Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Yehova apambolaki mpenza ekateli nazwaki

Yehova apambolaki mpenza ekateli nazwaki

Mokolo moko na mobu 1939, tolamukaki na katikati ya butu mpe totambwisaki motuka koleka ngonga mobimba mpo na kokende na Joplin, engumba moko ya moke na sudi-wɛsti ya Missouri, na États-Unis. Ntango tokómaki kuna, tobandaki kotya batrakte malɛmbɛ na nse ya porte ya ndako mokomoko ya teritware yango. Ntango kaka tosilisaki, tokɔtaki na motuka mpe tokendaki kokutana na bandeko mosusu esika toyokanaki tókutana. Kasi mpo na nini tokendaki kosakola liboso ntɔngɔ etana mpe tolongwaki teritware yango nokinoki? Nakoyebisa bino yango nsima.

NABOTAMÁ na 1934. Na ntango yango, baboti na ngai, Fred ná Edna Molohan, bazalaki Bayekoli ya Biblia (Batatoli ya Yehova) mbula koleka 20. Nazali na esengo ndenge basalisaki ngai nalinga Yehova. Tozalaki kofanda na Parsons, engumba moko moke na sudi-ɛsti ya Kansas. Bandeko pene na nyonso na lisangá na biso bazalaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Tozalaki kozanga te na makita mpe na mosala ya kosakola. Mbala mingi mokolo ya pɔsɔ nsima ya midi, tozalaki kosakola na balabala, oyo tobengaka lelo kosakola na bisika ya bato mingi. Mikolo mosusu tozalaki kolɛmba, kasi Papa azalaki ntango nyonso kosombela biso krɛmɛ soki tosilisi.

Mwa lisangá na biso ezalaki na teritware moko monene, oyo ezalaki na bamboka ya mikemike mpe bilanga ebele. Na esika bápesa biso mbongo soki bazwi mikanda, basali-bilanga mosusu bazalaki kopesa biso ndunda, maki ya nsoso (ya sika), ata mpe nsoso ya bomoi. Lokola Papa azalaki kopesa likabo soki kaka azwi mikanda, biso moko tozalaki kolya biloko yango.

BAKAMPANYE YA MOSALA YA KOSAKOLA

Baboti na ngai basombaki fono mpo na kosalela na mosala ya kosakola. Lokola nazalaki mwana moke, nazalaki kokoka kosalela yango te, kasi nazalaki kosepela kosalisa Papa ná Mama na kotyela bato badiskur ya ndeko Rutherford ntango bazongeli bango to ntango bazali koyekola na bango Biblia.

Ngai, papa, ná mama liboso ya motuka na biso

Papa azalaki kotya ekóliseli-loláká likoló ya motuka na biso, mpe ebongaki mpenza mpo na mosala ya kosakola. Mpo na kobenda likebi ya bato, mbala mingi tozalaki liboso kobɛta mwa miziki, mpe na nsima totye lisolo ya Biblia. Na nsima, tozalaki kopesa bato oyo basepeli mikanda.

Na Cherryvale, mwa mboka moko ya Kansas, Papa amemaki motuka yango na elanga moko, esika bato mingi bazalaki kokende kominanola mikolo ya lomingo. Bapolisi bayaki mpe bayebisaki ye abimisa motuka na ye libándá. Papa abimisaki motuka na balabala mpe atyaki yango esika oyo bato bakoyoka kaka malamu. Ezalaki ntango nyonso esengo kozala elongo na Papa mpe yaya na ngai ya mobali, Jerry, na mabaku ya ndenge wana.

Na bambula wana, tozalaki kokende kosakola na bateritware oyo botɛmɛli ezalaki mingi. Ndenge nalobaki na ebandeli, tozalaki kolamuka na katikati ya butu mpe tozalaki kotya batrakte to mwa babuku malɛmbɛ na nse ya baporte ya bandako ya bato. Na nsima, tozalaki kokutana biso nyonso mpo tótala soki bapolisi bakangi moto te.

Na mosala ya kosakola, nazalaki mpe kosepela mingi ntango tozalaki kotambola mpo na kosala piblisite. Tozalaki kolata bapapye ya minene mpe kotambola na engumba. Nazali koyeba lisusu mokolo moko bandeko bayaki na engumba na biso mpe balataki bapapye oyo ezalaki na maloba: “Lingomba ezali motambo mpe bokosi.” Kobanda na ndako na biso, batambolaki soki kilomɛtrɛ moko na ndambo na engumba mobimba, na nsima bazongaki. Likambo ya esengo, moto te apekisaki bango, kasi bato mingi bazalaki na mposa ya koyeba soki ezali nini.

MAYANGANI NTANGO NAZALAKI ELENGE

Mbala mingi, tozalaki kokende mayangani na Texas. Lokola Papa azalaki kosala na kompanyi oyo ebongisaka nzela ya engbunduka, tozalaki komata engbunduka ofele mpo na kokende na mayangani mpe kotala bandeko na biso ya libota. Yaya ya mama, Fred Wismar ná mwasi na ye Eulalie, bazalaki kofanda na Temple, na Texas. Nɔkɔ Fred ayambaki solo na ebandeli ya bambula ya 1900 ntango azalaki elenge, azwaki batisimo, mpe ayebisaki bandeko na ye, ata mpe mama na biso, makambo oyo ayekolaki. Bandeko oyo bazalaki kofanda na ntei ya Texas bayebaki Nɔkɔ Fred malamu mpo azalaká mokɛngɛli ya zone kuna (oyo tobengaka lelo mokɛngɛli ya zongazonga). Azalaki na boboto, azalaki moto ya esengo mpe ya molende; azalaki ndakisa malamu mpenza mpo na ngai.

Na 1941, tozwaki engbunduka mpo na kokende liyangani moko monene na Saint Louis, na etúká ya Missouri. Basɛngaki bana nyonso báfanda elongo pembeni ya estrade mpo na kolanda diskur ya Ndeko Rutherford oyo ezalaki na motó ya likambo “Bana ya Mokonzi.” Na nsuka ya diskur yango, biso nyonso bana koleka 15 000, tokamwaki kozwa likabo moko kitoko. Ndeko Rutherford ná bandeko oyo bazalaki kosalisa ye bapesaki mokomoko na biso buku ya sika na motó ya likambo Bana.

Na sanza ya 04/1943, tokɔtaki liyangani oyo elobaki “Libyangi mpo na mosala,” na Coffeyville, na Kansas. Kuna, bapesaki liyebisi ete masangá nyonso ekozala na eteyelo ya sika, Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Bapesaki biso mpe mwa buku oyo ezalaki na mateya 52 mpo na kosalela na eteyelo yango. Mwa basanza na nsima, nasalaki devuare na ngai ya liboso. Lisusu, nabosanaka liyangani yango te mpo, elongo na mwa bato mosusu, tozwaki batisimo na mai ya malili, pembeni ya elanga moko.

NAZALAKI NA MPOSA YA KOSALA NA BETELE

Nasilisaki eteyelo ya ntei na 1951 mpe nasengelaki kopona eloko oyo nakosala na bomoi na ngai. Yaya na ngai Jerry asalaká na Betele. Ngai mpe nazalaki mpenza na mposa ya kosala na Betele, na yango natondisaki formilɛrɛ. Mwa moke na nsima, babengaki ngai na Betele mpe nabandaki kosala kuna na mokolo ya 10/03/1952. Ezalaki ekateli ya malamu mpenza mpe esalisi ngai nasalela Nzambe malamu koleka.

Nazalaki na mposa ya kosala na imprimeri mpo napesa mabɔkɔ na mosala ya kobimisa bazulunalo mpe mikanda mosusu. Kasi, nasalá kuna ata mokolo moko te. Bapesaki ngai mosala ya kotyela bato biloko na mesa mpe na nsima nakómaki kosala esika balambaka. Nasepelaki na mosala yango mpe nayekolaki makambo ebele. Lokola bakabolelaki biso bangonga ya mosala, nazalaki na ntango mingi ya kopema na moi. Mbala mingi, nazalaki kokende na bibliotɛkɛ ya Betele mpe kosalela ebele ya mikanda oyo ezalaki kuna mpo na koyekola. Esalisaki ngai nakola na elimo mpe nakóma na kondima makasi. Mposa na ngai ya kosalela Yehova na Betele ntango molai ebakisamaki. Jerry abimaki Betele na 1949 mpe abalaki Patricia; kasi bafandaki pene na Brooklyn mpe basalisaki ngai mpe balendisaki ngai mingi ntango nazalaki moto ya sika na Betele.

Mwa moke nsima ya koya na Betele, bakómaki koluka bandeko ya Betele oyo bakobakisama na liste ya balobi ya Betele. Bandeko oyo bazali na liste yango bazalaki kokende kotala masangá ata na ntaka ya kilomɛtrɛ 320 longwa na Brooklyn. Kuna, bazalaki kosala diskur mpe kobima mosala ya kosakola na bandeko ya lisangá. Batyaki mpe nkombo na ngai na liste. Na mwa kobanga, nabandaki kokende kotala masangá mpe kosala badiskur. Na ntango wana, diskur ya bato nyonso ezalaki koumela ngonga moko. Mbala mingi nazalaki kokende na engbunduka. Nabosanaka te likambo moko oyo ekómelaki ngai mokolo moko ya lomingo nsima ya midi na eleko ya malili na 1954. Nazwaki engbunduka mpo na kozonga na New York mpe esengelaki nakóma na Betele na mpokwa. Kasi na nzela, mbula ya mopɛpɛ makasi ebɛtaki mpe nɛjɛ ezalaki kokwea. Ba moteur ya engbunduka etikaki kosala, mpe nakómaki na engumba New York na mokolo ya yambo na ntɔngɔ, na ngonga ya 5. Nazwaki engbunduka mosusu tii Brooklyn mpe nakendaki mbala moko mosala. Nakómaki na mwa retare mpe nalɛmbaki mingi mpo nalalaki te na butu. Kasi mikakatano ya ndenge wana ezalaki eloko te na kotalela esengo ya kotala masangá mpe kokutana na bandeko ebele na nsuka ya pɔsɔ.

Tolingi tósala emisyo mpo eleka na radio WBBR

Bambula na ngai ya liboso na Betele, nazalaki mpe na kati ya bandeko oyo bazalaki kosala emisyo ya boyekoli ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ, oyo ezalaki koleka na radio na biso, WBBR. Ndako ya radio yango ezalaki na etaze ya liboso na balabala Columbia Heights, nimero 124. Ndeko Alexandre Macmillan, oyo asalaki na Betele bambula ebele, azalaki kosala baemisyo mingi. Tozalaki kobenga ye Ndeko Mac. Azalaki ndakisa malamu mpo na biso bilenge na Betele mpo atikalaki sembo atako akutanaki na mikakatano ebele.

Tozalaki kokabola nkasa oyo ezalaki kosala piblisite ya WBBR

Na 1958, nakómaki kosala makambo oyo etali Eteyelo ya Gileade. Nazalaki kosalisa bandeko yango ya molende bázwa baviza, mpe kobongisa mibembo na bango mpo na kokende na bikólo oyo batindi bango. Na ntango wana, kosala mobembo na mpɛpɔ ezalaki ntalo mingi; na yango, bana-kelasi mingi oyo batindami na Afrika mpe Azia bazalaki kosala mibembo na masuwa oyo ememaka biloko. Bambula na nsima, ntango ntalo ya mibembo na mpɛpɔ ekitaki, bamisionɛrɛ mingi bakómaki kozwa mpɛpɔ.

Nazali kobongisa badiplome ya bana-kelasi ya Gileade

MIBEMBO MPO NA LIYANGANI

Na 1960, nabongisaki mibembo ya bandeko oyo basengelaki kokende na Mpoto mpo na mayangani oyo esangisaki mikili mingi na 1961. Nakendaki na moko ya mayangani yango na Hambourg, na Allemagne. Nsima ya liyangani, ngai ná bandeko mosusu misato ya Betele tozwaki motuka moko longwa na Allemagne mpe tokendaki na Italie kotala Betele ya Rome. Longwa na Rome, tokendaki na France, tokatisaki bangomba ya Pyrénées, mpe tokɔtaki na Espagne, epai mosala na biso epekisamaki. Topesaki bandeko ya Barcelone mikanda, oyo tolíngaki maboke mpo emonana ete ezali makabo. Tosepelaki mingi kokutana na bango! Nsima na yango, tokendaki na Amsterdam mpe tozwaki mpɛpɔ mpo na kozonga na New York.

Na 1962, basɛngaki ngai nabongisa mibembo ya bandeko 583, oyo bakokende na mayangani oyo esangisaki mikili mingi na bisika ndenge na ndenge na mokili. Motó ya likambo na yango ezalaki “Nsango malamu ya seko,” mpe esalemaki na 1963. Bandeko basengelaki kokende na Mpoto, Azia, Pasifike ya Sudi mpe na nsima bakokende na Honolulu, na etúká ya Hawaï, mpe nsukansuka na Pasadena, na Californie. Basengelaki mpe kokende na Liban mpe Jordanie mpo na kotala bisika oyo Biblia elobeli. Na departema na biso, tobongisaki mibembo na bango, tozwelaki bango bisika ya kolala na baotɛlɛ mpe baviza oyo esengelaki.

NAZWI MONINGA YA SIKA YA MOBEMBO

Nazwaki lipamboli mosusu na 1963. Na mokolo ya 29/06, nabalaki Lila Rogers, oyo autaki Missouri mpe akɔtaki Betele na 1960. Pɔsɔ moko nsima ya libala na biso, ngai ná Lila totambolaki na bikólo ebele mpe tokendaki kotala Grèce, Égypte mpe Liban. Kobanda kuna, tosalaki mobembo ya mokuse na mpɛpɔ mpe tokendaki na Jordanie. Kasi, lokola mosala na biso epekisamaki kuna, bayebisaki biso ete bazalaki kopesa Batatoli ya Yehova viza te ya kokɔta kuna. Na yango, toyebaki te nini ekosalema soki tokómi kuna. Tosepelaki mpe tokamwaki makasi ntango tomonaki bandeko batɛlɛmi na mwa libándá ya mpɛpɔ ya moke, basimbi etanda moko monene bakomi “Boyei malamu Batatoli ya Yehova”! Ezalaki esengo kotala bisika oyo Biblia elobeli mpe komona bisika oyo Abrahama, Yisaka mpe Yakobo bafandaki, esika Yesu ná bantoma basakolaki, mpe esika bokristo ebandaki liboso epalangana “tii na nsuka ya mabele.”​—Misala 13:47.

Na boumeli ya mbula 55, Lila asalisi ngai na mikumba nyonso oyo bapesi ngai. Tokendaki na Espagne mpe Portugal mbala ebele ntango mosala na biso epekisamaki kuna. Tozalaki kolendisa bandeko mpe komemela bango mikanda ná biloko mosusu oyo basengelaki na yango. Kutu, tokendaki kotala bandeko mosusu oyo bazalaki na bolɔkɔ na Cádiz, na Espagne. Nazalaki na esengo ndenge nasalaki diskur mpo na kolendisa bango.

Elongo na Patricia ná Jerry Molohan, tozali kokende liyangani “Kimya na mabele,” na 1969

Na boumeli ya bambula kobanda 1963, nabongisaki mibembo mpo na mayangani oyo esangisaki mikili mingi na Afrika, Amerika ya Ntei mpe Amerika ya Sudi, Australie, Extrême-Orient, Hawaï, Mpoto, Nouvelle-Zélande, mpe Porto Rico. Ngai ná Lila tokɔtaki mayangani mingi oyo tobosanaka te, na ndakisa oyo esalemaki na Varsovie, na Pologne, na 1989. Bandeko ebele ya Russie bayaki na liyangani yango ya monene. Ezalaki mbala ya liboso bákɔta liyangani ya monene! Tokutanaki na bandeko oyo basalaki bambula ebele na bolɔkɔ na bikólo ya Union soviétique mpo na kondima na bango.

Nazalaki mpe kosepela mingi kokende kotala bandeko ya Babetele mpe bamisionɛrɛ mpo na kolendisa bango. Tosalaki yango mbala ya nsuka ntango tokendaki na Betele ya Corée du Sud mpe tokutanaki na bandeko mibali 50 oyo bazalaki na bolɔkɔ na Suwon. Bazalaki na makanisi malamu mpe bazalaki kozela ntango bakobima mpo na kosalela Yehova na bonsomi. Kokutana na bango elendisaki biso mingi!​—Baroma 1:11, 12.

BOKOLI EPESAKA ESENGO

Namoni ndenge Yehova apamboli basaleli na ye. Na 1943, ntango nazwaki batisimo, basakoli bazalaki soki 100 000. Lelo oyo, bato koleka 8 000 000 bazali kosalela Yehova na mikili 240. Mosala makasi ya bana-kelasi ya Gileade esalisi mingi na bokoli yango. Nazwaki libaku ya kosala elongo na bamisionɛrɛ yango mingi mpe kosalisa bango bákende bisika batindi bango.

Nasepelaka ndenge nazwaki ekateli ya komipesa na mosala ya Yehova mpe natondisaki formilɛrɛ ya Betele ntango nazalaki elenge. Yehova apamboli ngai mingi bambula oyo nyonso. Longola makambo nyonso ya malamu tozwi na mosala ya Betele, ngai ná Lila tosakolaki elongo na bandeko ya masangá ndenge na ndenge na Brooklyn mbula koleka 50 mpe tozwi baninga ebele ya solosolo.

Na lisalisi ya Lila, tii lelo nasalaka na Betele mokolo na mokolo. Atako sikoyo nazali na mbula koleka 84, nasepelaka ndenge nasalaka na departema ya kokoma mikanda.

Ngai ná Lila lelo

Ezali mpenza esengo kozala na kati ya ebongiseli kitoko ya Yehova mpe komona bosolo ya maloba ya Malaki 3:18, oyo elobi: “Bokomona lisusu bokeseni kati na moyengebene ná moto mabe, kati na moto oyo asalelaka Nzambe ná moto oyo asaleli ye te.” Mokolo na mokolo tozali komona ndenge mokili ya Satana ezali se kobeba, bato bazali na elikya te, mpe na esengo mpenza te. Kasi, bato oyo balingaka Yehova mpe basalelaka ye bazali na esengo, ata na ntango oyo ya mikakatano, mpe bazali na elikya ya solosolo. Ezali libaku monene koyebisa basusu nsango malamu! (Matai 24:14) Mosika te, Bokonzi ya Nzambe ekolongola mokili oyo mpe ekokómisa mabele paradiso. Tolingaka mpenza ete mokolo yango ekoka! Na ntango wana, moto nyonso na mabele akozala na nzoto kolɔngɔnɔ mpe akozala na bomoi libela na libela.