LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Septembre 2016

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli mpo na 24/10 tii 27/11/2016.

“Mabɔkɔ na yo elɛmba te”

Ndenge nini Yehova apesaka basaleli na ye makasi mpe alendisaka bango? Ndenge nini okoki kosala bongo?

Kobá kobunda mpo na kozwa lipamboli ya Yehova

Basaleli ya Nzambe bakutanaka na mikakatano mingi ntango bazali kokoba koluka ete andima bango. Atako bongo, bakoki kolonga!

Elateli na yo ekumisaka Nzambe?

Mitinda ya Biblia ekoki kotambwisa biso.

Bilenge: Bókómisa kondima na bino makasi

Omonaka ete batyaka yo mbamba mpo ondima makambo oyo bato mingi bandimaka, na ndakisa liteya ya evolisyo? Soki ezali bongo, lisolo oyo etali yo.

Baboti: Bósalisa bana na bino bákóma na kondima makasi

Omonaka na bantango mosusu ete obongi te mpo na likambo yango? Makambo minei ekoki kosalisa yo olonga.

Mituna ya batángi

“Liloba ya Nzambe” oyo Baebre 4:12 elobi ete “ezali na nguya mpe epeli makasi” ezali nini?