Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 33

“Baoyo bazali koyoka yo” bakobika

“Baoyo bazali koyoka yo” bakobika

“Omibatela mpe okeba na mateya na yo ntango nyonso. Kangamá na makambo yango, mpo soki osali bongo okomibikisa mpe okobikisa bato oyo bazali koyoka yo.”​—1 TIM. 4:16.

LOYEMBO 67 “Sakolá Liloba”

NA MOKUSE *

1. Biso nyonso tolingaka nini mpo na bandeko na biso ya libota?

NDEKO mwasi moko na nkombo Pauline * alobi boye: “Ntango kaka nayekolaki solo, nalingaki ete moto nyonso ya libota na ngai azala elongo na ngai na Paradiso. Nalingaki mingimingi mobali na ngai Wayne, mpe mwana na biso ya mobali bábanda mpe kosambela Yehova.” Ozali na bandeko oyo bayekoli naino te koyeba mpe kolinga Yehova? Mbala mosusu, ndenge moko na Pauline, yo mpe olingaka kosalela Yehova elongo na bandeko na yo.

2. Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?

2 Tokoki te kotinda bandeko na biso na makasi bándima nsango malamu, kasi tokoki kolendisa bango mpo bákóma na makanisi ya malamu, báfungola mitema na bango mpe bándima nsango ya Biblia. (2 Tim. 3:14, 15) Mpo na nini tosengeli kopesa bandeko na biso litatoli? Mpo na nini tosengeli komitya na esika na bango? Tokoki kosala nini mpo na kosalisa bango bálinga Yehova lokola biso? Mpe ndenge nini bandeko ya lisangá bakoki kosalisa biso?

NTINA OYO TOSENGELI KOPESA BANDEKO NA BISO LITATOLI

3. Na kotalela 2 Petro 3:9, mpo na nini tosengeli kopesa bandeko na biso litatoli?

3 Mosika te, Yehova akoboma mokili oyo. Kaka baoyo “bazali na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko” nde bakobika. (Mis. 13:48) Topesaka ntango mpe makasi na biso na kosakwela bato ya teritware na biso oyo toyebi kutu te; yango wana mposa na biso ezalaka ete bandeko na biso mpe básalela Yehova elongo na biso. Yehova, Tata na biso ya bolingo, “alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.”​—Tángá 2 Petro 3:9.

4. Libunga nini tosalaka mbala mingi ntango tozali kopesa bandeko na biso litatoli?

4 Tosengeli kobosana te ete ezali na lolenge ya malamu mpe lolenge ya mabe ya koyebisa basusu nsango na biso oyo ememaka na lobiko. Mbala mingi tolobaka na mayele ntango tozali kopesa litatoli na bato oyo toyebi te, nzokande epai ya bandeko na biso, mbala mingi tolobaka kozanga boboto.

5. Likambo nini tosengeli kobosana te ntango tolingi komeka koyebisa bandeko na biso nsango malamu?

5 Mingi kati na biso tokoki koyoka mawa soki tokanisi lisusu ndenge makambo elekaki mbala ya liboso oyo tolingaki koteya bandeko na biso, mpe tomonaka ete tosengelaki koloba na bango ndenge wana te. Ntoma Paulo apesaki bakristo toli oyo: “Liloba na bino ezala ntango nyonso kitoko, eyeisama elɛngi na mungwa, mpo na koyeba ndenge oyo bosengeli kopesa moto mokomoko eyano.” (Kol. 4:5, 6) Ezali malamu tókanisaka toli yango ntango tozali kopesa bandeko na biso litatoli. Soki te, tokokimisa bango, na esika tóbenda bango.

NDENGE OYO TOKOKI KOSALISA BANDEKO NA BISO

Komitya na esika ya basusu mpe bizaleli na yo ekoki kopesa litatoli ya malamu (Talá paragrafe 6-8) *

6-7. Pesá ndakisa oyo emonisi ntina ya komitya na esika ya molongani oyo azali Motatoli te?

6 Komitya na esika na bango. Pauline, oyo tolobelaki na ebandeli, alobi boye: “Liboso, nazalaki kolinga kosolola na mobali na ngai kaka makambo ya elimo. Tozalaki kosolola makambo mosusu te.” Kasi, Wayne, mobali ya Pauline, ayebaki makambo mingi te ya Biblia mpe azalaki kokanga ntina te ya makambo oyo Pauline azalaki koloba. Wayne azalaki komona ete Pauline azalaki kokanisa kaka lingomba na ye. Azalaki komona ete Pauline akɔtaki na mwa lingomba moko ya mabe mpe bazalaki kokosa ye.

7 Pauline andimi ete na eleko moko boye, azalaki kolekisa ntango mingi na bampokwa mpe na nsuka ya pɔsɔ elongo na bandeko ya lisangá, ezala na makita, na mosala ya kosakola, to mpe na bokutani elongo na baninga. Alobi boye: “Mikolo mosusu, soki Wayne azongi na ndako, azalaki kokuta moto te mpe azalaki komiyoka kaka ye moko.” Ya solo, Wayne azalaki na mposa ya kozala elongo na mwasi na ye ná mwana na bango. Ayebaki te bato ya ndenge nini bazalaki elongo na bango, mpe ezalaki komonana lokola ete baninga oyo Pauline azwaki sika bakómaki na ntina mingi koleka mobali na ye. Wayne asilikaki mpe alobaki ete báboma libala. Mpo na yo, Pauline akokaki kosala nini mpo amonisa ete azalaki komitya na esika ya mobali na ye?

8. Na kotalela 1 Petro 3:1, 2, nini mpenza ekoki kosimba motema ya bandeko na biso?

8 Salá ete bizaleli na yo eloba na esika na yo. Mbala mingi, makambo oyo tosalaka esimbaka mitema ya bandeko na biso koleka makambo oyo tolobaka. (Tángá 1 Petro 3:1, 2.) Nsukansuka, Pauline akangaki ntina ya likambo yango. Alobi boye: “Nayebaki ete Wayne alingaki biso mpe ete azalaki mpenza na mposa ya koboma libala te. Kasi, ntango alobaki ete akosala yango, namonaki ete nasengeli kobanda kosala makambo ndenge Yehova asɛngi. Na esika nalobaka mingi, nasengelaki kopesa ndakisa malamu na bizaleli na ngai.” Pauline atikaki kotya mobali na ye mbamba mpo básolola makambo ya Biblia, mpe abandaki kosolola na ye makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo. Wayne amonaki ete Pauline akómi mwasi ya kimya mpe ete mwana na bango akómaki na bizaleli malamu. (Mas. 31:18, 27, 28) Ntango Wayne amonaki ndenge Biblia ebongisaki libota na ye, akómaki na makanisi malamu, afungolaki motema na ye, mpe andimaki nsango ya Liloba ya Nzambe.​—1 Ko. 7:12-14, 16.

9. Mpo na nini tosengeli kolɛmba te kosalisa bandeko na biso?

9 Kolɛmba te komeka kosalisa bandeko na yo. Yehova azali ndakisa mpo na biso. Apesaka bato “mbala na mbala” libaku ya kondima nsango malamu mpe ya kozwa bomoi. (2 Nt. 36:15) Mpe ntoma Paulo ayebisaki Timote ete alɛmba te kosalisa basusu. Mpo na nini? Mpo soki asali bongo, akomibikisa mpe akobikisa bato oyo bazali koyoka ye. (1 Tim. 4:16) Lokola tolingaka bandeko na biso, tosepelaka ete báyeba mateya ya solo oyo ezali na Liloba ya Nzambe. Nsukansuka, maloba mpe bizaleli ya Pauline esalisaki bato ya libota na ye. Sikoyo, azali na esengo ya kosalela Yehova elongo na mobali na ye Wayne oyo akómá nkulutu, mpe bango nyonso mibale bazali babongisi-nzela.

10. Mpo na nini tosengeli kozala na motema molai?

10 Zalá na motema molai. Ntango tobandi kotosa mibeko ya Nzambe, ekoki kozala mpasi mpo bandeko na biso bámesana na bindimeli mpe bomoi na biso ya sika. Mbala mingi, likambo ya liboso oyo bamonaka ezali ete totikaka kosangana na bango na bafɛti ya mangomba mpe tokɔtaka lisusu na makambo ya politiki te. Na ebandeli, bandeko na biso mosusu bakoki kosilikela biso. (Mat. 10:35, 36) Kasi, tosengeli kolɛmba bango te. Soki totiki komeka kosalisa bango báyeba bindimeli na biso, ezali lokola nde tomoni ete babongi te kozwa bomoi ya seko. Yehova apesi biso te mokumba ya kosambisa basusu, apesi yango Yesu. (Yoa. 5:22) Soki tozali na motema molai, nsukansuka bandeko na biso bakoki kondima koyoka nsango malamu.​—Talá etanda “ Salelá site Internet na biso mpo na koteya.”

11-13. Liteya nini ozwi na ndenge oyo Alice asalelaki baboti na ye makambo?

11 Kangamá na ekateli na yo, kasi kosilikisa moto te. (Mas. 15:2) Tótalela ndakisa ya Alice. Ntango ayekolaki makambo ya Yehova, azalaki kofanda mosika na baboti na ye, oyo bamipesaki na makambo ya politiki mpe bazalaki kondima te ete Nzambe azalaka. Alice amonaki ete asengeli koumela te mpo na koyebisa bango makambo ya malamu oyo azalaki koyekola. Alobi boye: “Soki ozeli mingi mpo na koyebisa bato ya libota na yo mateya oyo okómi kondima mpe bambongwana oyo osali, mpasi na bango ekoleka makasi ntango bakoyeba yango.” Alice azalaki kokomela baboti na ye mikanda oyo ezalaki kolobela makambo oyo amonaki ete ekosepelisa bango, na ndakisa bolingo. Mpe nsima ya komonisa oyo Biblia elobi mpo na yango, azalaki koluka koyeba makanisi na bango. (1 Ko. 13:1-13) Azalaki kopesa baboti na ye matɔndi ndenge babɔkɔlaki ye mpe babatelaki ye malamu, mpe azalaki kotindela bango makabo. Soki akei kotala baboti na ye, azalaki kosalisa mama na ye na misala ya ndako. Na ebandeli, baboti na ye basepelaki te ntango Alice ayebisaki bango mateya oyo akómaki kondima.

12 Ntango Alice afandaki elongo na baboti na ye, atikaki te momeseno na ye ya kotánga Biblia mokolo na mokolo. Alobi boye: “Yango esalisaki mama amona ete Biblia ezalaki na ntina mingi mpo na ngai.” Kaka na ntango wana, tata ya Alice azwaki ekateli ya koyekola mwa makambo etali Biblia mpo ayeba ntina oyo mwana na ye ya mwasi abongwanaki, mpe azalaki na mokano ya koluka mbeba na Biblia. Alice alobi boye: “Napesaki ye Biblia, mpe na kati, nakomelaki ye mwa maloba.” Esukaki ndenge nini? Na esika amona mbeba, tata ya Alice asepelaki mingi na makambo oyo atángaki na Liloba ya Nzambe.

13 Tosengeli kokangama na ekateli na biso kasi tosengeli kosilikisa moto te, ata soki esɛngi tóyika mpiko na komekama. (1 Ko. 4:12b) Na ndakisa, Alice ayikaki mpiko na botɛmɛli ya mama na ye. Alobi boye: “Ntango nazwaki batisimo, Mama abengaki ngai ‘mwana-mabe.’” Alice asalaki nini? Alobi boye: “Na esika naboya kolobela likambo yango, nayebisaki ye na limemya ete nasilaki kozwa ekateli ya kozala Motatoli ya Yehova mpe ete nakozonga nsima te. Nayebisaki mama akitisa motema mpo nalingaka ye mpenza. Tolelaki, mpe nasalelaki ye mwa elubu. Banda wana, mama akómaki kondima ete Biblia ekómisaki ngai moto ya malamu koleka.”

14. Mpo na nini tosengeli ata moke te kobongola ekateli na biso ya kosala oyo ezali malamu?

14 Ekoki kozwa ntango liboso ete bandeko na biso bákanga mpenza ntina ete kosalela Yehova ezali na ntina mingi mpo na biso. Na ndakisa, ntango Alice azwaki ekateli ya kokóma mobongisi-nzela na esika asala mosala oyo baboti na ye baponelaki ye, mama na ye alelaki lisusu. Kasi, Alice akangamaki na ekateli na ye. Alobi boye: “Soki osali oyo bato ya libota na yo balingi na likambo moko, bakoki lisusu kotya yo mbamba mpo osala makambo mosusu oyo balingi. Nzokande, soki ozali na boboto kasi okangami mpe na ekateli na yo, bato mosusu ya libota bakoki koyokela yo.” Yango nde esalemaki mpo na Alice. Tata na ye ná mama na ye bazali lelo babongisi-nzela, mpe tata na ye azali nkulutu.

NDENGE OYO BANDEKO YA LISANGÁ BAKOKI KOSALISA

Ndenge nini lisangá ekoki kosalisa bandeko na biso oyo bazali Batatoli te? (Talá paragrafe 15-16) *

15. Na kotalela Matai 5:14-16 mpe 1 Petro 2:12, ndenge nini ‘misala ya malamu’ ya basusu ekoki kosalisa bandeko na biso?

15 Yehova abendaka bato epai na ye na nzela ya ‘misala ya malamu’ ya bandeko ya lisangá. (Tángá Matai 5:14-16; 1 Petro 2:12.) Soki molongani na yo azali Motatoli ya Yehova te, asilá kokutana na bandeko ya lisangá na bino? Pauline azalaki kobengisa bandeko ya lisangá na ndako na bango mpo mobali na ye Wayne ayeba bango. Wayne abosanaka te ndenge likambo oyo ndeko mobali moko asalaki esalisaki ye atika kokanisela Batatoli mabe; alobi boye: “Mokolo moko azwaki konje na mosala kaka mpo aya kotala lisano ya ndembo elongo na ngai. Na yango nalobaki: ‘Azali kaka moto!’”

16. Mpo na nini tosengeli kobengisa bandeko na biso báya na makita?

16 Lolenge moko ya malamu ya kosalisa bandeko na biso ezali ya kobengisa bango báya na makita elongo na biso. (1 Ko. 14:24, 25) Wayne ayaki na likita mpo na mbala ya liboso mokolo ya Ekaniseli, mpo ezalaki na mpokwa nsima ya mosala mpe eumelaki mingi te. Alobi boye: “Nakangaki ntina te ya makambo oyo molobi alobaki, kasi nabosanaki te ndenge bato bazalaki na boboto. Bayaki epai na ngai, batombelaki ngai boyei malamu mpe bapesaki ngai mbote na esengo. Namonaki mpenza ete ezalaki kouta na motema.” Lisusu, ezalaki na ndeko moko ná mwasi na ye oyo bamesanaki mingi na Pauline, bazalaki kosalisa ye ná mwana na ye na makita mpe na mosala ya kosakola. Na yango, nsukansuka ntango Wayne amonaki ete asengeli koyeba bindimeli ya Pauline, asɛngaki ndeko mobali yango ayekola na ye Biblia.

17. Ntango nini tosengeli te komona ete tozwá ekateli ya mabe, kasi mpo na nini tosengeli kolɛmba bandeko na biso te?

17 Elikya na biso ezalaka ete bandeko na biso nyonso báya kosalela Yehova elongo na biso. Kasi, atako tosali milende mingi mpo na kosalisa bango bákóma basaleli ya Nzambe, bakoki koboya kondima solo. Soki esalemi bongo, tosengeli te komona ete tozwá ekateli ya mabe. Ata ndenge nini, tokoki te kotinda moto na makasi andima mateya na biso. Kasi, yebá ete okoki kosalisa bandeko na yo mingi soki bamonaka ete ozalaka na esengo mpo osalelaka Yehova. Bondeláká mpo na bango. Ntango ozali koteya bango, lobá na mayele mpo osilikisa bango te. Mpe kolɛmba te kosalisa bango! (Mis. 20:20) Tyá motema ete Yehova akopambola milende na yo. Mpe soki bandeko na yo bayoki yo, bakobika!

LOYEMBO 57 Tósakwela bato ya ndenge nyonso

^ par. 5 Tolingaka ete bandeko na biso ya libota báyeba Yehova, kasi bango moko basengeli kopona soki bakosalela ye to te. Lisolo oyo elobeli makambo oyo tokoki kosala mpo na kosalisa bandeko na biso ya libota bándima nsango malamu.

^ par. 1 Topesi bango bankombo mosusu. Na lisolo oyo, tosaleli liloba “bandeko” mpo na kolobela bato ya libota na biso oyo babandi naino kosambela Yehova te.

^ par. 53 ELILINGI: Ndeko mobali moko azali kosalisa tata na ye oyo azali Motatoli te na kobongisa motuka. Na ntango oyo ebongi, alakisi ye video moko na jw.org®.

^ par. 55 ELILINGI: Ndeko mwasi moko azali koyoka mobali na ye na likebi ntango azali kolobela makambo oyo akutani na yango na mosala. Na nsima, balye elongo na esengo.

^ par. 57 ELILINGI: Ndeko mwasi yango abengisi bandeko ya lisangá na ndako na ye. Bazali kosolola na mobali ya ndeko mwasi mpo báyebana malamu. Na nsima, mobali yango akei na Ekaniseli elongo na mwasi na ye.