Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lokola Yehova, pesáká basusu lokumu mpe zalá na boboto

Lokola Yehova, pesáká basusu lokumu mpe zalá na boboto

“Esengo na moto oyo azali kotya likebi na moto oyo azangá.”​—NZEMBO 41:1.

NZEMBO: 130, 107

1. Ndenge nini basaleli ya Yehova bamonisaka ete balinganaka?

BASALELI ya Yehova na mokili mobimba bazali libota mpe balinganaka mpenza. (1 Yoane 4:16, 21) Ntango mosusu bamipimelaka mpenza mpo na bandeko na bango, kasi mbala mingi bamonisaka bolingo na bango na makambo ebele ya mikemike, na ndakisa koloba na ndeko likambo ya boboto to kosalela ye bolamu. Ntango tozali kopesa bandeko lokumu mpe komonisela bango boboto, tozali komekola Tata na biso ya likoló.​—Baefese 5:1.

2. Ndenge nini Yesu amekolaki Tata na ye na oyo etali komonisa bolingo?

2 Yesu amekolaki Tata na ye na ndenge ya kokoka. Azalaki ntango nyonso kosalela basusu makambo na boboto. Alobaki: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba, mpe ngai nakopemisa bino . . . , mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto mpe na komikitisa na motema.” (Matai 11:28, 29) Soki tomekoli Yesu mpe tozali “kotya likebi na moto oyo azangá,” tokosepelisa Yehova mpe biso moko tokozala na esengo. (Nzembo 41:1) Na lisolo oyo, tokomona ndenge tokoki kopesa lokumu na bandeko ya libota, ya lisangá, mpe na bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola.

PESÁKÁ BATO YA LIBOTA NA YO LOKUMU

3. Ndenge nini mobali akoki kopesa mwasi na ye lokumu? (Talá elilingi ya ebandeli.)

3 Mibali basengeli kopesa ndakisa mpe komonisa ete bapesaka bato ya libota na bango lokumu. (Baefese 5:25; 6:4) Na ndakisa, Biblia elendisi bango báfanda na basi na bango “na boyebi,” elingi koloba bápesaka bango lokumu mpe bázala na bososoli. (1 Petro 3:7) Na ndakisa, mobali oyo azalaka na bososoli ayebi ete atako mobali akeseni na mwasi na makambo mingi, amonaka te ete azali na ntina mingi koleka mwasi. (Ebandeli 2:18) Na yango, amityaka na esika ya mwasi na ye mpe asalelaka ye makambo na lokumu mpe limemya. Mwasi moko na Canada alobi boye mpo na mobali na ye: “Amityaka mpenza na esika na ngai mpe alobaka te, ‘Ozali kolekisa ndelo.’ Lisusu, ayokaka ngai na likebi. Soki azali kosalisa ngai nasembola makanisi na ngai na likambo moko, asalaka yango na boboto.”

4. Na boyokani na ye na basi mosusu, ndenge nini mobali akoki komonisa ete amityaka na esika ya mwasi na ye?

4 Mobali oyo amityaka na esika ya mwasi na ye akoki ata mokolo moko te kolulana na mwasi mosusu to kosepela na ye na makanisi ya mabe. (Yobo 31:1) Asalelaka te basite ya kosolola na baninga mpo na kolulana na mwasi mosusu, mpe atalaka basite ya mbindo te. Azalaka sembo epai ya mwasi na ye na makambo nyonso kaka te mpo alingaka ye, kasi mpe mpo alingaka Yehova mpe ayinaka oyo ezali mabe.​—Tángá Nzembo 19:14; 97:10.

5. Ndenge nini mwasi akoki komonisa ete apesaka mobali na ye lokumu?

5 Soki mobali azali komekola bolingo ya mokonzi na ye Yesu, ekozala mpasi te mwasi azala na “limemya makasi” epai na ye. (Baefese 5:22-25, 33) Soki mwasi amemyaka mobali na ye, yango ekotinda ye amityaka na esika ye mpe amoniselaka ye boboto ntango azali na makambo mingi ya kosala na lisangá to ntango azali na mitungisi. Mobali moko ya Grande-Bretagne alobi boye: “Na bantango mosusu, mwasi na ngai ayebaka soki nazali malamu te mpo likambo moko ezali kotungisa ngai. Na ntango yango, asalelaka makanisi ya Masese 20:5, ata soki ekosɛnga azela ntango oyo ebongi mpo nayebisa ye likambo oyo ezali kotungisa ngai, soki ezali likambo oyo nakoki koyebisa ye.”

6. Ndenge nini biso nyonso tokoki kolendisa bana bápesaka basusu lokumu, mpe yango ekosala nini epai ya bana?

6 Ntango baboti bazali kopesana lokumu, bazali kopesa bana na bango ndakisa malamu. Baboti basengeli mpe ya koteya bana na bango ndenge ya kopesa basusu lokumu. Na ndakisa, bakoki koteya bana ete bápotaka mbangu te na Ndako ya Bokonzi. Ntango bakutani na bandeko mosusu mpo na kolya, baboti bakoki koyebisa bana na bango bázela naino mikóló bázwa biloko liboso. Kutu, moto nyonso na lisangá akoki kopesa baboti mabɔkɔ. Na ndakisa, tosengeli kopesa mwana longonya soki asali likambo moko ya malamu, mbala mosusu soki afungweli biso porte. Mwana yango akosepela mpe ekosalisa ye ayeba ete “esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”​—Misala 20:35.

PESÁKÁ BASUSU LOKUMU NA LISANGÁ

7. Ndenge nini Yesu apesaki moto moko oyo akufá matoi lokumu, mpe liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Yesu?

7 Mokolo moko ntango Yesu azalaki na Dekapolisi, “bamemelaki ye moto moko oyo akufá matoi mpe azalaki na mokakatano ya koloba.” (Marko 7:31-35) Yesu abikisaki ye, kasi na miso ya bato te, “atyaki ye pembeni.” Mpo na nini? Lokola moto yango azalaki matoi ekufá, ekoki kozala ete amiyokaki malamu te kozala na kati ya ebele ya bato. Yango wana Yesu abikisa ye esika bato bazalaki te. Ya solo, biso tokoki kosala makamwisi te, kasi tosengeli kotyela bandeko likebi, komitya na esika na bango mpe komonisela bango boboto. Ntoma paulo akomaki: “Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu.” (Baebre 10:24) Yesu amityaki na esika ya moto yango oyo akufá matoi mpe amoniselaki ye boboto. Ezali ndakisa malamu mpo na biso!

8, 9. Ndenge nini tokoki kopesa mibange mpe bibɔsɔnɔ lokumu? (Pesá bandakisa.)

8 Pesáká mibange mpe bibɔsɔnɔ lokumu. Na lisangá, bolingo nde eleki ntina, kasi te makoki ya moto. (Yoane 13:34, 35) Bolingo ekotinda biso tósala nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa bandeko oyo bazali mibange to bibɔsɔnɔ báya na makita mpe bábima na mosala ya kosakola, ata soki bakosala mingi te. (Matai 13:23) Michael, oyo afandaka na kiti ya bibɔsɔnɔ, azalaka na botɔndi mingi ndenge libota na ye mpe bandeko ya lisangá na bango basalisaka ye. Alobi boye: “Lisalisi na bango epesaka ngai nzela ya koyangana na makita mpe kobima mosala ya kosakola mbala na mbala. Nasepelaka mingimingi kosakola na bisika ya bato mingi.”

9 Na Babetele mingi, ezali na bandeko ya sembo oyo bakómi mibange to oyo bazali bibɔsɔnɔ. Bakɛngɛli na bango oyo bazali na boboto bapesaka bandeko yango ya sembo lokumu na ndenge bazwi bibongiseli mpo bandeko yango bákomaka mikanda to básalela telefone mpo na kosakola. Bill, oyo azali na mbula 86 mpe akomelaka bato oyo bafandaka mosika mikanda, alobi boye: “Tosepelaka ndenge tozali na libaku ya kosakola na nzela ya kokoma mikanda.” Nancy, oyo azali na mbula pene na 90, alobi boye: “Namonaka te ete kokoma mikanda ezali kaka kokanga baanvelɔpɛ. Ezali mosala ya kosakola. Esengeli bato báyeba solo!” Ethel, oyo abotamá na 1921, alobi boye: “Nayokaka nzoto mpasimpasi. Mikolo mosusu ata kolata bilamba ezalaka etumba.” Atako bongo, asepelaka kosakola na nzela ya telefone mpe azongelaka mwa bato oyo basepelaki. Barbara, oyo azali na mbula 85, alobi boye: “Lokola nzoto ezali kolɔngɔnɔ te, kobima mbala na mbala na mosala ya kosakola ezalaka mpasi mpenza. Kasi, kosakola na nzela ya telefone esalaka ete nasolola na basusu. Matɔndi Yehova!” Mbula moko ekokaki te, mibange yango mpe mibange mosusu ya motuya na Betele moko boye balekisaki ngonga 1 228 na mosala ya kosakola, bakomaki mikanda 6 265, babengaki bato mbala koleka 2 000 mpe bapesaki mikanda 6 315! Na ntembe te, Yehova asepelaka na milende oyo basalaka!​—Masese 27:11.

10. Ndenge nini tokoki kosalisa bandeko na biso bálanda makita malamu?

10 Pesáká basusu lokumu na makita. Ntango tozali kopesa bandeko lokumu, tokosalisa bango bálanda makita malamu mpenza. Na ndenge nini? Tosengeli kokómaka na ngonga ya malamu mpo tóbenda likebi ya bandeko te. Ya solo, makambo mosusu ekoki kosala ete tókóma nsima ya ngonga. Kasi, soki tokómaka mbala na mbala nsima ya ngonga, tosengeli kokanisa ndenge oyo bandeko na biso bamiyokaka mpe mbongwana oyo tokoki kosala mpo na komonisa ete totyelaka bango likebi. Kobosana te ete Yehova ná Mwana na ye nde babengisaka biso na makita. (Matai 18:20) Tosengeli mpenza komonisela bango limemya!

11. Mpo na nini bandeko oyo bazali na masolo na makita basengeli kolanda etinda ya 1 Bakorinti 14:40?

11 Mpo na kopesa bandeko lokumu, ezali malamu tólanda mpe etinda oyo: “Makambo nyonso esalema na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.” (1 Bakorinti 14:40) Bandeko oyo bazali na masolo ya kosala na makita bakolanda etinda yango soki bazali kolya ngonga te. Na ndenge yango, bakomonisa ete bazali kopesa molobi oyo akolanda mpe lisangá mobimba lokumu. Kanisá mpe ndenge bandeko mosusu bakoyoka soki makita eumeli mingi. Bandeko mosusu bafandaka mosika na Ndako ya Bokonzi. Bamosusu bazwaka bisi to engbunduka. Basusu mpe bazali na molongani oyo azali Motatoli te.

12. Mpo na nini ebongi tópesa bankulutu lokumu mpe tólinga bango? (Talá etanda “ Pesáká baoyo bakambaka biso lokumu.”)

12 Bankulutu basalaka mosala makasi na lisangá mpe na mosala ya kosakola; na yango ebongi kopesa bango lokumu mingi’ mpe kolinga bango. (Tángá 1 Batesaloniki 5:12, 13.) Na ntembe te, ozalaka na botɔndi mpo na makambo oyo bankulutu basalaka mpo na yo. Na yango, zalá na botosi mpe pesáká bango mabɔkɔ, mpo ‘bazali kokɛngɛla milimo na biso lokola bato oyo bakozongisa monɔkɔ.’​—Baebre 13:7, 17.

PESÁKÁ BASUSU LOKUMU NA MOSALA YA KOSAKOLA

13. Ndenge oyo Yesu azalaki kosalela basusu makambo ekoki koteya biso nini?

13 Mosakoli Yisaya asakolaki mpo na Yesu ete: “Akobuka te mongendu oyo etutami; mpe akoboma te nsinga ya lini oyo mɔtɔ na yango elingi kokufa.” (Yisaya 42:3) Kolinga oyo Yesu azalaki kolinga bato etindaki ye amitya na esika na bango. Ayebaki mpasi ya baoyo balɛmbaki nzoto mpe bazalaki na bolɛmbu lokola “mongendu oyo etutami” to “nsinga ya lini oyo mɔtɔ na yango elingi kokufa.” Na yango azalaki kopesa bango lokumu, komonisela bango boboto mpe motema molai. Ata bana bazalaki kolinga kozala elongo na Yesu. (Marko 10:14) Ya solo, tozali te na bososoli mpe mayele ya koteya lokola Yesu! Kasi, tokoki komonisa ete topesaka bato ya teritware na biso lokumu soki tozali kokeba na ndenge na biso ya koloba na bango, ntango oyo tokokende kotala bango, mpe ntango boni tokosolola na bango.

14. Mpo na nini tosengeli kokeba na ndenge na biso ya koloba na bato?

14 Ndenge nini tosengeli koloba na bato? Lelo oyo, bato minene ya mimbongo oyo bazali mitema mabe mpe balingá kanyaka, bato ya politiki, mpe bakonzi ya mangomba bazali konyokola bamilio ya bato. (Matai 9:36) Na yango, bato mingi bamonaka lisusu moto ya kotyela motema te mpe bazali na elikya te. Yango wana, maloba oyo tozali kobimisa mpe mongongo na biso esengeli komonisa ete tozali na boboto mpe motema mawa! Bato mingi balingaka koyoka nsango na biso kaka te mpo toyebi Biblia malamu, kasi mpe mpo totyelaka bato likebi ya solosolo mpe tomemyaka bango.

15. Ndenge nini tokoki komonisa ete topesaka bato ya teritware na biso lokumu?

15 Ezali na ndenge mingi ya kopesa bato ya teritware na biso lokumu. Tosengeli kotuna mituna na ndenge ya boboto mpe ya limemya. Ndeko moko azalaki mobongisi-nzela na teritware oyo bato mingi bazalaki nsɔninsɔni; na yango, azalaki koboya kotuna mituna oyo ekosala ete bato bámiyoka mabe soki bapesi eyano ya malamu te. Azalaki te kotuna mituna lokola, “Oyebi nkombo ya Nzambe?” to “Oyebi soki Bokonzi ya Nzambe ezali nini?” Kasi, azalaki kosalela maloba lokola: “Nayekoli na Biblia ete Nzambe azali na nkombo. Nakoki kolakisa yo nkombo yango?” Lokola mboka na mboka ezalaka na mimeseno na yango, mayele yango ekosimba bisika nyonso te. Kasi, tosengeli ntango nyonso kopesa bato ya teritware na biso lokumu mpe limemya. Mpo na kosala yango, tosengeli koyeba bango malamu.

16, 17. Ndenge nini kopesa basusu lokumu ekosalisa biso tóyeba (a) ntango ya kokende kotala bato na bandako? (b) ntango boni tokosolola?

16 Ntango nini tosengeli kokende kotala bato? Ntango tokendaka ndako na ndako, bato bazelaka biso te mpo babengisaki biso te. Na yango, ezali na ntina mingi kokende kotala bango na ngonga oyo bakoki kondima kosolola na biso. (Matai 7:12) Na ndakisa, bato ya teritware na yo basepelaka kolala mwa mingi mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo? Soki bongo, okoki kobanda kosakola na balabala, na bisika ya bato mingi, to kozongela bato oyo oyebi ete okokuta bango mpo bósolola.

17 Ntango boni tosengeli kosolola na bango? Bato bakómi na makambo ebele; na yango ebongi tózala mokuse, mingimingi na ebandeli. Eleki malamu tósolola kaka miniti moke na esika tóumela mingi. (1 Bakorinti 9:20-23) Soki bato bamoni ete biso mpe toyebi ete bazali na makambo ebele ya kosala, bakondima kosolola na biso lisusu ntango tokoya mbala ya nsima. Soki tozali komonisa bizaleli ya mbuma ya elimo na mosala ya kosakola, tokokóma mpenza “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe.” Kutu, Yehova akoki kosalela biso mpo na kosalisa moto ayeba solo.​—1 Bakorinti 3:6, 7, 9.

18. Ntango tozali kopesa basusu lokumu, mapamboli nini tokozwa?

18 Na yango, tósala makasi tópesaka basusu lokumu na libota, na lisangá, mpe na mosala ya kosakola. Na ndenge yango, tokozwa mapamboli ebele, lelo mpe na mikolo ezali koya. Nzembo 41:1, 2 elobi: “Esengo na moto oyo azali kotya likebi na moto oyo azangá; na mokolo ya likama Yehova akobikisa ye. Yehova ye moko akokɛngɛla ye mpe akobatela ye na bomoi. Akotángama moto ya esengo na mabele.”