“Nazali na elikya epai ya Nzambe”
“Adama ya nsuka akómaki elimo oyo epesaka bomoi.”—1 BAKORINTI 15:45.
1-3. (a) Liteya nini tosengeli mpe kotánga na kati ya mateya oyo esimbi kondima na biso? (b) Mpo na nini lisekwa ezali na ntina mingi? (Talá elilingi ya ebandeli.)
SOKI moto atuni yo oyebisa ye mateya minene oyo esimbi kondima na yo, okoloba nini? Na ntembe te, okoloba ete ondimaka ete Yehova nde azali Mozalisi mpe ye nde apesá biso bomoi. Mbala mosusu okoloba mpe ete ondimelaka Yesu Kristo, oyo apesaki bomoi na ye lisiko. Okoki mpe kolobela Paradiso oyo ekozala awa na mabele, esika basaleli ya Nzambe bakofanda libela na libela. Bongo lisekwa? Okotánga yango mpe na kati ya mateya oyo olingaka mingi?
2 Tozali na bantina mpenza ya kotánga lisekwa na kati ya mateya oyo esimbi kondima na biso, ata soki tozali na elikya ya kobika na bolɔzi monene mpo na kofanda libela na libela na mabele. Ntoma Paulo amonisaki ntina oyo lisekwa ezali na motuya mingi; alobaki: “Soki, ya solo, lisekwa ya bakufi ezali te, Kristo mpe alamukaki te.” Soki Yesu asekwaki te, akokaki kozala Mokonzi na likoló te lelo, mpe mosala ya kosakola elingaki kozala na ntina te. (Tángá 1 Bakorinti 15:12-19.) Nzokande, toyebi ete Yesu asekwaki. Lokola tondimaka yango, tokeseni na Basadukai, oyo bazalaki kondima ata moke te ete bakufi bakoki kozonga na bomoi. Ata soki bato batyoli biso, tozalaka kaka na kondima makasi ete lisekwa ekozala.—Marko 12:18; Misala 4:2, 3; 17:32; 23:6-8.
3 Ntoma Paulo atángaki “lisekwa ya bakufi” na kati ya “mateya ya ebandeli ya Kristo.” (Baebre 6:1, 2) Alobaki ete azalaki mpenza kondima liteya ya lisekwa. (Misala 24:10, 15, 24, 25) Ata soki ezali mateya ya ebandeli, elingi koloba moko ya makambo ya liboso oyo toyekolaka na Liloba ya Nzambe, ezali kaka na ntina tóyekola yango malamumalamu. (Baebre 5:12) Mpo na nini?
4. Mituna nini tokoki komituna na oyo etali lisekwa?
4 Ntango moto abandi koyekola Biblia, mbala mingi atángaka masolo ya lisekwa oyo esalemaki na ntango ya kala, na ndakisa lisekwa ya Lazare. Ayekolaka mpe ete Abrahama, Yobo, mpe Danyele bazalaki na kondima ete na mikolo ezali koya, bakufi bakozonga na bomoi. Kasi, okoloba nini soki moto asɛngi yo omonisa ntina oyo tokoki kondima bilaka ya lisekwa oyo epesamaki bambula mingi liboso? Biblia eyebisi ntango oyo lisekwa ekosalema na mikolo ezali koya? Biyano na mituna yango ekolendisa kondima na biso.
LISEKWA OYO ESAKOLAMAKI BAMBULA MINGI LIBOSO
5. Likambo nini tokolobela sikoyo?
5 Ezali mpasi te komona na makanisi lisekwa ya moto oyo akufi kala mingi te. (Yoane 11:11; Misala 20:9, 10) Kasi, tokoki kondima elaka oyo elobi ete lisekwa moko ekosalema nsima ya bambula ebele mpenza? Tokoki kondima yango ata soki etali moto oyo akufá eleki bambula ebele mpenza to moto oyo auti kokufa kala mingi te? Kutu, osilá kondima lisekwa moko oyo esalemaki bambula ebele nsima ya ntango oyo elaka yango epesamaki. Lisekwa ya nani? Mpe ezali na boyokani nini na elikya ya lisekwa oyo ozali na yango mpo na mikolo ezali koya?
6. Na ndenge nini kokokisama ya Nzembo 118 etalaki mpe Yesu?
6 Mpo tólobela lisekwa moko oyo esakolamaki bambula mingi liboso, tótalela Nzembo 118, oyo mbala mosusu Davidi nde akomaki. Nzembo yango ezali na maloba oyo: “Yehova, bikisá biso, tobondeli yo!” mpe “Ye oyo azali koya na nkombo ya Yehova apambwama.” Bato bazongelaki esakweli yango oyo etalaki Masiya ntango Yesu akɔtaki na Yerusaleme na mokolo ya 9 Nisana, mwa mikolo liboso akufa. (Nzembo 118:25, 26; Matai 21:7-9) Kasi na ndenge nini Nzembo 118 elobelaki lisekwa oyo esengelaki kosalema nsima ya bambula mingi? Talá likambo mosusu oyo nzembo yango elobaki: “Libanga oyo batongi-ndako babwakaki ekómi libanga monene ya litumu ya ndako.”—Nzembo 118:22.
7. Ndenge nini Bayuda babwakaki Yesu?
7 “Batongi-ndako” oyo babwakaki Masiya ezalaki bakonzi ya Bayuda. Bapesaki Yesu mokɔngɔ mpe baboyaki kondima ete azali Kristo. Bayuda mingi babwakaki ye tii batyaki Pilate mbamba aboma ye. (Luka 23:18-23) Bazalaki na ngambo mpenza na liwa ya Yesu.
8. Ndenge nini Yesu akokaki kokóma “motó ya litumu ya ndako”?
8 Lokola Yesu abwakamaki mpe abomamaki, ndenge nini akokaki kokóma “libanga monene ya litumu ya ndako”? Ekokaki kosalema kaka soki azongi na bomoi. Yesu ye moko amonisaki yango. Apesaki ndakisa ya nkolo-bilanga oyo atindaki baombo epai ya basali-bilanga na Nzembo 118:22. (Luka 20:9-17) Ntoma Petro mpe asalelaki vɛrsɛ yango ntango azalaki koloba liboso ya ‘bankumu, mikóló ná bakomeli ya Bayuda oyo bayanganaki na Yerusaleme.’ Alobelaki ‘Yesu Kristo Monazarete, oyo babakaki na nzete kasi oyo Nzambe alamwisaki uta na bakufi.’ Na nsima, alobaki: “Ye azali ‘libanga oyo bino batongi-ndako bomonaki mpamba, mpe oyo ekómi motó ya litumu ya ndako.’”—Misala 3:15; 4:5-11; 1 Petro 2:5-7.
ye. Basali-bilanga banyokolaki baombo yango. Nsukansuka, nkolo-bilanga atindaki mwana na ye moko, na elikya ete basali-bilanga bakoyokela ye. Kasi babomaki mwana yango. Nsima ya kopesa ndakisa yango, Yesu azongelaki esakweli oyo ezali na9. Likambo nini ya ntina mingi Nzembo 118:22 esakolaki?
9 Emonani polele ete Nzembo 118:22 esakolaki lisekwa oyo esengelaki kosalema nsima ya bambula mingi. Masiya asengelaki kobwakama mpe kobomama. Kasi, asengelaki kozonga na bomoi mpe kokóma motó ya litumu ya ndako. Nsima ya lisekwa na ye, Yesu azwaki nkombo kaka moko “oyo epesami na kati ya bato, oyo tosengeli kobika na nzela na yango.”—Misala 4:12; Baefese 1:20.
10. (a) Nzembo 16:10 esakolaki nini? (b) Ndenge nini toyebi ete Nzembo 16:10 elobelaki Davidi te?
10 Tótalela vɛrsɛ mosusu oyo elobelaki lisekwa. Ekokisamaki nsima ya mbula koleka nkóto moko. Likambo yango esengeli kondimisa biso ete lisekwa ekoki kosalema bambula mingi nsima ya ntango oyo esakolamaki. Na Nzembo 16, totángaka maloba oyo ya Davidi: “Okotika molimo na ngai na kati ya Nkunda te. Okotika te ete moto na yo ya sembo amona libulu.” (Nzembo 16:10) Davidi alingaki koloba te ete akokufa te to ete akotikala na Nkunda te. Liloba ya Nzambe elobi polele ete Davidi akómaki mobange, mpe ntango akufaki, “alalaki esika moko na bankɔkɔ na ye mpe akundamaki na Sité ya Davidi.” (1 Bakonzi 2:1, 10) Sikoyo, vɛrsɛ wana elobeli nani?
11. Ntango nini Petro alimbolaki Nzembo 16:10?
11 Mbula koleka nkóto moko nsima ya kokomama ya maloba yango, Petro amonisaki moto oyo Nzembo 16:10 elobeli. Mwa bapɔsɔ nsima ya liwa mpe lisekwa ya Yesu, Petro alobaki liboso ya Bayuda mpe baprozelite ebele. (Tángá Misala 2:29-32.) Akundwelaki bango ete Davidi akufá mpe bakundá ye. Biblia elobi te ete moto moko kati na bango aboyaki kondimela Petro ntango abakisaki ete Davidi “amonaki liboso mpe alobaki mpo na lisekwa” ya Masiya.
12. Ndenge nini Nzembo 16:10 ekokisamaki, mpe emonisi nini mpo na elaka ya lisekwa?
12 Petro amonisaki lisusu likambo yango polele ntango azongelaki maloba ya Davidi oyo ezali na Nzembo 110:1. (Tángá Misala 2:33-36.) Ndenge Petro asololaki na ebele ya bato na nzela ya Makomami esalisaki ye andimisa bango ete Yesu azalaki “Nkolo mpe Kristo.” Bandimaki ete Nzembo 16:10 ekokisamaki ntango Yesu asekwaki. Na nsima, ntoma Paulo mpe abendaki likebi na likambo yango ntango alobaki na Bayuda na engumba ya Antiokia ya Pisidia. Ekamwisaki bango, mpe balukaki koyeba makambo mosusu. (Tángá Misala 13:32-37, 42.) Likambo yango esengeli mpe kondimisa biso ete bisakweli wana oyo elobelaki lisekwa ya Yesu ezalaki solo, ata soki esakolamaki bambula mingi liboso.
LISEKWA EKOSALEMA NTANGO NINI?
13. Mituna nini tokoki komituna na oyo etali lisekwa?
13 Koyeba ete lisekwa ekoki kosalema ata bambula mingi nsima ya ntango oyo esakolamaki ezali mpenza likambo ya kolendisa. Kasi basusu bakoki komituna: ‘Yango elingi Misala 1:6, 7; Yoane 16:12) Kasi, tozali na mwa makambo oyo ekoki kosalisa biso tóyeba ntango oyo lisekwa ekosalema.
nde koloba ete ekosɛnga nazela ntango molai mpo namona lisusu moto oyo nalingaki? Lisekwa ekosalema ntango nini?’ Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete ezalaki na makambo oyo bayebaki te mpe bakokaki koyeba te. Ezali na makambo mosusu etali “bantango mpe bileko oyo Tata atyá na nse ya bokonzi na ye moko.” (14. Na ndenge nini lisekwa ya Yesu ekeseni na nyonso oyo esalemaki liboso?
14 Lisekwa ya ntina koleka na nyonso oyo Biblia elobeli ezali lisekwa ya Yesu. Soki Yesu asekwaki te, moko te kati na biso alingaki kozala na elikya ya komona lisusu bandeko to baninga na ye oyo bakufá. Bato oyo basekwaki liboso ya Yesu, lokola baoyo Eliya ná Elisha basekwisaki, batikalaki na bomoi libela te. Bakufaki lisusu mpe bakómaki putulu na nkunda. Kasi, ndenge Yesu “alamwisamaki uta na bakufi, akokufa lisusu te; liwa ezali lisusu na bokonzi likoló na ye te.” Na likoló, azali na “bomoi libela na libela.”—Baroma 6:9; Emoniseli 1:5, 18; Bakolose 1:18; 1 Petro 3:18.
15. Mpo na nini Yesu abengami “mbuma ya liboso”?
15 Yesu nde moto ya liboso oyo asekwaki na nzoto ya elimo mpo na bomoi na likoló mpe lisekwa yango ezalaki na ntina mingi. (Misala 26:23) Kasi, kaka ye te nde asengelaki kosekwa mpo na kozwa bomoi na likoló. Alakaki ete bantoma na ye ya sembo bakoyangela elongo na ye na likoló. (Luka 22:28-30) Kasi mpo bázwa mbano yango, basengelaki liboso kokufa. Na nsima, lokola Yesu, basengelaki kosekwa na nzoto ya elimo. Paulo akomaki ete “Kristo alamuki uta na bakufi, mbuma ya liboso ya baoyo balali na kati ya liwa.” Abakisaki ete bato mosusu mpe basengelaki kosekwa mpo na kokende na likoló; alobaki: “Moto na moto na ngala na ye: Kristo mbuma ya liboso, na nsima baoyo bazali bato ya Kristo na ntango ya kozala na ye.”—1 Bakorinti 15:20, 23.
16. Nini ezali kosalisa biso tóyeba ntango oyo lisekwa mpo na bomoi na likoló esengelaki kosalema?
16 Maloba ya Paulo ezali kosalisa biso tóyeba ntango oyo lisekwa mpo na bomoi na likoló esengelaki kosalema. Esengelaki kosalema na eleko ya kozala ya Kristo. Eleki bambula mingi, Batatoli ya Yehova bamonisaka na nzela ya Biblia ete “kozala” ya Kristo ebandaki na 1914. Tozali kaka na eleko yango, mpe nsuka ya ebongiseli ya ntango oyo ekómi mpenza pene.
17, 18. Na eleko ya kozala ya Kristo, likambo nini ekokómela bakristo mosusu oyo batyami mafuta?
17 Biblia elobeli mpe makambo mosusu oyo etali lisekwa mpo na bomoi na likoló; 1 Batesaloniki 4:13-17.
elobi: “Tolingi bóyeba makambo oyo etali bato oyo bazali kolala na kati ya liwa . . . Mpo soki kondima na biso ezali ete Yesu akufaki mpe asekwaki, ndenge moko mpe, baoyo balali na kati ya liwa, . . . Nzambe akozongisa bango na bomoi . . . Biso bato ya bomoi oyo tozali kotikala tii na kozala ya Nkolo tokoleka soki moke te liboso ya baoyo balali na kati ya liwa; mpo Nkolo ye moko akokita uta na likoló na mbela ya komanda, . . . mpe baoyo bakufá na kati ya bomoko elongo na Kristo bakosekwa liboso. Na nsima biso bato ya bomoi oyo totikali tokomemama, elongo na bango, na mapata mpo na kokutana na Nkolo na mopɛpɛ; mpe na ndenge yango tokozala ntango nyonso elongo na Nkolo.”—18 Lisekwa ya liboso esengelaki kobanda mwa moke nsima ya ebandeli ya eleko ya kozala ya Kristo. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bakozala na bomoi na ntango ya bolɔzi monene ‘bakomemama na mapata.’ (Matai 24:31) Elingi koloba nini? Baoyo ‘bakomemama’ ‘bakolala na kati ya liwa te,’ elingi koloba bakoumela te na liwa. Ntango kaka bakufi, ‘bakokóma ndenge mosusu bango nyonso, na mbala moko, na kobɛta ya liso, na kelelo ya nsuka.’—1 Bakorinti 15:51, 52.
19. ‘Lisekwa oyo eleki malamu’ ezali nini?
19 Lelo, bakristo mingi ya sembo bazali te bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bakoyangela elongo na Kristo na likoló. Bazali nde kozela “mokolo ya Yehova,” ntango mokili oyo mabe ekobebisama. Moto te ayebi mokolo oyo nsuka ekoya, kasi makambo mingi emonisi ete ezali lisusu mosika te. (1 Batesaloniki 5:1-3) Na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, lisekwa ya ndenge mosusu ekozala. Na ntango yango, bato bakosekwa mpo na bomoi awa na mabele mpe bakozala na elikya ya kokóma bato ya kokoka mpe ya kokufa lisusu te. Ekozala mpenza “lisekwa moko oyo eleki malamu” na bokeseni na oyo esalemaki na ntango ya kala, mpo bato oyo basekwaki bakufaki lisusu na nsima.—Baebre 11:35.
20. Mpo na nini tokoki kotya motema ete lisekwa ekosalema na molɔngɔ?
20 Biblia elobi ete baoyo bazali kokende na likoló bazali kosekwa “moto na moto na ngala na ye.” (1 Bakorinti 15:23) Na yango, tokoki kotya motema ete lisekwa oyo ekozala awa na mabele ekosalema mpe na molɔngɔ mpenza. Yango ekoki kotinda biso tómituna boye: Baoyo bazali kokufa mikolo oyo, bakosekwa na ebandeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo mpo bákutana na bandeko mpe baninga na bango oyo bakoyamba bango? Mibali ya sembo ya ntango ya kala, oyo bayebaki kotambwisa makambo, bakosekwa liboso mpo na kosalisa na kobongisa basaleli ya Nzambe na mokili ya sika? Bongo baoyo basalelaki Yehova te? Bakosekwa ntango nini mpe epai wapi? Tokoki komituna mituna ebele. Kasi, ezali na ntina te tómitungisa mpo na makambo yango sikoyo. Malamu tózela mpo tómona. Tózala na elikya ete tokosepela ntango tokomona ndenge Yehova akotambwisa makambo.
21. Elikya nini ozali na yango?
21 Liboso ntango yango ekóma, tosengeli kokómisa kondima na biso epai ya Yehova makasi. Na nzela ya Yesu, Yehova alakaki ete bakufi oyo bazali na makanisi na ye bakozonga na bomoi. (Yoane 5:28, 29; 11:23) Mpo na komonisa ete Yehova akosekwisa bakufi, mokolo moko Yesu alobaki ete na miso ya Yehova, Abrahama, Yisaka mpe Yakobo “bazali na bomoi.” (Luka 20:37, 38) Ya solo mpenza, tozali na bantina ebele ya koloba ndenge ntoma Paulo alobaki ete: “Nazali na elikya epai ya Nzambe, . . . ete lisekwa ekozala.”—Misala 24:15.