LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Septembre 2017

Nimero oyo ezali mpe na masolo ya boyekoli mpo na 23/10 tii 26/11/2017.

Kolisá komipekisa

Ndenge nini bandakisa ya Biblia esalisaka biso tólona mpe tókolisa ezaleli wana? Mpo na nini bakristo basengeli kokolisa ezaleli yango?

Mekolá motema mawa ya Yehova

Mokolo moko, Yehova amimonisaki epai ya Moize ndenge ayebisaki ye nkombo na ye mpe bizaleli na ye. Motema mawa ezalaki na kati ya bizaleli atángaki. Ezaleli yango elimboli nini, mpe mpo na nini ezali kobenda likebi na yo?

LISOLO YA BOMOI

Nazwi lipamboli ya kosala na bato oyo bakɔmɛli na elimo

Ndeko David Sinclair azali kokanisa esengo mpe libaku malamu ya kosala elongo na bandeko basi mpe mibali ya sembo na boumeli ya mbula 61 na Betele ya Brooklyn.

“Liloba ya Nzambe na biso ekoumela seko”

Tii lelo Biblia ezali kaka mokanda oyo etɛkamaka koleka atako eleki bambula mingi kobanda ekomama, ata mpe kobongwana ya minɔkɔ, makambo ya politiki, mpe batɛmɛlaki kobongolama na yango.

“Liloba ya Nzambe . . . ezali na nguya”

Bato mingi basali bambongwana ya kokamwa mpo bayekoli Lloba ya Nzambe. Tosengeli kosala nini mpo Biblia esala bongo na bomoi na biso?

“Zalá na mpiko . . . mpe salá”

Mpo na nini tosengeli na mpiko, mpe ndenge nini tokoki kokóma na yango?