Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ozali koyeba lisusu?

Ozali koyeba lisusu?

Otángaki na likebi banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Talá soki okoki koyanola na mituna oyo elandi:

Ndenge nini Biblia emonisi ete Nzambe amityaka na esika na biso?

Ntango Bayisraele bazalaki na boombo na Ezipito, Nzambe amonaki mpasi na bango, ye mpe azalaki koyoka mpasi. (Kobima 3:7; Yisaya 63:9) Tosalemá na elilingi ya Nzambe, mpe tokoki komitya na esika ya basusu. Nzambe amityaka na esika na biso ata soki tozali komimona ete ebongi te Nzambe alinga biso.​—wp18.3, nk. 8-9.

Ndenge nini mateya ya Yesu esalisaki bato bátika kokanisela basusu mabe?

Bayuda mingi na ntango ya Yesu bazalaki kokanisela basusu mabe. Yesu amonisaki ntina ya kozala na komikitisa mpe amonisaki ete komikumisa mpo na loposo ezali mabe mpenza. Alendisaki bayekoli na ye bámona ete bango nyonso bazali bandeko.​—w18.06, nk. 9-10.

Ndenge Nzambe apesaki Moize nzela te ya kokɔta na Mokili ya Ndaka eteyi biso nini?

Moize azalaki na boyokani makasi na Yehova. (Kolimbola Mibeko 34:10) Na nsuka ya mbula 40 oyo Bayisraele balekisaki na esobe, baimaimaki lisusu mpo mai ezalaki te. Nzambe ayebisaki Moize aloba na libanga. Kasi, Moize abɛtaki libanga. Ekoki kozala ete Yehova asilikaki mpo Moize atosaki te malako oyo apesaki ye, to mpo apesaki Ye lokumu te mpo na likamwisi wana. (Mitángo 20:6-12) Yango emonisi biso ntina ya kotosa Yehova mpe ya kopesa ye nkembo.​—w18.07, nk. 13-14.

Mpo na nini tokoki komikosa soki tosambisaka basusu na kolanda oyo ezali komonana na libándá?

Bato balandaka makambo misato mpo na kosambisa basusu: loposo to ekólo, bozwi to bobola ya moto, mpe mbula ya moto. Ezali na ntina mingi tósala makasi tómonaka basusu ndenge Yehova amonaka bango! (Misala 10:34, 35)​—w18.08, nk. 8-12.

Na makambo nini bakristo oyo bakómi mikóló bakoki kosalisa basusu?

Mokristo ya mokóló oyo azwi mokumba mosusu azali kaka na motuya na miso ya Nzambe mpe akoki kosalisa mingi. Akoki kosalisa mibali oyo bazali bandimi te, kosalisa baoyo batiká kosakola, koyekola Biblia na bato, mpe komipesa na mosala ya kosakola.​—w18.09, nk. 8-11.

Biloko nini ezali na kati ya Bisaleli mpo na koteya?

Ezali na bakarte ya jw mpe nkasa ya libyangi. Na kati, okokuta trakte mwambe oyo ebongisamá malamu mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli Lamuká! Ezali mpe na mwa babuku, buku mibale oyo tosalelaka mingi mpo na koteya, mpe video minei oyo esalisaka mingi, na ndakisa Mpo na nini koyekola Biblia?​w18.10, lok. 16.

Ndenge nini mokristo akoki ‘kosomba solo,’ ndenge Masese 23:23 elendisi biso?

Tofutaka mbongo te mpo na kosomba solo. Kasi, tosengeli kopesa ntango mpe kosala milende mpo na kozwa solo.​—w18.11, lok. 4.

Ndenge oyo Hosea asalelaki mwasi na ye Gomere makambo ekoki koteya biso nini?

Gomere asalaki ekobo mbala na mbala, kasi Hosea alimbisaki ye mpe abomaki libala te. Soki mokristo moko asali ekobo, molongani na ye akoki mpe kolimbisa ye. Soki azongeli kosangisa nzoto na molongani na ye oyo asalaki ekobo, na kotalela Biblia, ntina ya koboma libala ekozala lisusu te.​—w18.12, lok. 13.