Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Na ndenge nini ntoma Paulo ‘amemamaki na likoló ya misato’ mpe “na paradiso”?​—2 Bakorinti 12:2-4.

Na 2 Bakorinti 12:2, 3, Paulo alobeli moto moko oyo ‘amemamaki na likoló ya misato.’ Moto yango ezalaki nani? Ntango Paulo akomelaki lisangá ya Korinti, amonisaki ete Nzambe azalaki kosalela ye lokola ntoma. (2 Bakorinti 11:5, 23) Na nsima, alobelaki ‘bimonaneli mpe bimoniseli ya Nkolo.’ Na bavɛrsɛ yango, Paulo atángaki bandeko mosusu te. Na yango, emonani ete moto oyo azalaki kolobela, ezalaki ye moko.​—2 Bakorinti 12:1, 5.

Paulo nde moto oyo ‘amemamaki na likoló ya misato’ mpe “amemamaki na paradiso.” (2 Bakorinti 12:2-4) Lokola asalelaki liloba “bimoniseli,” yango emonisi ete azalaki kolobela makambo oyo esengelaki kosalema na mikolo ezali koya.

“Likoló ya misato” oyo Paulo amonaki ezalaki nini?

Na Biblia, “likoló” ekoki kolimbola mapata. (Ebandeli 11:4; 27:28; Matai 6:26) Kasi, “likoló” ezalaka mpe na ndimbola mosusu. Na bantango mosusu, elimbolaka boyangeli ya bato. (Danyele 4:20-22) Ekoki mpe kolimbola boyangeli ya Nzambe, na ndakisa boyangeli na ye oyo emonisami na Bokonzi ya Nzambe.​—Emoniseli 21:1.

Paulo amonaki “likoló ya misato.” Alingaki koloba nini? Na bisika mosusu, Biblia ezongelaka likambo mbala misato mpo na kobenda likebi, kotya mokɔlɔtɔ, to mpo na kobɛta nsɛtɛ. (Yisaya 6:3; Ezekiele 21:27; Emoniseli 4:8) Emonani ete ntango Paulo alobaki “likoló ya misato,” azalaki kolobela boyangeli oyo eleki likoló, oyo etombwami koleka, elingi koloba Bokonzi ya Masiya oyo Yesu Kristo ná bato 144 000 bakoyangela. (Talá Étude perspicace des Écritures, Vol. 1 nk. 473, 476.) Bokonzi ya Masiya nde “likoló ya sika” oyo ntoma Petro akomaki ete tozali kozela ndenge Nzambe alakaki.​—2 Petro 3:13.

Bongo “paradiso” oyo Paulo alobelaki ezali nini?

Liloba “paradiso” mpe ekoki kolimbola makambo mingi: (1) Soki tozali kokanisa esika oyo Nzambe atyaki moto na ebandeli, liloba “paradiso” ekoki kolimbola Paradiso oyo ekozala na mabele na mikolo ezali koya. (2) Ekoki mpe kolimbola bomoi moko ya kimya oyo Yehova akopesa basaleli na ye na mokili ya sika. (3) Lisusu, ekoki kolimbola mapamboli minene na likoló, “paradiso ya Nzambe” oyo Emoniseli 2:7 elobeli.​—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2015, lok. 5 par. 8.

Ekoki kozala ete na 2 Bakorinti 12:4, ntango Paulo azalaki kolobela emonaneli oyo azwaki, azalaki kolobela makambo yango nyonso misato.

Na mokuse:

Emonani ete “likoló ya misato” oyo 2 Bakorinti 12:2 elobeli ezali Bokonzi ya Masiya oyo Yesu Kristo ná bato 144 000 bakoyangela; yango nde “likoló ya sika.”​—2 Petro 3:13.

Ezali “likoló ya misato” mpo Bokonzi yango ezali boyangeli oyo eleki likoló, oyo etombwami koleka.

Emonani ete “paradiso” epai Paulo “amemamaki” na emonaneli ezali (1) Paradiso oyo ekozala awa na mabele, (2) paradiso ya elimo oyo ekozala na ntango wana, oyo ekoleka paradiso ya elimo oyo ezali lelo, mpe (3) “paradiso ya Nzambe” na likoló oyo ekozala mpe na kati ya mokili ya sika.

Na yango, mokili ya sika ekosangisa likoló ya sika ná mabele ya sika. Ekozala ebongiseli ya sika, oyo ekosangisa guvɛrnema ya Bokonzi na likoló mpe bato oyo bakosalela Yehova na paradiso awa na mabele.