LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Novembre 2017

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli mpo na 25/12/2017 tii 28/01/2018.

Yembáká na esengo mpenza!

Soki oyokaka nsɔni koyemba na lisangá, ndenge nini okoki kolongola mayoki yango mpe kosalela mongongo na yo mpo na kosanzola Yehova?

Okimaka epai ya Yehova?

Ebongiseli ya bingumba ya ekimelo oyo ezalaki na Yisraele ya kala eteyaka biso nini mpo na ndenge Nzambe alimbisaka.

Mekolá bosembo mpe motema mawa ya Yehova

Ndenge nini bingumba ya ekimelo emonisi motema mawa ya Yehova? Ezali koteya biso nini mpo na ndenge oyo atalelaka bomoi? Ndenge nini emonisi bosembo na ye ya kokoka?

Moto oyo akabaka akopambwama

Tokoki kosalela ntango, makasi, mpe biloko na biso mosusu mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola Bokonzi.

Bwaká makanisi ya mokili

Biso nyonso tosengeli kosala makasi mpo makanisi ya mokili ebebisa makanisi na biso te. Talá ndakisa mitano ya makanisi ya mokili.

Kotika eloko te ezangisa yo libonza

Nsima kokundwela bakristo elikya na bango ya kitoko, ntoma Paulo apesaki bango mwa batoli.

Ndenge ya komesana na lisangá ya sika

Soki esɛngi okóma na lisangá mosusu, okoki komitungisa. Nini ekoki kosalisa yo omesana?