Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Sombá solo mpe kotɛka yango te”

“Sombá solo mpe kotɛka yango te”

“Sombá solo mpe kotɛka yango te​—bwanya ná disiplini ná mayele.”​—MASESE 23:23.

NZEMBO: 94, 96

1, 2. (a) Eloko nini eleki ntina na bomoi na biso? (b) Mateya nini tozwaka na motuya, mpe mpo na nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

ELOKO nini eleki motuya na bomoi na yo? Mpo na biso Batatoli ya Yehova, eloko oyo eleki motuya ezali boyokani na biso na Nzambe. Tolingaka eloko moko te ezwa esika na yango. Eloko mosusu ya motuya mpo na biso ezali solo ya Biblia, mpo yango nde esalisi biso tókóma baninga ya Yehova.​—Bakolose 1:9, 10.

2 Yehova azali Molakisi na biso monene mpe ateyi biso makambo ebele na Liloba na ye, Biblia. Alakisi biso ntina ya nkombo na ye mpe ayebisi biso bizaleli na ye ya kokamwa. Alobi ete alingaka biso mingi, yango wana akabaki bomoi ya Mwana na ye Yesu mpo na biso. Yehova ateyi biso mpe makambo etali Bokonzi ya Masiya. Apesi biso mpe elikya; bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakokende na likoló mpe “bampate mosusu” bakofanda na Paradiso awa na mabele. (Yoane 10:16) Yehova ateyaka biso lolenge ya bomoi oyo tosengeli kozala na yango. Tozwaka mateya yango na motuya mpo esalisaka biso tózala na boyokani malamu na Mozalisi na biso mpe esalaka ete bomoi na biso ezala na ntina.

3. Yehova asɛngaka tófuta mbongo mpo tóyekola solo?

3 Yehova azali Nzambe oyo akabaka. Akabaki ata Mwana na ye mbeka mpo na biso. Soki moto moko azali koluka solo, Yehova asalisaka ye amona yango. Ata mokolo moko te akosɛnga biso tófuta mbongo mpo tóyekola solo. Kutu, ntango mobali moko na nkombo Simo alukaki kopesa ntoma Petro mbongo mpo apesa ye bokonzi ya kopesa basusu elimo santu, Petro apamelaki ye; alobaki: “Palata na yo ebeba elongo na yo, mpo okanisi kozwa likabo ya ofele ya Nzambe na mbongo.” (Misala 8:18-20) Boye, kosomba solo elimboli nini?

‘KOSOMBA’ SOLO ELIMBOLI NINI?

4. Na lisolo oyo, tokoyekola makambo nini oyo etali solo?

4 Tángá Masese 23:23. Esɛngaka kosala milende mpo na koyekola solo ya Biblia. Tosengeli kondima kotika makambo nyonso mpo na kozwa yango. Mpe nsima ya ‘kosomba solo,’ elingi koloba koyekola yango, tosengeli kosala nyonso ete ‘tótɛka’ yango te, elingi koloba tótika yango te. Ndenge nini ‘tosombaka’ solo? Ekoki kosɛnga nini? Biyano na mituna wana ekosalisa biso tózwa solo na motuya mingi koleka mpe tókangama na ekateli na biso ya kotika yango ata mokolo moko te. Tokomona mpe ete solo ezali na motuya koleka eloko mosusu nyonso.

5, 6. (a) Ndenge nini tokoki kosomba solo kozanga ete tópesa mbongo? Pesá ndakisa. (b) Na ndenge nini solo ememelaka biso matomba?

5 Koloba ete eloko ezali ofele yango elimboli te ete ezali na motuya te. Liloba ya Ebre oyo ebongolami na ‘kosomba’ na Masese 23:23 ekoki mpe kolimbola “kozwa.” Maloba yango nyonso mibale epesaka likanisi ya kosala milende to kotika eloko moko mpo na kozwa eloko oyo tomoni ete ezali na motuya. Mpo tómona ndenge oyo tokoki kosomba solo, tózwa ndakisa ya mai na ebale. Lokola mai ezali ofele, ekokóma na ndako na biso na ndenge ya likamwisi? Te, tosengeli kokende na ebale kotɔka yango mpe komema yango na ndako. Na yango, ata soki tokopesa mbongo te, tosengeli kosala milende mpo na kozwa yango. Ndenge moko mpe, topesaka mbongo te mpo na koyekola solo, kasi tosengeli kosala milende mpe kotika makambo mosusu mpo na kozwa yango.

6 Tángá Yisaya 55:1-3. Maloba yango ya Yehova esalisi biso tóyeba soki kosomba solo elimboli nini. Na bavɛrsɛ yango, Yehova akokanisi maloba na ye na mai, miliki mpe vinyo. Ndenge kaka mai ya mpiɔ ekitisaka motema, solo ya Liloba ya Nzambe mpe ekitisaka motema. Mpe ndenge kaka miliki esalisaka mwana azala makasi, solo ya Biblia ekómisaka boyokani na biso na Yehova makasi. Yehova akokanisi mpe maloba na ye na vinyo. Mpo na nini? Biblia elobi ete vinyo esepelisaka motema ya moto. (Nzembo 104:15) Na yango, ntango Yehova ayebisi basaleli na ye ‘básomba vinyo,’ ezali mpo na komonisa ete tokosepela soki tolandi litambwisi na ye na bomoi na biso. (Nzembo 19:8) Yehova asaleli maloba wana mpo na kosalisa biso tómona ete koyekola solo ya Liloba na ye mpe kosalela yango esalisaka mingi. Tótalela makambo mitano oyo mbala mosusu totikaki mpo na kosomba solo.

OTIKÁ NINI MPO NA KOSOMBA SOLO?

7, 8. (a) Mpo na nini tosengeli kopesa ntango mpo na kosomba solo? (b) Makambo nini elenge mwasi moko amipimelaki, mpe ebimisaki mbuma nini?

7 Ntango. Yango nde moto asengeli kopesa mpo na kosomba solo. Esɛngaka ntango mpo na koyoka nsango ya Bokonzi, kotánga Biblia mpe mikanda ya moombo ya sembo, koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, kobongisa makita, mpe koyanganaka na makita yango. Mpo na kosala nyonso wana, tosengeli kosalela ntango oyo tokokaki kolekisa na makambo oyo ezali na ntina mingi te. (Tángá Baefese 5:15, 16.) Ezwaka ntango boni mpo na koyekola mateya ya ebandeli ya Biblia? Etali moto na moto. Koyekola bwanya ya Yehova, ndenge na ye ya kosala makambo mpe misala na ye ezali na nsuka te. (Baroma 11:33) Nimero ya liboso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekokanisaki mateya ya solo na “mwa fololo ya moke,” mpe elobaki boye: ‘Kosuka kaka na kobuka fololo moko te ya solo. Soki fololo moko ekokaki, mosusu elingaki kozala te. Kobá kobuka mosusu, kobá koluka fololo mingi.’ Na yango, tokoki komituna boye: ‘Nakobaka kobakisa boyebi na ngai ya solo?’ Ata ntango tokozwa bomoi ya seko, ekozala kaka na makambo ebele ya koyekola mpo na Yehova. Lelo oyo, ezali na ntina ete tósalela ntango na biso na bwanya mpo na kosomba solo. Tótala ndakisa ya ndeko moko oyo asalaki yango.

8 Mariko, * elenge mwasi moko ya Japon akendaki kofanda na engumba New York, na États-Unis mpo na kotánga kelasi. Mokolo moko, ndeko mwasi moko ya mobongisi-nzela akutanaki na ye na mosala ya kosakola ndako na ndako. Mariko azalaki kosambela na lingomba moko, kasi andimaki koyekola Biblia na ndeko mwasi yango. Asepelaki mingi na makambo oyo azalaki koyekola mpe asɛngaki bábanda koyekola mbala mibale na pɔsɔ. Atako makambo ya kelasi ná mosala na ye ezalaki kozwa ye ntango mingi, Mariko abandaki mbala moko koyangana na makita. Atikaki kolekisa ntango mingi na kominanola elongo na baninga, mpo akóma na ntango mingi ya koyekola solo. Lokola amipimelaki ndenge wana, Mariko akolaki nokinoki na elimo, mpe mbula mobimba ekokaki te, azwaki batisimo. Sanza motoba na nsima, na 2006, akómaki mobongisi-nzela, mpe tii lelo azali mobongisi-nzela.

9, 10. (a) Ndenge nini kosomba solo ebongolaka ndenge na biso ya kotalela biloko ya mokili? (b) Mokano nini mwasi moko atikaki, mpe ayokaka ndenge nini mpo na yango?

9 Biloko ya mokili. Mpo na kosomba solo, ekoki kosɛnga tótika mosala ya mbongo mingi. Na ndakisa, Petro ná Andre bazalaki baluki-mbisi, kasi ntango Yesu abengaki bango mpo bákóma bayekoli na ye, “basundolaki minyama” na bango. (Matai 4:18-20) Yango elimboli te ete mpo na koyekola solo, osengeli kolongwa na mosala na yo. Biblia esɛngi biso tósala mosala mpo na kokokisa bamposa ya libota na biso. (1 Timote 5:8) Kasi, soki oyekoli solo, ndenge na yo ya kotalela biloko ya mokili esengeli kobongwana. Okoyeba makambo oyo eleki ntina na bomoi. Yesu alobaki: “Bótika komibombela biloko ya motuya na mabele.” Kasi alendisaki biso ete: “Bómibombela biloko ya motuya na likoló.” (Matai 6:19, 20) Yango nde elenge mwasi moko na nkombo Maria asalaki.

10 Maria azalaki kosepela mingi kobɛta lisano ya golf ntango azalaki mwana moke. Na eteyelo ya ntei, mayele na ye na lisano yango ezalaki se kokola. Ayebaki lisano yango malamu tii bapesaki ye bourse. Maria amityelaki mokano ya kokóma mobɛti monene ya lisano ya golf mpe kokóma na mbongo mingi. Na nsima, abandaki koyekola Biblia. Maria asepelaki na makambo oyo azalaki koyekola mpe abandaki kosalela yango na bomoi na ye. Alobaki boye: “Mbala nyonso oyo nazalaki koyokanisa makanisi mpe bomoi na ngai na mitinda ya Biblia, nazalaki kokóma na esengo mingi.” Maria amonaki ete ekozala mpasi atya makanisi na boyokani na ye na Yehova mpe na biloko ya mokili. (Matai 6:24) Na yango, amonaki malamu atika mokano na ye ya koluka kokóma mobɛti monene ya lisano ya golf mpo azwa eloko oyo eleki motuya. Lelo, Maria azali mobongisi-nzela mpe alobi ete “bomoi na ye etondi na esengo mpe ekómi na ntina mingi.”

11. Ntango tosombi solo, boyokani na biso na basusu ekoki kokóma ndenge nini?

11 Boyokani na biso na basusu. Ntango tobandi kosalela makambo oyo tozali koyekola na Biblia, boyokani na biso na baninga mpe bato ya libota na biso ekoki kobongwana. Mpo na nini? Yesu abondelaki mpo na bayekoli na ye ete: “Santisá bango na solo; liloba na yo ezali solo.” (Yoane 17:17) Liloba ‘kosantisa’ ekoki mpe kolimbola ‘kotya pembeni.’ Ntango tobandi kosalela solo ya Biblia na bomoi na biso, ezali lokola totyami pembeni, mpo totiki kolanda makambo oyo bato mingi basalaka mpe tokómi kolanda mitinda ya Biblia. Ata soki tosali makasi mpo tóbatela boyokani ya malamu ná baninga mpe bandeko ya libota, bamosusu bakolinga biso lisusu te ndenge ezalaki liboso, mpe bamosusu bakoki kutu kotɛmɛla mateya oyo tokómi kondima. Yango ekamwisaka biso te. Yesu alobaki: “Banguna ya moto bakozala bato ya ndako na ye moko.” (Matai 10:36) Kasi, ata soki totikaki nini mpo na kosomba solo, Yesu alakaki mpe ete mbano oyo tokozwa ekoleka mosika biloko oyo totikaki!​—Tángá Marko 10:28-30.

12. Mobali moko atikaki nini mpo na kosomba solo?

12 Banda bomwana na ye, Moyuda moko na nkombo Aaron ateyamaki ete moto akoki kotánga nkombo ya Nzambe te. Kasi, azalaki mpenza na mposa ya koyeba solo. Mokolo moko, Motatoli moko alakisaki ye ete soki abakisi milelisi (voyelles) na balɛtrɛ minei ya nkombo ya Nzambe, ekoki kotángama “Yehova.” Aaron asepelaki mingi koyeba likambo yango mpe akendaki na sinagoga koyebisa bateyi! Akanisaki ete bakosepela koyeba solo na ntina etali nkombo ya Nzambe, kasi basepelaki te. Babwakelaki ye nsoi mpe babenganaki ye. Bato ya libota na ye moko mpe basilikelaki ye. Kasi Aaron atikaki koyekola makambo ya Yehova te. Akómaki Motatoli ya Yehova mpe asalelaki Yehova na bosembo tii na nsuka ya bomoi na ye. Biso mpe tosengeli kondima mbongwana nyonso oyo ekoki kosalema na boyokani na biso na basusu mpo toyekoli solo.

13, 14. Mbongwana nini tosengeli kosala na makanisi mpe etamboli na biso mpo tósomba solo? Pesá ndakisa.

13 Makanisi mpe etamboli ya mbindo. Ntango tobandi koyekola solo mpe tokómi kotosa mibeko oyo ezali na Biblia, tosengeli kondima kobongisa makanisi mpe etamboli na biso. Ntoma Petro akomaki: “Lokola bana ya botosi, bótika kolanda bamposa oyo bozalaki na yango kala ntango bozalaki na boyebi te.” Na nsima abakisaki: “Bókóma basantu na etamboli na bino mobimba.” (1 Petro 1:14, 15) Na engumba Korinti, bato mingi bazalaki na etamboli ya mbindo. Na yango mpo na kosomba solo esɛngaki básala bambongwana minene na bomoi na bango. (1 Bakorinti 6:9-11) Lelo oyo mpe, bato mingi basalaka mbongwana ya ndenge wana mpo na kosomba solo. Ntoma Petro alobelaki yango na maloba oyo: “Ntango oyo esili koleka ekoki bongo oyo bino bosalaki mokano ya bikólo ntango botambolaki na misala ya etamboli ya nsɔni, na bamposa makasi, na kolekisa ndelo na vinyo, na bafɛti ya lokoso, na komɛla mingi, mpe na losambo mabe ya bikeko.”​—1 Petro 4:3.

14 Na boumeli ya bambula ebele, Devynn ná Jasmine bazalaki balangwi-masanga. Atako Devynn ayebaki malamu mosala ya kolandela makambo ya mbongo na kompanyi (comptable), mbala mingi bazalaki kolongola ye na mosala mpo na masanga. Jasmine azalaki kosilika makasi mpe kosala mobulu. Mokolo moko na nzela, ntango azalaki na nse ya molangwa, akutanaki na Batatoli mibale oyo bazalaki bamisionɛrɛ. Basɛngaki ye báyekola Biblia. Kasi, ntango bandeko yango bakendaki kotala ye na ndako pɔsɔ oyo elandaki, bakutaki Devynn ná Jasmine balangwe. Bazalaki kondima te ete bamisionɛrɛ yango bakotyela bango likebi mpe bakoya epai na bango. Mbala ya nsima ntango bamisionɛrɛ bayaki lisusu, makambo ezalaki ndenge mosusu. Devynn ná Jasmine bamonisaki mposa makasi ya koyekola solo, mpe babandaki mbala moko kosalela makambo oyo bazalaki koyekola. Sanza misato ekokaki te batikaki masanga, mpe na nsima bakomisaki libala na bango na Leta. Bato mingi na mboka na bango bamonaki ndenge Devynn ná Jasmine babongwanaki, mpe babandaki mpe koyekola Biblia.

15. Wapi moko ya makambo oyo eleki mpasi oyo tosengeli kotika mpo na solo, mpe mpo na nini?

15 Mimeseno oyo esepelisaka Nzambe te. Kotika mimeseno mosusu oyo esepelisaka Yehova te ezali moko ya bambongwana ya mpasi oyo esɛngaka tósala. Mpo na basusu, ata nsima ya koyekola ndenge oyo Yehova atalelaka makambo yango, ezalaka kaka mpasi mpo bátika yango. Bamitunaka soki bato ya libota, baninga ya mosala to baninga mosusu bakosala nini. Bayebaka ete mindɔndɔ ekoki kobima mpo na momeseno moko boye, na ndakisa kopesa bato oyo bakufá lokumu. (Kolimbola Mibeko 14:1) Na yango, ndakisa ya bato oyo basalaki bambongwana ya ndenge wana ntango bayekolaki solo ekoki kosalisa biso tóboya mimeseno oyo esepelisaka Nzambe te. Tólobela bakristo ya Efese ya siɛklɛ ya liboso.

16. Bato mosusu ya Efese basalaki nini mpo na kosomba solo?

16 Na engumba Efese, bato mingi bazalaki kosala misala ya maji. Bato oyo bakómaki bakristo basalaki nini mpo na kotika momeseno yango mpe kosomba solo? Biblia elobi: “Ebele ya baoyo bazalaki kosala misala ya maji basangisaki babuku na bango esika moko mpe batumbaki yango na miso ya bato nyonso. Mpe batángaki ntalo na yango nyonso mpe bamonaki ete ekokanaki na motuya ya mbongo ya bibende ya palata nkóto ntuku mitano (50 000). Na yango, na ndenge moko ya nguya, liloba ya Yehova ekobaki kokola mpe kolonga.” (Misala 19:19, 20) Bakristo yango ya sembo bandimaki kotika babuku na bango ya ntalo, mpe Yehova apambolaki bango mingi.

17. (a) Wapi mwa makambo oyo mbala mosusu totiká mpo na kosomba solo? (b) Mituna nini tokotalela na lisolo elandi?

17 Otiká nini mpo na kosomba solo? Biso nyonso topesaka ntango. Basusu kati na biso baboyi misala oyo ekokaki kopesa bango mbongo mingi. Basusu mpe bandimi ete boyokani na bango na bandeko mpe baninga na bango ebongwana. Mingi na biso tobongoli makanisi mpe etamboli na biso. Totiki mimeseno oyo esepelisaka Yehova te. Kasi, tondimaka ete solo ya Biblia eleki eloko nyonso oyo totiki. Esalisi biso tózwa eloko oyo eleki motuya: kozala na boyokani malamu na Yehova. Ntango tokanisaka mapamboli nyonso oyo tozwi mpo toyebi solo, ezalaka mpasi tómona ntina oyo moto akoki “kotɛka yango.” Ndenge nini likambo yango ekoki kosalema? Mpe tokoki kosala nini mpo tósala te libunga yango ya monene? Tokozwa biyano na lisolo oyo elandi.

^ par. 8 Topesi bango bankombo mosusu.