Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Soki boyebi makambo wana, esengo na bino soki bozali kosala yango”

“Soki boyebi makambo wana, esengo na bino soki bozali kosala yango”

“Bilei na ngai nde kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai mpe kosilisa mosala na ye.”​—YOANE 4:34.

NZEMBO: 80, 35

1. Elimo ya moimi oyo ezali na mokili ekoki kosala biso nini?

MPO na nini ezalaka mpasi kosalela makambo oyo toyekolaka na Liloba ya Nzambe? Ntina moko ezali ete esɛngaka komikitisa mpo na kosala oyo ezali malamu, mpe ezali mpasi mpenza kozala na komikitisa lelo oyo. Na ‘mikolo oyo ya nsuka,’ tofandi na bato oyo bazali “bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo,” mpe bato oyo “bazangi komipekisa.” (2 Timote 3:1-3) Lokola tozali basaleli ya Nzambe, toyebi ete bizaleli wana ezali mabe. Kasi ekoki kokóma ete tólula baoyo balukaka liboso matomba na bango moko mpo emonanaka lokola balongaka mpe bazalaka na esengo. (Nzembo 37:1; 73:3) Moto mosusu akoki kutu komituna boye: ‘Ebongi mpenza nasala milende ya kotya matomba ya basusu na esika ya liboso? Soki namonisi komikitisa, bato bakokoba komemya ngai?’ (Luka 9:48) Soki totiki moimi oyo ezali na mokili ekɔtela biso, yango ekoki kobebisa boyokani na biso na bandeko mpe ekozala mpasi mpo basusu bámona ete tozali bakristo. Kasi soki toyekoli bandakisa ya basaleli ya Nzambe ya komikitisa mpe tomekoli bango, tokozwa mpenza matomba.

2. Ndenge nini bandakisa ya basaleli ya sembo ya Nzambe na ntango ya kala ekoki kosalisa biso?

2 Nini esalisaki basaleli ya sembo ya Nzambe na ntango ya kala bázala baninga na ye? Basalaki nini mpo na kosepelisa Yehova? Nini epesaki bango makasi ya kosala mokano na ye? Koyekola mpe komanyola bandakisa na bango ekokómisa kondima na biso makasi.

MAKAMBO OYO ESALAKA ETE KONDIMA EZALA MAKASI

3, 4. (a) Ndenge nini Yehova ateyaka biso? (b) Mpo na nini tosengeli kosuka kaka te na kozwa boyebi mpo tózala na kondima makasi?

3 Yehova apesi biso oyo tosengeli na yango mpo kondima na biso ezala makasi. Apesaka biso batoli ya malamu mpe abongisaka biso na nzela ya Biblia, mikanda ya moombo ya sembo, site Internet na biso, TV JW, na makita mpe na mayangani. Kasi Yesu amonisaki ete tosengeli kosuka kaka te na kozwa boyebi. Alobaki: “Bilei na ngai nde kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai mpe kosilisa mosala na ye.”​—Yoane 4:34.

4 Mpo na Yesu, kosala mokano ya Nzambe ezalaki lokola bilei. Ndenge kaka kolya bilei oyo ebongi esepelisaka mpe etongaka nzoto, kosala mokano ya Nzambe ekómisaka kondima makasi. Na ndakisa, ekómelá yo naino te oyoka nzoto kolɛmba ntango ozali kokende na likita ya mosala ya kosakola, kasi nsima ya kosakola oyoka esengo mpe omiyoka malamu?

5. Moto ya bwanya azwaka matomba nini?

5 Kosala makambo oyo Yehova asɛngaka biso nde emonisaka ete tozali na bwanya. (Nzembo 107:43) Moto ya bwanya azwaka matomba mingi. Biblia elobi: “Bisengo na yo mosusu nyonso ekoki kokokana na yango te. . . . Ezali nzete ya bomoi mpo na baoyo basimbi yango, mpe baoyo bakangi yango makasi bakobengama bato ya esengo.” (Masese 3:13-18) Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Soki boyebi makambo wana, esengo na bino soki bozali kosala yango.” (Yoane 13:17) Bayekoli balingaki kozala na esengo ntango nyonso oyo bakobi kosala makambo oyo Yesu ayebisaki bango. Na bomoi na bango mobimba, bakómaki kosalela mateya na ye mpe kolanda ndakisa na ye.

6. Mpo na nini tosengeli kokoba kosalela makambo oyo toyekolaka?

6 Lelo oyo mpe, tosengeli kokoba kosalela makambo oyo toyekolaka. Na ndakisa, moto oyo abongisaka mituka akoki kozala na bisaleli, eloko ya kobongisa, mpe boyebi. Kasi biloko wana ekosalisa ye kaka soki asaleli yango. Ata soki asalaka mosala yango banda bambula ebele, asengeli kokoba kosalela makambo oyo ayekolá mpo akoba kozala moto oyo ayebi mosala malamu. Ndenge moko mpe, ntango toyebaki solo, na ntembe te tozalaki na esengo mpo tozalaki kosalela makambo toyekolaki na Biblia. Kasi mpo tózala na esengo oyo ekoumela, tosengeli kokoba kosalela mokolo na mokolo makambo oyo Yehova ateyaka biso.

7. Tosengeli kosala nini mpo bandakisa oyo ezali na Biblia esalisa biso?

7 Tólobela mwa makambo oyo ekoki komeka ezaleli na biso ya komikitisa. Tokolobela mpe ndenge basaleli ya sembo ya Nzambe na ntango ya kala bakobaki komonisa komikitisa. Nzokande, mpo tózala makasi na elimo, tosengeli kosuka kaka te na koyeba makambo yango. Tosengeli kokanisa yango mpe kosalela yango kozanga koumela.

MONÁKÁ ETE OZALI NDENGE MOKO NA BASUSU

8, 9. Ndenge nini Misala 14:8-15 emonisi komikitisa ya Paulo? (Talá elilingi ya ebandeli.)

8 Nzambe alingi ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timote 2:4) Ndenge nini otalelaka bato nyonso oyo bayebi naino solo te? Ntoma Paulo asakwelaki Bayuda oyo bayebaki mwa makambo etali Yehova. Kasi, asakwelaki mpe baoyo bazalaki kosambela banzambe ya lokuta. Kosakwela bato yango etyaki komikitisa ya Paulo na komekama. Na ndenge nini?

9 Na ndakisa, na mobembo na ye ya liboso ya misionɛrɛ, Paulo ná Barnabasi bakendaki na engumba Listra, na Likaonia. Kuna, bato babengaki Paulo na nkombo ya nzambe na bango Hermesi mpe Barnabasi na nkombo ya nzambe na bango Zeusi. Paulo ná Barnabasi basepelaki na likambo yango? Bamonaki nde ete bakonyokola bango te ndenge ezalaki na bingumba mibale epai bautaki liboso? Bamonaki nde ete likebi oyo batyeli bango ekosalisa mpo bato ebele báyoka nsango malamu? Te! Bayokaki mabe mpe bagangaki ete: “Mpo na nini bozali kosala makambo oyo? Biso mpe tozali bato oyo bazali na bolɛmbu ndenge moko na oyo ya bino.”​—Misala 14:8-15.

10. Mpo na nini Paulo ná Barnabasi bamonaki te ete baleki bato ya Likaonia?

10 Ntango Paulo ná Barnabasi balobaki ete bango mpe bazali bato ya kozanga kokoka, balingaki koloba te ete losambo na bango mpe ezalaki kaka ndenge moko na oyo ya bato wana ya Likaonia. Paulo ná Barnabasi bazalaki bamisionɛrɛ oyo Nzambe atindaki. (Misala 13:2) Lisusu, elimo santu nde etyaki bango mpe bazalaki na elikya moko kitoko. Atako bongo, bamonaki te ete baleki basusu. Basosolaki ete bato ya Likaonia bakokaki mpe kozwa elikya ya bomoi na likoló soki bandimi nsango malamu.

11. Ndenge nini tokoki komekola komikitisa ya Paulo na mosala ya kosakola?

11 Ndenge nini tokoki komekola komikitisa ya Paulo? Tosengeli ata moke te koluka bato básepela na biso mpo na mokumba ya kosakola oyo Yehova apesi biso mpe likoki ya kosala makambo mosusu. Lisusu, mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Ndenge nini natalelaka bato oyo nasakwelaka? Nakaniselaka bato mosusu mabe?’ Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova basalaka makasi báluka baoyo bakoyoka nsango malamu. Na bantango mosusu, esɛngaka kutu koyekola monɔkɔ to mimeseno ya bato oyo basusu bamonaka ete bazali na ntina te. Kasi, Batatoli bamonaka ata moke te ete baleki bato yango. Basalaka nde makasi bámitya na esika ya moto mokomoko mpo na kosalisa bato ebele bándima nsango ya Bokonzi.

TÁNGÁKÁ NKOMBO YA BASUSU NA MABONDELI NA YO

12. Ndenge nini Epafrasi amonisaki ete atyelaki basusu likebi?

12 Tokomonisa mpe ete tozali na komikitisa ntango tozali kobondela mpo na bandeko na biso, ‘baoyo bazwi kondima, mpe lokumu lokola biso.’ (2 Petro 1:1) Epafrasi azalaki kosala bongo. Biblia elobeli ye kaka mbala misato. Ntango Paulo azalaki mokangami na ndako moko na Roma, akomelaki bakristo ya Kolose; alobaki boye mpo na Epafrasi: “Azali ntango nyonso koboma nzoto mpo na bino na mabondeli na ye.” (Bakolose 4:12) Epafrasi ayebaki bandeko malamu, mpe azalaki kotyela bango mpenza likebi. Lokola Paulo abengaki ye “mokangami lokola ngai,” emonisi ete Epafrasi mpe azalaki na mikakatano na ye. (Filemo 23) Atako bongo, akobaki kotyela bandeko mosusu likebi. Mpe asalaki mwa eloko mpo na kosalisa bango: abondelaki mpo na bandeko. Biso mpe tokoki kosala bongo, tokoki ata kotánga bankombo ya bandeko. Mabondeli ya ndenge wana ezalaka na nguya mingi.​—2 Bakorinti 1:11; Yakobo 5:16.

13. Ndenge nini okoki komekola Epafrasi ntango ozali kobondela?

13 Kanisá nani oyo okoki kotánga nkombo na ye ntango ozali kobondela. Mbala mosusu oyebi bandeko ya lisangá to bato ya libota na bino oyo bazali kokutana na mikakatano. Mbala mosusu basengeli kozwa bikateli ya minene to kotɛmɛla komekama. Okoki mpe kobondela mpo na bandeko oyo bankombo na bango ezali na jw.org, lisolo oyo elobi Témoins de Jéhovah emprisonnés en raison de leur foi.(Kende na esika bakomi SALLE DE PRESSE > VEILLE JURIDIQUE.) Okoki mpe kobondela mpo na baoyo bakufeli, baoyo bakutani na makama to bitumba, mpe baoyo bazali na mikakatano ya mbongo. Bandeko ebele mpenza bazali na mposa ya mabondeli na biso. Ntango tozali kobondela mpo na bango, tokomonisa ete tokanisaka kaka bamposa na biso moko te kasi mpe oyo ya basusu. (Bafilipi 2:4) Yehova ayokaka mabondeli ya ndenge wana.

‘YOKÁKÁ NOKI’

14. Na ndenge nini Yehova azali ndakisa oyo eleki malamu na oyo etali koyoka basusu?

14 Koyoka basusu na likebi ezali mpe ndenge mosusu ya komonisa ete tozali na komikitisa. Yakobo 1:19 elobi ete tosengeli “koyokaka noki.” Yehova azali ndakisa eleki malamu na likambo yango. (Ebandeli 18:32; Yosua 10:14) Na ndakisa, tángá lisolo oyo ezali na Kobima 32:11-14. (Tángá.) Atako Yehova azalaki na mposa ya makanisi ya Moize te, apesaki ye nzela ya koloba ndenge oyo azalaki komiyoka. Soki moto moko apesaki makanisi ya libunga liboso, okondima lisusu koyoka ye ntango molai, mpe na nsima kosala makambo oyo alobi? Nzokande, Yehova amonisaka motema molai mpe ayokaka bato nyonso oyo babondelaka ye na kondima nyonso.

15. Ndenge nini tokoki komekola Yehova na oyo etali kopesa basusu lokumu?

15 Mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Soki Yehova amonisaka mpenza komikitisa mpe ayokaka bato ndenge asalaki epai ya Abrahama, Rashele, Moize, Yosua, Manoa, Eliya, mpe Hizikiya, nasengeli te kosala makasi namekola ye? Nasengeli te kopesa bandeko na ngai lokumu, koyoka makanisi na bango mpe kosala makambo balobi, soki esengeli? Ezali na ndeko moko na lisangá to na libota oyo nasengeli kotyela likebi mingi koleka? Nakosala nini mpo na yango?’​—Ebandeli 30:6; Basambisi 13:9; 1 Bakonzi 17:22; 2 Ntango 30:20.

MBALA MOSUSU YEHOVA AKOMONA MPASI NA YO

Davidi alobaki: “Bótika ye!” Soki ezalaki yo, olingaki kosala nini? (Talá paragrafe 16, 17)

16. Mokonzi Davidi asalaki nini ntango Shimei afingaki ye?

16 Komikitisa ekosalisa biso mpe tómipekisa ntango basali biso mabe. (Baefese 4:2) Ndakisa moko ya malamu ezali na 2 Samwele 16:5-13. (Tángá.) Shimei, oyo azalaki moto ya libota ya Mokonzi Saulo, afingaki Davidi ná bato na ye mpe abundisaki bango. Davidi azalaki na likoki ya kosukisa Shimei, kasi akangaki motema na mafinga na ye. Nini esalisaki Davidi amonisa komipekisa ya ndenge wana? Nzembo mokapo ya misato ekoki kosalisa biso tózwa eyano.

17. Nini esalisaki Davidi amonisa komipekisa, mpe ndenge nini tokoki komekola ye?

17 Maloba oyo ezali likoló ya Nzembo mokapo 3 emonisi ete Davidi akomaki yango “ntango azalaki kokima Abisalome mwana na ye.” Vɛrsɛ 1 mpe 2 eyokani na makambo oyo ezali na 2 Samwele mokapo 16. Na nsima, na Nzembo 3:4, Davidi alobaki: “Na mongongo na ngai nakobenga Yehova ye moko, mpe ye akoyanola ngai longwa na ngomba na ye mosantu.” Biso mpe tosengeli kobondelaka ntango basali biso mabe. Na nsima, Yehova akopesa biso elimo santu mpo tókanga motema. Ozali kokanisa likambo oyo esɛngi yo omonisa komipekisa mingi to olimbisa moto oyo asali yo mabe? Ondimi mpenza ete Yehova ayebi mpasi na yo mpe ete akopambola yo?

“BWANYA EZALI ELOKO YA LIBOSO”

18. Kosalela makambo Yehova ateyaka biso ekomemela biso matomba nini?

18 Kosala makambo oyo toyebi ete ezali malamu, ememaka matomba ebele. Masese 4:7 elobi: “Bwanya ezali eloko ya liboso.” Atako bwanya eutaka na boyebi, emonanaka mingimingi na bikateli oyo tozwaka, kasi kaka te na makambo oyo toyebi. Ata furmi emonisaka bwanya. Ebombaka bilei mpo na eleko ya malili. (Masese 30:24, 25) Kristo, oyo abengami “bwanya ya Nzambe,” asalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka Tata na ye. (1 Bakorinti 1:24; Yoane 8:29) Nzambe akopesa biso mbano soki tozali na komikitisa mpe tomonisi bwanya, elingi koloba tozali kopona kosala oyo toyebi ete ezali malamu. (Tángá Matai 7:21-23.) Na yango, kobá kosala makasi mpo ete lisangá ezala esika oyo moto nyonso akoki kosalela Yehova na komikitisa. Esɛngaka ntango mpe motema molai mpo na kosalela makambo oyo toyebi ete ezali malamu. Kasi soki tozali kosala yango, tokomonisa ete tozali na komikitisa mpe tokozala na esengo lelo mpe libela na libela.