Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Likabo nini tokoki kopesa Yehova?

Likabo nini tokoki kopesa Yehova?

YESU alobaki: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Likambo yango etaleli mpe boyokani na biso na Yehova. Mpo na nini tolobi bongo? Yehova apesi biso makabo mingi oyo epesaka biso esengo, kasi tokoki kutu kozwa esengo mingi koleka soki topesi Yehova likabo. Likabo nini tokoki kopesa Yehova? Masese 3:9 elobi: “Kumisá Yehova na biloko na yo ya motuya.” Biloko yango esangisi ntango, mayele, makasi, mpe biloko na biso ya mokili. Ntango tozali kopesa biloko na biso mpo na kosimba losambo ya solo, tozali kopesa Yehova likabo, mpe kosala bongo epesaka esengo mingi.

Nini ekosalisa biso tóbosanaka te kopesa Yehova likabo na biso? Ntoma Paulo ayebisaki bakristo ya Korinti ete ‘bábomba mwa eloko pembeni’ lokola likabo. (1 Bakorinti 16:2) Okoki kosala nini soki olingi koyeba ndenge mosusu ya kopesa makabo na esika ofandi? Talá etanda oyo ezali na nse.

Na bamboka mosusu likoki ya kopesa makabo na nzela ya Internet ezalaka te. Kasi, ndenge mosusu ya kopesa makabo ezali na lokasa oyo elobeli kopesa makabo. Na mikili mosusu, ezali na mokanda moko oyo epesi biyano na mituna oyo bato batunaka na oyo etali makabo.