Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Natiká biloko na nsima mpo na kolanda Nkolo

Natiká biloko na nsima mpo na kolanda Nkolo

“Soki okei kosakola, kozonga awa te. Soki ozongi awa, nakobuka yo makolo.” Lokola tata akanelaki ngai bongo, nazwaki ekateli ya kolongwa na ndako. Ezalaki mbala ya liboso natika biloko na nsima mpo na kolanda Nkolo. Nazalaki na mbula 16 mpamba.

EBANDAKI ndenge nini? Nayebisa bino. Nabotamá na mokolo ya 29/07/1929, mpe nakolá na mboka moko na etúká ya Bulacan, na ekólo Philippines. Tozalaki na biloko mingi te mpo nkita ya ekólo ebebaki makasi. Etumba ebandaki ntango nazalaki elenge. Basoda ya Japon bakɔtaki na Philippines. Kasi, lokola mboka na biso ezalaki mosika, etumba ekómaki mpenza te esika tozalaki. Lokola radio ezalaki te, televizyo te, mpe bazulunalo te, tozalaki kozwa nsango ya etumba kaka na minɔkɔ ya bato.

Nazalaki mwana ya mibale na libota ya bana mwambe, mpe baboti ya mama bazwaki ngai nakende kofanda na bango ntango nakómaki na mbula 8. Atako bazalaki bato ya Katolike, nkɔkɔ ya mobali azalaki kolinga makambo ya mangomba mosusu mpe abombaki mikanda oyo baninga na ye bapesaki ye. Nayebaka ete alakisaki ngai mwa babuku Libateli, Kimya, mpe Eyebani na monɔkɔ ya Tagalog, * ná Biblia. Nazalaki kosepela kotánga Biblia, mingimingi Baevanzile minei. Yango epesaki ngai mposa ya kolanda ndakisa ya Yesu.​—Yoane 10:27.

NAYEKOLI KOLANDA NKOLO

Basoda ya Japon balongwaki na 1945. Na ntango yango, baboti na ngai basɛngaki ngai nazonga epai na bango. Nkɔkɔ ya mobali alobaki nakende. Na yango, nakendaki.

Mwa moke na nsima, na sanza ya 12 na 1945, etuluku moko ya Batatoli ya Yehova oyo bautaki na mboka Angat bayaki kosakola na mboka na biso. Motatoli moko ya mokóló ayaki na ndako na biso mpe ayebisaki biso makambo oyo Biblia elobi mpo na “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1-5) Abengaki biso tókende na etuluku moko ya boyekoli ya Biblia na mboka moko ya pembeni. Atako baboti na ngai bakendaki te, ngai nakendaki. Tozalaki bato soki 20, mpe mwa ndambo batunaki mituna.

Lokola nazalaki kokanga ntina ya makambo nyonso te, namonaki malamu nakende na ngai. Kasi, kaka na ntango yango, babandaki koyemba nzembo moko ya Bokonzi. Nzembo yango esimbaki motema na ngai mpe nabimaki lisusu te. Nsima ya loyembo mpe libondeli, bayebisaki bato nyonso ete makita ya mokolo ya lomingo oyo elandi ekosalema na Angat.

Mingi na biso totambolaki kilomɛtrɛ soki 8 mpo na kokóma na makita yango oyo esalemaki na ndako ya Ndeko Cruz. Nakamwaki ete ata bana mike oyo bazalaki kati na bato 50 oyo bayaki bapesaki biyano na mateya mozindo ya Biblia. Nsima ya koyangana na makita mosusu ebele, Ndeko Damian Santos, mobongisi-nzela moko ya mobange oyo kala azalaki guvɛrnɛrɛ ya mboka, asɛngaki ngai nalala epai na ye. Na butu yango, tosololaki mingi makambo ya Biblia.

Na ntango wana, mingi kati na biso tondimaki mbala moko mateya ya Biblia. Nsima ya kokende lisusu mwa makita, bandeko batunaki ngai mpe bato mosusu, “Bolingi kozwa batisimo?” Nazongisaki: “Ɛɛ.” Nayebaki ete nalingi ‘kosala lokola [moombo] mpo na Nkolo, Kristo.’ (Bakolose 3:24) Tokendaki na ebale moko pembeni wana, mpe ngai ná moto mosusu tozwaki batisimo na mokolo ya 15/02/1946.

Tomonaki ete lokola tokómaki bakristo oyo bazwi batisimo, tosengeli kosakola mbala na mbala lokola Yesu. Tata asepelaki te; alobaki na ngai: “Ozali mwana moke, kokende kosakola te. Lisusu, kozindisa yo na ebale elakisi te ete okómi mosakoli.” Nayebisaki ye ete mokano ya Nzambe ezali ete tósakola nsango malamu ya Bokonzi na ye. (Matai 24:14) Nabakisaki: “Nasengeli kokokisa elaka oyo napesaki Nzambe.” Na ntango yango nde tata alobaki makambo oyo nalobelaki na ebandeli. Mposa na ye ezalaki ete natika kosakola. Yango nde etindaki ngai mpo na mbala ya liboso natika biloko na nsima mpo na kokokisa mikano ya elimo.

Ndeko Cruz abengaki ngai nakende kofanda na bango na Angat. Balendisaki ngai ná mwana na bango ya nsuka Nora tókóma babongisi-nzela. Tobandaki mosala yango na mokolo ya 1/11/1947. Nora azalaki kosala na mboka mosusu, mpe ngai nakobaki kosakola na Angat.

LIBAKU MOSUSU YA KOTIKA BILOKO NA NSIMA

Mbula misato na nsima, Earl Stewart, ndeko moko ya Betele, asalaki diskur moko liboso ya bato 500 na esika ya bato nyonso na Angat. Azalaki koloba na Lingelesi, mpe ngai nasalaki lisolo yango na mokuse na monɔkɔ ya Tagalog. Natángaki kelasi kaka mbula nsambo, kasi balakisi na biso bazalaki koloba mingi na Lingelesi. Nayebaki mpe Lingelesi mwa malamu mpo mikanda ya moombo ya sembo na monɔkɔ ya Tagalog ezalaki moke mpenza. Nazalaki koyekola mingi na Lingelesi. Na yango, Lingelesi oyo nayebaki ekokaki mpo nabongola diskur wana mpe badiskur mosusu na nsima.

Mokolo wana oyo nabongolaki diskur ya Ndeko Stewart, alobaki ete bazalaki na mposa ya ndeko mobali moko to mibale oyo bazali babongisi-nzela bákende kosala na Betele. Ezalaki mpo bamisionɛrɛ basengelaki kokende na liyangani Bokoli ya teokrasi oyo esalemaki na 1950 na New York, na États-Unis. Nazalaki moko ya bandeko oyo bakendaki na Betele. Na mbala oyo mpe, natikaki esika oyo namesanaki na yango mpo na kokende na Betele.

Nakómaki na Betele na mokolo ya 19/06/1950 mpe nabandaki mosala. Betele ezalaki na ndako moko monene, ya kala mpe banzete ya mineneminene ezalaki zingazinga ya lopango yango ya monene. Bandeko mibali soki 12 ya minzemba bazalaki kosala kuna. Na ntɔngɔntɔngɔ, nazalaki kosala na kuku (cuisine). Na nsima, kobanda na ngonga ya 9, nazalaki kosala esika basukolaka bilamba. Na nsima ya midi mpe nazalaki kosala kaka bongo. Ata ntango bamisionɛrɛ bazongaki nsima ya liyangani, nakobaki kosala na Betele. Nazalaki kobongisa bazulunalo mpo na kotindela bato, kokoma ba abonema, mpe kosala na esika bayambaka bato; nazalaki kosala nyonso oyo basɛngi ngai.

NATIKI PHILIPPINES MPO NA KOKENDE GILEADE

Na 1952, nasepelaki mingi ntango nazwaki mokanda oyo ebengaki ngai na kelasi ya mbala ya 20 ya Gileade elongo na bandeko mosusu 6 ya Philippines. Makambo mingi oyo tomonaki mpe tokutanaki na yango na États-Unis ezalaki sika mpo na biso. Ekesanaki mpenza na mwa mboka na biso ya moke.

Elongo na bana-kelasi ya Gileade

Na ndakisa, esɛngaki tóyekola kosalela bamasini mpe biloko oyo tomesanaki na yango te. Lisusu, mopɛpɛ ya kuna ezalaki ndenge mosusu mpenza! Mokolo moko na ntɔngɔ ntango nabimaki libándá, namonaki mokili ekómi kitoko, mpɛmbɛ. Ezalaki mbala ya liboso namona nɛjɛ. Nde namonaki ete malili ezalaki makasi, makasi mpenza!

Kasi, nyonso wana ezalaki mpamba na kotalela mateya kitoko ya Gileade. Balakisi na biso basalelaki mayele ya malamu mpenza mpo na koteya biso. Balakisaki biso ndenge malamu ya kosala bolukiluki mpe ya koyekola. Mateya ya Gileade esalisaki ngai nakola na elimo.

Nsima ya kelasi ya Gileade, batindaki ngai mpo na mwa ntango lokola mobongisi-nzela monene na mboka Bronx, na engumba New York. Na yango, na sanza ya 7 na 1953, nakɔtaki na liyangani Ebongiseli ya mokili ya sika, oyo esalemaki na mboka yango. Nsima ya liyangani, nazongaki kosala na Philippines.

NATIKI BISENGO YA ENGUMBA MONENE

Bandeko ya Betele balobaki na ngai: “Sikoyo okokóma mokɛngɛli ya zongazonga.” Yango epesaki ngai libaku ya sika ya kolanda mpenza makolo ya Nkolo, oyo asalaki mibembo na bamboka mpe bingumba ya mosika mpo na kosalisa bampate ya Yehova. (1 Petro 2:21) Batindaki ngai na zongazonga oyo ezwaki eteni monene ya Luçon, esanga oyo eleki monene na Philippines. Ezalaki na etúká ya Bulacan, Nueva Ecija, Tarlac, mpe Zambales. Mpo na kokende na bamboka mosusu, esɛngaki nakatisa bangomba ya Sierra Madre. Lokola babisi ezalaki kokóma kuna te, nazalaki kosɛnga basofɛlɛ ya mituka ya minene soki nakoki kofanda likoló ya banzete minene oyo bazalaki komema. Mbala mingi, bazalaki kondima, kasi ezalaki mibembo ya mpasi mpenza.

Masangá mingi ezalaki mike mpe ya sika. Na yango, bandeko basepelaki ntango nasalisaki bango báyeba kosala makita mpe kobongisa mosala ya kosakola.

Na nsima, batindaki ngai na zongazonga oyo ezalaki na etúká ya Bicol. Ezalaki mingimingi na bituluku ya mosikamosika epai babongisi-nzela monene bazalaki kofungola bateritware ya sika. Na ndako moko, WC ezalaki kaka libulu moko batimolá batyá banzete mibale na katikati. Mokolo moko ntango natyaki makolo na banzete yango, ekweaki na libulu mpe nazindaki. Ezwaki ngai ntango mpo na kolongola salite yango mpe namibongisa mpo na komɛla ti!

Ezalaki na teritware wana nde nakómaki kokanisa Nora, oyo akómaki mobongisi-nzela na Bulacan. Na ntango yango, azalaki mobongisi-nzela monene na engumba Dumaguete, mpe nakendaki kotala ye kuna. Na nsima, tokómaki kotindelana mikanda, mpe na 1956, tobalanaki. Na pɔsɔ ya liboso nsima ya libala na biso totalaki lisangá moko na Esanga Rapu Rapu. Tosengelaki komata na bangomba mpe kotambola mingi; kasi tosepelaki mingi kosala elongo mpo na kosalisa bandeko na bisika wana ya mosika!

BABENGI BISO LISUSU NA BETELE

Nsima ya mbula soki 4 na mosala ya zongazonga elongo na mwasi na ngai, babengaki biso na Betele. Na sanza ya yambo na 1960 tobandaki mosala na biso na Betele, epai toumeli mingi. Nayekoli makambo ebele ndenge nasalaki elongo na bandeko oyo bazali na mikumba minene, mpe Nora asalisi na misala ndenge na ndenge.

Nazali kosala diskur na liyangani, ndeko moko azali kobongola na monɔkɔ ya Cebuano

Na Betele, nazwi lipamboli ya komona bokoli monene ya elimo oyo esalemi na Philippines. Ntango nakɔtaki Betele na bolenge, basakoli bazalaki soki 10 000 na ekólo mobimba. Lelo, ezali na basakoli koleka 200 000 na Philippines, mpe na Betele, bandeko 435 bazali kotambwisa mosala ya kosakola.

Lokola mosala ezalaki se kokola, Betele ekómaki moke. Lisangani ya Mikóló-Bakambi esɛngaki biso tóluka lopango tótonga Betele ya sika, ya monene. Ngai ná mokɛngɛli ya imprimeri tokendaki ndako na ndako pembeni ya Betele mpo na kotuna soki nani alingi kotɛka lopango na ye. Moto moko te andimaki; nkolo-lopango moko kutu alobaki na biso: “Ba Chinois batɛkaka te. Tosombaka nde.”

Nazali kobongola diskur ya Ndeko Albert Schroeder

Kasi, mokolo moko, nkolo-lopango moko ayaki kaka boye mpe atunaki biso soki tokosepela kosomba lopango na ye; azalaki kokende kofanda na États-Unis. Likambo wana ememaki makambo ebele ya kokamwa mpenza. Moto mosusu andimaki mpe kotɛkela biso, mpe alendisaki basusu básala mpe bongo. Kutu, tosombaki mpe lopango ya mobali oyo alobaki ete “Ba Chinois batɛkaka te.” Na mwa ntango moke, lopango ya Betele ekómaki monene mbala koleka misato. Nandimaka ete Yehova Nzambe nde alingaki esalema bongo.

Na 1950, ngai nde nazalaki mwana moke na Betele. Lelo, ngai ná mwasi na ngai nde toleki mikóló na Betele. Nayokaka mawa te ndenge nalandi Nkolo esika nyonso oyo alakisaki ngai. Baboti na ngai babenganaki ngai na ndako, kasi Yehova apesi ngai libota monene ya bandeko. Natyaka ntembe ata moke te ete Yehova apesaka biso nyonso oyo esengeli, ata soki tozali kosalela ye wapi. Ngai ná Nora tozali na botɔndi mingi mpo na boboto nyonso oyo Yehova amoniseli biso, mpe tolendisaka basusu bámeka Yehova.​—Malaki 3:10.

Mokolo moko ntango Yesu abengaki mokɔngɔli-mpako moko na nkombo Matai Levi, alobaki na ye: “Landá ngai.” Matai asalaki nini? “Atikaki biloko nyonso na nsima, atɛlɛmaki mpe abandaki kolanda [Yesu].” (Luka 5:27, 28) Ngai mpe nazwaki mabaku ya kosala bongo, mpe nazali kolendisa basusu na motema moko ete básala bongo, mpe bakozwa mapamboli ebele.

Nazali na esengo ndenge napesaka mabɔkɔ na mosala na Philippines tii lelo

^ par. 6 Ebimisamaki na Batatoli ya Yehova kasi lelo ebimisamaka lisusu te.