Monima oyo emonisi ete esakweli moko ya Biblia ekokisamaki
NA ITALIE, NA KATI YA ROMA, EZALI NA MONIMA MOKO OYO EBENDAKA LIKEBI YA BAPAYA OYO BAUTAKA MIKILI NDENGE NA NDENGE. MONIMA YANGO ESALEMÁ MPO NA KOKANISA TITUS, AMPERƐRƐ MOKO MONENE YA ROMA.
Monima ya Titus, oyo esalemi na makonzí mibale ya milai, emonisaka likambo moko ya monene oyo eyebani malamu. Atako lisolo yango eyebani mingi te, monima yango ezali na boyokani na Biblia mpo emonisaka ete esakweli moko ya Biblia ekokisamaki.
ENGUMBA OYO ESENGELI KOZWA ETUMBU
Na ebandeli ya siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso (L.T.B.), ampire ya Roma ezalaki monene, kolongwa na Grande Bretagne, kokatisa Gaule (lelo oyo France), tii na Egypte; ampire yango ekómaki na kimya mpe na bozwi mingi. Kasi eteni mosusu ya ampire yango, etúká ya Yudea, oyo ezalaki mosika, ezalaki ntango nyonso kobimisela Roma mikakatano.
Buku moko (Encyclopedia of Ancient Rome) elobi: “Na bateritware nyonso oyo ampire ya Roma ezalaki koyangela, mingi te ezalaki kobundisama ndenge bazalaki kobundisa etúká ya Yudea, na ngámbo nyonso mibale. Bayuda bazalaki koyangelama na bapaya oyo bazalaki kotyola bonkɔkɔ na bango mpe yango ezalaki kopesa bango nkanda; Baroma bazalaki kokonza Bayuda, bazalaki komonela bango mpe konyokola bango mingi.” Bayuda mingi bazalaki kokanisa ete Masiya moko boye, oyo akozala mokambi ya politiki, akoya kolongola bango na boyangeli ya Baroma mpe akozongisa bango na bonsomi oyo Yisraele ezalaki na yango liboso. Kasi na mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), Yesu Kristo alobaki ete Yerusaleme ekobebisama.
Yesu alobaki: “Mikolo ekoyela yo wana banguna na yo bakotonga zingazinga na yo lopango moko ya makasi ya banzete oyo bakómisá nsɔngɛ mpe bakozingela yo mpe bakonyokola yo epai na epai, mpe bakobwaka yo ná bana na yo oyo bazali na kati na yo na mabele, mpe bakotika te libanga likoló na libanga na kati na yo.”—Luka 19:43, 44.
Na ntembe te, maloba wana ya Yesu ebulunganisaki bayekoli na ye. Mikolo mibale na nsima, ntango moko ya bayekoli amonaki tempelo, akamwaki na maloba oyo: “Moteyi, talá! Oyo mabanga ya ndenge nini mpe oyo bandako ya ndenge nini!” Ya solo, mabanga mosusu ya tempelo ezalaki mpenza minene, na bolai ya mɛtrɛ koleka 11, bonene ya mɛtrɛ koleka 5, mpe bosanda (hauteur) ya mɛtrɛ koleka 3! Kasi, Yesu azongisaki: “Biloko wana oyo bozali kotala, mikolo ekoya, libanga moko te ekotikala likoló ya libanga mosusu awa, nyonso ekokwea na nse.”—Marko 13:1; Luka 21:6.
Na nsima, Yesu ayebisaki bango: “Ntango bokomona mampinga ezingi Yerusaleme na bakaa, bóyeba ete libebi na yango ekómi pene. Na ntango yango, baoyo bazali na Yudea bábanda kokima na bangomba, mpe baoyo bazali na katikati na yango bálongwa, mpe baoyo bazali na bamboka ya zamba bákɔta na kati na yango te.” (Luka 21:20, 21) Maloba wana ya Yesu ekokisamaki?
KOBEBISAMA YA ENGUMBA
Mbula 33 elekaki, mpe Yudea ezalaki kaka kosepela te na boyangeli ya Baroma. Kasi na mobu 66 ya ntango na biso, ntango Gessius Florus, mokonzi moko ya basoda ya Roma, ayibaki mbongo na kɛsi ya tempelo, Bayuda bakokaki lisusu kokanga motema te. Eumelaki te, Bayuda oyo bayebaki kobunda bakɔtaki na Yerusaleme, babomaki ebele ya basoda ya Roma, mpe balobaki ete bamilongoli na boombo ya Baroma.
Sanza soki misato na nsima, basoda koleka 30 000 ya Baroma, oyo batambwisamaki na Cestius Gallus, bakɔtaki na Yerusaleme mpo na kosukisa botomboki oyo ebimaki. Nokinoki, basoda ya Roma bakɔtaki na engumba mpe bakendaki libándá ya efelo ya tempelo mpe babandaki kobuka yango. Na nsima, mpo na ntina oyo eyebani te, bazongaki. Bayuda oyo batombokaki basepelaki mpe balandaki Baroma nokinoki. Lokola basoda ya Baroma mpe Bayuda oyo batombokaki babimaki na engumba, Bakristo oyo balandaki likebisi ya Yesu bakimaki, balongwaki na Yerusaleme mpe bakendaki na bangomba oyo ezalaki nsima ya Ebale Yordani.—Na mbula oyo elandaki, basoda ya Roma bazongaki lisusu mpo na kobundisa Yudea; bakambamaki na mokonzi ya basoda Vespasien ná mwana na ye Titus. Kasi, mwa moke nsima ya liwa ya amperɛrɛ Néron na mobu 68 ya ntango na biso, Vespasien azongaki na Roma mpo na kokóma amperɛrɛ, mpe atikelaki mwana na ye Titus mokumba ya kokamba basoda soki 60 000 mpo na kobundisa Yudea.
Na sanza ya 6 ya mobu 70 ya ntango na biso, Titus apesaki basoda na ye mitindo bákata banzete oyo ezalaki zingazinga ya Yudea; basalelaki yango banzete oyo bakómisá nsɔngɛ mpo na kotonga efelo ya kilomɛtrɛ 7 zingazinga ya Yerusaleme. Na sanza ya 9, Baroma babebisaki mpe bazikisaki engumba yango ná tempelo na yango mpe bapanzaki mabanga na yango, kaka ndenge Yesu alobaki yango liboso. (Luka 19:43, 44) Lapolo moko emonisi ete “bato kobanda 250 000 tii 500 000 bakufaki na Yerusaleme mpe bamboka mosusu ya ekólo.”
BOLONGI MONENE
Na mobu 71 ya ntango na biso, Titus azongaki na Italie, epai bana-mboka ya Roma bayambaki ye na esengo makasi. Bato nyonso na engumba basalaki fɛti monene na mboka-mokonzi mpo na kosepela na bolongi wana monene.
Ebele ya bato bakamwaki na komona bozwi oyo bazalaki kolakisa na babalabala ya Roma. Basepelaki mingi komona ebele ya mayemi ya masuwa ya mikemike mpe bililingi oyo emonisaki bitumba oyo babundaki mpe biloko oyo babɔtɔlaki na bitumba yango, mingimingi biloko oyo bazwaki na tempelo ya Yerusaleme.
Nsima ya Vespasien, mwana na ye Titus moto akómaki amperɛrɛ na mobu 79 ya ntango na biso. Kasi, mbula mibale mpamba na nsima, Titus akufaki na mbalakaka. Nsima na ye, ndeko na ye Domitien akómaki amperɛrɛ mpe atongaki monima moko mpo na kokanisa Titus.
MONIMA YANGO LELO OYO
Lelo oyo, ebele ya bapaya oyo bakendaka na Roma mbula na mbula basepelaka kokende kotala monima yango. Bato mosusu batalelaka monima yango lokola liyemi moko oyo emonisi mayele ya ntoki, basusu lokola elembo ya nguya ya ampire ya Roma, mpe basusu batalelaka yango lokola elembo oyo emonisi kokwea ya Yerusaleme mpe tempelo na yango.
Kasi, bato oyo batángaka Biblia bamonaka ete monima ya Titus ezali na ndimbola moko monene. Emonisaka ete bisakweli ya Biblia ebongi kotyelama motema, ezali solo, mpe ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe.—2 Petro 1:19-21.