Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

‘Yehova asaleli biso makambo na ndenge oyo ebongi’

‘Yehova asaleli biso makambo na ndenge oyo ebongi’

NTANGO kaka ngai ná mwasi na ngai Danièle tokómaki na otɛlɛ, moto oyo ayambaka bato alobaki na ngai ete: “Okoki kobenga bapolisi?” Toutaki kokóma na Gabon, ekólo moko ya Afrika ya wɛsti, epai bapekisaki mosala na biso na bambula ya 1970.

Lokola Danièle azalaki kasakasa, ayebisaki ngai boye na litoi: “Kobenga bapolisi te, bazali awa!” Kaka na nsima ya mokɔngɔ na biso, motuka moko etɛlɛmaki liboso ya otɛlɛ. Nsima ya mwa miniti, bakangaki biso mibale. Maloba ya Danièle esalisaki ngai nazwa ntango ya kopesa ndeko mobali moko mwa mikanda mosusu.

Ntango bazalaki komema biso na biro ya bapolisi, nayokaki esengo ya kozala na mwasi ya mpiko mpe ya elimo. Longola libaku wana, ezalaki mpe na mabaku mingi oyo ngai ná Danièle tosalaki na bomoko. Tiká nayebisa bino ntina oyo tosalaki mibembo na bikólo oyo batyelaki mosala na biso mwa bipekiseli.

YEHOVA AFUNGOLI MPENZA MISO NA NGAI

Nabotamá na 1930 na Croix, mwa engumba moko na nɔrdi ya France, mpe libota mobimba tozalaki bandimi ya solosolo ya Katolike. Tozalaki kokende Misa pɔsɔ nyonso, mpe na bantango mosusu papa azalaki kosala na parwasi. Kasi, ntango nakómaki na mbula pene na 14, likambo moko esalisaki ngai namona bokosi ya bakonzi ya mangomba.

Na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, basoda ya Allemagne bazwaki France. Na mateya na ye, mbala mingi sango na biso azalaki kolendisa biso tópesa mabɔkɔ na guvɛrnema ya bato ya Nazi oyo bazalaki na mwa engumba Vichy. Maloba na ye ekamwisaki biso makasi. Ndenge moko na bato mingi na France, tolandaki radio BBC na kobombana, mpe toyokaki nsango ete bikólo esanganaki mpo na kobundisa Allemagne. Na mbala moko, sango abalukaki mpe asalaki Misa mpo na kopesa Nzambe matɔndi mpo na bikólo oyo esanganaki na sanza ya 09/1944. Likambo yango etungisaki ngai mpenza. Esalaki ete natyela bakonzi ya mangomba motema lisusu mpenza te.

Mwa moke nsima ya etumba, papa na biso akufaki. Na ntango wana, lokola yaya na biso ya mwasi Simone abalaki mpe azalaki kofanda na Belgique, namonaki ete nasengeli kobatela mama. Na yango, nazwaki mosala na izini oyo esalaka bilamba. Patrɔ na ngai mpe bana na ye ya mibali bazalaki bandimi ya solosolo ya Katolike. Atako nakokaki kokóma moto monene na izini yango, eumelaki te nakutanaki na komekama.

Na 1953, yaya na biso ya mwasi, oyo akómaki Motatoli ya Yehova, ayaki kotala biso. Asalelaki Biblia na ye mpo na komonisa polele lokuta ya mateya ya Katolike, na ndakisa liteya ya lifelo, Bosato, mpe liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te. Na ebandeli, nalobaki ete azali kosalela Biblia ya Katolike te, kasi eumelaki te nandimaki ete azalaki koloba solo. Nsima ya mikolo amemelaki ngai banimero ya kala ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mpe na butu nafandaki na mbeto na ngai mpe natángaki yango na mposa makasi. Namonaki polele ete makambo yango ezalaki mpenza solo; kasi nalingaki te kokóma Motatoli ya Yehova mpo nazalaki kobanga ete nakobungisa mosala na ngai.

Na boumeli ya mwa basanza, ngai moko nakobaki koyekola Biblia mpe kotánga masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Nsukansuka, nazwaki ekateli ya kokende na Ndako ya Bokonzi. Bolingo oyo nakutaki na lisangá esimbaki mpenza motema na ngai. Nsima ya koyekola Biblia sanza motoba na ndeko mobali moko oyo akɔmɛlaki na elimo, nazwaki batisimo na sanza ya 09/1954. Eumelaki te, nasepelaki mingi ndenge mama mpe leki na ngai ya mwasi bakómaki Batatoli ya Yehova.

TOTYELI YEHOVA MOTEMA NA MOSALA YA NTANGO NYONSO

Likambo ya mawa, mama akufaki mwa bapɔsɔ liboso ya liyangani oyo esangisaki mikili mingi na 1958, na New York. Nazwaki libaku ya kozala na liyangani yango. Ntango nazongaki, nazalaki lisusu na moto ya kobatela te; na yango natikaki mosala ya mosuni mpe nakómaki mobongisi-nzela. Na ntango wana, nalinganaki na ndeko mwasi moko na nkombo Danièle Delie, oyo azalaki mobongisi-nzela ya molende, mpe tobalanaki na sanza ya 05/1959.

Danièle abandaki mosala ya ntango nyonso na etúká ya Bretagne, oyo ezalaki mosika mpenza na esika oyo abotamaki. Asengelaki kozala na mpiko mpo na kosakola na etúká yango oyo etondaki na bandimi ya Katolike mpe kosalela velo mpo na kokende na bamboka ya kati. Lokola ngai, Danièle mpe ayebaki ete mosala ya kosakola esengeli kosalema na lombangu; tozalaki komona ete mbala mosusu nsuka ekómi mpenza pene. (Matai 25:13) Elimo na ye ya komipimela esalisaki biso tókoba na mosala ya ntango nyonso.

Mwa mikolo nsima ya libala na biso, nakómaki mokɛngɛli ya zongazonga. Esɛngaki tómesana na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ. Lisangá ya liboso oyo totalaki ezalaki na basakoli 14, mpe bandeko bazalaki na makoki te ya kopesa biso esika ya kolala. Na yango, tozalaki kotya matela na estrade ya Ndako ya Bokonzi. Ezalaki te esika oyo eleki malamu mpo na kolala, kasi ezalaki mabe te mpo na mokɔngɔ!

Tozalaki kosalela mwa motuka na biso mpo na kotala masangá

Atako tozalaki na makambo mingi ya kosala, Danièle aumelaki te komesana malamu na mosala ya zongazonga. Mbala mingi soki esɛngi kosala likita ya mbalakaka elongo na bankulutu, Danièle azalaki kozela ngai na mwa motuka na biso, kasi ata mokolo moko te amilelaki. Na mbula mibale oyo tosalaki na mosala ya zongazonga, toyekolaki ete ezali na ntina mingi mwasi ná mobali básololaka na ndenge ya polele mpe básalaka na bomoko.​—Mosakoli 4:9.

TOZWI MIKUMBA MOSUSU YA SIKA

Na 1962, babengisaki biso na kelasi ya mbala ya 37 ya Gileade na Brooklyn, na New York; kelasi yango ezalaki koumela sanza zomi. Na kati ya bana-kelasi 100, bandeko oyo babalá bazalaki 26, yango wana tosepelaki mingi na libaku kitoko ya kokɔta eteyelo elongo. Tii lelo nakanisaka ndenge tozalaki elongo na bandeko ya kondima makasi, lokola Frederick Franz, Ulysses Glass, mpe Alexandre Macmillan.

Tosepelaki mingi ndenge tokɔtaki Eteyelo ya Gileade!

Na kelasi ya Gileade, basɛngaki biso tókolisa makoki ya kosalela miso. Na yango, mikolo mosusu ya pɔsɔ nsima ya midi soki kelasi esili, tozalaki kokende kotala bisika mosusu na engumba New York; yango ezalaki mpe na kati ya formasyo na biso. Toyebaki ete na mokolo ya yambo tokosala ekzamɛ ya makambo oyo tomonaki. Mbala mingi tozalaki kozonga na mpokwa, tolɛmbi, kasi ndeko ya Betele oyo atambwisaki biso azalaki kotuna biso mwa mituna mpo na kosalisa biso tóbosana te makambo ya ntina mpo na ekzamɛ ya mokolo ya yambo. Mokolo moko, totambolaki na engumba nsima ya midi mobimba. Tokendaki na observatoire kotala ba météores ná ba météorites. Mpe ntango tokendaki esika oyo babombaka biloko ya kala (musée américain d’histoire naturelle), toyekolaki ndenge ya kokesenisa lolenge mibale ya ngando. Ntango tozongaki na Betele, ndeko oyo atambwisaki biso atunaki motuna oyo, “Bokeseni nini ezali kati na météore météorite?” Lokola Danièle alɛmbaki, ayanolaki: “Ba météorites ezalaka na mino milai koleka!”

Tozalaki kosepela kokende kotala bandeko na biso ya sembo na Afrika

Likambo ya kokamwa, batindaki biso na Betele ya France, mpe kuna tosalaki mbula koleka 53. Na 1976, natyamaki mokambi ya Komite ya filiale mpe nazwaki lisusu mokumba ya kokende kotala bikólo ya Afrika mpe ya Moyen-Orient, epai mosala ya kosakola epekisamaki to batyelaki yango mwa bipekiseli. Yango nde esalaki ete tókende na Gabon, mpe kuna tokutanaki na likambo oyo nalobelaki na ebandeli. Mpo na koloba solo, na bantango mosusu nazalaki komona ete nakokoka te kokokisa mikumba ndenge na ndenge oyo nazwaki. Kasi, Danièle asalisaki ngai nakokisa mikumba mingi.

Nazali kobongola diskur ya Ndeko Theodore Jaracz na liyangani “Boyengebene ya Nzambe,” oyo esalemaki na Paris, na 1988

MOKAKATANO MOKO YA MAKASI MPENZA

Kaka na ebandeli, tosepelaki mingi na bomoi ya Betele. Lokola Danièle ayekolaki Anglais sanza mitano liboso tókɔta Gileade, akómaki mobongoli ya mikanda na biso mpe ayebaki mosala yango malamu. Mosala na biso na Betele ezalaki kopesa biso esengo mingi, kasi komipesa na makambo ya lisangá mpe ebakiselaki biso esengo. Nazali koyeba lisusu mokolo moko ntango ngai ná Danièle tozalaki kozonga na metro na butu; tolɛmbaki kasi tozalaki na esengo ndenge toyekolaki na bato oyo bazalaki kokola malamu. Kasi, likambo ya mawa, Danièle azwaki maladi mpe azalaki lisusu na makasi te ya kosala mingi ndenge azalaki kolinga.

Na 1993, bazwaki ye na kanser ya libɛlɛ. Lisalisi oyo azwaki enyokolaki ye mingi; basalaki ye lipaso mpe bapesaki ye lisalisi ya maladi ya kanser (chimiothérapie). Mbula zomi na mitano na nsima, bazwaki ye lisusu na kanser, ya mabe koleka. Kasi, lokola azalaki kolinga mingi mosala na ye ya mobongoli, azongelaki yango ntango ayokaki mwa malamu.

Atako maladi ya Danièle ezalaki konyokola ye mingi, tokanisaki ata mokolo moko te kobima Betele. Kasi, kobɛla na Betele ezalaka mpe na mikakatano na yango, mingimingi soki basusu bayebi te mpasi oyo maladi yango ezali komema. (Masese 14:13) Ata ntango Danièle akómaki na mbula pene na 80, elongi na ye ya kitoko mpe ndenge oyo azalaki kobongisa nzoto ezalaki komonisa te ete azalaki kobɛla makasi. Azalaki komilelalela te. Kasi, amipesaki na kosalisa basusu. Ayebaki ete koyoka basusu ezalaki ndenge malamu ya kosalisa bango. (Masese 17:17) Danièle azalaki te komibenga mopesi-toli; kasi azalaki kolobela maladi na ye mpo na kosalisa bandeko basi ebele bábanga kanser te.

Tokutanaki na mokakatano mosusu. Ntango Danièle azalaki lisusu na makoki te ya kosala mosala ya Betele na ndenge oyo esengeli, abandaki kosalisa ngai na makambo mingi koleka. Asalaki nyonso mpo namitungisaka te, mpe yango esalisaki ngai nasala lokola mokambi na Komite ya filiale na boumeli ya mbula 37. Na ndakisa, mikolo nyonso azalaki kobongisa makambo mpo tólya elongo na shambre na midi mpe tópema mwa moke.​—Masese 18:22.

MITUNGISI YA MOKOLO NA MOKOLO

Danièle akobaki kotalela bomoi na ndenge ya malamu. Na nsima, abɛlaki lisusu kanser mpo na mbala ya misato. Makasi esilaki biso. Chimiothérapie mpe radiothérapie elɛmbisaki ye mpenza, mpe na bantango mosusu azalaki kokoka kotambola te. Nayokaki mawa makasi ntango mwasi na ngai, oyo azalaki mobongoli ya malamu, akómaki kobunda mpo na koluka maloba.

Ata ntango tozalaki komona ete tosuki, totikaki kobondela te, totyaki motema ete Yehova akotika te ete tónyokwama koleka ndenge oyo tokoki kokangela motema. (1 Bakorinti 10:13) Tozalaki kosala makasi mpo tósepela ntango nyonso na lisalisi oyo Yehova azalaki kopesa biso na nzela ya Liloba na ye, minganga ya Betele, mpe ya bandeko na biso ya elimo.

Mbala mingi tozalaki kosɛnga Yehova asalisa biso mpo tópona lisalisi ya monganga oyo ebongi. Na ntango moko boye, minganga batikaki kopesa Danièle lisalisi. Monganga oyo asalisaki ye na boumeli ya mbula 23 azalaki koyeba te ntina oyo Danièle azalaki kobungisa makanisi nsima ya chimiothérapie nyonso. Ayebaki te asalela mayele nini lisusu. Toyokaki lokola tosuki mpe tozalaki komituna ndenge makambo ekosuka. Na nsima, monganga mosusu oyo asalisaka maladi ya kanser andimaki kosalisa Danièle. Ezalaki lokola nde Yehova abongiselaki biso nzela ya kobima mpo tótika komitungisa.

Yesu alobaki: “Mokolo na mokolo ezali na mitungisi na yango.” Na yango, tozalaki komitungisa te mpo na makambo oyo ekoya lobi. (Matai 6:34) Kozala na makanisi malamu mpe kosala mwa masɛki esalisaki biso mpe. Na ndakisa, ntango Danièle azwaki lisalisi ya chimiothérapie te na boumeli ya sanza mibale, alobaki na ngai na mwa kosɛka ete: “Namiyoká naino malamu boye te!” (Masese 17:22) Atako azalaki konyokwama, azalaki kosepela koyemba banzembo ya sika ya Bokonzi na elikya.

Makanisi malamu oyo azalaki na yango esalisaki ngai nayikela mpe mikakatano na ngai mpiko. Mpo na koloba solo, mbula 57 oyo tosalaki na libala, Danièle azalaki kokokisa bamposa na ngai nyonso. Alingaki ata te kolakisa ngai ndenge bakalingaka maki! Na yango ntango akokaki lisusu kosala eloko te, esɛngaki nayekola kosukola basaani, bilamba mpe kolamba mwa biloko ya kolya. Na bantango mosusu bakɔpɔ ya komɛlela mai ezalaki kopasuka, kasi nazalaki na esengo makasi ya kosala makambo mpo na kosepelisa ye. *

NAZALI NA BOTƆNDI MPO NA MOTEMA BOBOTO YA YEHOVA

Makambo oyo nakutani na yango na bomoi esalisi ngai namona ndenge maladi mpe bobange esilisaka biso makasi. Yango eteyi ngai ete tosengeli te kozanga ntango ya komonisa molongani na biso ete tolingaka ye. Ntango tozali naino na makasi na nzoto, tosengeli kosalela bato oyo tolingaka bolamu. (Mosakoli 9:9) Lisusu, tosengeli te komitungisa koleka ndelo mpo na makambo ya mikemike; soki te, tokomona te mapamboli ebele oyo tozwaka mokolo na mokolo.​—Masese 15:15.

Soki nakanisi bambula oyo tolekisaki na mosala ya ntango nyonso, namonaka mpenza ete Yehova apambolaki biso na ndenge oyo tokokaki kokanisa te. Nakoki koloba lokola mokomi ya nzembo ete: ‘Yehova asaleli ngai makambo na ndenge oyo ebongi.’​—Nzembo 116:7.

^ par. 32 Ntango tozalaki kobongisa lisolo oyo, ndeko Danièle Bockaert akufaki. Azalaki na mbula 78.