Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso kasi apesaka bato lokumu

Azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso kasi apesaka bato lokumu

“[Yehova] ayebi malamu ndenge oyo tosalemá, azali kobosana te ete tozali putulu.”​—NZEMBO 103:14.

NZEMBO: 30, 10

1, 2. (a) Na bokeseni na bato oyo bazali na bokonzi, ndenge nini Yehova asalelaka bato makambo? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

MBALA mingi, bato oyo bazali na bokonzi bakonzaka basusu to mpe banyokolaka bango. (Matai 20:25; Mosakoli 8:9) Yehova asalaka bongo te! Azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, kasi apesaka bato ya kozanga kokoka lokumu mingi mpenza. Asalelaka biso makambo na boboto, atalelaka mayoki na biso mpe bamposa na biso. Lokola ‘abosanaka te ete tozali putulu,’ asɛngaka biso kaka makambo oyo tokokoka kosala.​—Nzembo 103:13, 14.

2 Biblia elobeli bandakisa ebele oyo emonisi ndenge Yehova apesaka basaleli na ye lokumu. Tólobela ndakisa misato: (1) ndenge asalisaki elenge Samwele na boboto mpo ayebisa Nganga-nzambe monene Eli nsango moko ya lisambisi; (2) ndenge amoniselaki Moize motema molai ntango azalaki koboya kondima mokumba ya kobimisa Bayisraele na Ezipito; mpe (3) ndenge abimisaki Bayisraele na Ezipito. Ndakisa mokomoko ezali koteya biso nini mpo na Yehova mpe ndenge nini tokoki kosalela mateya yango?

YEHOVA APESI ELENGE MOKO LOKUMU

3. Likambo nini ya kokamwa ekómelaki elenge Samwele na butu moko, mpe motuna nini yango ebimisi? (Talá elilingi ya ebandeli.)

3 Samwele abandaki “kosalela Yehova mosala” na tabernakle ntango azalaki mwana moke mpenza. (1 Samwele 3:1) Mokolo moko na butu ntango akendaki kolala, likambo moko ya kokamwa esalemaki. * (Tángá 1 Samwele 3:2-10.) Samwele ayokaki moto moko azali kobenga ye. Lokola Samwele akanisaki ete ezalaki Nganga-nzambe monene Eli, akendaki mbangu epai ya Eli mpe alobaki: “Ngai oyo, mpo obengi ngai.” Kasi Eli alobaki na ye: “Nabengi yo te.” Ntango likambo yango esalemaki lisusu mbala mibale, Eli ayebaki ete Nzambe nde azalaki kobenga Samwele. Na yango, ayebisaki Samwele ndenge oyo asengeli koyanola, mpe Samwele atosaki. Mpo na nini Yehova ayebisaki Samwele mbala moko te ete ye nde azalaki kobenga ye? Biblia epesi eyano te; kasi ndenge makambo esukaki emonisi ete mbala mosusu Yehova alingaki kopesa elenge Samwele lokumu. Na ndenge nini?

4, 5. (a) Samwele asalaki nini ntango Yehova apesaki ye nsango ya koyebisa Eli? (b) Lisolo yango eteyi biso nini mpo na Yehova?

4 Tángá 1 Samwele 3:11-18. Mibeko ya Yehova esɛngaki bana bámemyaka mikóló, mingimingi baoyo bazali na bokonzi. (Kobima 22:28; Balevi 19:32) Na yango, kanisá ndenge ezalaki mpasi mwana moke lokola Samwele akende epai ya Eli na ntɔngɔ mpe ayebisa ye na mpiko nyonso nsango makasi ya lisambisi oyo Nzambe atindaki! Kutu, Biblia elobi ete Samwele “azalaki kobanga koyebisa Eli likambo oyo amonaki.” Kasi, Nzambe amonisaki Eli polele ete Ye nde azalaki kobenga Samwele. Na yango, Eli ayebisaki Samwele abombela ye ata likambo moko te na maloba nyonso oyo Nzambe alobaki. Samwele atosaki Eli mpe ‘ayebisaki ye maloba yango nyonso.’

5 Eli akamwaki mpenza maloba yango te. Liboso na yango, “moto moko ya Nzambe” ayaki koyebisa ye nsango ya ndenge wana. (1 Samwele 2:27-36) Lisolo yango ezali komonisa bwanya ya Yehova mpe ndenge apesaka bato lokumu.

6. Mateya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Nzambe asalisaki elenge Samwele?

6 Elenge, lisolo ya Samwele emonisi ete Yehova ayebi mikakatano na yo mpe mayoki na yo. Mbala mosusu ozalaka nsɔninsɔni mpe obangaka koyebisa mikóló nsango malamu, to mpe obangaka komimonisa ete okeseni na baninga na yo. Yebá ete Yehova azali na mposa ya kosalisa yo. Na yango, bondelá ye mpe fungolelá ye motema na yo. (Nzembo 62:8) Kanisá na mozindo masolo ya Biblia oyo elobeli bilenge lokola Samwele. Mpe sololá na bandeko, ezala ya mbula na yo to mikóló, oyo balongá mikakatano lokola oyo ozali kokutana na yango. Bakoki kutu koyebisa yo ndenge Yehova asalisaki bango, mbala mosusu na ndenge oyo bazalaki kokanisa te.

YEHOVA APESI MOIZE LOKUMU

7, 8. Ndenge nini Yehova apesaki Moize lokumu mingi?

7 Ntango Moize azalaki na mbula 80, Yehova apesaki ye mokumba moko ya mpasi: akende kolongola ekólo Yisraele na boombo na Ezipito. (Kobima 3:10) Ekoki kozala ete mokumba yango ebulunganisaki Moize, mpo azalaki mobateli ya mpate mbula 40 na Midiane. Moize alobaki: “Ngai nazali nani mpo nakende epai ya Farao mpe mpo nabimisa bana ya Yisraele na Ezipito?” Kasi, Yehova ayebisaki ye: “Nakozala elongo na yo.” (Kobima 3:11, 12) Yehova ayebisaki ye mpe ete: Bankumu ya Yisraele “bakoyoka mpenza mongongo na yo.” Atako bongo, Moize atunaki Yehova: “Kanisá ete bandimi ngai te mpe bayoki mongongo na ngai te?” (Kobima 3:18; 4:1) Na maloba wana, Moize alobaki ete Yehova akoki kozala na libunga! Kasi Yehova amoniselaki ye motema molai. Kutu, apesaki Moize nguya ya kosala makamwisi. Moize azali moto ya liboso oyo Biblia elobi ete azwaki nguya ya ndenge wana.​—Kobima 4:2-9, 21.

8 Atako bongo, Moize azalaki kaka komilela. Alobaki ete ayebi koloba malamu te. Na yango, Nzambe alobaki na ye: “Ngai moko nakozala elongo na monɔkɔ na yo mpe nakoteya yo oyo osengeli koloba.” Sikoyo Moize andimaki mbala moko? Te; asɛngaki Nzambe atinda moto mosusu! Na yango, Yehova asilikaki. Atako bongo, apesaki Moize lokumu na ndenge atalelaki mayoki na ye, mpe atindaki Arona mpo azala molobeli na ye.​—Kobima 4:10-16.

9. Ndenge nini motema molai mpe boboto ya Yehova esalisaki Moize akokisa mokumba na ye?

9 Lisolo yango ezali koteya biso nini mpo na Yehova? Lokola Yehova azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, akokaki kosalela nguya na ye mpo na kobangisa Moize mpo atosa ye mbala moko. Kasi, asalaki bongo te; amonisaki motema molai mpe boboto, mpe ayebisaki mosaleli na ye ya bopɔlɔ mpe ya komikitisa makambo oyo ekitisaki ye motema. Kosala bongo ebotaki mbuma ya malamu? Ɛɛ! Moize akómaki mokambi monene ya ekólo ya Nzambe. Asalaki makasi azala na boboto mpe apesa basusu lokumu, kaka ndenge Yehova asalaki epai na ye.​—Mitángo 12:3.

Na ndakisa ya Yehova, opesaka basusu lokumu? (Talá paragrafe 10)

10. Matomba nini ekomonana soki tomekoli Yehova na oyo etali kopesa basusu lokumu?

10 Mateya nini tokoki kozwa? Soki ozali mobali, moboti, to nkulutu, boye ozali na mwa bokonzi likoló ya mwasi na yo, bana, to mpe bandeko ya lisangá. Na yango, okomekola Yehova soki ozali kopesa lokumu na bato oyo bazali na nse ya bokonzi na yo, komonisela bango boboto mpe motema molai. (Bakolose 3:19-21; 1 Petro 5:1-3) Soki omekoli Yehova mpe Yesu Kristo, oyo azali Moize Monene, basusu bakobanga te koya kosolola na yo, mpe okolendisa bango. (Matai 11:28, 29) Okopesa mpe bato ndakisa malamu ya kolanda.​—Baebre 13:7.

MOBIKISI YA NGUYA APESI BATO NA YE LOKUMU

11, 12. Ndenge nini Yehova asalisaki Bayisraele bázala na kimya mpe bábanga te ntango abimisaki bango na Ezipito?

11 Ntango Bayisraele babimaki na Ezipito na mobu 1513 L.T.B., mbala mosusu bazalaki bato koleka milio 3. Kati na bango, ezalaki na bana, mibange, mpe mbala mosusu bato ya maladi mpe bibɔsɔnɔ. Ebele ya bato wana bazalaki na mposa ya Mokambi moko ya boboto, oyo ayebi komitya na esika ya basusu. Yehova azalaki Mokambi ya ndenge wana, mpe amonisaki yango na nzela ya Moize. Na yango, Bayisraele bazalaki kobanga te ntango balongwaki mboka kaka moko oyo bayebaki.​—Nzembo 78:52, 53.

12 Ndenge nini Yehova asalisaki bato na ye bázala na kimya mpe bábanga te? Abongisaki bango na “bituluku ya etumba” ntango babimaki na Ezipito. (Kobima 13:18) Lokola babongisamaki malamu, yango esalisaki bango bámona ete Nzambe na bango azwi makambo nyonso na mabɔkɔ. Lisusu, Yehova apesaki bango “lipata na moi” mpe “pole ya mɔtɔ” na butu. (Nzembo 78:14) Ezali lokola nde Yehova alobaki na bango: “Bóbanga te. Nazali elongo na bino mpo na kokamba bino mpe kobatela bino.” Likambo oyo esalemaki na nsima emonisaki ete Bayisraele bazalaki mpenza na mposa ya koyeba ete Yehova azali!

Ndenge nini Yehova atyelaki Bayisraele likebi na Mbu Motane? (Talá paragrafe 13)

13, 14. (a) Ndenge nini Yehova apesaki Bayisraele lokumu na Mbu Motane? (b) Ndenge nini Yehova amonisaki ete azalaki na nguya koleka Baezipito?

13 Tángá Kobima 14:19-22. Kanisá ete ozali elongo na Bayisraele mpe bokangami na motambo: basoda ya Ezipito na nsima na bino, mpe Mbu Motane liboso na bino. Na ntango yango, Nzambe asalisi bino. Likonzí ya lipata oyo ezalaki liboso na bino ekei na nsima na bino, mpo ekanga Baezipito nzela. Bakómi na molili, kasi epai na bino pole makasi ya likamwisi. Na nsima, omoni Moize asemboli lobɔkɔ likoló ya mbu, mpe mopɛpɛ makasi ya ɛsti efungoli nzela moko monene na katikati ya mbu. Na molɔngɔ, yo, libota na yo, mpe bibwɛlɛ na bino bokɔti na katikati ya mabele ya mbu oyo ekauki elongo na bato mosusu nyonso ya ekólo. Okamwe komona ete mabele ezali makasi, pɔtɔpɔtɔ ezali te, mpe bozali kotambola malamu. Na yango, ata bato oyo bazalaki kotambola malɛmbɛ mpenza bakatisi na kimya na ngámbo mosusu.

14 Tángá Kobima 14:23, 26-30. Ntango makambo wana ezali kosalema, Farao, moto ya lolendo mpe zoba, abandi kolanda bino na kati ya mbu. Na ntango yango, Moize asemboli lisusu lobɔkɔ na ye na likoló ya mbu, mpe mai ezongi na esika na yango, ezipi Farao ná mampinga na ye. Moto moko te abiki!​—Kobima 15:8-10.

15. Lisolo ya Bayisraele na Mbu Motane eteyi biso nini mpo na Yehova?

15 Lisolo yango ezali koteya biso ete Yehova azali Nzambe ya molɔngɔ, mpe ezaleli yango esalisaka biso tózala na kimya mpe tóbanga te. (1 Bakorinti 14:33) Lokola mobateli ya mpate oyo alingaka mpe abatelaka etonga na ye, Yehova atyelaka basaleli na ye likebi. Alɛngɛlaka bango mpe abatelaka bango liboso ya banguna. Lokola nsuka ya ebongiseli oyo ekómi pene, koyeba likambo yango ezali kokitisa biso motema mpe kobɔndisa biso.​—Masese 1:33.

16. Litomba nini tokoki kozwa na kotalela lisusu ndenge Yehova abikisaki Bayisraele?

16 Lelo oyo mpe, Yehova atyelaka basaleli na ye nyonso likebi. Asalisaka bango bábatela boyokani malamu na ye mpe abatelaka bango liboso ya banguna. Mpe akokoba kosala yango na bolɔzi monene oyo ekoya mosika te. (Emoniseli 7:9, 10) Na yango, bázala bilenge to mikóló, bato ya nzoto kolɔngɔnɔ to bibɔsɔnɔ, basaleli ya Nzambe bakobanga te mpe bakoyoka nsɔmɔ te na ntango ya bolɔzi monene. * Kutu, bakozala na mpiko! Bakokanisa maloba oyo ya Yesu ete: “Bótɛlɛma alima mpe bótombola mitó na bino, mpo kosikolama na bino ekómi pene.” (Luka 21:28) Bakozala na elikya ete Yehova akobatela bango, ata ntango Goge, elingi koloba etuluku ya bikólo, oyo eleki Farao na nguya, ekobundisa bango. (Ezekiele 38:2, 14-16) Mpo na nini bakozala na elikya yango? Mpo bayebi ete Yehova abongwani te. Akomonisa lisusu ete azali Mobikisi oyo alingaka basaleli na ye mpe atyelaka bango likebi.​—Yisaya 26:3, 20.

17. (a) Litomba nini tokoki kozwa soki tozali koyekola masolo ya Biblia oyo elobeli ndenge Yehova atyelaka bato na ye likebi? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

17 Na lisolo oyo, totaleli bandakisa oyo emonisi ndenge Yehova apesaka bato na ye lokumu, atyelaka bango likebi, amoniselaka bango boboto, atambwisaka bango mpe abikisaka bango. Ntango ozali komanyola masolo ya ndenge wana, meká kolandela makambo ya mikemike oyo ekosalisa yo oyekola likambo ya sika mpo na Yehova. Ntango ozali koyekola bizaleli kitoko ya Yehova, bolingo na yo mpo na ye mpe kondima na yo ekokóma makasi. Na lisolo oyo elandi, tokolobela ndenge oyo tokoki komekola Yehova na oyo etali kopesa bato lokumu na libota, na lisangá, mpe na mosala ya kosakola.

^ par. 3 Josèphe, oyo azalaki Moyuda mpe moto ya istware, alobi ete na ntango wana, Samwele azalaki na mbula 12.

^ par. 16 Tokoki mpenza koloba ete bato mosusu oyo bakobika na Armagedone bakozala bibɔsɔnɔ. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, abikisaki bato oyo bazalaki na “maladi ya ndenge nyonso mpe mbeba ya ndenge nyonso na nzoto.” Yango esalisaka biso tómona mwa moke makambo oyo akosala mpo na bato oyo bakobika na Armagedone, kasi te bato oyo bakosekwa. (Matai 9:35) Bato oyo bakosekwa, bakosekwa nzoto kolɔngɔnɔ.