LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Octobre 2018

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli mpo na 03-30/12/2018.

1918​—Eleki sikoyo mbula nkama

Etumba Monene ezalaki naino kondongwana na Mpoto, kasi makambo oyo esalemaki na ebandeli ya mbula yango emonisaki lokola ete makambo ya esengo ekozala mpo na Bayekoli ya Biblia mpe bato ya mokili mobimba.

Tólobaka solo

Mpo na nini bato bakosaka, mpe lokuta esalaka nini? Ndenge nini tokoki komonisa ete tolobaka solo?

Tóteyaka solo

Na ntango oyo etikali mpo tópesa litatoli, tosengeli kotya makanisi na koteya bato solo. Ndenge nini Bisaleli mpo na koteya ekoki kosalisa biso?

LISOLO YA BOMOI

Yehova apambolaki mpenza ekateli nazwaki

Na bolenge, Charles Molohan atondisaki formilɛrɛ ya kokɔta Betele mpo alingaki komipesa na mosala ya Yehova. Banda wana, Yehova apamboli ye mingi.

Tyá motema epai ya Mokambi na biso​—Kristo

Lokola ebongiseli ya Nzambe ezali se kokende liboso, mpo na nini ebongi kotya motema epai ya Mokambi na biso Kristo motema?

Batelá kimya ya motema ntango makambo ebongwani

Ntango bomoi na biso ebongwani na mbalakaka, tokoki komitungisa mingi. Ndenge nini “kimya ya Nzambe” ekoki kosalisa biso?

Oyebaki yango?

Stefano nde mokristo ya liboso oyo akufaki martiru. Nini esalisaki ye atikala kimya ntango bazalaki konyokola ye?