Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kobá komonisa bolingo oyo etongaka

Kobá komonisa bolingo oyo etongaka

“Bolingo etongaka.”​—1 BAKORINTI 8:1.

NZEMBO: 109, 121

1. Likambo nini ya ntina Yesu alobelaki na butu ya nsuka oyo alekisaki elongo na bayekoli na ye?

NA BUTU ya nsuka oyo Yesu alekisaki elongo na bayekoli na ye liboso akufa, alobelaki bolingo mbala soki 30. Ayebisaki bayekoli na ye ete basengeli ‘kolingana.’ (Yoane 15:12, 17) Bolingo kati na bango esengelaki komonana polele tii basusu bakomona yango mpe bakoyeba ete bazali bayekoli ya solo ya Kristo. (Yoane 13:34, 35) Bolingo oyo Yesu alobelaki ezali bolingo kaka ya maloba te. Ezali bolingo oyo emonanaka na misala, oyo etindaka moto amipimela mpo na basusu. Yesu alobaki: “Ata moto moko te azali na bolingo koleka oyo, ete moto akaba [bomoi] na ye mpo na baninga na ye. Bozali baninga na ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kopesa bino mitindo.”​—Yoane 15:13, 14.

2. (a) Lelo oyo, basaleli ya Nzambe bayebani mpo na likambo nini? (b) Mituna nini tokotalela?

2 Lelo oyo, eyebani ete basaleli ya Yehova bazalaka na bolingo ya solosolo, oyo etindaka bango bámipimela mpo na basusu mpe bazalaka na bomoko makasi. (1 Yoane 3:10, 11) Tosepelaka mpenza ndenge bolingo na biso ekipaka te ekólo to mboka na biso, monɔkɔ oyo tolobaka, esika oyo touti, to ndenge oyo tobɔkwamá. Na mokili mobimba, basaleli ya Yehova balinganaka mpenza. Kasi, mpo na nini bolingo ezali na ntina mingi lelo oyo? Ndenge nini Yehova ná Yesu bapesaka biso makasi na bolingo nyonso? Mpe ndenge nini mokomoko na biso akoki komonisa bolingo oyo “etongaka,” to epesaka basusu makasi?​—1 Bakorinti 8:1.

MPO NA NINI BOLINGO EZALI NA NTINA MINGI LELO OYO?

3. Bato mingi bazali koyoka ndenge nini na ‘ntango oyo ya mpasi’?

3 Tozali na “ntango moko ya mpasi mpenza,” mpe bomoi ‘etondi na mawa mpe na makambo oyo eyokisaka mpasi.’ (2 Timote 3:1-5; Nzembo 90:10) Ebele ya bato bakómi komona ete basuki. Baankɛtɛ emonisi ete mbula na mbula, bato koleka 800 000 bamibomaka; yango elakisi ete nsima ya segɔnde 40, moto moko amibomaka. Likambo ya mawa, ata bandeko mosusu na lisangá bamonaki ete basuki mpe bamibomaki.

4. Bato nini oyo Biblia elobeli, oyo na ntango moko boye basɛngaki liwa?

4 Na ntango ya kala, basaleli mosusu ya sembo ya Nzambe babulunganaki mpo na mikakatano na bango mpe mposa ya bomoi esilaki. Na ndakisa, Yobo amonaki ete mpasi eleki mpe alobaki: “Naboyi; nalingi kozala na bomoi te.” (Yobo 7:16; 14:13) Ntango Yona amonaki ndenge makambo esukaki na mokumba oyo bapesaki ye, alobaki: “Ee Yehova, nabondeli yo, longolá [bomoi] na ngai, mpo malamu nakufa na esika ya kozala na bomoi.” (Yona 4:3) Lisusu, likambo moko etungisaki mosakoli Eliya mingi tii asɛngaki liwa. Alobaki: “Ekoki! Sikoyo, Ee Yehova, longolá [bomoi] na ngai.” (1 Bakonzi 19:4) Kasi, Yehova azalaki kolinga basaleli na ye wana ya sembo mingi mpe alingaki bázala na bomoi. Apamelaki bango te mpo na mayoki oyo babimisaki. Kasi, asalisaki bango básepela lisusu na bomoi mpo bákoba kosalela ye na bosembo.

5. Mpo na nini bandeko bazali mpenza na mposa tómonisela bango bolingo?

5 Lelo oyo, bandeko na biso mingi bazali na mikakatano oyo ezali kotungisa bango mpe bazali na mposa tómoniselaka bango bolingo. Bandeko mosusu bazali kokutana na minyoko to bato bazali kotyola bango. Basusu bazali koyika mpiko mpo baninga ya mosala oyo batumolaka bango mpe balobaka na bango mabe nsima ya mokɔngɔ na bango. To bazali kolɛmba mingi mpo esɛngaka bálekisa lisusu bangonga mingi nsima ya mosala, to mpe mosala eleki ebele. Basusu mpe bazali na mikakatano minene na libota, mbala mosusu molongani azali mosaleli ya Yehova te mpe atyolaka moninga ntango nyonso. Mpo na mitungisi wana mpe mitungisi mosusu, bandeko mingi na lisangá bazali komona ete makasi esili bango mpe bazali lisusu na ntina te. Nani akoki kosalisa bango?

BOLINGO OYO YEHOVA ALINGAKA BISO EPESAKA BISO MAKASI

6. Ndenge nini Yehova apesaka basaleli na ye makasi?

6 Yehova apesaka basaleli na ye makasi na ndenge ayebisaka bango ete alingaka bango mpe akolinga bango libela na libela. Na ntembe te Bayisraele balendisamaki mingi ntango Yehova alobaki bango ete: “Ozali na motuya na miso na ngai . . . ozali na lokumu, mpe ngai nalingi yo . . . Kobanga te, mpo nazali elongo na yo”! (Yisaya 43:4, 5) Yebá ete ozali na motuya na miso ya Yehova mpe alingaka yo. * Biblia epesi elaka oyo: “Lokola azali Moto ya nguya, akobikisa. Akosepela na yo mpe akozala na esengo.”​—Sefania 3:16, 17.

7. Na ndenge nini Yehova alingaka biso ndenge mama alingaka mwana na ye? (Talá elilingi ya ebandeli.)

7 Yehova alaki ete akopesa basaleli na ye makasi mpe akobɔndisa bango ata soki bakutani na mokakatano nini. Alobi na bango boye: “Bokomemama na loketo, bakomema bino na mabɔlɔngɔ mpe bakokitisa bino motema. Nakokoba kobɔndisa bino lokola moto oyo mama na ye azali se kobɔndisa.” (Yisaya 66:12, 13) Mwana amiyokaka ete abatelami ntango mama na ye amemi ye to azali kosakanisa ye! Ndenge moko mpe, Yehova alingaka yo mpe alingi oyoka ete obatelami. Kotya ntembe ata moke te ete ozali na motuya mingi na miso na ye.​—Yirimia 31:3.

8, 9. Ndenge nini bolingo oyo Yesu alingaka biso ekoki kopesa biso makasi?

8 Likambo mosusu oyo endimisaka biso ete Yehova alingaka biso yango oyo: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Ndenge Yesu andimaki kokufa mpo na biso amonisaki mpe ete alingaka biso. Bolingo yango epesaka biso makasi! Biblia elobi ete ata ‘bolɔzi to mpasi’ ekoki te ‘kokabola biso na bolingo ya Kristo.’​—Baroma 8:35, 38, 39.

9 Na bantango mosusu, tokutanaka na mikakatano oyo ekoki kosilisa biso makasi na nzoto, na makanisi to esengo ya kosalela Yehova. Kasi, kokanisa bolingo oyo Kristo alingaka biso ekoki kopesa biso makasi ya koyika mpiko. (Tángá 2 Bakorinti 5:14, 15.) Bolingo ya Yesu epesaka biso mposa ya kokoba kozala na bomoi mpe kosalela Yehova. Ekoki kosalisa biso tótika te, ata soki tokutani na makama, monyoko, kolɛmba nzoto, to mitungisi.

BANDEKO BAZALI NA MPOSA TÓLINGA BANGO

Koyekola ndakisa ya Yesu ekoki kolendisa yo (Talá paragrafe 10, 11)

10, 11. Nani azali na mokumba ya kolendisa bandeko oyo balɛmbi? Limbolá.

10 Yehova apesaka mpe biso makasi na bolingo nyonso na nzela ya lisangá. Soki tolingaka Nzambe, tokolinga mpe bandeko ya lisangá. Tokosala nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa bango bámona ete bazali na motuya mpe ete Yehova alingaka bango. (1 Yoane 4:19-21) Ntoma Paulo akomaki: “Bókoba kobɔndisana mpe kolendisana, ndenge kutu bozali kosala yango.” (1 Batesaloniki 5:11) Ezali kaka mokumba ya bankulutu te. Mokomoko na biso akoki komekola Yehova ná Yesu mpe kobɔndisa bandeko.​—Tángá Baroma 15:1, 2.

11 Ekoki kosɛnga bandeko mosusu oyo banyokwamaka na makanisi báluka lisalisi ya monganga. (Luka 5:31) Bankulutu mpe bandeko mosusu bayebi malamu ete ata soki bazali minganga te, bakoki mpenza kosalisa mpe kobɔndisa bandeko yango. Bakoki kolanda toli oyo: “Bólobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo enyokwami na makanisi, bósalisa bato ya bolɛmbu, mpe bózala na motema molai epai ya bato nyonso.” (1 Batesaloniki 5:14) Tosengeli kosala makasi tómitya na esika ya bandeko, tómonisela bango motema molai mpe tóloba na bango na ndenge ya kobɔndisa ntango balɛmbi nzoto. Osalaka nyonso mpo opesa basusu makasi? Okoki kosala nini mpo olendisa mpe obɔndisa basusu mingi koleka?

12. Pesá ndakisa ya ndeko oyo alendisamaki mpo na bolingo ya bandeko ya lisangá.

12 Ndeko mwasi moko na Mpoto alobi boye: “Na bantango mosusu makanisi ya komiboma eyelaka ngai, kasi bato ebele balandelaka ngai. Bandeko ya lisangá na biso babikisi bomoi na ngai. Balendisaka ngai mingi mpe bamoniselaka ngai bolingo ntango nyonso. Atako bandeko moke kaka nde bayebi ete nanyokwamaka na makanisi, lisangá etikaka ngai te. Ndeko moko ná mwasi na ye bazali lokola baboti na ngai ya elimo. Babatelaka ngai, mpe bazalaka wana mpo na ngai ngonga nyonso, butu moi.” Ya solo, moto nyonso te nde akoki kosalisa ndenge wana. Kasi, biso nyonso tokoki kopesa mabɔkɔ mpo na kosalisa baoyo bazali konyokwama na makanisi. *

NDENGE YA KOLENDISA BASUSU NA BOLINGO

13. Tosengeli kosala nini mpo na kobɔndisa basusu?

13 Zalá moyoki malamu. (Yakobo 1:19) Koyoka ndeko na likebi ekomonisa ete olingaka ye. Tuná ye mituna ya malamu oyo ekosalisa yo oyeba ndenge oyo azali komiyoka. Elongi na yo esengeli komonisa ye ete ozali komitya na esika na ye. Ntango azali koloba, zalá na motema molai, tiká ye aloba mpe kokata ye te. Soki ozali moyoki ya malamu, okoki koyeba mpenza ndenge oyo azali komiyoka mpe ekosalisa ye atyela yo motema. Yango ekosala ete andima koyoka makambo oyo okoloba mpo na kolendisa ye. Soki ozali mpenza kotyela basusu likebi, okoki mpenza kobɔndisa bango.

14. Mpo na nini tosengeli te kolobela basusu mabe?

14 Kolobela ye mabe te. Moto oyo azali konyokwama na makanisi akolɛmba lisusu mingi soki amoni ete tozali kolobela ye mabe. Soki bongo, ekozala mpasi mpenza tósalisa ye. Biblia elobi: “Moto mosusu alobaka kozanga kokanisa lokola nde azali kozokisa na mopanga, kasi lolemo ya bato ya bwanya nde nkisi oyo ebikisaka.” (Masese 12:18) Ata soki tokozokisa moto na nko te na maloba na biso, tokoki kopesa ye mpasi soki tozali koloba kozanga kokanisa. Mpo na kolendisa ndeko na biso, tosengeli kosala makasi amona ete tolingi mpenza komitya na esika na ye.​—Matai 7:12.

15. Tokoki kosalela nini mpo na kobɔndisa basusu?

15 Salelá Liloba ya Nzambe mpo na kobɔndisa. (Tángá Baroma 15:4, 5.) Lokola Biblia euti na “Nzambe oyo apesaka ezaleli ya koyika mpiko mpe libɔndisi,” tokoki kokamwa te ete maloba na yango ebɔndisa mingi. Tozali mpe na Index ya mikanda Watch Tower mpe Buku ya bolukiluki ya Batatoli ya Yehova. Soki tosaleli yango, tokoki kozwa bavɛrsɛ mpe mikanda oyo tokoki kosalela mpo na kobɔndisa mpe kolendisa bandeko na biso.

16. Ezaleli nini ekosalisa biso tólendisa ndeko oyo azali konyokwama na makanisi?

16 Zalá na boboto mingi. Yehova azali “Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso,” mpe azali na “mawa monene” mpo na basaleli na ye. (Tángá 2 Bakorinti 1:3-6; Luka 1:78; Baroma 15:13) Paulo azalaki ndakisa malamu na likambo yango mpo amekolaki Yehova. Akomaki boye: “Tokómaki nde bato ya boboto na kati na bino, lokola ntango mama oyo azali komɛlisa alɛngɛlaka bana na ye mpenza. Boye, lokola tolingaki bino na bolingo ya motema, tosepelaki mingi kopesa bino, kaka nsango malamu ya Nzambe te, kasi mpe milimo na biso moko, mpo bokómaki bandeko na biso ya bolingo.” (1 Batesaloniki 2:7, 8) Soki tozali na boboto mingi lokola Yehova, tokoki kopesa ndeko na biso libɔndisi oyo asɛngaki Yehova na libondeli!

17. Ndenge nini kozala na bokatikati ekosalisa biso tólendisa bandeko na biso?

17 Koluka te bandeko bázala bato ya kokoka. Zalá na bokatikati. Soki ozali koluka bandeko bázala bato ya kokoka, okolɛmba nzoto. (Mosakoli 7:21, 22) Kobosana te ete Yehova azalaka na bokatikati na makambo oyo asɛngaka biso. Soki tolandi ndakisa na ye, tokokanga motema na mabunga ya basusu. (Baefese 4:2, 32) Na esika tókokanisa bango na bato mosusu to tómonisa bango ete oyo bazali kosala ekoki te, tósala makasi tólendisaka bango mpe tópesaka bango longonya mpo na makambo ya malamu oyo bazali kosala. Yango ekosalisa bango bázala na esengo wana bazali kosalela Yehova.​—Bagalatia 6:4.

18. Mpo na nini tosengeli komoniselana bolingo oyo etongaka?

18 Mosaleli mokomoko ya Yehova azali na motuya na miso na ye mpe na miso ya Yesu. (Bagalatia 2:20) Lokola tolingaka bandeko na biso mingi, tosengeli komonisela bango boboto mpenza. Mpo na kobɔndisa bango, tosengeli ‘kolanda makambo oyo etyaka kimya mpe makambo oyo elendisaka.’ (Baroma 14:19) Biso nyonso tozali kozela Paradiso, epai moto moko te akozala na ntina ya kolɛmba nzoto! Maladi ekozala lisusu te, bitumba mpe te. Bato bakokufa lisusu te mpo na lisumu ya Adama, monyoko, mikakatano ya libota, to kolɛmba nzoto ekozala te. Na nsuka ya Boyangeli ya mbula nkóto, bato nyonso bakokóma bato ya kokoka. Bato oyo bakotikala sembo na komekama ya nsuka, Yehova akokómisa bango bana na ye awa na mabele mpe bakozwa “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.” (Baroma 8:21) Na yango, biso nyonso tosengeli komoniselana bolingo oyo etongaka mpo tósalisana mpo na kokɔta na mokili ya sika oyo Nzambe alaki.

^ par. 12 Mpo na kosalisa bato oyo bazalaka na makanisi ya komiboma, talá masolo ya Lamuká! Mpo na nini kokoba kozala na bomoi?​—Ntina misato oyo osengeli komiboma te” (04/2014); “Ntango omoni ete olɛmbi bomoi” (01/2012); mpe “Il vaut la peine de vivre” (Un fléau mondial,” “Pourquoi renonce-t-on à vivre?,” “Vous pouvez trouver de l’aide(22/10/2001).