Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Bato Malamu oyo Yesu alobelaki na butu liboso akufa ezalaki banani, mpe mpo na nini bazalaki kobenga bango bongo?

Na butu liboso Yesu akufa, apesaki bantoma na ye toli ete báluka te kozwa esika ya lokumu kati na bandeko na bango bakristo. Ayebisaki bango: “Bakonzi ya bikólo balakisaka bango bokonzi na bango, mpe baoyo bayangelaka bango babengami Bato Malamu. Nzokande bino bosengeli kozala bongo te.”​—Luka 22:25, 26.

Bato Malamu oyo Yesu alobelaki ezalaki banani? Bitanda, mbongo ya bibende, mpe makomi ndenge na ndenge emonisaka ete na ntango ya Bagrɛki mpe Baroma, bazalaki na momeseno ya kosalela ebengeli Évergète, to Bato Malamu mpo na kopesa bato minene mpe bakonzi lokumu. Bazalaki kokumisa bango bongo mpo mibali yango bazalaki kosala makambo mpo na bolamu ya bato nyonso.

Bakonzi ebele bazalaki kobengama Bato malamu. Tokoki kotánga bakonzi ya Ezipito oyo bayebanaki na nkombo Ptolémée III Évergète (soki 247-222 L.T.B.) mpe Ptolémée VIII Évergète II (soki 147-117 L.T.B.). Jules César (48-44 L.T.B.) ná César Auguste (31 L.T.B.–14 T.B.) oyo bayangelaki Roma bazalaki mpe kobengama Bato malamu, ndenge moko na Erode Monene, mokonzi ya Yudea. Emonani ete basalelaki ebengeli yango mpo na Erode ntango asɛngaki bátindela ye blé mpo na kosilisa nzala oyo ekɔtaki na mboka na ye mpe apesaki babola bilamba.

Moto moko ya mayele mwana-mboka Allemagne na nkombo Adolf Deissmann alobaki ete bazalaki kosalela ebengeli yango mingi. Akomaki ete ezali mpasi te moto amona nokinoki ebele ya bitanda oyo esaleli ebengeli yango.

Sikoyo, Yesu alingaki koloba nini ntango ayebisaki bayekoli na ye ete: “Nzokande bino bosengeli kozala bongo te”? Yesu azalaki nde koyebisa bango ete básalisaka bato te, elingi koloba bálukaka te bolamu ya bato oyo bazali zingazinga na bango? Te, ezali bongo te. Emonani ete Yesu azalaki kolobela nde makanisi oyo ezalaki kotinda bato bákabela basusu.

Na mikolo ya Yesu, bato ya mbongo bazalaki koluka kokende nsango, yango wana bazalaki kopesa mbongo mpo na kosimba bateyatre, masano na stade, kotonga baparke mpe batempelo, mpe makambo mosusu ya ndenge wana. Kasi, bazalaki kosala yango kaka mpo bato bákumisa bango, mpo báyebana, to mpo bato bápona bango. Diksionɛrɛ moko elobi boye: “Atako bato mosusu bazalaki kokaba na makanisi ya malamu, mingi bazalaki kokaba mpo na koluka matomba na bango moko.” Yesu azalaki kolendisa bayekoli na ye bákima elimo wana ya koluka matomba na bango moko.

Mwa bambula na nsima, ntoma Paulo amonisaki polele ntina ya kopesa na makanisi ya malamu. Akomelaki bakristo ya Korinti ete: “Moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na koimaima te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.”​—2 Bakorinti 9:7.