Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 32

Bolingo na bino ebakisama

Bolingo na bino ebakisama

“Eloko oyo nazali kokoba kobondela mpo na yango: bolingo na bino ebakisamaka lisusu mingi mpenza.”​—FLP. 1:9.

LOYEMBO 106 Tókolisa bolingo

NA MOKUSE *

1. Banani basalisaki na kofungola lisangá na Filipi?

NTANGO ntoma Paulo, Silasi, Luka, mpe Timote bakómaki na Filipi, engumba oyo Roma ezalaki koyangela, bakutaki bato mingi oyo bazalaki kosepela na nsango ya Bokonzi. Bandeko yango minei oyo bazalaki na molende basalisaki mpo na kofungola lisangá, mpe bato nyonso oyo bakómaki bayekoli bakómaki koyangana na makita, mbala mosusu na ndako ya Lidia, ndeko mwasi oyo ayebaki koyamba bapaya.​—Mis. 16:40.

2. Mwa moke na nsima, lisangá yango ekutanaki na mokakatano nini?

2 Kasi mwa moke na nsima, lisangá yango ya sika ekutanaki na mokakatano moko. Satana asalaki ete banguna bátɛmɛla mosala ya kosakola oyo bakristo yango ya sembo bazalaki kosala. Bakangaki Paulo ná Silasi, babɛtaki bango fimbo, mpe batyaki bango na bolɔkɔ. Ntango babimisaki bango na bolɔkɔ, bakendaki kotala bayekoli wana ya sika mpo na kolendisa bango. Na nsima, Paulo, Silasi, ná Timote balongwaki na engumba yango, kasi emonani lokola ete Luka atikalaki kuna. Bandeko ya lisangá wana ya sika basalaki nini? Elimo ya Yehova esalisaki bango mpe bakobaki kosala mosala ya Nzambe na molende. (Flp. 2:12) Yango wana Paulo azalaki mpenza kosepela na bango!

3. Ndenge emonisami na Bafilipi 1:9-11, Paulo abondelaki mpo na makambo nini?

3 Mbula soki 10 na nsima, Paulo atindelaki lisangá ya Filipi mokanda. Soki otángi mokanda yango, okomona mbala moko ete Paulo azalaki mpenza kolinga bandeko na ye. Akomaki boye: “Nazali koyoka bino nyonso mposa makasi na bolingo ya motema lokola oyo Kristo Yesu azali na yango.” (Flp. 1:8) Akomelaki bango ete azalaki kobondela mpo na bango. Asɛngaki Yehova asalisa bango bábakisa bolingo na bango, báluka koyeba makambo oyo eleki ntina, bázala pɛto, báboya kobɛtisa basusu libaku, mpe bákoba kobota mbuma ya boyengebene. Na ntembe te, okondima ete maloba wana ya Paulo oyo eutaki na motema ekoki mpe kosalisa biso lelo. Na yango, tótánga makambo mosusu oyo akomelaki bakristo ya Filipi. (Tángá Bafilipi 1:9-11.) Na lisolo oyo, tokolobela mwa makambo ya sikisiki, mpe ndenge oyo tokoki kosalela mokomoko na yango.

BOLINGO NA BINO EBAKISAMA

4. (a) Na kotalela 1 Yoane 4:9, 10, ndenge nini Yehova amonisaki ete alingaka biso mingi? (b) Ndenge nini tosengeli kolinga Nzambe?

4 Yehova amonisaki ete alingaka biso mingi mpenza na ndenge atindaki Mwana na ye awa na mabele mpo akufa mpo na masumu na biso. (Tángá 1 Yoane 4:9, 10.) Bolingo oyo Nzambe alingaka biso etindaka biso mpe tólinga ye. (Rom. 5:8) Tosengeli kolinga Nzambe ndenge nini? Yesu apesaki eyano na motuna yango ntango alobaki na Mofarisai moko ete: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.” (Mat. 22:36, 37) Toboyaka kolinga Nzambe na mitema mibale. Kasi, tolingaka ete bolingo na biso mpo na ye ekóma makasi mokolo na mokolo. Paulo ayebisaki Bafilipi ete bolingo na bango esengeli ‘kobakisama lisusu mingi mpenza.’ Tokoki kosala nini mpo tókóma kolinga Nzambe mingi?

5. Ndenge nini tokoki kokóma kolinga Nzambe mingi?

5 Mpo tólinga Nzambe, tosengeli koyeba ye. Biblia elobi: “Moto oyo alingaka te ayebi Nzambe te, mpo Nzambe azali bolingo.” (1 Yoa. 4:8) Ntoma Paulo amonisaki ete bolingo na biso mpo na Nzambe ekobakisama soki toyekoli koyeba ye malamu mpe tososoli ndenge oyo atalelaka makambo. (Flp. 1:9) Ntango tobandaki koyekola Biblia, tokómaki kolinga Nzambe, atako toyebaki malamu te bizaleli na ye ya kokamwa. Na nsima, ntango tokobaki koyekola makambo mosusu mpo na ye, tokómaki mpe kolinga ye mingi koleka. Yango wana, tomonaka ete koyekola Biblia mbala na mbala mpe komanyola yango ezali na kati ya makambo oyo eleki ntina na bomoi na biso!​—Flp. 2:16.

6. Na kotalela 1 Yoane 4:11, 20, 21, tosengeli mpe kolinga banani?

6 Bolingo monene oyo Nzambe alingaka biso ekotinda biso tólingaka mpe bandeko na biso. (Tángá 1 Yoane 4:11, 20, 21.) Mbala mosusu tokoki kokanisa ete bolingo mpo na bandeko eyaka yango moko, mpo tosambelaka Yehova mpe tosalaka makasi tómekola bizaleli na ye. Tolandaka ndakisa ya Yesu, oyo alingaki biso mingi tii apesaki bomoi na ye mpo na biso. Nzokande, na bantango mosusu, ekoki kozala mpasi tótosa etinda oyo esɛngi biso tólingana. Tólobela likambo moko oyo esalemaki na lisangá ya Filipi.

7. Liteya nini tokoki kozwa na toli oyo Paulo apesaki Evodi ná Sɛntishe?

7 Evodi ná Sɛntishe bazalaki bandeko basi ya molende oyo “babomaki nzoto” na mosala ya kosakola elongo na ntoma Paulo. Kasi, mbala mosusu bazwanaki matata mpe bazalaki lisusu koyokana te. Na mokanda oyo Paulo akomelaki lisangá ya Filipi, epai Evodi ná Sɛntishe bazalaki, atángaki nkombo ya bandeko basi yango mpe ayebisaki bango ete basengeli kozala “likanisi moko.” (Flp. 4:2, 3) Paulo amonaki ete ezali na ntina ayebisa bandeko nyonso ya lisangá yango ete: “Bókoba kosala makambo nyonso na koimaima te mpe na ntembe te.” (Flp. 2:14) Boye toli wana ya polele oyo Paulo apesaki esalisaki kaka te bandeko basi wana ya sembo, kasi mpe bandeko nyonso ya lisangá bálingana lisusu makasi.

Mpo na nini tosengeli kotalaka bizaleli ya malamu ya bandeko na biso? (Talá paragrafe 8) *

8. Mokakatano nini ekoki kopekisa biso tólinga bandeko na biso, mpe ndenge nini tokoki kolonga yango?

8 Lokola Evodi ná Sɛntishe, ntango mosusu ezalaka mpasi tólinga bandeko na biso mpo tozalaka na mokakatano moko: tolukaka kotala kaka mabunga. Nzokande, biso nyonso tosalaka mabunga mokolo na mokolo. Soki tozali kotala kaka mabunga ya basusu, ekozala mpasi tólinga bango. Na ndakisa, soki ndeko moko abosani ete asengeli kosalisa biso na kopɛtola Ndako ya Bokonzi, tokoki koyoka nkanda. Na nsima, soki tobandi kokanisa mabunga mosusu oyo toyebi ete ndeko yango asalá, nkanda na biso ekokóma makasi mpe bolingo na biso mpo na ye ekokita. Soki ozali na matata ya ndenge wana na ndeko moko na lisangá, ekozala malamu okanisa likambo oyo: Yehova amonaka mabunga na yo, amonaka mpe mabunga ya ndeko yango. Atako bongo, alingaka kaka ndeko yango, alingaka mpe yo. Yango wana, tosengeli komekola bolingo ya Yehova mpe kosala makasi tómonaka bizaleli malamu ya bandeko na biso. Soki tosali makasi tólinga bandeko na biso, bomoko na biso ekokóma makasi.​—Flp. 2:1, 2.

“MAKAMBO OYO ELEKI NTINA”

9. Nini ezali mpe na kati ya “makambo oyo eleki ntina,” oyo Paulo alobeli na mokanda na ye epai ya Bafilipi?

9 Elimo santu etindaki Paulo ayebisa bakristo ya Filipi, mpe bakristo nyonso, ete ‘báluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.’ (Flp. 1:10) Na kati ya makambo yango oyo eleki ntina, tokoki kotánga kosantisama ya nkombo ya Yehova, kokokisama ya bilaka na ye, mpe kimya ná bomoko ya lisangá. (Mat. 6:9, 10; Yoa. 13:35) Soki tomonaka ete yango nde makambo oyo eleki ntina na bomoi na biso, ekomonisa ete tolingaka Yehova.

10. Tosengeli kosala nini mpo Yehova amona ete tozali pɛto?

10 Paulo alobaki mpe ete tosengeli ‘kozala pɛto.’ Yango elimboli te ete tosengeli kozala bato ya kokoka. Tokoki te kozala pɛto ndenge moko na Yehova. Kasi, Yehova akomona ete tozali pɛto soki tozali kosala nyonso oyo tokoki mpo bolingo na biso ebakisama mpe soki tozali koluka koyeba makambo oyo eleki ntina. Lolenge moko ya komonisa bolingo na biso ezali ya kosala makasi tóbɛtisa basusu libaku te, elingi koloba tósala te likambo oyo ekotinda bango bábebisa boyokani na bango na Yehova.

11. Mpo na nini tosengeli koboya kobɛtisa basusu libaku?

11 Toli oyo esɛngi biso tóboya kobɛtisa basusu libaku ezali likebisi monene. Na makambo nini tokoki kobɛtisa moto libaku? Na kominanola oyo toponaka, molato na biso, ata mpe mosala oyo tondimi kosala. Mbala mosusu makambo oyo tozali kosala ezali mabe te na miso ya Yehova. Kasi, soki makambo yango etungisi lisosoli ya moto mosusu to ebɛtisi ye libaku, wana ekómi mabe. Yesu alobaki ete kobɛtisa moko ya bampate na ye libaku ezali mabe koleka kutu soki bakangisi biso libanga ya kilo na nkingo mpe babwaki biso na mai monene!​—Mat. 18:6.

12. Ndakisa ya ndeko moko ya mobongisi-nzela ná mwasi na ye ezali koteya biso nini?

12 Ndeko moko ná mwasi na ye oyo bazalaki babongisi-nzela batosaki toli ya Yesu. Na lisangá na bango, mobali moko ná mwasi na ye bazwaki batisimo sika. Lokola baboti na bango bazalaki makambo makasimakasi, ndeko yango ná mwasi na ye bazalaki kokanisa ete bakristo basengeli te kokende kotala bafilme, ata soki bafilme yango ezali ya mabe te. Batungisamaki mingi ntango bayokaki ete ndeko wana ya mobongisi-nzela ná mwasi na ye bakendaki kotala filme. Na nsima, ndeko wana ya mobongisi-nzela ná mwasi na ye bazalaki lisusu kokende kotala bafilme te, tii ntango bandeko wana ya sika bateyaki lisosoli na bango mpe bakómaki kotalela makambo na bokatikati. (Ebr. 5:14) Lokola ndeko wana ya mobongisi-nzela ná mwasi na ye batalaki kaka matomba na bango moko te, bamonisaki ete balingaki ndeko wana ya sika ná mwasi na ye, kaka na maloba te, kasi mpe na misala.​—Rom. 14:19-21; 1 Yoa. 3:18.

13. Ndenge nini tokoki kopusa moto asala lisumu?

13 Tokoki mpe kobɛtisa moto libaku soki topusi ye asala lisumu. Ndenge nini likambo yango ekoki kosalema? Tókanisa ndakisa oyo: Moyekoli moko ya Biblia azalaki moombo ya masanga, kasi nsukansuka abundi etumba makasi mpe alongi kotika momeseno yango. Amoni ete malamu amɛlaka lisusu masanga ata moke te. Asali mbongwana oyo esengeli na bomoi na ye mpe azwi batisimo. Kendekende, ndeko moko oyo azali na makanisi ya mabe te abengi mwa bandeko ebele bálekisa ntango elongo, mpe apesi ndeko wana ya sika masanga, mpe alobi na ye: “Sikoyo okómi mokristo; ozali na elimo ya Yehova. Komipekisa ezali na kati ya mbuma ya elimo santu. Soki ozali mpenza na komipekisa, osengeli kozala na likoki ya komɛla kozanga kolekisa ndelo.” Kanisá makambo oyo ekobima soki ndeko wana ya sika ayoki toli wana oyo ebongi te!

14. Ndenge nini makita esalisaka biso tósalela toli ya Bafilipi 1:10?

14 Makita esalisaka biso tósalela toli oyo ezali na Bafilipi 1:10 na ndenge mingi. Ya liboso, ebele ya mateya oyo toyekolaka na makita ekundwelaka biso makambo oyo Yehova amonaka ete eleki ntina. Ya mibale, toyekolaka ndenge ya kosalela makambo oyo toyoki mpo tózala pɛto. Mpe ya misato, tolendisanaka “mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu.” (Ebr. 10:24, 25) Soki bandeko bazali kolendisa biso mingi, bolingo na biso mpo na Nzambe mpe mpo na bandeko ekobakisama. Soki bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na basusu etondi na motema na biso, tokosala nyonso mpenza mpo tóbɛtisa bandeko libaku te.

KOBÁ ‘KOTONDA NA MBUMA YA BOYENGEBENE’

15. ‘Kotonda na mbuma ya boyengebene’ elimboli nini?

15 Paulo abondelaki Nzambe na motema mobimba ete bakristo ya Filipi ‘bátonda na mbuma ya boyengebene.’ (Flp. 1:11) Na ntembe te, ‘mbuma yango ya boyengebene’ ezalaki bolingo oyo bazalaki kolinga Yehova mpe basaleli na ye. Esangisaki mpe mosala ya koyebisa basusu kondima na bango epai ya Yesu mpe elikya kitoko oyo bazalaki na yango. Bafilipi 2:15 esaleli maloba ya ndenge mosusu; elobeli “kongɛnga lokola miinda na mokili.” Maloba yango ebongi mpenza mpo Yesu abengaki bayekoli na ye “pole ya mokili.” (Mat. 5:14-16) Lisusu, apesaki bango etinda ete ‘bákomisa bato bayekoli,’ mpe alobaki ete bakozala “batatoli . . . tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mat. 28:18-20; Mis. 1:8) Tobotaka “mbuma ya boyengebene” ntango tozali komipesa mpenza na mosala yango ya ntina mingi.

Wana ntoma Paulo azali mokangami na ndako moko na Roma, azali kokomela lisangá ya Filipi mokanda. Na ntango yango, azali mpe kosakwela bato oyo bazali kokɛngɛla ye mpe baoyo bayei kotala ye (Talá paragrafe 16)

16. Ndenge nini Bafilipi 1:12-14 emonisi ete tokoki kongɛnga lokola miinda ata na ntango ya mpasi? (Talá elilingi ya ezipeli.)

16 Ata soki makambo ya bomoi na biso ezali ndenge nini, tokoki kongɛnga lokola miinda. Na bantango mosusu, eloko oyo tozali komona ete ezali kopekisa biso tósakola nsango malamu ekoki kokóma nde libaku malamu ya kosakola. Na ndakisa, ntoma Paulo azalaki mokangami na ndako moko na Roma ntango akomaki mokanda na ye epai ya Bafilipi. Nzokande, minyɔlɔlɔ epekisaki ye te ateya bato oyo bazalaki kokɛngɛla ye mpe oyo bazalaki koya kotala ye. Paulo asakolaki na molende ata na ntango wana ya mpasi, mpe yango epesaki bandeko ya Filipi makasi mpe mpiko ya “kosakola liloba ya Nzambe na kobanga te.”​—Tángá Bafilipi 1:12-14; 4:22.

Lukáká ntango nyonso mabaku ya koyebisa basusu nsango malamu (Talá paragrafe 17) *

17. Ndenge nini bandeko mosusu ya mikolo na biso bakobaki kobota mbuma ata ntango ezalaki mpasi kosala yango?

17 Bandeko na biso mingi bazali na libaku ya kolanda mpiko ya ntoma Paulo. Lokola bafandaka na bikólo oyo bakoki kosakola polele te na bisika ya bato mingi to na ndako na ndako, balukaka mayele mosusu ya kosakola nsango malamu. (Mat. 10:16-20) Na ekólo moko ya ndenge wana, mokɛngɛli ya zongazonga moko asɛngaki ete mosakoli mokomoko asilisa “teritware” na ye, elingi koloba asakwela bandeko na ye ya libota, bato ya kartye, baninga ya kelasi, baninga ya mosala, mpe bato mosusu oyo bayebani na bango. Nsima ya mbula mibale, masangá ebele ya sika efungwamaki na zongazonga yango. Mbala mosusu mosala ya kosakola epekisami te na ekólo oyo ofandi. Kasi, mayele oyo bandeko wana basalelaki epesi biso liteya moko ya ntina mingi: Salá nyonso oyo okoki mpo osakola nsango malamu mpe zalá na elikya ete Yehova akopesa yo mayele oyo esengeli mpo okoba kosala yango ata ntango ezali mpasi.​—Flp. 2:13.

18. Tosengeli kozwa ekateli ya kosala nini?

18 Na eleko oyo ya ntina mingi, biso nyonso tózwa ekateli ya kosalela toli ya Nzambe oyo ezali na mokanda ya Paulo epai ya Bafilipi. Tiká ete tóluka koyeba makambo oyo eleki ntina, tózala pɛto, tóboya kobɛtisa basusu libaku, mpe tóbota mbuma ya boyengebene. Soki tosali bongo, bolingo na biso ekobakisama, mpe tokopesa nkembo epai ya Yehova, Tata na biso oyo atyelaka biso likebi.

LOYEMBO 17 “Nalingi”

^ par. 5 Lelo oyo, koleka na eleko mosusu nyonso, tosengeli kolinga bandeko na biso mingi koleka. Mokanda epai ya Bafilipi ezali kosalisa biso tómona ndenge oyo tokoki kobakisa bolingo na biso, ata ntango tokutani na mikakatano.

^ par. 54 ELILINGI: Na ntango ya kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi, ndeko moko na nkombo Joel, atiki mosala mpe azali kosolola na ndeko mosusu ná mwana na ye. Ndeko Mike oyo azali kosala, ayoki nkanda. Alobi na nse ya motema, ‘Na esika Joel asala, azali kobɛta masolo.’ Nsima na yango, Mike amoni ndenge Joel azali kosalisa ndeko mwasi moko ya mobange. Likambo yango ya boboto esalisi Mike akanisa bizaleli malamu ya Joel.

^ par. 58 ELILINGI: Na ekólo moko oyo Batatoli bakoki kosakola polele te, ndeko mobali moko azali koyebisa moto oyo ayebani na ye nsango ya Bokonzi na ndenge ya mayele. Na nsima, na esika ya mosala, na ntango ya bopemi ndeko yango azali koteya moninga moko ya mosala.