Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 34

Ntango mokumba oyo ozalaki na yango esili

Ntango mokumba oyo ozalaki na yango esili

“Nzambe azangi boyengebene te mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomoniselaki nkombo na ye.”​—EBR. 6:10.

LOYEMBO 38 Akokómisa yo makasi

NA MOKUSE *

1-3. Mpo na bantina nini bandeko oyo bazalaki na mosala ya ntango nyonso bakoki kotika mokumba na bango?

NDEKO Robert ná Mary Jo balobi boye: “Nsima ya kolekisa mbula 21 ya bisengo na mosala ya misionɛrɛ, baboti na biso nyonso minei bakómaki bibɔsɔnɔ. Tozalaki na esengo ya kosalisa bango. Kasi, ezalaki mpasi kotika teritware na biso, esika oyo tolingaki mingi.”

2 Ndeko William ná Terrie balobi boye: “Ntango toyebaki ete kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso ekopesa biso lisusu nzela te ya kozongela mokumba na biso, tolelaki. Mposa na biso ya kosalela Yehova na mboka-mopaya esukaki na nzela.”

3 Ndeko Aleksey alobi boye: “Toyebaki ete banguna bazalaki koluka kokanga biro ya filiale epai nazalaki kosala. Kasi, toyokaki kaka mpasi mingi ntango likambo yango esalemaki mpe tosengelaki kolongwa na Betele.”

4. Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?

4 Longola bandakisa wana, ezali mpe na bandeko ebele ya Betele mpe bamosusu oyo bazalaki na mosala ya ntango nyonso, kasi mikumba yango esili. * Bandeko yango ya sembo bakoki koyoka mpasi kotika mokumba oyo balingaki mingi. Nini ekoki kosalisa bango bámesana na mbongwana yango? Ndenge nini okoki kosalisa bango? Biyano na mituna yango ekoki kosalisa biso nyonso na ntango oyo makambo ya bomoi na biso ebongwani.

NDENGE YA KOMESANA NA MBONGWANA

Mpo na nini bandeko oyo bazalaki na mosala ya ntango nyonso bakoki koyoka mpasi soki mokumba oyo bazalaki na yango esili? (Talá paragrafe 5) *

5. Tokoki komiyoka ndenge nini soki mokumba oyo tozalaki na yango esili?

5 Ezala tozali na teritware to na Betele, mbala mingi tokolisaka mpenza bolingo mpo na bato, ata mpe mpo na esika oyo tozali kosala. Soki likambo moko esɛngi ete tótika mokumba na biso, tokoki koyoka mawa mingi. Tokobanda kokanisa bandeko oyo totiki mpe komitungisa mingi mpo na bango, mingimingi soki esɛngaki tólongwa kuna mpo na minyoko ya banguna. (Mat. 10:23; 2 Ko. 11:28, 29) Lisusu, soki tokei esika mosusu, to ata soki tozongi na mboka na biso, mbala mingi esɛngaka tómesana lisusu. Robert ná Mary Jo balobi boye: “Tobosanaki mimeseno ya mboka na biso, ata mpe kosakola na monɔkɔ ya mboka na biso. Tomiyokaki lokola bapaya na mboka na biso moko.” Lisusu, ntango bomoi ebongwani, bato mosusu bakoki kokutana na mikakatano ya mbongo na ndenge oyo bakanisaki te. Bakoki koyeba te básala nini, bakoki kozanga kimya, mpe kolɛmba nzoto. Nini ekoki kosalisa bango?

Ezali na ntina ete tópusana penepene na Yehova mpe tótyela ye motema (Talá paragrafe 6-7) *

6. Ndenge nini tokoki kotikala penepene na Yehova?

6 Tikalá penepene na Yehova. (Yak. 4:8) Ndenge nini okoki kosala yango? Osengeli kotyela ye motema ete azali “Moyoki ya libondeli.” (Nz. 65:2) Nzembo 62:8 elobi boye: “Bósopa motema na bino liboso na ye.” Yehova akoki kosala “mingi mpenza koleka makambo nyonso oyo tosɛngaka to oyo eyelaka biso na makanisi.” (Ef. 3:20) Asalaka kaka te makambo ya sikisiki oyo tosɛngaka ye na mabondeli na biso. Akoki kosala makambo oyo tokanisaki te mpo na kosilisa mikakatano na biso.

7. (a) Nini ekosalisa biso tótikala penepene na Yehova? (b) Na kotalela Baebre 6:10-12, mpo na nini ebongi tókoba kosalela Yehova na bosembo?

7 Lisusu, mpo otikala penepene na Yehova, tángáká Biblia mokolo na mokolo mpe kanisáká na mozindo makambo oyo ozali kotánga. Ndeko mobali moko oyo azalaki misionɛrɛ na kala alobi boye: “Kobá kosala losambo na kati ya libota mpe kobongisa makita pɔsɔ na pɔsɔ, kaka ndenge ozalaki kosala ntango ozalaki na mokumba na yo.” Lisusu, kobá komipesa na mosala ya kosakola nsango malamu na lisangá na yo ya sika. Yehova abosanaka te baoyo bazali kokoba kosalela ye na bosembo, ata soki bakoki lisusu te kosala nyonso oyo bazalaki kosala liboso.​—Tángá Baebre 6:10-12.

8. Ndenge nini maloba ya 1 Yoane 2:15-17 ekoki kosalisa yo okoba kozala na bomoi ezangi mindɔndɔ?

8 Zalá kaka na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ. Kotika te ete mitungisi ya mokili ya Satana ‘etya nkaka’ na makambo na yo ya elimo. (Mat. 13:22) Kolanda te makanisi ya bato ya mokili to ya baninga mpe bandeko oyo bakoki kotinda yo oluka kokóma na mbongo mingi na mokili ya Satana. (Tángá 1 Yoane 2:15-17.) Tyelá Yehova motema, oyo alaki ete akokokisa bamposa na yo ya elimo mpe ya mosuni, mpe akopesa yo kimya ‘ntango ozali na mposa’ na yango.​—Ebr. 4:16; 13:5, 6.

9. Na kolanda Masese 22:3, 7, mpo na nini ezali na ntina oboya banyongo ya mpambampamba, mpe nini ekoki kosalisa biso tózwa bikateli ya malamu

9 Boyá banyongo ya mpambampamba. (Tángá Masese 22:3, 7.) Kokende esika mosusu ekoki kolya mbongo mingi, mpe ezalaka mpasi te kokɔta banyongo. Mpo oboya banyongo ya mpambampamba, kebá na kodefa mbongo mpo osomba biloko oyo ozali mpenza na mposa na yango te. Soki tozali mpenza na kimya ya motema te, na ndakisa ntango tozali kosalisa moto oyo azali kobɛla, ekoki kozala mpasi tóyeba soki mbongo boni tódefa. Na ntango wana, kobosana te ete ‘libondeli mpe lilɔmbɔ’ ekoki kosalisa yo ozwa bikateli ya malamu. Mpo na koyanola na libondeli na yo, Yehova akoki kopesa yo kimya oyo ‘ekobatela motema na yo mpe makanisi na yo,’ mpe ekosalisa yo otalela makambo malamumalamu na motema ya kokita.​—Flp. 4:6, 7; 1 Pe. 5:7.

10. Ndenge nini okoki kozwa baninga ya sika?

10 Kangamá na baninga ya malamu. Yebisá baninga ndenge oyo ozali komiyoka mpe bɛteláká bango masolo na yo, mingimingi soki bango mpe bakutaná na makambo oyo ozali kokutana na yango. Kosala bongo ekoki kosalisa yo omiyoka malamu. (Mos. 4:9, 10) Baninga oyo ozwá kala na mokumba oyo ozalaki na yango bakozala kaka baninga na yo. Kasi, na esika oyo ozali sikoyo, osengeli kozwa baninga ya sika. Kobosana te: mpo ozwa moninga, yo mpe osengeli kozala moninga epai ya moto yango. Ndenge nini okoki kozwa baninga ya sika? Lobeláká makambo ya malamu oyo okutaná na yango na mosala ya Yehova mpe salá ete basusu bámona esengo na yo na mosala ya Yehova. Ata soki bato mosusu na lisangá bazali komona te ntina oyo osepelaka na mosala ya ntango nyonso, bandeko mosusu bakoki kosepela na ndakisa na yo mpe kokóma baninga na yo. Kasi, zalá na bokatikati mpo obenda likebi mingi te epai na yo moko to na makambo ya malamu oyo osalá, mpe olobela mingi te makanisi ya mabe oyo okoki kozala na yango.

11. Ndenge nini okoki kobatela esengo na libala na yo?

11 Soki otiká mosala mpo na maladi ya molongani na yo, kopesaka ye foti te mpo na yango. Mpe soki yo nde ozalaki na maladi, koyokaka te lokola omemá ngambo mpe kokanisaka te ete obebisi bomoi ya molongani na yo. Kobosana te: bozali “mosuni moko,” mpe bolakaki liboso ya Yehova ete bokozala elongo ata soki nini esalemi. (Mat. 19:5, 6) Soki otiká mosala mpo na zemi oyo bokanaki te, salá makasi mwana na bino ayeba ete azali na ntina koleka mokumba oyo ozalaki na yango. Yebisáká mwana na yo ete azali “mbano” oyo Nzambe apesá yo. (Nz. 127:3-5) Lisusu, yebisáká ye makambo ya malamu oyo okutaná na yango na mosala ya Nzambe. Soki osali bongo, okoki kolendisa ye amipesa na mosala ya Yehova, kaka ndenge yo mpe osalaki.

NDENGE OYO BASUSU BAKOKI KOSALISA

12. (a) Ndenge nini tokoki kosalisa bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso bákoba mosala na bango? (b) Ndenge nini tokoki kosalisa basusu bámesana noki soki mokumba oyo bazalaki na yango esili?

12 Likambo ya esengo, masangá mingi mpe bandeko ebele basalaka oyo bakoki mpo na kosalisa bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso bákoba mosala na bango. Na ndakisa, balendisaka bandeko yango bákoba na mosala ya Nzambe, bapesaka bango mwa mbongo to biloko mosusu ya mosuni, to mpe basalisaka bango mpo bákokisa bamposa ya bandeko ya mabota na bango oyo bafandi mosika na bango. (Gal. 6:2) Soki bandeko oyo bazalaki na mosala ya ntango nyonso bakómi na lisangá na bino mpo mokumba na bango esili, komona te ete mbongwana yango emonisi ete mbala mosusu bakoki mosala te to mpe bazwi etumbu. * Kasi, salisá bango bámesana noki. Yambá bango malamu mpe pesá bango longonya mpo na mosala oyo basalá, ata soki maladi esali ete bákoka lisusu kosala mingi te. Luká koyeba bango. Lokola bayebi makambo mingi, bazwá formasyo ebele, mpe bakutaná na makambo ebele, yekolá epai na bango.

13. Lisalisi nini tokoki kopesa baoyo batiki mokumba oyo bazalaki na yango?

13 Na ebandeli, baoyo batiki mokumba oyo bazalaki na yango bakoki kozala na mposa ya lisalisi mpo na kozwa ndako, mosala, to mpe biloko mosusu ya ntina. Bakoki mpe kozala na mposa ya koyeba makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo, na ndakisa kofuta mpako to makambo ya assurance. Likambo eleki ntina, bazalaka na mposa oyokela bango mawa te, kasi nde omitya na esika na bango. Mbala mosusu bazali kobundana na maladi na bango moko to ya ndeko moko ya libota na bango. Ntango mosusu mpe bazali na mawa mpo moto oyo balingaki akufi. * Mpe ata soki bazali koloba yango te, ntango mosusu bakanisaka ndenge bakabwaná na baninga na bango oyo bazwá na esika bazalaki kosalela Yehova. Ezwaka ntango mpo na kolongola makanisi ya ndenge wana mpe mayoki ndenge na ndenge.

14. Ndenge nini bandeko ya lisangá basalisaki ndeko mwasi moko amesana na teritware na ye ya sika?

14 Lisalisi na yo mpe ndakisa na yo ekoki kosalisa bango bámesana. Ndeko mwasi moko oyo asalaki bambula ebele na teritware ya mboka mopaya alobi boye: “Na teritware na ngai, nazalaki koyekola na bato Biblia mikolo nyonso. Na teritware ya sika, ezalaki mpasi kozwa ata libaku ya kofungola Biblia to ya kolakisa moto video na mosala ya kosakola. Kasi, basakoli ya lisangá bazalaki kosɛnga ngai tóbima elongo mpo na kozongela bato na bango mpe koyekola na bato Biblia. Komona ndenge bandeko yango ya molende mpe ya mpiko bazalaki na bayekoli ya Biblia oyo bazalaki kokola malamu esalisaki ngai nasepela na teritware yango. Nayekolaki ndenge ya kobanda lisolo na teritware yango ya sika. Nyonso wana esalisaki ngai nazongela esengo na ngai.”

KOBÁ KOKENDE LIBOSO!

Luká ndenge ya komipesa na mosala ya kosakola na teritware na yo ya sika (Talá paragrafe 15-16) *

15. Ndenge nini okoki kobota mbuma na teritware na yo ya sika?

15 Okoki kobota mbuma ata na teritware na yo ya sika. Komona te ete osalaki malamu te na mokumba oyo ozalaki na yango to ete ozalaki mpenza na ntina te, yango wana balongolaki yo. Luká komona lobɔkɔ ya Yehova na bomoi na yo mpe kobá kobima mosala ya kosakola. Mekolá bakristo ya sembo ya siɛklɛ ya liboso. “Baoyo bapanzanaki . . . bazalaki kosakola nsango malamu ya liloba.” (Mis. 8:1, 4) Soki okobi kosakola, ekoki kobota mbuma malamu. Na ndakisa, ntango Leta ya ekólo moko ebenganaki babongisi-nzela, bandeko yango bakendaki na mboka mosusu ya pembeni, epai mposa ezalaki makasi na monɔkɔ ya mboka na bango. Mwa basanza na nsima, bafungolaki bituluku ebele na monɔkɔ yango mpe ezalaki kokola nokinoki.

16. Ndenge nini okoki kozwa esengo esika ozali sikoyo?

16 “Esengo ya Yehova ezali esika makasi ya libateli na [yo].” (Neh. 8:10) Tosengeli kozwa esengo libosoliboso epai ya Yehova kasi te na mokumba na biso, ata soki ozwaka yango na motuya mingi. Yango wana, kobá kotambola elongo na Yehova, mpo apesa yo bwanya, atambwisa yo mpe asalisa yo. Kobosana te ete okómaki kolinga mokumba oyo ozalaki na yango mpo ozalaki kosala nyonso mpo osalisa bato kuna. Soki osali mpe bongo esika ozali sikoyo, Yehova akosalisa yo olinga yango mpe.​—Mos. 7:10.

17. Likambo nini tosengeli koyeba mpo na mikumba oyo tozali na yango sikoyo?

17 Tosengeli koyeba ete tokosalela Yehova libela na libela, kasi mokumba oyo tozalaka na yango ezalaka kaka mpo na mwa ntango. Na mokili ya sika, biso nyonso tokoki kozwa mokumba ya sika. Aleksey, oyo tolobelaka na ebandeli, amonaka ete makambo oyo azali kokutana na yango sikoyo ezali kobongisa ye mpo na mokili ya sika. Alobi boye: “Banda kala nayebaki ete Yehova azali, mpe ete mokili ya sika ekozala mpenza, kasi liboso nazalaki komona yango mosika. Sikoyo, namonaka lokola Yehova atɛlɛmi mpenza liboso na ngai, mpe ete mokili ya sika yango wana pembeni. (Mis. 2:25) Ata soki tozali kosala nini na mosala ya Yehova, tókoba kozala penepene na ye. Akotika biso ata mokolo moko te, kasi akosalisa biso tózwa esengo na nyonso oyo tokoki kosala na mosala na ye, ata soki ezali wapi.​—Yis. 41:13.

LOYEMBO 90 Tólendisanaka

^ par. 5 Ekómaka ete bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso bátika mokumba yango, to mpe bázwa mokumba mosusu ya sika. Lisolo oyo elobeli mikakatano oyo bakutanaka na yango mpe makambo oyo ekoki kosalisa bango bámesana na bomoi na bango ya sika. Elobeli mpe ndenge oyo basusu bakoki kolendisa mpe kosalisa bango, mpe mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso nyonso ntango bomoi na biso ebongwani.

^ par. 4 Ndenge moko mpe, ntango bandeko mibale bakómi na mbula moko boye, esɛngaka ete bátikela bandeko mosusu mikumba na bango. Talá masolo “Yehova asepelaka na bosembo ya bandeko oyo basali mingi,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 09/2018, mpe “Batelá kimya ya motema ntango makambo ebongwani,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 10/2018.

^ par. 12 Bankulutu ya lisangá oyo bandeko yango bazalaki basengeli koumela te mpo na kotinda mokanda na lisangá oyo bakómi sika, mpo bandeko yango bákoba na mosala ya mobongisi-nzela, to básala lokola bankulutu to basaleli na misala.

^ par. 13 Talá masolo ya Lamuká! ya 2018, No. 3 oyo elobi “Okoki kolonga mpasi ya kobungisa moto na liwa.”

^ par. 57 ELILINGI: Ndeko moko ná mwasi na ye balongwe esika bazalaki na mosala ya misionɛrɛ mpe bazali kopesa bandeko ya lisangá mbote ya nsuka na mawa.

^ par. 59 ELILINGI: Ntango bazongi na mboka na bango, bakobi kobondela Yehova asalisa bango báyika mpiko na mikakatano oyo bazali kokutana na yango.

^ par. 61 ELILINGI: Na lisalisi ya Yehova, bazongeli mosala ya ntango nyonso. Basaleli monɔkɔ oyo bayekolaki na mosala ya misionɛrɛ mpo na koteya bapaya oyo bayei na teritware ya lisangá na bango ya sika.