Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Moto oyo akabaka akopambwama

Moto oyo akabaka akopambwama

BANDA kala, bambeka ezalaka na ntina mingi na losambo ya solo. Bayisraele bazalaki kopesa bambeka ya banyama; bakristo bapesaka “mbeka ya lisanzoli.” Kasi, ezali na bambeka ya lolenge mosusu oyo esepelisaka Nzambe. (Baebre 13:15, 16) Bambeka yango epesaka esengo mpe ememaka mapamboli, ndenge bandakisa oyo elandi emonisi yango.

Hana, mwasi moko ya sembo ya ntango ya kala, azalaki mpenza na mposa ya mwana mobali kasi azalaki kobota te. Ayebisaki Yehova na libondeli ete soki aboti mwana mobali ‘akopesa ye epai ya Yehova mikolo nyonso ya bomoi na ye.’ (1 Samwele 1:10, 11) Na nsima, Hana akómaki na zemi, abotaki mwana mobali mpe bapesaki ye nkombo Samwele. Ntango kaka Samwele akilisamaki mabɛlɛ, Hana amemaki ye na Tabernakle, kaka ndenge alakaki. Yehova apambolaki Hana mpo na elimo na ye ya komipimela. Azwaki lisusu libaku ya kobota bana mitano, mpe Samwele akómaki mosakoli mpe azalaki moko ya bato oyo bakomaki Biblia.​—1 Samwele 2:21.

Lokola Hana mpe Samwele, bakristo lelo tozali na libaku ya kosalela bomoi na biso mpo na komipesa na mosala ya Mozalisi na biso. Yesu alakaki ete Yehova akopesa biso mbano monene ntango nyonso oyo tomipimeli makambo mpo na losambo na Ye.​—Marko 10:28-30.

Na siɛklɛ ya liboso, mokristo moko na nkombo Dorkasi atondaki “na misala ya malamu mpe na makabo ya motema mawa” oyo azalaki kopesa mpo na kosunga basusu. Kasi, “azwaki maladi mpe akufaki”; yango epesaki mpasi na lisangá. Ntango bayekoli bayokaki ete Petro azalaki mosika te, basɛngaki ye aya nokinoki. Kanisá esengo na bango ntango Petro ayaki mpe asekwisaki Dorkasi; ye moto ya liboso oyo ntoma moko asekwisaki. (Misala 9:36-41) Nzambe abosanaki te bambeka ya Dorkasi. (Baebre 6:10) Ezaleli na ye ya kokaba ekomamaki na Liloba ya Nzambe mpo tómekola ndakisa na ye ya malamu.

Ntoma Paulo mpe atiká ndakisa malamu na oyo etali kopesa ntango na ye mpe kotyela basusu likebi. Akomelaki bakristo ya Korinti ete: “Kasi ngai, na esengo koleka, nakopesa biloko na ngai nyonso mpe nakopesama mobimba mpo na milimo na bino.” (2 Bakorinti 12:15) Paulo amonaki ete komipesa mpo na basusu epesaka esengo mingi, kasi na koleka, ememaka mapamboli ya Yehova.​—Misala 20:24, 35.

Ezali polele ete Yehova asepelaka soki tozali kosalela ntango mpe makasi na biso mpo na matomba ya Bokonzi mpe kosalisa bandeko. Kasi ezali nde na lolenge mosusu oyo tokoki kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola Bokonzi? Ɛɛ! Longola misala oyo emonisaka bolingo, tokoki kokumisa Yehova soki tozali kotya makabo. Makabo yango esalisaka na mosala ya kosakola na mokili mobimba, na ndakisa kosalisa bamisionɛrɛ mpe bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso. Esalisaka mpe mpo na kobongisa mpe kobongola mikanda mpe kobimisa bavideo, kosalisa bandeko oyo bazwi makama, mpe kotonga Bandako ya Bokonzi. Tóbosana te ete moto oyo akabaka akopambwama. Lisusu, ntango topesaka Yehova biloko na biso ya motuya, tokumisaka ye.​—Masese 3:9; 22:9.