá na bino? (Talá elilingi ya ebandeli.)

5 Soki sikoyo ozali na mikumba ya libota te, okoki kosalisa bandeko ya lisangá oyo bazali kobɛla, bakómi mibange to bazali na mposa ya lisalisi? To okoki kosalisa bato oyo babatelaka bango? Luká na lisangá soki banani bakoki kozala na mposa ya lisalisi ya ndenge wana. Na ndakisa, ekoki kozala na ndeko mwasi moko oyo abatelaka moboti na ye oyo akómi mobange. Okoki kolekisa ntango na moboti yango mpo ndeko mwasi yango asala mpe makambo mosusu? To okoki kotuna ndeko moko soki okoki komema ye na makita, kotika ye asomba biloko, akende kotala moto na lopitalo, to kosalisa ye na makambo mosusu. Soki ozali kosala bongo, ntango mosusu okosala elongo na Yehova mpo ayanola na libondeli ya moto.​—Tángá 1 Bakorinti 10:24.

ZALÁ NA EZALELI YA KOYAMBA BAPAYA

6. Komonisa ezaleli ya koyamba bapaya elimboli nini?

6 Bato oyo basalaka elongo na Nzambe bazalaka na ezaleli ya koyamba bapaya. Na Biblia, liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “ezaleli ya koyamba bapaya” elimboli “komonisela bapaya boboto.” (Baebre 13:2) Biblia ezali na masolo ebele oyo eteyaka biso ndenge ya komonisa boboto yango. (Ebandeli 18:1-5) Tokoki, kutu tosengeli kosalisa basusu mbala nyonso oyo libaku ya kosala yango emonani, bázala “bandeko na biso na kati ya kondima” to te.​—Bagalatia 6:10.

7. Matomba nini okoki kozwa soki omoniseli basaleli ya ntango nyonso ezaleli ya koyamba bapaya?

7 Okoki mpe kosala elongo na Yehova soki ozali koyamba bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso mpo bálala epai na bino. (Tángá 3 Yoane 5, 8.) Mbala mingi, kosala bongo epesaka libaku ya ‘kolendisana.’ (Baroma 1:11, 12) Tótalela ndakisa ya Olaf. Ntango azalaki elenge, mokɛngɛli moko ya zongazonga ya monzemba ayaki kotala lisangá na bango kasi moto te na lisangá azalaki na likoki ya kopesa ye esika ya kolala. Olaf atunaki baboti na ye oyo bazalaki Batatoli te, soki mokɛngɛli ya zongazonga akoki kofanda epai na bango. Baboti bandimaki, kasi bayebisaki Olaf ete ye akolala na kiti. Yango nde Olaf asalaki, mpe ayokaki mawa te mpo na yango. Alobi boye: “Ezalaki pɔsɔ moko ya malamu! Ngai ná mokɛngɛli ya zongazonga tozalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mikolo nyonso mpe tozalaki kolobela makambo ebele ya ntina ntango tozali komɛla ti. Batoli na ye epesaki ngai mposa ya kobanda mosala ya ntango nyonso.” Olaf asali mosala ya misionɛrɛ na mikili ndenge na ndenge na boumeli ya mbula 40.

8. Mpo na nini tosengeli komonisa boboto ata soki na ebandeli bato bamonisi botɔndi te? Pesá ndakisa.

8 Tokoki komonisela bapaya bolingo na ndenge mingi, ata soki na ebandeli bazali na botɔndi te. Tózwa ndakisa moko. Ndeko mwasi moko na Espagne azalaki koyekola Biblia na Yesica, mwasi moko oyo autá na ekólo Équateur. Mokolo moko ntango bazalaki koyekola, Yesica azalaki kolela mingi. Ndeko mwasi atunaki ye ntina oyo azalaki kolela. Yesica alobaki ete liboso aya na Espagne, azalaki mobola mpenza. Mokolo moko azalaki na eloko ya kolya te, kaka mai mpo na kopesa mwana na ye. Ntango Yesica azalaki kobondela mwana na ye mpo alala, asɛngaki Nzambe asalisa ye. Eumelaki te, Batatoli mibale ya basi bayaki epai na ye mpe bapesaki ye zulunalo. Kasi Yesica asilikelaki bango mpe atunaki bango: “Oyo nde bilei bolingi napesa mwana na ngai?” Bandeko yango bamekaki kobɔndisa ye, kasi aboyaki koyoka. Na nsima, batikelaki ye kitunga ya biloko na porte. Mokolo wana ya boyekoli, azalaki kolela mpo akanisaki ndenge atyaki likebi te na eyano oyo Nzambe apesaki na libondeli na ye. Sikoyo, azwaki ekateli ya kosalela Yehova. Ya solo, bokabi ya bandeko basi wana ebotaki mbuma malamu.​—Mosakoli 11:1, 6.

KOPESA MABƆKƆ NA MISALA YA EBONGISELI YA NZAMBE

9, 10. (a) Mabaku nini Bayisraele bazalaki na yango ya kopesa mabɔkɔ na mosala? (b) Ndenge nini bandeko mibali bakoki kosalisa lisangá lelo oyo?

9 Na Yisraele ya kala, na bantango mosusu ezalaki kosɛnga bato bápesa mabɔkɔ na misala ndenge na ndenge. (Kobima 36:2; 1 Ntango 29:5; Nehemia 11:2) Lelo oyo, yo mpe okoki kozwa mabaku ya kopesa ntango, biloko ya mosuni, mpe mayele na yo mpo na kosalisa bandeko. Soki osali bongo, okozala na esengo mingi mpe okozwa mapamboli ebele.

10 Biblia elendisi bandeko mibali bákokisa masɛngami mpo na kokóma basaleli na misala to bankulutu; na ndenge yango bakosala elongo na Yehova. (1 Timote 3:1, 8, 9; 1 Petro 5:2, 3) Baoyo basalaka yango balingaka kosalisa basusu na makambo ya losambo mpe na makambo mosusu ya bomoi. (Misala 6:1-4) Bankulutu basilá kosɛnga yo otalela makambo ya mikanda, bateritware, kobongisa Ndako ya Bokonzi, to makambo mosusu? Bandeko oyo basalaka makambo wana bakoyebisa yo ete kosalisa basusu epesaka esengo mingi.

Mbala mingi, bandeko oyo bapesaka mabɔkɔ na misala ya ebongiseli ya Nzambe bazwaka baninga ya sika (Talá paragrafe 11)

11. Matomba nini ndeko mwasi moko azwi na mosala ya kotonga bisika ya losambo?

11 Mbala mingi, bato oyo bapesaka mabɔkɔ na mosala ya kotonga bazwaka baninga ya sika. Ndeko mwasi moko na nkombo Margie asali mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi mbula 18. Na boumeli ya bambula, azalaki kotyela bilenge basi likebi mingi mpe azalaki kolakisa bango mosala. Alobi ete yango epesaka bandeko libaku ya kolendisana. (Baroma 1:12) Kutu, ntango akutanaki na mikakatano na bomoi na ye, baninga oyo azwi na mosala ya kotonga nde balendisaki ye. Osilá kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga ndako moko ya losambo? Ata soki oyebi mosala moko ya sikisiki te, okoki kopesa mabɔkɔ?

12. Ndenge nini okoki kopesa mabɔkɔ nsima ya likama?

12 Tokoki mpe kosala elongo na Yehova ntango tozali kosalisa bandeko oyo bazwi likama. Na ndakisa, okoki kopesa likabo ya mbongo. (Yoane 13:34, 35; Misala 11:27-30) Tokoki mpe kosalisa na kopɛtola to kobongisa bandako oyo ebebaki na likama. Gabriela, ndeko mwasi moko ya Pologne oyo ndako na ye ebebaki makasi nsima ya mpela, asepelaki mingi ntango bandeko ya masangá ya pembeni bayaki kosunga ye. Alobi boye: “Nalingaka te kolobela biloko oyo nabungisá, mpo ezali kaka biloko ya mosuni. Nalingaka nde kolobela oyo nazwi. Likambo yango endimisi ngai lisusu makasi ete kozala na kati ya lisangá ya bokristo ezali libaku oyo eleki malamu, epesaka esengo mpe nsai.” Bato mingi oyo bazwi lisalisi nsima ya likama balobaka ete bayokaka ndenge wana. Baoyo basalaka elongo na Yehova mpo na kosalisa bandeko yango bayokaka mpe esengo mingi.—Tángá Misala 20:35; 2 Bakorinti 9:6, 7.

13. Ndenge nini kopesa mabɔkɔ mpo na kosalisa bandeko ekoki kokómisa boyokani na biso na Yehova makasi? Pesá ndakisa.

13 Ndeko mwasi moko na nkombo Stephanie ná bandeko mosusu basalaki elongo na Nzambe na ndenge basalisaki Batatoli oyo bayaki na États-Unis mpo na kokima etumba na bamboka na bango. Basalisaki bandeko yango bázwa bandako mpe biloko ya ndako. Alobi boye: “Ndenge bazalaki kosepela mpe komonisa esengo mpo na bolingo ya lisangá ya bandeko ya mokili mobimba esimbaki mitema na biso. Bato ya mabota yango bakanisaka ete tosalisaki bango, nzokande, bango nde basalisi biso mingi koleka. Bolingo, bomoko, kondima mpe elikya na bango epai ya Yehova esalisaki biso tólinga lisusu Yehova mingi, mpe esalisi biso tósepela lisusu mingi na makambo nyonso oyo ebongiseli na ye esalelaka biso.”

OMIPESA MINGI NA MOSALA YA YEHOVA

14, 15. (a) Elimo nini mosakoli Yisaya amonisaki? (b) Ndenge nini bakristo bakoki komekola elimo ya Yisaya lelo oyo?

14 Olingi kosala elongo na Yehova mingi koleka? Okondima kokende esika mposa ya basakoli ezali monene? Ya solo, esɛngi kaka te tókende mosika mpo na komonisa ezaleli ya kokaba. Kasi, bomoi ya bandeko mosusu epesaka bango nzela ya kokende mosika mpo na kosalisa. Bamonisaka elimo oyo mosakoli Yisaya amonisaki. Ntango Yehova atunaki: “Nakotinda nani, mpe nani akokende mpo na biso?” alobaki: “Ngai oyo! Tindá ngai.” (Yisaya 6:8) Ozali na mposa mpe likoki ya kosala lokola bandeko yango? Okoki kosalisa na makambo nini?

15 Mpo na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli, Yesu alobaki: “Mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke. Yango wana, bósɛnga Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma atinda basali na mosala na ye ya kobuka mbuma.” (Matai 9:37, 38) Okokoka kosala esika mposa ezali monene, mbala mosusu lokola mobongisi-nzela? To okoki kosalisa moto mosusu asala yango? Bandeko mingi bamoni ete ndenge eleki malamu ya komonisa ete balingaka Nzambe mpe bazalani na bango ezali ya kosala mosala ya mobongisi-nzela na bateritware oyo mposa ya basakoli ezali monene. Omoni ndenge mosusu ya komipesa mingi na mosala ya Nzambe? Soki osali yango, okozala na esengo mingi.

16, 17. Ndenge nini okoki kosala mingi na mosala ya Yehova?

16 Olingaka kosala na Betele to kosalisa na mosala ya kotonga, mpo na mwa ntango to mwa mikolo na pɔsɔ? Ebongiseli ya Yehova ezalaka ntango nyonso na mposa ya bato oyo bakondima kosala esika oyo mposa ezali mpe oyo bakosala nyonso oyo bakosɛnga bango ata soki bayebi nde mosala mosusu. Yehova asepelaka na moto nyonso oyo andimi komipimela makambo mosusu mpe kosala esika oyo mposa ezali monene.​—Nzembo 110:3.

17 Olingi koyekola makambo mosusu mpo osalela Yehova mingi koleka? Soki bongo, okoki kotondisa formilɛrɛ mpo na kokɔta Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi, oyo epesaka formasyo na bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso mpo ebongiseli ya Yehova esalela bango mingi koleka. Bandeko oyo bakɔtaka eteyelo yango basengeli kondima kokende esika nyonso oyo bakotinda bango. Okolinga kosala mingi na mosala ya Yehova na nzela ya eteyelo wana?​—1 Bakorinti 9:23.

18. Kosala elongo na Yehova mokolo na mokolo ezali na matomba nini?

18 Lokola tozali basaleli ya Yehova, tosengeli kokaba, kozala motema malamu, kozala na boboto, kolinga bato, mpe kotyela bango likebi mokolo na mokolo. Yango ekopesa biso esengo, kimya mpe nsai. (Bagalatia 5:22, 23) Ata soki makambo ya bomoi na yo ezali ndenge nini, okozala na esengo soki ozali komekola Yehova na oyo etali kokaba mpe ozali moko ya bato oyo bazali kosala elongo na ye!​—Masese 3:9, 10.