Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yembáká na esengo mpenza!

Yembáká na esengo mpenza!

“Ezali malamu kobɛtɛla Nzambe na biso mondule.”​—NZEMBO 147:1

NZEMBO: 9, 138

1. Koyemba esalisaka biso na nini?

MOTO moko oyo azalaki kokoma banzembo alobaki boye: “Maloba etindaka moto akanisa. Miziki ebimisaka mayoki. Kasi nzembo esimbaka motema ya moto.” Banzembo na biso esanzolaka Tata na biso ya likoló Yehova mpe emonisaka ete tolingaka ye. Esalaka ete tómiyoka pene na ye. Na yango, koyemba ezali mpenza na esika monene na losambo ya solo, ezala ntango tozali koyemba biso moko to elongo na bandeko na biso.

2, 3. (a) Ndenge nini bato mosusu batalelaka koyemba na mongongo makasi na lisangá? (b) Mituna nini tokotalela?

2 Kasi, ndenge nini otalelaka koyemba na mongongo makasi na lisangá? Oyokaka nsɔni? Na bamboka mosusu, mibali bayokaka mabe koyemba na miso ya bato. Ezaleli ya bongo ekoki kokɔtela bandeko ya lisangá, mingimingi soki bankulutu bakakatanaka mpo na koyemba to basalaka makambo mosusu na ntango ya koyemba.​—Nzembo 30:12.

3 Koyemba ezali na kati ya losambo oyo topesaka Yehova. Boye, tosengeli te kobima libándá na ntango ya koyemba to kozanga eteni yango ya makita. Na yango, osengeli komituna boye: ‘Ndenge nini natalelaka likambo ya koyemba na makita? Nakoki kosala nini soki nakakatanaka koyemba makasi na miso ya basusu? Ndenge nini nakoki komikɔtisa mpenza na nzembo?’

KOYEMBA EZALI NA ESIKA MONENE NA LOSAMBO YA SOLO

4, 5. Na Yisraele, bibongiseli nini ezwamaki mpo na koyemba na tempelo?

4 Banda kala, basambeli ya Yehova babɛtaka miziki mpo na kosanzola ye. Kutu, ntango Bayisraele bazalaki sembo epai ya Yehova, koyemba ezalaki na esika monene na losambo na bango. Na ndakisa, ntango Davidi abongisaki makambo na tempelo, atyaki balevi 4 000 mpo na kosanzola Yehova na miziki. Kati na bango, ezalaki na balevi 288 ‘oyo bamesanaki na nzembo ya Yehova, oyo bayebaki mosala malamumalamu.’​—1 Ntango 23:5; 25:7.

5 Longola yango, miziki mpe koyemba ezalaki na esika monene na molulu ya kofungola tempelo. Biblia elobi: “Ntango kaka babɛti-kelelo ná bayembi bayembaki na bomoko lokola moto moko mpo na kosanzola mpe kopesa Yehova matɔndi, mpe ntango kaka batombolaki mongongo na bakelelo mpe na basɛmbalɛ mpe na bibɛtɛlo ya nzembo mpe na kosanzoláká Yehova, . . . nkembo ya Yehova etondaki na ndako ya Nzambe ya solo.” Kanisá ndenge kondima ya Bayisraele ekómaki makasi na libaku yango!​—2 Ntango 5:13, 14; 7:6.

6. Bibongiseli nini Nehemia azwaki mpo na miziki mpe koyemba ntango azalaki guvɛrnɛrɛ ya Yerusaleme?

6 Nehemia, oyo asalisaki Bayisraele mpo bátonga lisusu bifelo ya Yerusaleme, abongisaki mpe Balevi mpo na koyemba mpe kobɛta miziki. Miziki kitoko oyo babɛtaki esalaki ete molulu ya bofungoli bifelo yango esepelisa mpenza. Nehemia atyaki “bituluku minene mibale ya bayembi oyo bapesaka matɔndi.” Bayembi yango bazalaki kotambola likoló ya bifelo ya engumba ngámbo na ngámbo tii bakómaki na efelo oyo ezalaki pene ya tempelo. Lokito ya nzembo na bango eyokanaki, ekendaki mosika mpenza. (Nehemia 12:27, 28, 31, 38, 40, 43) Na ntembe te, Yehova asepelaki mpenza koyoka basaleli na ye bazali koyemba na esengo mpo na kosanzola ye.

7. Ndenge nini Yesu amonisaki ete koyemba ekozala na esika monene na losambo ya bakristo?

7 Na eleko ya Yesu, miziki ezalaki kaka na esika monene na losambo ya solo. Kanisá likambo oyo esalemaki na mpokwa oyo eleki ntina na lisolo ya bato. Nsima ya kosala Ekaniseli elongo na bayekoli na ye, Yesu ná bayekoli bayembaki banzembo elongo mpo na kosanzola Yehova.​—Tángá Matai 26:30.

8. Ndakisa nini bakristo ya liboso batiká na likambo etali kosanzola Nzambe na nzembo?

8 Bakristo ya liboso batiká ndakisa malamu na likambo etali kosanzola Nzambe na nzembo. Na bokeseni na Bayisraele, oyo bazalaki kokende kosambela Yehova na tempelo, bakristo bazalaki kokutana na bandako ya bandeko. Atako bandako yango ezalaki kobenda likebi ya bato te lokola tempelo, bandeko bazalaki kaka koyemba na molende. Kutu, ntoma Paulo ayebisaki bakristo ete: “Bókoba koteya mpe kokebisana na nzembo, na masanzoli mpo na Nzambe, na nzembo ya elimo elongo na eyembeli kitoko, wana bozali koyembela Yehova na mitema na bino.” (Bakolose 3:16) Tosengeli mpenza koyemba na botɔndi banzembo oyo ezali na buku na biso ya nzembo. Ezali na kati ya bilei ya elimo oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” apesaka biso na ntango oyo ebongi.​—Matai 24:45.

NDENGE YA KOYEMBA NA MPIKO

9. (a) Mpo na nini bandeko mosusu bakakatanaka koyemba na esengo na makita mpe na mayangani? (b) Ndenge nini tosengeli kosanzola Yehova na nzembo, mpe banani basengeli kopesa ndakisa? (Talá elilingi ya ebandeli.)

9 Makambo nini ekoki kosala ete okakatanaka mpo na koyemba? Ekoki kozala ete na libota to na mimeseno ya ekólo na bino boyembaka mpenza te. Mbala mosusu mpe soki oyoki baalangá-nzembo ya minene na radio to na televizyo mpe omikokanisi na bango, obangaka mpe olɛmbaka nzoto. Nzokande, kosanzola Yehova na nzembo ezali mokumba na biso nyonso. Na yango, tomboláká buku na yo ya nzembo, matisáká motó mpe yembáká na nsai! (Ezera 3:11; tángá Nzembo 147:1.) Mikolo oyo, na Bandako ya Bokonzi mingi, batye batelevizyo mpo na kolakisa maloba ya nzembo, mpe yango ekoki kosalisa biso tóyemba malamu. Ezali mpe esengo koyeba ete bankulutu bakómi koyemba nzembo ya Bokonzi na Eteyelo mpo na mosala ya Bokonzi. Yango emonisi ete ezali na ntina mingi bankulutu bápesa ndakisa na oyo etali koyemba na makita ya lisangá.

10. Nini tosengeli kobosana te soki tobangaka koyemba na mongongo makasi?

10 Bato mosusu babangaka koyemba na mongongo makasi mpo bakanisaka ete mongongo na bango ekoyokana makasi koleka, to mpo bazali na mongongo ya malamu te. Kasi, kanisá likambo oyo: “Biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi” ntango tolobaka, kasi yango epekisaka biso koloba te. (Yakobo 3:2) Bongo mpo na nini tótika ete mingongo na biso ya kozanga kokoka epekisa biso kosanzola Yehova na nzembo?

11, 12. Tokoki kosala nini mpo na koyemba malamu?

11 Mbala mosusu tobangaka koyemba mpo toyebi ndenge ya koyemba te. Kasi, ezali na mwa makambo oyo tokoki kosala mpo tóyemba malamu. *​—Talá maloba na nse ya lokasa.

12 Okoki koyemba na mpiko mpe na mongongo makasi soki oyekoli kobenda mpema malamu. Kaka ndenge kura epelisaka mwinda, mpema epesaka nguya na mongongo ntango ozali koloba to koyemba. Okoki koyemba na mongongo makasi ndenge olobaka, to kutu makasi koleka. (Talá mwa makanisi na buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, nkasa 181 tii 184, na motó ya likambo moke “Koyeba kopema malamu.”) Kutu, Biblia eyebisi basaleli ya Yehova ‘báganga na esengo’ ntango bazali kosanzola Ye na nzembo.​—Nzembo 33:1-3.

13. Limbolá ndenge oyo tokoki koyemba na mpiko.

13 Na losambo na kati ya libota to na boyekoli na yo moko, meká kosala boye: Poná moko ya banzembo oyo olingaka mingi na buku na biso ya nzembo. Tángá loyembo yango mobimba na mongongo makasi, na mpiko. Na nsima, kaka na mongongo wana, tángá maloba ya fraze moko kozanga obenda mpema. Na nsima, yembá maloba ya fraze yango kaka na mongongo wana. (Yisaya 24:14) Mongongo na yo ekofungwama mpenza, mpe yango nde malamu. Kobanga te mpe koyoka nsɔni te!

14. (a) Na ndenge nini kofungola monɔkɔ makasi esalisaka na koyemba? (Talá etanda “ Oyo okoki kosala mpo oyemba malamu.”) (b) Makanisi nini omoni ete okoki kosalela mpo obongisa mongongo?

14 Mpo oyemba malamu, mongongo na yo esengeli kozala polele. Yango wana, ntango ozali koyemba, fungolá monɔkɔ makasi koleka ntango olobaka. Kasi okosala nini soki omonaka ete mongongo na yo ezalaka makasi te to ezalaka likoló mingi? Okokuta mwa makanisi ya malamu na etanda “Ndenge ya kolonga mikakatano na yo,” na buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, lokasa 184.

YEMBELÁ YEHOVA NA MOTEMA MOBIMBA

15. (a) Liyebisi nini epesamaki na likita ya nsuka ya mbula ya 2016? (b) Mpo na nini buku ya nzembo ebongisamaki lisusu?

15 Moto nyonso oyo ayanganaki na likita ya nsuka ya mbula ya 2016, asepelaki ntango ndeko Stephen Lett ya Lisangani ya Mikóló-bakambi alobaki ete buku ya sika ya nzembo ebimi, na motó ya likambo Tóyembela Yehova na esengo. Ndenge ndeko Lett alobaki yango, moko ya bantina oyo tosengelaki na buku ya sika ya nzembo ezali ete babongisaki lisusu Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika. Maloba ya banzembo mosusu ebongwanaki mpo na kolongola maloba oyo ezali lisusu te na Libongoli ya Mokili ya Sika. Lisusu, babakisaki banzembo ya sika oyo elobeli mosala ya kosakola mpe lisiko. Longola yango, lokola koyemba ezali na esika monene na losambo na biso, Lisangani ya Mikóló-Bakambi emonaki malamu ebimisa buku ya nzembo oyo eleki malamu. Yango wana, ezipeli na yango ekokani na oyo ya Libongoli ya Mokili ya Sika.

16, 17. Bambongwana nini esalemi na buku ya sika ya nzembo?

16 Mpo buku yango ya nzembo ezala mpasi te na kosalela, banzembo ekabolami na kolanda mitó ya makambo. Na ndakisa, nzembo 1 tii na 12 elobeli Yehova, banzembo 8 oyo elandi elobeli Yesu mpe lisiko, mpe bongo na bongo. Mitó ya makambo nyonso ezali na ebandeli ya buku ya nzembo. Yango ekosalisa mpenza, na ndakisa soki ndeko mobali alingi kopona nzembo mpo na diskur na ye.

17 Mpo na kosalisa moto nyonso ayemba na motema mobimba, maloba ya banzembo mosusu ebongwani mpo liteya ebima polele. Tolongoli maloba mosusu oyo ezalaki mpasi na kokanga ntina. Maloba ya banzembo mosusu ebongwani mpo eyokana malamu na makambo oyo tolobelaka na makita mpe na mosala ya kosakola. Na ndakisa, loyembo “Tósepela na makabo malamu ya Yehova” ekómi “Tóteya liloba ya Nzambe,” mpo ezali kolobela mosala ya kosakola.

Bóyekolaka banzembo na losambo na kati ya libota (Talá paragrafe 18)

18. Mpo na nini esengeli tóyekola banzembo ya buku na biso ya sika? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

18 Banzembo mingi oyo ezali na buku ya nzembo Tóyembela Yehova na esengo ezali lokola mabondeli. Yango ekoki kosalisa yo oyebisa Yehova mayoki na yo. Mosusu ekosalisa biso “tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu.” (Baebre 10:24) Ekozala malamu tóyeba miziki mpe maloba na yango. Mpo tóyeba yango, tokoki koyoka ndenge oyo bandeko na biso bayembaki yango. Okoki kokuta banzembo yango na jw.org. Soki boyembaka yango na ndako, okoki koyekola koyemba yango na mpiko mpe na esengo. *​—Talá maloba na nse ya lokasa.

19. Ndenge nini lisangá mobimba ekoki kosambela Yehova?

19 Kobosana te ete koyemba ezali na esika monene na losambo na biso. Ezali lolenge malamu ya komonisa Yehova ete tolingaka ye mpe tozali na botɔndi na nyonso oyo asalelaka biso. (Tángá Yisaya 12:5.) Ntango ozali koyemba na esengo, ekolendisa basusu básala mpe bongo. Biso nyonso na lisangá, ezala mikóló, bana, to bato ya sika na solo, tokoki kosambela Yehova na ndenge yango. Yango wana kokakatana te koyemba na motema mobimba. Landá etinda ya mokomi ya nzembo oyo alobaki: “Bóyembela Yehova!” Yango wana, yembáká na esengo mpenza!​—Nzembo 96:1.

^ par. 11 Mpo na koyeba makambo mosusu na oyo etali kobongisa mongongo, talá TV JW ya sanza ya 12/2014 (video na eteni DEPUIS NOTRE STUDIO).

^ par. 18 Na mayangani na biso, eteni nyonso ya ntɔngɔ mpe ya nsima ya midi ebandaka na miziki oyo eumelaka miniti zomi. Miziki yango esalisaka biso tósepela na koyemba mpe ebongisaka biso mpo tólanda malamu liyangani. Yango wana, tosengeli kofanda na bisika na biso liboso miziki yango ebanda.