Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Tokomonana na Paradiso!”

“Tokomonana na Paradiso!”

“Okozala na ngai na Paradiso.”​—LUKA 23:43.

NZEMBO: 145, 139

1, 2. Makanisi nini bato bazalaka na yango mpo na paradiso?

BANDEKO ebele ya bikólo ndenge na ndenge bayaki na liyangani moko na Séoul, na ekólo Corée. Ntango bazalaki kobima na stade na nsuka ya liyangani, Batatoli ya Corée batɛlɛmaki mpo na kopesa bango mbote. Ezalaki esengo mpenza komona ndenge bandeko mingi bazalaki kopepa mabɔkɔ mpe koloba: “Tokomonana na Paradiso!” Okanisi ete bazalaki kolobela paradiso nini?

2 Lelo oyo, bato bazalaka na makanisi ekeseni mpo na paradiso. Bato mosusu balobaka ete paradiso ezali kaka ndɔtɔ. Mpo na basusu, paradiso ezali esika nyonso oyo bazali na esengo. Moto oyo azali na nzala makasi akoki komona ete azali na paradiso soki afandi liboso ya mesa oyo etondi na bilei. Eleki bambula ebele, mwasi moko akamwaki makasi ntango amonaki ebele ya fololo na lobwaku moko, mpe alobaki: “Oyo ezali mpenza paradiso!” Tii lelo, babengaka esika yango Paradiso, atako nɛjɛ oyo ekweaka kuna mbula nyonso ekómaka mɛtrɛ koleka 15. Mpo na yo, Paradiso ezali nini? Ozelaka yango na motema moko?

3. Ntango nini Biblia elobeli Paradiso mpo na mbala ya liboso?

3 Biblia elobeli paradiso moko oyo ezalaki kala mpe paradiso oyo ekozala na mikolo oyo ezali koya. Elobeli yango mpo na mbala ya liboso na mokanda ya Ebandeli. Na Biblia moko ya Katolike (Douay Version), oyo ebongolamaki longwa na Latin, Ebandeli 2:8 elobi: “Nkolo Nzambe alonaki paradiso ya esengo banda na ebandeli: epai kuna atyaki mobali [Adama] oyo asalaki.” (Biso nde totye langi ya moindo makasi.) Makomi ya Ebre elobi elanga ya Edene. Liloba “Edene” elimboli “Esengo,” mpe elanga yango ezalaki mpenza esika ya bisengo. Ezalaki kitoko mingi, etondaki na bilei, mpe kimya ezalaki kati na bato mpe banyama.​—Ebandeli 1:29-31.

4. Mpo na nini tokoki koloba ete elanga ya Edene ezalaki paradiso?

4 Liloba ya Ebre oyo ebongolami “elanga,” na Grɛki ebongolami paradéïsos. Buku moko (Cyclopædia ya M’Clintock ná Strong) elobi ete ntango Mogrɛki ayoki liloba paradéïsos, na makanisi na ye akomona elanga moko kitoko, ya monene, oyo ebatelami malamu mpo likama ebima te, oyo ezali na nzete minene ya mbuma ndenge na ndenge, ezali na bibale ya mai ya pɛto mpe ebele ya matiti oyo mboloko mpe mpate ekoki kolya.​—Talá mpe Ebandeli 2:15, 16.

5, 6. Mpo na nini Adama ná Eva bakokaki lisusu kofanda na Paradiso te, mpe bato mosusu bakoki komituna nini?

5 Yehova atyaki Adama ná Eva na elanga ya ndenge wana, na paradiso. Kasi lokola batosaki Yehova te, bakokaki lisusu kofanda na Paradiso te, ata mpe bakitani na bango. (Ebandeli 3:23, 24) Atako moto moko te azalaki lisusu kofanda na Paradiso yango, emonani ete ezalaki kaka tii na Mpela na mikolo ya Noa.

6 Bato mosusu bakoki komituna soki Paradiso ekozala lisusu awa na mabele. Tokoki koloba nini mpo na yango? Soki ozali na elikya ya kofanda na Paradiso elongo na bato oyo olingaka, elikya na yo esimbami na nini? Okoki kolimbola bantina oyo tokoki kondima ete paradiso ekozala na mikolo oyo ezali koya?

MAKAMBO OYO EMONISI ETE PARADISO EKOZALA

7, 8. (a) Elaka nini Nzambe apesaki Abrahama? (b) Mbala mosusu elaka ya Nzambe etindaki Abrahama akanisa nini?

7 Biblia nde ekoki kopesa biso biyano ya malamu na mituna oyo etali Paradiso, mpo yango euti epai ya Yehova, Moto oyo asalaki Paradiso ya liboso. Tótala likambo oyo Nzambe ayebisaki moninga na ye Abrahama. Alobaki ete akokómisa momboto ya Abrahama mingi mpenza “lokola bambuma ya zɛlo oyo ezali pembenipembeni ya mbu.” Na nsima, Yehova apesaki Abrahama elaka oyo ya ntina mingi: “Na nzela ya momboto na yo, bikólo nyonso ya mabele ekomizwela mpenza lipamboli, mpo oyoki mongongo na ngai.” (Ebandeli 22:17, 18) Nzambe azongelaki lisusu elaka yango epai ya mwana ya Abrahama mpe na nsima, epai ya nkɔkɔ ya Abrahama.​—Tángá Ebandeli 26:4; 28:14.

8 Esika moko te Biblia emonisi ete Abrahama akanisaki ete nsukansuka bato bakozwa mbano na paradiso na likoló. Na yango, ntango Nzambe alobaki ete “bikólo nyonso ya mabele” ekopambolama, tokoki koloba ete Abrahama akanisaki ete mapamboli yango ekozala na mabele. Kasi, Biblia elobeli kaka likambo wana moko mpo na komonisa ete paradiso ekozala awa na mabele?

9, 10. Bilaka nini mosusu ezali kotinda biso tóndima ete paradiso ekozala na mikolo oyo ezali koya?

9 Davidi, moko ya bakitani ya Abrahama, alobelaki ntango moko na mikolo oyo ezali koya, oyo “moto mabe akozala lisusu te.” (Nzembo 37:1, 2, 10) Kasi, “bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.” Davidi alobaki mpe: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.” (Nzembo 37:11, 29; 2 Samwele 23:2) Okanisi ete bilaka yango esalaki nini epai ya bato oyo bazalaki kolinga kosala mokano ya Nzambe? Ezalaki kopesa bango ntina ya kondima ete mokolo mosusu kaka bayengebene nde bakofanda na mabele mpe ete ekokóma lisusu paradiso lokola elanga ya Edene.

10 Nsima ya bambula, Bayisraele mingi baboyaki Yehova mpe batikaki losambo ya solo. Na yango, Nzambe atikaki bato ya Babilone bálonga bango, bábebisa mokili na bango, mpe bákanga Bayisraele ebele. (2 Ntango 36:15-21; Yirimia 4:22-27) Kasi, basakoli ya Nzambe bayebisaki ete Bayisraele bakozonga na mokili na bango nsima ya mbula 70. Bisakweli yango nyonso ekokisamaki. Kasi bisakweli yango etali mpe biso. Wana tozali kotalela bisakweli yango mosusu, talá ndenge ezali kopesa biso bantina ya kondima ete paradiso ekozala awa na mabele na mikolo oyo ezali koya.

11. Ndenge nini Yisaya 11:6-9 ekokisamaki mpo na mbala ya liboso, kasi motuna nini ezali kaka kosɛnga tózwa eyano?

11 Tángá Yisaya 11:6-9. Na nzela ya Yisaya, Nzambe asakolaki ete ntango Bayisraele bakozonga na mokili na bango, mokili ekozala na kimya. Moto moko te akobanga ete nyama to bato ya mobulu básala ye mabe. Bilenge mpe mikóló bakozala na likama te. Yango ezali te kokundwela yo kimya oyo ezalaki na elanga ya Edene? (Yisaya 51:3) Yisaya asakolaki mpe ete mabele mobimba, kaka ekólo Yisraele te, “ekotonda na boyebi ya Yehova ndenge mai etondi na mbu.” Likambo yango ekosalema ntango nini? Na ntembe te, na mikolo oyo ezali koya.

12. (a) Mapamboli nini bato oyo bautaki na Babilone bazwaki? (b) Nini emonisi ete Yisaya 35:5-10 ekokokisama mpe na mikolo oyo ezali koya?

12 Tángá Yisaya 35:5-10. Yisaya asakolaki lisusu ete ntango Bayisraele bakozonga na mokili na bango, nyama to bato bakosala bango mabe te. Alobaki ete mabele ekobimisa bilei ebele mpo mai ekozala beboo, kaka ndenge ezalaki na elanga ya Edene. (Ebandeli 2:10-14; Yirimia 31:12) Kokokisama ya esakweli yango esukaki kaka na ntango ya Bayisraele wana? Tóbosana te ete esakweli yango elobaki mpe ete bakufi-miso, bibɔsɔnɔ mpe bato oyo bakufá matoi bakobika. Kasi, eloko te emonisi ete makambo yango esalemaki epai ya Bayisraele oyo bautaki na Babilone. Na yango, Nzambe alingaki nde komonisa ete akosilisa maladi ya ndenge nyonso na mikolo oyo ezali koya.

13, 14. Ndenge nini Yisaya 65:21-23 ekokisamaki ntango Bayisraele bazongaki na mokili na bango, kasi maloba nini ya esakweli yango ekokisami naino te? (Talá elilingi ya ebandeli.)

13 Tángá Yisaya 65:21-23. Ntango Bayisraele bazongaki na mokili na bango, bakutaki te bandako ya kitoko, bilanga oyo baloná malamu to bilanga ya vinyo. Kasi lokola Nzambe apambolaki bango, nsukansuka makambo ebongaki. Kanisá esengo oyo bato bazalaki na yango ntango batongaki bandako mpe bafandaki na kati mpe ntango bazalaki kolya biloko kitoko oyo balonaki!

14 Na kotalela esakweli yango, mikolo na biso “ekozala lokola mikolo ya nzete.” Nzete mosusu eumelaka bankóto ya bambula. Mpo bato báumela bongo, ekosɛnga bázala nzoto kolɔngɔnɔ mpenza. Mpe soki bafandi na esika ya kimya mpe ya kitoko ndenge Yisaya asakolaki, yango ekozala paradiso! Esakweli wana ekokokisama!

Ndenge nini elaka oyo Yesu apesaki mpo na Paradiso ekokokisama? (Talá paragrafe 15, 16)

15. Wapi mwa mapamboli oyo mokanda ya Yisaya elobeli?

15 Bilaka oyo touti kolobela emonisi mpenza ete paradiso ekozala na mikolo oyo ezali koya: Mabele mobimba ekotonda na bato oyo Nzambe apamboli. Moto moko te akobanga ete nyama to bato ya mobulu básala ye mabe. Bakufi-miso, bato oyo matoi ekufá mpe bibɔsɔnɔ bakobika. Bato bakotonga bandako na bango moko mpe bakolya biloko oyo baloni. Bakoumela na bomoi ntango molai koleka nzete. Ya solo, Biblia elobeli makambo oyo emonisi ete paradiso ekozala. Kasi, bato mosusu bakoki koloba ete bisakweli yango emonisi mpenza te ete paradiso ekozala awa na mabele. Okoyebisa bango nini? Mpo na nini ondimaka mpenza ete paradiso ekozala awa na mabele? Yesu, moto oyo alekaki bato nyonso tii lelo, apesaki biso ntina moko monene.

OKOZALA NA PARADISO!

16, 17. Ntango nini Yesu alobelaki Paradiso?

16 Atako Yesu asalaki mabe te, bakatelaki ye etumbu ya liwa mpe babakaki ye na nzete na katikati ya Bayuda mibale oyo bazalaki basali-mabe. Moko na bango amonaki ete Yesu azalaki mokonzi mpe alobaki na ye: “Yesu, kanisá ngai ntango okokɔta na bokonzi na yo.” (Luka 23:39-42) Elaka oyo Yesu apesaki mosali-mabe wana ezali na Luka 23:43, mpe ezali na ntina mpo na bomoi na yo na mikolo oyo ezali koya. Bato mosusu ya mayele batyaka virgule liboso ya liloba “lelo” mpe babongolaka maloba ya Yesu boye: “Ya solo nazali koyebisa yo, lelo okozala na ngai na Paradiso.” Bato yango bazali na makanisi ekeseni mpo na esika oyo esengeli kotya virgule. Kasi, liloba “lelo” oyo Yesu asalelaki emonisaki nini?

17 Lelo oyo, na minɔkɔ mingi batyaka virgule mpo likanisi ya fraze ebima polele. Kasi, na bamaniskri ya kalakala ya Grɛki oyo ezali lelo, bilembo ya bopemi ezali na bisika nyonso te. Na yango, motuna yango oyo: Yesu alobaki mpenza nini epai ya mosali-mabe? Alobaki: “Nazali koyebisa yo, lelo okozala na ngai na Paradiso”? To, “Nazali koyebisa yo lelo, okozala na ngai na Paradiso”? Babongoli ya Biblia batyaka virgule liboso to nsima ya liloba “lelo” na kolanda oyo bango bakanisi ete Yesu alingaki koloba, mpe na Babiblia mingi, okokuta virgule liboso to nsima ya liloba “lelo.” *

18, 19. Nini ezali kosalisa biso tókanga ntina ya maloba ya Yesu?

18 Kasi, kobosana te makambo oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye mpo na liwa na ye. Alobaki: “Mwana ya moto . . . akozala na kati ya mabele mikolo misato butu moi.” Alobaki lisusu: “Mwana ya moto akotɛkama na mabɔkɔ ya bato, mpe bakoboma ye, mpe na mokolo ya misato akolamuka.” (Matai 12:40; 16:21; 17:22, 23; Marko 10:34) Ntoma Petro alobaki ete makambo yango esalemaki mpenza. (Misala 10:39, 40) Na yango, Yesu akendaki na Paradiso te mokolo oyo ye ná mosali-mabe wana bakufaki. Biblia elobi ete Yesu asalaki mikolo misato “na kati ya Nkunda” na nsima Nzambe asekwisaki ye.​—Misala 2:31, 32. *

19 Na yango, mpo na kopesa mosali-mabe wana elaka, Yesu asalelaki maloba “ya solo nazali koyebisa yo lelo.” Bato mingi bazalaki kosalela elobeli yango ata na ntango ya Moize. Mokolo moko Moize alobaki: “Maloba oyo nazali kopesa yo mitindo lelo esengeli kozala na motema na yo.”​—Kolimbola Mibeko 6:6; 7:11; 8:1, 19; 30:15.

20. Nini emonisi ete tokangá ntina ya likambo oyo Yesu alobaki?

20 Mobongoli moko ya Biblia na Moyen-Orient alobaki boye: “Vɛrsɛ yango ebendi likebi mingi na liloba ‘lelo’ mpe esengeli kotángama boye: ‘Ya solo nazali koyebisa yo lelo, okozala na ngai na Paradiso.’ Elaka yango epesamaki mokolo wana kasi esengelaki kokokisama na nsima.” Mobongoli yango alobaki mpe ete bato ya Moyen-Orient basalelaka elobeli yango mpo na komonisa ete “elaka yango epesamaki mokolo moko boye mpe ekokokisama mpenza.” Libongoli moko ya monɔkɔ ya Syriaque na siɛklɛ ya mitano ebongolaki vɛrsɛ yango boye: “Amen, nalobi na yo lelo ete okozala elongo na ngai na Elanga ya Edene.” Elaka yango esengeli kolendisa biso nyonso.

21. Likambo nini esalemaki te mpo na mosali-mabe, mpe mpo na nini?

21 Ntango Yesu alakaki mosali-mabe ete akozala na Paradiso, alobelaki paradiso na likoló te. Ndenge nini toyebi yango? Ntina moko ezali ete mosali-mabe yango ayebaki ata moke te ete Yesu asalaki kondimana na bantoma na ye ya sembo mpo báyangela na ye na likoló. (Luka 22:29) Lisusu, mosali-mabe wana azwaki ata batisimo te. (Yoane 3:3-6, 12) Na yango, ntango Yesu apesaki ye elaka, na ntembe te azalaki kolobela paradiso na mabele. Bambula na nsima, ntoma Paulo alobelaki emonaneli ya mobali moko oyo “amemamaki na paradiso.” (2 Bakorinti 12:1-4) Na bokeseni na mosali-mabe, Paulo ná bantoma mosusu baponamaki mpo na kokende na likoló koyangela elongo na Yesu. Kasi, Paulo azalaki kolobela paradiso oyo ekozala na mikolo oyo ezali koya. * Yango etali mpe paradiso oyo ekozala na mabele? Okoki kozala kuna?

MAKAMBO OYO OKOKI KOZELA

22, 23. Makambo nini okoki kozela?

22 Kobosana te ete Davidi alobaki ete “bayengebene bakozwa mabele.” (Nzembo 37:29; 2 Petro 3:13) Davidi azalaki kolobela ntango oyo bato nyonso awa na mabele bakotosa mitinda ya sembo ya Nzambe. Esakweli oyo ezali na Yisaya 65:22 elobi boye: “Mikolo ya bato na ngai ekozala lokola mikolo ya nzete.” Yango emonisi ete na mokili ya sika basaleli ya Yehova bakotikala na bomoi bambula na bambula. Likambo yango ekoki kosalema? Ɛɛ, mpo Emoniseli 21:1-4 emonisi ete Nzambe akopambola bato; moko ya mapamboli yango ezali ete “liwa ekozala lisusu te.”

23 Makambo oyo Biblia elobi mpo na Paradiso ezali polele. Adama ná Eva babungisaki libaku ya kofanda libela na libela na Paradiso, kasi atako bongo mabele ekozala lisusu paradiso. Ndenge Nzambe alakaki yango, akopambola bato awa na mabele. Davidi alobaki ete bato ya komikitisa mpe bayengebene bakozwa mabele mpe bakofanda wana libela na libela. Mpe bisakweli oyo ezali na mokanda ya Yisaya epesi biso elikya ete tokozala na bomoi na paradiso kitoko na mabele. Ekozala ntango nini? Ntango elaka oyo Yesu apesaki mosali-mabe ekokokisama. Okoki kozala na Paradiso yango. Na ntango wana, makambo oyo bandeko balobaki na liyangani oyo esalemaki na Corée ete “tokomonana na Paradiso,” ekokokisama.

^ par. 17 Na Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na Lingala, na esika ya virgule (,) batyá mputu mibale (:).

^ par. 18 Profesɛrɛ moko na nkombo Marvin Pate akomaki ete bato mingi ya mayele balobaka ete ntango Yesu alobaki “lelo,” alingaki komonisa ete akokufa mpe akozala na Paradiso na mokolo yango kaka, to ngonga 24 ekoleka te. Profesɛrɛ Pate abakisaki ete kotalela makambo ndenge wana ebongi te mpo eyokani te na mateya mosusu ya Biblia. Na ndakisa, Biblia elobi ete Yesu azalaki na kati ya Nkunda ntango akufaki mpe na nsima akendaki na likoló.​—Matai 12:40; Misala 2:31; Baroma 10:7.

^ par. 21 Talá “Mituna ya batángi” na nimero oyo.