Ndenge ya kosalisa bato oyo bazali kobɛla na makanisi
BIBLIA ELOBI: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.”—MASESE 17:17.
Yango elimboli nini
Ekoki kozala pɛtɛɛ ete tólɛmba nzoto ntango moninga na biso moko azali kobɛla na makanisi. Kasi tokoki komonisa ete totyelaka moninga na biso likebi ntango tozali kosalisa ye ayikela mokakatano yango mpiko. Ndenge nini?
Ndenge nini yango ekoki kosalisa
‘Yokaká noki.’—YAKOBO 1:19.
Lolenge moko ya malamu ya kosalisa moninga na yo ezali ya koyoka ye ntango alingi koloba. Kowelela kopesa eyano te na makambo nyonso azali koloba. Salá ayeba ete ozali koyoka ye mpe kotyela ye likebi. Salá makasi oyeba ndenge oyo azali komiyoka, mpe kosambisa ye te. Kobosana te ete mbala mosusu akoki koloba likambo moko oyo asengelaki koloba te mpe na nsima akoki koyoka mawa mpo na yango.—Yobo 6:2, 3.
“Bólobaka na ndenge ya kobɔndisa.” —1 BATESALONIKI 5:14.
Moninga na yo akoki mbala mosusu komitungisa, to mpe kozala na makanisi ete azangi valɛrɛ. Kasi soki omonisi ye ete otyelaka ye likebi, yango ekosalisa ye abɔndisama mpe alendisama, atako oyebi mpenzampenza te makambo oyo ebongi koyebisa ye.
“Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso.”—MASESE 17:17.
Pesá lisalisi oyo ebongi. Na esika ya komona ete oyebi ndenge oyo osengeli kosalisa, tuná nde nini osengeli kosala mpo na kosalisa. Soki ezali mpasi Bagalatia 6:2.
ete moninga na yo aloba likambo oyo azali na yango mposa, okoki kosɛnga ye bosala likambo moko bino mibale elongo, na ndakisa kotambola mpo na kozwa mwa mopɛpɛ. To kosɛnga ye bokende kosomba biloko elongo, kosukola ndako, to mpe kosala misala misusu bino mibale.—“Bózala na motema molai.” —1 BATESALONIKI 5:14.
Na bantango mosusu moninga na yo akoki te kozala na mposa ya kosolola na yo. Lendisá moninga na yo ete okozala na esengo ya koyoka ye soki asepeli ete bosolola. Lokola azali kobɛla, moninga na yo akoki koloba to kosala likambo moko oyo ekoki kopesa yo mpasi. Mbala mosusu akoki koboya kozala elongo na yo to kosilikela yo. Zalá na motema molai mpe salá makasi osilika te ntango ozali koluka kopesa ye lisalisi oyo azali na yango mposa.—Masese 18:24.
Kopesa lisalisi ekoki kobongola makambo
“Nazali na moninga moko oyo nayebi ete ntango nyonso alingaka kosolola na ngai. Atako nazali te na solisyo na mikakatano na ye nyonso, ntango nyonso nasalaka makasi ya koyoka makambo oyo ayebisaka ngai. Mbala mingi likambo oyo azalaka na mposa na yango ezali kaka koyoka ye na likebi mpenza.”—Farrah, a oyo moninga na ye azali kobɛla maladi ya makanisi oyo etindaka moto na bilyalya mpe komiboma nzala mpe konyokwama makasi na makanisi.
“Moko ya baninga na ngai azalaka boboto mpe na makanisi malamu. Abengisaka ngai na ndako na ye mpo na kolya mwa eloko elongo. Ezalaka ntango moko ya malamu mpo na ngai ya koyebisa ye ndenge oyo nazali komiyoka. Yango elendisaka ngai mpenza!”—Ha-eun, oyo azali konyokwama makasi na makanisi.
“Kozala motema molai ezali na ntina. Ntango mwasi na ngai asali likambo moko oyo ekoki kopesa ngai nkanda, nayebi ete ezali maladi na ye esali ete asala likambo yango. Yango esalisaka ngai nasilika te mpe nakoba kotyela ye likebi.”—Jacob, oyo mwasi na ye azali konyokwama makasi na makanisi.
“Mwasi na ngai azalaki lisungi mpe libɔndisi mpo na ngai. Ntango kotungisama na makanisi elɛmbisi ngai nzoto, atindikaka ngai na makasi te ete nasala likambo oyo nalingi kosala te. Yango elakisi ete na bantango mosusu mpo na kosepelisa ngai, akoki koboya kosala likambo oyo asepeli kosala. Elimo na ye ya komipimela mpe bokabi na ye esepelisaka ngai makasi.”—Enrico, oyo azali kotungisama na makanisi.
a Topesi bango bankombo mosusu.