Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Moyengebene akosepela na Yehova”

“Moyengebene akosepela na Yehova”

NDEKO Diana, oyo azali na mbula koleka 80, akutanaki na makambo mingi ya mpasi na bambula oyo eleki. Mobali na ye abɛlaki maladi ya Alzheimer mpe azalaki kofanda na ndako oyo babatelaka mibange, na nsima akufaki. Bana na ye mibale ya mibali mpe bakufaki; ye moko azalaki na kanser ya libɛlɛ. Kasi, na makita to na mosala ya kosakola, bandeko bamonaka ete Diana azalaka kaka na esengo.

Ndeko John azalaki mokɛngɛli-motamboli mbula koleka 43. Azalaki kosepela na mokumba na ye mingi mpenza mpe akokaki kokanisa te kosala eloko mosusu na bomoi na ye. Kasi, akataki mosala yango mpo na kosalisa ndeko na ye ya libota oyo azalaki kobɛla. Ntango bandeko oyo bayebaki John na kala bakutanaka na ye na mayangani, bamonaka ete abongwani ata moke te. Azalaka kaka na esengo makasi.

Mpo nini Diana ná John bazalaka na esengo? Ndenge nini moto oyo azali na mpasi akoki kozala na esengo? Ndenge nini moto akoki kozala na esengo ata ntango atiki mokumba oyo azalaki kosepela na yango mingi? Biblia epesi eyano; elobi: “Moyengebene akosepela na Yehova.” (Nzembo 64:10) Tokokanga ntina ya likambo yango malamu soki toyebi eloko oyo ekopesa biso esengo oyo ekoumela, mpe oyo ekopesa biso esengo ya ntango mokuse.

ESENGO YA NTANGO MOKUSE

Ezali na makambo oyo epesaka esengo ntango nyonso. Ntango mwasi ná mobali oyo balinganaki mingi babalani. Ntango mwasi ná mobali baboti mwana, to mpe ndeko moko azwi mokumba ya sika na mosala ya Yehova. Makambo yango epesaka esengo mpo ezali makabo oyo euti epai ya Yehova. Ye nde abandisaki libala, apesá moto likoki ya kobota bana, mpe abongisá ete tózala na mosala ya kosala na ebongiseli na ye.​—Ebandeli 2:18, 22; Nzembo 127:3; 1 Timote 3:1.

Kasi, makambo mosusu oyo epesaka esengo ekoki kozala mpo na ntango mokuse. Na ndakisa, molongani moko akoki kozanga bosembo, to kokufa. (Ezekiele 24:18; Hosea 3:1) Bana bakoki kozanga botosi epai ya baboti mpe epai ya Nzambe, to bakoki kutu kolongolama na lisangá. Na ndakisa, bana ya Samwele bazalaki sembo te epai ya Yehova, mpe mikakatano ndenge na ndenge ekɔtaki na libota ya Davidi mpo asalaki lisumu na Bate-sheba. (1 Samwele 8:1-3; 2 Samwele 12:11) Ntango makambo ya ndenge wana ekómi, epesaka esengo te, kasi nde mawa mpe mpasi mingi.

Ndenge moko mpe, na bantango mosusu tokoki kotika mokumba moko oyo tozalaki na yango na mosala ya Yehova mpo tozali kobɛla, mpo na mikumba ya libota, to mpo na mbongwana oyo esalemi na ebongiseli ya Yehova. Bandeko ebele oyo batiká mikumba oyo bazalaki na yango, balobi ete bakanisaka esengo oyo bazalaki kozwa.

Ezali polele ete makambo ya ndenge wana epesaka esengo ya ntango mokuse. Na yango, ezali nde na esengo oyo esilaka te ata soki makambo ebongwani na ndenge ya mabe? Esengo ya ndenge wana ezalaka, mpo Samwele, Davidi, mpe bato mosusu babungisaki esengo na bango te ntango bakutanaki na makambo ya mpasi.

ESENGO OYO EUMELAKA

Yesu azalaki na esengo ya solosolo. Ntango azalaki na likoló, Biblia elobi ete azalaki “kosepela liboso [ya Yehova] ntango nyonso.” (Masese 8:30) Kasi, ntango ayaki awa na mabele, na bantango mosusu akutanaki na makambo ya mpasi mpenza. Atako bongo, Yesu azalaki na esengo ya kosala mokano ya Tata na ye. (Yoane 4:34) Asalaki nini mpo na mpasi makasi oyo akutanaki na yango liboso akufa? Biblia elobi: “Mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye ayikelaki nzete ya mpasi mpiko.” (Baebre 12:2) Na yango, tokoki kozwa mateya mingi soki totaleli makambo mibale oyo Yesu alobaki mpo na esengo ya solosolo.

Mokolo moko, bayekoli 70 bazongaki epai ya Yesu nsima ya kokokisa mokumba oyo apesaki bango ya kosakola. Bazalaki na esengo mpo na makambo oyo basalaki, kutu babenganaki ata bademo. Kasi, Yesu alobaki na bango ete: “Bósepela na likambo oyo te ete bilimo ezali kotosa bino, kasi bósepela nde mpo bankombo na bino ekomami na likoló.” (Luka 10:1-9, 17, 20) Ya solo, kondimama na Yehova ezali na ntina mingi mpe epesaka esengo mingi koleka mokumba nyonso oyo tokoki kozwa.

Na libaku mosusu, ntango Yesu azalaki koloba liboso ya ebele ya bato, mwasi moko Moyuda asepelaki mingi na mateya na ye, mpe alobaki ete mama ya Yesu asengeli kozala na esengo mingi ya kozala na mwana ya ndenge wana. Kasi Yesu ayanolaki: “Te, Esengo nde na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango!” (Luka 11:27, 28) Baboti bayokaka esengo soki bana na bango basali makambo ya malamu. Kasi, kozala na boyokani malamu na Yehova mpe kotosa ye nde epesaka esengo oyo eumelaka.

Toyokaka esengo makasi soki tomoni ete Yehova azali kosepela na biso. Mpe atako mikakatano esepelisaka te, elongolaka biso esengo wana te. Kutu, ntango tokutani na mikakatano mpe totikali sembo, esengo na biso ekómaka lisusu makasi. (Baroma 5:3-5) Longola yango, Yehova apesaka elimo na ye na baoyo batyelaka ye motema, mpe esengo ezali na kati ya mbuma ya elimo yango. (Bagalatia 5:22) Yango esalisi biso tómona ntina oyo Nzembo 64:10 elobi ete: “Moyengebene akosepela na Yehova.”

Nini esalisi John abatela esengo?

Yango emonisi mpe ntina oyo Diana ná John bazalaki kaka na esengo atako bakutanaki na makambo ya mpasi. Diana alobi boye: “Nakimaki epai ya Yehova, ndenge mwana akimaka epai ya moboti na ye.” Abakisi ete: “Nayokaka ete apamboli ngai na ndenge apesi ngai likoki ya kokoba kosakola na esengo.” Nini esalisaki John abatela esengo na ye mpe amipesa na mosala ya kosakola nsima ya kotika mokumba na ye? Alobi boye: “Kobanda 1998 ntango nazwaki mokumba ya kokóma molakisi na Eteyelo mpo na kobongisa basungi, namipesaki mingi koleka na kosala boyekoli na ngai moko.” Amonisi ete ezalaki mpasi mpenza te ye ná mwasi na ye básala mbongwana yango mpo banda kala balingaka kosala nyonso oyo Yehova asɛngaka bango. Abakisi boye: “Toyokaki mawa ata moke te.”

Bandeko mosusu mpe bamoni ete maloba ya Nzembo 64:10 ezali solo. Tózwa ndakisa ya ndeko moko ná mwasi na ye oyo basalaki mbula koleka 30 na Betele ya États-Unis. Na nsima, batindaki bango babongisi-nzela monene. Balobaki boye: “Esalaka mawa soki obungisi eloko oyo olingaki,” kasi babakisaki ete: “Mawa ekoki koumela libela na libela te.” Ntango kaka bakómaki na teritware na bango ya sika, babandaki kosakola elongo na lisangá. Balobaki mpe ete: “Tobondelaki mpo na mwa makambo ya sikisiki mpenza. Mpe komona biyano na mabondeli na biso elendisaki mpe epesaki biso esengo. Mwa moke nsima ya kokóma kuna, bandeko mosusu ya lisangá babandaki mosala ya mobongisi-nzela, mpe tozwaki bayekoli mibale ya Biblia oyo bazalaki kokola malamu.”

‘ESENGO YA LIBELA’

Ya solo, kobatela esengo ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Na bantango mosusu tokozala na mawa. Kasi, Yehova akitisaka biso motema na maloba oyo ezali na Nzembo 64:10. Ata ntango tolɛmbi nzoto, tokoki kotya motema ete soki totikali sembo, ‘tokosepela na Yehova.’ Lisusu, tokoki kozela ntango oyo elaka ya Yehova ya “likoló ya sika mpe mabele ya sika” ekokokisama. Na ntango wana, kozanga kokoka ekolongwa, bato nyonso ‘bakosepela mpe bakozala na esengo ya libela’ mpo na makambo nyonso oyo Yehova akosala.​—Yisaya 65:17, 18.

Kanisá mapamboli oyo tokozwa: tokozala na nzoto ya kokoka mpe mokolo na mokolo tokolamuka nzoto makasi. Ata soki tokutanaki na makambo oyo epesaki biso mawa mingi, tokoyoka lisusu mpasi te. Yehova alobi ete “makambo ya kala ekokanisama lisusu te, mpe ekoya na motema te.” Tokoyamba bandeko na biso oyo bakufá mpe tokoyoka lokola baboti ya mwana mwasi moko ya mbula 12 oyo Yesu asekwisaki. Biblia elobi ete: “Bazalaki bango lisusu te, bazalaki na esengo makasi.” (Marko 5:42) Nsukansuka, moto nyonso na mabele akozala mpenza moyengebene mpe ‘akosepela na Yehova’ libela na libela.