Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

1918​—Eleki sikoyo mbula nkama

1918​—Eleki sikoyo mbula nkama

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/01/1918 ebandaki na maloba oyo: “Mobu 1918 ekomema makambo nini?” Etumba Monene ezalaki naino kondongwana na Mpoto, kasi makambo oyo esalemaki na ebandeli ya mbula yango emonisaki lokola ete makambo ya esengo ekozala mpo na Bayekoli ya Biblia mpe bato ya mokili mobimba.

MOKILI ELOBELI KIMYA

Na mokolo ya 08/01/1918, Prezida Woodrow Wilson asalaki diskur na Congrès ya États-Unis mpe alobelaki makambo 14 oyo amonaki ete ezali na ntina mingi mpo na kotya “kimya oyo ebongi mpe oyo ekoumela.” Asɛngaki ete boyokani esalema kati na bikólo, bátika kosalela bibundeli mingi mpe básala “lisangá ya bikólo” oyo ekosalisa “bamboka ya minene mpe ya mike.” Na nsima, “Makambo zomi na minei” oyo Prezida Wilson alobelaki esalisaki na kosala Société des Nations mpe Traité de Versailles. Na yango, Etumba Monene esilaki.

BATƐMƐLI NA BISO BAKWEI

Atako yikiyiki ezalaki na mbula oyo elekaki, * emonanaki ete Bayekoli ya Biblia bakozala na kimya, ndenge makambo oyo esalemaki na likita ya nsuka ya mbula ya Watch Tower Bible and Tract Society emonisaki yango.

Na likita yango, oyo esalemaki mokolo ya 05/01/1918, mibali ebele oyo bazalaki na mikumba minene, oyo bautaki kobimisama na Betele, bazalaki na mposa ya kotambwisa ebongiseli ya Yehova. Richard Barber, oyo azalaki mokɛngɛli-motamboli ya sembo, asalaki libondeli ya ebandeli na likita yango. Bapesaki lapolo ya mosala ya mbula eleki, mpe na nsima basalaki maponami mpo na kotya bakambi. Ndeko Barber aponaki Joseph Rutherford mpe bandeko mosusu motoba. Mpe avoka moko oyo azalaki na ngámbo ya batɛmɛli na biso aponaki mibali nsambo, kati na bango baoyo babimisamaki na Betele. Kasi balongaki te. Bato mingi oyo bazalaki na kati ya bato oyo basalaka maponami baponaki Ndeko Rutherford ná bandeko mosusu ya sembo motoba mpo bázala bakambi.

Bandeko mingi oyo bazalaki na likita wana babengaki yango “liyangani oyo epambolamaki mingi koleka mayangani mosusu oyo bakɔtá.” Kasi esengo na bango ezalaki ya ntango mokuse.

NDENGE BATO BATALELAKI BUKU LE MYSTÈRE ACCOMPLI

Na boumeli ya basanza mingi, Bayekoli ya Biblia bazalaki kokabola buku Le Mystère accompli. Bato ya mitema sembo basepelaki na mateya ya Biblia oyo ezalaki na kati.

Edward Crist, oyo azalaki mokɛngɛli-motamboli na Canada, alobelaki mobali moko ná mwasi na ye oyo batángaki buku yango mpe bandimaki solo nsima ya pɔsɔ mitano mpamba! Alobaki: “Mobali yango ná mwasi na ye bamipesi mobimba na Nzambe mpe bazali kokende liboso.”

Mobali moko oyo azwaki buku yango ayebisaki mbala moko baninga na ye makambo oyo atángaki. Nsango na yango “etutaki” ye mpenza. Alobi boye: “Nazalaki kotambola na balabala ya misato [mpe] eloko moko ekwelaki ngai na lipeka, nakanisaki ete ezali briki, nzokande ezalaki buku ‘Le Mystère accompli.’ Namemaki yango na ndako mpe natángaki yango mobimba. . . . Nayaki koyeba ete moteyi ya lingomba moko . . . nde abwakaki yango na nkanda na lininisa na ye . . . Nabanzi ete likambo wana oyo asalaki ebongoli bato ebele koleka makambo mosusu nyonso oyo asalá. . . . Mpo na nkanda ya moteyi wana, tozali sikoyo kosanzola Nzambe.”

Bato mosusu mpe basalaki lokola moteyi wana. Na mokolo ya 12/02/1918, bakonzi ya Canada bapekisaki buku yango, balobaki ete ezali kolendisa bato bátomboka mpe elobi mabe mpo na bitumba. Mwa moke na nsima, bakonzi ya États-Unis mpe basalaki bongo. Bapolisi bakendaki na Betele mpe na babiro mosusu ya New York, na Pennsylvanie, mpe Californie, mpo na koluka makambo oyo ekokweisa bandeko oyo bazalaki kokamba ebongiseli ya Yehova. Na mokolo ya 14/03/1918, departema ya makambo ya bosembo na États-Unis epekisaki buku Le Mystère accompli, elobaki ete kobimisa mpe kokabola yango ezali kopekisa bato bápesa mabɔkɔ na bitumba; yango ebuki mobeko oyo etali konɔnga.

BOLƆKƆ!

Na mokolo ya 07/05/1918, departema ya makambo ya bosembo ezwaki mokanda oyo epesaki nzela bákanga bandeko oyo: Giovanni DeCecca, George Fisher, Alexandre Macmillan, Robert Martin, Frederick Robison, Joseph Rutherford, William Van Amburgh, mpe Clayton Woodworth. Bafundaki bango ete bazali kobuka mibeko mpe kotɛka mboka, bazali kotinda bato na nko bázanga bosembo, mpe báboya kopesa mampinga ya basoda ya États-Unis mabɔkɔ. Babandaki kosambisa bango mokolo ya 03/06/1918, kasi ezalaki komonana ete bakotya bango na bolɔkɔ. Mpo na nini?

Prokirɛrɛ-Mokonzi ya États-Unis alobaki ete Mobeko oyo etali konɔnga, oyo babukaki ezali “ebundeli oyo esalemi mpo na kotɛmɛla makanisi ya lokuta.” Na mokolo ya 16/05/1918, Congrès eboyaki kondima mobeko oyo emonisi ete moto oyo azali koloba “solo, na makanisi ya malamu, mpo na kobimisa mbuma ya malamu” abuki te mobeko oyo etali konɔnga. Kowelana ezalaki libosoliboso mpo na buku Le Mystère accompli. Mpo na yango, lapolo oyo Congrès ya États-Unis epesaki, elobaki boye: “Moko ya biloko eleki mabe oyo ezali kopanza makanisi ya lokuta ezali nde buku ‘Le Mystère accompli’ . . . Basali yango kaka mpo na kotinda basoda bálɛmbisa mabɔkɔ mpe kosala ete . . . bato báboya kokɔta mosala ya soda.”

Na mokolo ya 20/06/1918, tribinale ekweisaki bandeko yango mwambe. Mokolo oyo elandaki, zuzi akatelaki bango etumbu. Alobaki boye: “Mateya ya lingomba oyo bato oyo bafundi balendisi mpe bapanzi na molende nyonso . . . ezali na likama koleka eteni moko ya limpinga ya basoda ya Allemagne. . . . Basengeli kozwa etumbu ya makasi.” Pɔsɔ mibale na nsima, bandeko yango mwambe bakɔtaki bolɔkɔ ya Atlanta, na Géorgie, mpe bakatelaki bango etumbu ya bolɔkɔ kobanda mbula 10 tii 20.

MOSALA YA KOSAKOLA EKOBI

Na eleko yango, Bayekoli ya Biblia bakutanaki na botɛmɛli ya makasi. Bapolisi ya FBI balandelaki mosala na bango, mpe basalaki balapolo ndenge na ndenge. Balapolo yango emonisi ete bandeko na biso bazalaki na ekateli ya kokoba kosakola.

Mosali moko ya poste ya Orlando na etúká ya Floride akomelaki FBI mokanda mpe alobaki boye: “[Bayekoli ya Biblia] bazali kotambola ndako na ndako na engumba mpe basalaka yango mingimingi na butu. . . . Emonani ete balingi kokoba kosakola atako minyoko.”

Colonel moko na Departema ya makambo ya bitumba asalaki lapolo mpo na mosala ya Ndeko Frederick Franz, oyo na nsima asalaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Colonel yango akomaki boye: “Franz . . . amipesi mobimba na kotɛka ebele ya babuku ‘Le Mystère accompli’.”

Charles Fekel, oyo na nsima asalaki mpe na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, akutanaki na minyoko ya makasi. Bapolisi bakangaki ye mpo azalaki kokabola buku Le Mystère accompli mpe na bolɔkɔ, bazalaki kolandela mikanda oyo azalaki kotinda mpe kozwa. Batyaki ye na bolɔkɔ na Baltimore, na Maryland mpo na sanza moko mpe balobaki ete “azali monguna mpe mwana-mboka ya Autriche,” mpo na ntango wana bazalaki kolinga ekólo Autriche te. Wana azalaki kopesa litatoli na mpiko liboso ya bato oyo bazalaki kotuna ye mituna, akanisaki maloba ya 1 Bakorinti 9:16, oyo elobi: “Mawa na ngai soki nasakoli nsango malamu te!” *

Longola molende na bango ya kosakola, Bayekoli ya Biblia batambwisaki mokanda moko oyo esɛngaki bato bátya sinyatire mpo bandeko bábima na bolɔkɔ ya Atlanta. Anna Gardner, alobaki boye: “Tokangaki mabɔkɔ ata moke te. Ntango bandeko bazalaki na bolɔkɔ, tozwaki mosala ya koluka basinyatire. Tozalaki kokende ndako na ndako. Tozwaki basinyatire ya bato ebele mpenza! Tozalaki koyebisa bato ete mibali yango bazali bakristo ya solo mpe batye bango na bolɔkɔ atako basali mabe moko te.”

MAYANGANI

Na ntango yango ya mikakatano, mayangani esalemaki mbala mingi mpo na kolendisa bandeko. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki boye: “Mayangani koleka ntuku minei . . . esalemaki na mbula yango . . . Toyokaki bansango ya esengo oyo eutaki na mayangani yango nyonso. Liboso, mayangani nyonso ezalaki kosalema na nsuka ya eleko ya molunge to na ebandeli ya eleko ya otɔnɛ; kasi sikoyo tozali kosala mayangani sanza nyonso.”

Bato ya mitema sembo bazalaki kokoba kondima nsango malamu. Na liyangani moko na Cleveland, na Ohio, bato soki 1 200 bayaki mpe bato 42 bazwaki batisimo, kati na bango elenge mobali moko oyo “apesaki motuya mingi na Nzambe mpe na komipesa na ye” koleka mikóló ebele.

NINI ESALEMAKI NA NSIMA?

Na nsuka ya mobu 1918, Bayekoli ya Biblia bayebaki te nini ekokómela bango. Batɛkaki bandako mosusu ya Brooklyn mpe biro monene ekendaki na Pittsburgh, na etúká ya Pennsylvanie. Wana bakambi ya la Société bazalaki na bolɔkɔ, bandeko oyo bazalaki kosala maponami babongisaki ete likita ya nsuka ya mbula esalema na mokolo ya 04/01/1919. Nini esalemaki?

Bandeko bakobaki mosala na bango. Bazalaki na elikya ete makambo ekotambola malamu, na yango mpo na mokapo ya mobu 1919, baponaki vɛrsɛ oyo elobi: “Bato oyo bakosala bibundeli po na kobundisa yo, bakosala mosala ya punda.” (Yisaya 54:17, Bible na Lingala ya lelo oyo) Bamibongisaki mpo na mbongwana monene oyo elingaki kolendisa kondima na bango mpe kopesa bango makasi mpo na mosala monene oyo ezalaki kozela bango.

^ par. 6 Talá lisolo “Eleki sikoyo mbula nkama​—1917” na Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova, nkasa 172-176.

^ par. 22 Talá lisolo ya bomoi ya Charles Fekel, oyo elobi “Kokoba kosala malamu ememaka mapamboli,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/11/1970, na Français.