Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Miso na yo emonaki ndenge nazalaki naino liki.”​—NZEMBO 139:16

Nzambe ayebaka mpasi na yo?

Nzambe ayebaka mpasi na yo?

BILOKO OYO NZAMBE AKELÁ EZALI KOTEYA BISO NINI?

Tózwa ndakisa ya boyokani eleki makasi oyo bato bazalaka na yango: bana mapasa oyo bakokani makasi. Bazalaka mpenza baninga ya motema. Nancy Segal, mokambi ya ebongiseli moko oyo eyekolaka makambo ya bana mapasa, oyo azali ye moko mpe lipasa, alobi ete bana mapasa mosusu kutu “bayebaka ndenge ya koloba likambo mpo moninga akanga ntina na yango, ata soki alimboli te.” Mwasi moko alobaki boye mpo na boninga na ye ná lipasa na ye: “Toyebani malamu na makambo nyonso.”

Nini esalaka ete bana mapasa báyebana malamu ndenge wana? Nsima ya koyekola likambo yango, bato ya siansi balobi ete atako kokola esika moko mpe kozala na baboti moko esalaka bongo, ezali mingimingi makila na bango oyo ekokani makasi, nde esalaka bongo.

KANISÁ NAINO: Lokola Nzambe akelá biso, ayebi mokomoko na biso malamu koleka moto mosusu nyonso. Davidi akomaki boye: “Ozipaki ngai na libumu ya mama na ngai. Mikuwa na ngai ebombanaki na miso na yo te ntango nasalemaki na nkuku. . . . Miso na yo emonaki ndenge nazalaki naino liki, mpe biteni na yango nyonso ekomamaki na mokanda na yo.” (Nzembo 139:13, 15, 16) Kaka Nzambe nde ayebi malamumalamu ndenge nzoto na biso esalemá, mpe ayebi makambo nyonso oyo tokutaná na yango, oyo esalaka ete tózala na bomoto boye to boye. Lokola Nzambe ayebi biso mpe ayebi nzoto na biso koleka moto mosusu nyonso, yango ezali kondimisa biso ete ayebaka mpasi nyonso oyo tozali kokutana na yango.

OYO BIBLIA ETEYI MPO NA BOYEBI YA NZAMBE

Davidi abondelaki boye: “Ee Yehova, otalitali ngai, mpe oyebi ngai. Yo moko oyebi ntango nazali kofanda mpe ntango nazali kotɛlɛma. Uta na mosika otyeli likanisi na ngai likebi. Mpo liloba moko te ezali na lolemo na ngai, kasi talá! Ee Yehova, osili koyeba yango nyonso.” (Nzembo 139:1, 2, 4) Longola yango, Yehova ayebaka ndenge oyo tozali koyoka na kati ya motema mpe “asosolaka mposa nyonso ya makanisi.” (1 Ntango 28:9; 1 Samwele 16:6, 7) Bavɛrsɛ yango ezali koteya biso nini mpo na Nzambe?

Ntango mosusu toyebaka te ndenge ya koyebisa Nzambe makambo nyonso oyo tozali na yango na motema to komonisa ye ndenge oyo tozali koyoka; kasi ye atalaka oyo tozali kosala mpe ayebaka mpo na nini tozali kosala yango. Lisusu, ayebaka malamu makambo oyo tozali na mposa ya kosala, ata soki makambo mosusu ezali kopekisa biso. Na ntembe te, lokola Nzambe atyaki bolingo na mitema na biso, azalaka na mposa makasi ya kotala makanisi malamu oyo tozali na yango mpe mposa oyo tozali na yango ya kosala.​—1 Yoane 4:7-10.

Nzambe amonaka makambo nyonso. Ayebaka mpasi na biso ata ntango basusu bazali komona to koyeba yango te

Biblia elobi na biso

  • “Miso ya Yehova ezali kotala bayengebene, mpe matoi na ye ezali koyoka lilɔmbɔ na bango.”​—1 PETRO 3:12.

  • Nzambe alaki boye: “Nakosala ete ozala na mayele ya kososola mpe nakoteya yo nzela oyo osengeli kokende. Nakopesa yo toli wana liso na ngai ezali kotala yo.”​—NZEMBO 32:8.

NZAMBE ATONDI NA MOTEMA MAWA

Koyeba ete Nzambe ayebaka mpasi na biso mpe ndenge oyo tozali koyoka ekoki kosalisa biso tóyika mpiko? Tótalela likambo oyo ekómelaki Anna, oyo afandi na Nigéria. Alobi boye: “Nazalaki komituna soki ezalaki mpenza na ntina nazala na bomoi na kotalela mikakatano oyo nazalaki na yango. Mobali na ngai akufá mpe nazalaki kobɔkɔla mwana na ngai ya mwasi ngai moko; mwana yango azalaki na lopitalo mpo na maladi moko na bɔɔngɔ; mbala moko, ngai moko bazwaki ngai na kanser ya libɛlɛ, esengelaki básala ngai lipaso mpe básalisa ngai na mayele mosusu ya monganga. Ezalaki mpasi mingi mpo na ngai kozala na lopitalo kaka na ntango oyo mwana na ngai azalaki mpe kuna.”

Nini esalisaki Anna? “Nazalaki kokanisa bavɛrsɛ lokola Bafilipi 4:6, 7, oyo elobi ete ‘kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino.’ Mbala nyonso oyo vɛrsɛ yango ezalaki kozongela ngai, nazalaki koyoka ete Yehova azali mpenza pembeni na ngai, nazalaki na kondima ete ayebi mpasi na ngai koleka kutu ngai moko. Bandeko na lisangá mpe balendisaki ngai mingi.

“Atako nazali kaka kobunda na maladi, ngai moko ná mwana na ngai tokómi mwa malamu. Lokola Yehova azali na biso, toyekoli koboya kozala mawamawa ntango tokutani na mikakatano. Yakobo 5:11 elobi na biso: ‘Tolobaka ete bato oyo bayiki mpiko bazali bato ya esengo. Boyoká nsango ya koyika mpiko ya Yobo mpe bomoná ndenge Yehova asukisaki makambo na ye, ete Yehova azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.’” Yehova ayebaki malamu mpasi ya Yobo, mpe tokoki kondima ete ayebaka mpasi nyonso oyo tozali kokutana na yango.