Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Elateli na yo ekumisaka Nzambe?

Elateli na yo ekumisaka Nzambe?

“Bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.”​—1 BAKORINTI 10:31.

NZEMBO: 34, 61

1, 2. Mpo na nini Batatoli ya Yehova batosaka mitinda oyo etali kolata malamu? (Talá elilingi ya ebandeli.)

ZULUNALO moko ya Néerlandais emonisaki ndenge oyo bakonzi ya mangomba balataki na likita na bango moko ya losambo. Elobaki boye: “Balataki kaka bilamba ya bongobongo, mingimingi, na ntango oyo molunge eyaki makasi.” Nzokande, kaka zulunalo yango elobaki ete Batatoli ya Yehova balataki bongo te na liyangani na bango. Elobaki ete bilenge mibali mpe batata balataki kazaka ná kravati mpe bilenge basi ná bamama balataki bajipe ya milai, kasi oyo esilá ngala te. Mbala mingi, bato bakumisaka Batatoli ya Yehova mpo na lolenge na bango ya kolata. Ntoma Paulo alobaki ete bilamba oyo bakristo balataka esengeli komonisa ete ‘balekisaka ndelo te mpe bazali na makanisi malamu,’ oyo ebongi mpo na basaleli ya Nzambe. (1 Timote 2:9, 10) Atako ntoma Paulo azalaki kolobela basi, etinda yango etaleli mpe mibali oyo bazali bakristo.

2 Kolanda mitinda oyo etali kolata malamu ezali na ntina mingi mpo na biso basaleli ya Yehova, mpe mpo na Nzambe oyo tosambelaka. (Ebandeli 3:21) Biblia emonisi polele ete Yehova, Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, apesi mitinda mpo na ndenge oyo alingi ete basaleli na ye bálataka. Yango wana, bilamba oyo toponi kolata esengeli kaka te kosepelisa biso, kasi oyo eleki ntina, esengeli kosepelisa Yehova, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.

3. Na Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele, liteya nini tokoki kozwa mpo na molato?

3 Na Mibeko ya Moize, ezalaki na malako oyo ezalaki kobatela Bayisraele na bomoi ya mbindo ya bikólo oyo ezalaki zingazinga na bango. Mibeko yango emonisaki ete Yehova ayinaka makasi bilamba oyo emonisaka polele te bokeseni kati na basi mpe mibali. Lelo oyo, ezali na midɛlɛ ya bilamba oyo emonisaka polele te bokeseni kati na mwasi mpe mobali. (Tángá Kolimbola Mibeko 22:5.) Mibeko yango esalisi biso tóyeba ete Yehova asepelaka te na bilamba oyo esalaka ete mobali amonana lokola mwasi, mpe mwasi amonana lokola mobali, to oyo esalaka ete ezala mpasi kokesenisa basi ná mibali.

4. Nini ekoki kosalisa bakristo bázwa bikateli ya malamu mpo na molato?

4 Mitinda ya Biblia ekoki kosalisa biso tózwa bikateli ya malamu mpo na ndenge ya kolata. Tosengeli kolanda mitinda yango, ezala tofandi na ekólo nini, na mboka ya molunge to ya malili, to mimeseno ya mboka na biso ezali nini. Tozali na mposa te básalela biso liste ya bilamba oyo ebongi mpe oyo ebongi te. Tosengeli kaka kolanda mitinda ya Biblia, oyo epekisi te tólata bilamba oyo tolingi. Tótalela mitinda mosusu ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso tóyeba “mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama” ntango tozali kopona bilamba ya kolata.​—Baroma 12:1, 2.

“TOZALI KOPESA NDAKISA MALAMU ETE TOZALI BASALELI YA NZAMBE”

5, 6. Molato na biso ekoki kotinda basusu básala nini?

5 Na litambwisi ya elimo santu, ntoma Paulo akomaki etinda ya ntina mingi oyo ezali na 2 Bakorinti 6:4. (Tángá.) Molato na biso elobaka mingi, mpe bato mingi bakoki kozwela biso makanisi ya malamu to ya mabe na kotalela ndenge tozali komonana. (1 Samwele 16:7) Lokola tozali basaleli ya Nzambe, tosengeli kolata bilamba oyo ekosala ete tóyoka nsɔni te ntango tozali na miso ya bato. Kosalela mitinda ya Biblia esengeli kosalisa biso tóboya kolata bilamba oyo ekangaka nzoto to oyo elakisaka mwa moke binama ya kobotela. Yango elimboli ete tosengeli koboya kolata bilamba oyo emonisaka to etikaka mabɛlɛ libándá, libumu libándá, mokɔngɔ libándá, mpe biteni mosusu ya nzoto oyo esengeli kobombama. Moto moko te asengeli koyoka nsɔni kotala biso to kobalusa miso epai mosusu ntango amoni ndenge tolati.

Soki tolati malamu, tolati bilamba ya pɛto, tosali monzɛlɛ na ndenge oyo ebongi mpe tolekisi ndelo te na molato na biso, bato bakoki komemya biso lisusu mingi lokola basaleli ya Yehova, Nkolo Mokonzi- Oyo-Aleki-Nyonso

6 Soki tolati malamu, tolati bilamba ya pɛto, tosali monzɛlɛ na ndenge oyo ebongi, mpe tolekisi ndelo te na molato na biso, bato bakoki komemya biso lisusu mingi lokola basaleli ya Yehova, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso. Bakoki ata kosepela lisusu mingi na Nzambe oyo tosambelaka, komemya lisusu mingi ebongiseli na biso, mpe kondima koyoka nsango ya lobiko oyo tomemelaka bango.

7, 8. Mingimingi, ntango nini tosengeli kolata bilamba oyo ebongi?

7 Ntango tolataka na ndenge oyo ekumisaka Yehova mpe epesaka lokumu na nsango oyo tosakolaka, tosalaka bongo mpo na Nzambe na biso oyo azali mosantu, bandeko na biso bakristo, mpe bato ya teritware na biso. (Baroma 13:8-10) Bilamba oyo tolataka ezalaka na ntina, mingimingi ntango tokei na makita ya bokristo mpe ntango tozali kosakola. Tosengeli kolata na ndenge oyo ebongi na bato oyo basambelaka Nzambe. (1 Timote 2:10) Toboyi te, bilamba mosusu oyo ebongi kolata na esika moko ekoki kobonga te na esika mosusu. Yango wana, ezala tofandi wapi, lokola tozali Batatoli ya Yehova, tosengeli koboya koyokisa basusu mpasi na motema mpo na molato na biso.

Bilamba na yo ekotinda basusu bámemya Nzambe oyo ozali komonisa? (Talá paragrafe 7, 8)

8 Tángá 1 Bakorinti 10:31. Ntango tokei na mayangani, ezala ya mike to ya minene, tosengeli kolata bilamba oyo ebongi mpe kolekisa ndelo te. Tosengeli te kolanda midɛlɛ ya bilamba ya mindɔndɔ oyo elatamaka mingi na mokili. Ata liboso mpe nsima ya liyangani, mpe ntango toyei na otɛlɛ oyo tokofanda mpe ntango tozali kobima, tosengeli kondimisama ete molato na biso ezali ya bongobongo te to ya mobulumobulu te. Na ndenge wana, tokozala na esengo ya komonisa bato ete tozali Batatoli ya Yehova, mpe tokozala na likoki ya kopesa litatoli ntango nyonso.

9, 10. Mpo na nini Bafilipi 2:4 etaleli bilamba oyo tolataka?

9 Tángá Bafilipi 2:4. Mpo na nini tosengeli kokanisa oyo molato na biso ekosala epai ya bandeko na biso bakristo? Moko ya bantina ezali ete basaleli ya Nzambe basalaka makasi bálanda toli oyo: “Na yango, bóboma binama ya nzoto na bino ya mabele na likambo ya pite, mbindo, mposa ya kosangisa nzoto.” (Bakolose 3:2, 5) Bandeko mibali mpe basi mosusu batiká bomoi ya mbindo, kasi bakobaka kobunda mpo na kobengana bamposa ya mabe. Soki tokebi te, lolenge na biso ya kolata ekoki kosala ete ekóma lisusu mpasi mpo na bango bálanda toli ya Biblia mpe bábundisa bamposa wana ya mabe. (1 Bakorinti 6:9, 10) Tokolinga te kokómisa lisusu mpasi etumba oyo bazali kobunda, boye te?

10 Ntango tozali elongo na bandeko mibali mpe basi, tomonaka ete tozali mosika na bato oyo balendisaka bomoi ya mbindo. Lolenge na biso ya kolata esengeli kobakisa lisusu ekateli na biso ya kobatela makanisi ya pɛto, ezala tozali na makita to na esika mosusu. Atako tozali na bonsomi ya kopona bilamba oyo tokolata, tozali mpe na mokumba ya kolata bilamba oyo ekosalisa basusu bábatela makanisi, maloba, mpe etamboli ya pɛto na miso ya Nzambe. (1 Petro 1:15, 16) Bolingo ya solosolo “esalaka makambo ya nsɔni te, elukaka matomba na yango moko te.”​—1 Bakorinti 13:4, 5.

ELAMBA NA ELAMBA NA NTANGO NA YANGO MPE NA ESIKA NA YANGO

11, 12. Ndenge nini Mosakoli 3:1, 17 esalisaka biso tózala na bokatikati?

11 Ntango basaleli ya Nzambe basengeli kopona bilamba ya kolata, bayebaka ete “likambo na likambo mpe mosala na mosala ezali na ntango.” (Mosakoli 3:1, 17) Tolataka bilamba na kotalela ntango mpe bileko, malili to molunge, ndenge bomoi mpe makambo ezali na esika tofandi. Kasi mitinda ya Yehova ebongwanaka te.​—Malaki 3:6.

Mitinda ya Yehova ebongwanaka te

12 Ezali solo ete na ntango ya molunge ezalaka pɛtɛɛ te kolata malamu mpe kolekisa ndelo te. Kasi, bandeko basepelaka mingi ntango tolataka bilamba oyo ekangi nzoto te to eleki minene te. (Yobo 31:1) Longola yango, ntango tozali kosukola na libongo to na pisini, bilamba oyo tolati mpo na kosukola esengeli kozala oyo ebongi. (Masese 11:2, 20) Atako na mokili bato mingi balataka bilamba ya kosukola oyo etikaka nzoto mobimba polele, biso tosengeli kolata bilamba ya kosukola oyo ezali kokumisa Yehova, Nzambe na biso oyo azali mosantu.

13. Mpo na nini tosengeli kolanda toli oyo ezali na 1 Bakorinti 10:32, 33 ntango tozali kopona bilamba ya kolata?

13 Ezali na etinda mosusu ya ntina mingi oyo tosengeli kotalela ntango tozali kopona bilamba ya kolata. Tosengeli kokeba mpo tóbɛtisa basusu libaku te. (Tángá 1 Bakorinti 10:32, 33.) Tozali na mokumba ya koboya kolata bilamba oyo ekoki kobɛtisa bandeko na biso bakristo libaku, ata mpe bato oyo basambelaka Yehova te. Ntoma Paulo akomaki: “Moto na moto na kati na biso asepelisa mozalani na ye na oyo ezali malamu mpo alendisa ye.” Na nsima, amonisaki mpo na nini kosala bongo: “Mpo Kristo kutu amisepelisaki te.” (Baroma 15:2, 3) Lokola Yesu, tosengeli komona ete kosala mokano ya Nzambe mpe kosalisa basusu ezali na ntina mingi koleka makambo oyo biso moko tolingi. Yango wana, tokopona te modɛlɛ ya elamba oyo tosepeli na yango kasi ekoki kopekisa bato báyoka nsango na biso.

14. Ndenge nini baboti bakoki koteya bana na bango mpo molato na bango ekumisa Nzambe?

14 Baboti bakristo bazali na mokumba ya koteya bana na bango bálanda mitinda ya Biblia. Mokumba yango etaleli mpe koluka koyeba soki bana na bango bazali kosepelisa Nzambe na molato mpe monzɛlɛ oyo ebongi. (Masese 22:6; 27:11) Ndenge nini baboti bakoki koteya bana na bango mpo bámemya Nzambe na biso oyo azali mosantu mpe mitinda na ye? Baboti basengeli kozala ndakisa malamu mpo na bana na bango. Na bolingo mpenza, basengeli kolakisa bana na bango bisika mpe ndenge ya kopona bilamba oyo ebongi. Bana basengeli te kopona bilamba kaka mpo basepeli na yango, kasi oyo eleki ntina, basengeli kopona bilamba oyo ekopesa Yehova, Nzambe oyo bazali komonisa, lokumu.

SALELÁ BONSOMI NA YO NA BWANYA

15. Nini ekoki kosalisa biso tópona bilamba ya malamu?

15 Biblia ezali na toli ya malamu oyo ekoki kosalisa biso tópona molato ya malamu oyo ekokumisa Nzambe. Atako bongo, bilamba oyo tolataka emonisaka makambo oyo tosepelaka na yango. Midɛlɛ oyo tolingaka mpe bilamba oyo tosombaka ekoki kokesana na oyo ya basusu. Kasi bilamba na biso esengeli ntango nyonso kozala malamu, pɛto, ya kolekisa ndelo te, oyo ebongi na ntango mpe na esika oyo tozali, mpe endimami na mboka oyo tofandi.

16. Mpo na nini ezali na ntina tósala milende mpo na kolata malamu?

16 Ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo na kozwa bilamba ya malamu mpe oyo ebongi. Bamagazini mingi etɛkaka kaka bilamba oyo ezali kolatama mingi. Yango wana, ekoki kosɛnga ntango mingi mpe milende mingi mpo na kozwa jipe oyo ebongi, robɛ oyo ebongi, mpe bluzɛ oyo ebongi, to kopona kazaka mpe patalo oyo ezali kokanga nzoto mingi te. Kasi bandeko bakomona mpe bakosepela na milende oyo tozali kosala mpo na kolata bilamba oyo ezali kitoko mpe oyo ebongi. Mpe esengo oyo tokoyoka mpo toyebi ete tozali kopesa lokumu na Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo eleki mosika makambo oyo tokoki komipimela mpo na kolata na ndenge oyo ezali kokumisa ye.

17. Makambo nini ekoki kosala ete ndeko mobali azala na mandefu to te?

17 Ezali malamu ete ndeko mobali azala na mandefu? Mibeko ya Moize ezalaki kosɛnga mibali bázala na mandefu. Kasi, bakristo bazali na nse ya Mibeko ya Moize te mpe basɛngisami te kolanda yango. (Balevi 19:27; 21:5; Bagalatia 3:24, 25) Na mimeseno ya bamboka mosusu, mandefu oyo bakati malamu ekoki kondimama mpe bato bamonaka yango mabe te, mpe ekoki te kopekisa bato báyoka nsango na biso. Kutu, na bamboka yango, bandeko mosusu oyo bazali na mikumba bazalaka na mandefu. Atako bongo, bandeko mosusu bakoki kozwa ekateli ya kozala na mandefu te. (1 Bakorinti 8:9, 13; 10:32) Na bamboka mosusu, bato mingi bazalaka na mandefu te mpe bato basepelaka te komona bateyi ya Liloba ya Nzambe bazali na mandefu. Kutu, na bamboka ya ndenge wana, kozala na mandefu ekoki kopekisa ndeko mobali apesa Nzambe lokumu mpe ‘azanga te likambo ya kofundama na yango.’​—1 Timote 3:2, 7; Baroma 15:1-3.

18, 19. Ndenge nini Mika 6:8 esalisaka biso?

18 Tozali na botɔndi mingi ndenge Yehova apesi biso te liste ya molai ya bilamba mpe ndenge ya kosala monzɛlɛ oyo endimami mpe oyo endimami te. Apesi biso nde bonsomi ya kozwa moto na moto bikateli oyo ebongi na kolanda mitinda ya Biblia. Na yango, ata ntango tozali kozwa bikateli mpo na molato mpe lolenge ya kosala monzɛlɛ, tokoki komonisa ete tolingi komikitisa ntango tozali kosalela Nzambe na biso.​—Mika 6:8.

19 Na komikitisa nyonso, tondimaka ete Yehova azali pɛto mpe mosantu, mpe ete mitinda na ye nde esengeli kotambwisa biso. Soki tolingi kozala na komikitisa mpe koyeba esika makoki na biso esuki, tokolanda mitinda na ye na bomoi na biso. Koyeba esika makoki na biso esuki ekosalisa mpe biso tómemya mayoki mpe makanisi ya basusu.

20. Molato na biso mpe lolenge na biso ya kosala monzɛlɛ ekoki kotinda basusu básala nini?

20 Bilamba na biso esengeli komonisa polele ete tozali basaleli ya Yehova. Mitinda ya Yehova eleki nyonso, mpe tosepelaka ndenge totosaka yango. Bandeko mingi basengeli kozwa longonya mpo na ndenge oyo bamonanaka na miso ya bato mpe mpo na etamboli na bango ya malamu, oyo etindaka bato ya mitema sembo bándima nsango ya lobiko oyo ezali na Biblia; yango epesaka Yehova nkembo mpe esepelisaka ye. Ntango tozwaka bikateli ya malamu mpo na molato na biso, tokobaka kopesa Yehova nkembo, ye oyo alatá “lokumu mpe nkembo.”​—Nzembo 104:1, 2.