Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kobongola ba gène ya moto nde ekoyebisa sɛkɛlɛ ya bomoi molai?

Baluki kokómisa bomoi molai

Baluki kokómisa bomoi molai

“Namoni mosala oyo Nzambe apesi bana ya bato básala. Ata likanisi ya kozala na bomoi ya seko, atye yango na motema na bango.”​Mosakoli 3:10, 11.

MALOBA wana ya Salomo, oyo azalaki mokonzi ya bwanya, emonisi mpenza ndenge bato bayokaka. Mbala mosusu mpo bomoi ezali mokuse mpe liwa ezali nzela ya bato nyonso, bato bazalaka ntango nyonso na mposa ya kozala na bomoi molai. Banda bambula mingi, bato bazali koluka ndenge ya kokómisa bomoi molai.

Tózwa ndakisa ya Gilgamesh oyo azalaki mokonzi ya Sumer. Masapo mingi ebɛti masolo ya bomoi na ye. Lisolo moko ya bomoi na ye ezali na kati ya lisapo ya Gilgamesh elobi ete asalaki mobembo ya likama kaka mpo na koluka ndenge ya kokima liwa. Kasi alongaki te.

Moto moko ya siansi na laboratware na bambula 500 tii 1500 ya ntango na biso

Esali sikoyo mbula soki 2 400, bato ya siansi ya Chine basalaki “nkisi ya maji,” oyo bazalaki kokanisa ete ekokómisa bomoi molai. Basangisaki bapwazɔ mpo na kosala nkisi yango. Balobaka ete nkisi yango nde ebomaki baampɛrɛrɛ mingi ya Chine. Kobanda mbula 500 tii 1500 ya ntango na biso, bato ya siansi ya mpoto babongolaki wolo na ndenge oyo bato bámɛla yango mpo bazalaki kokanisa ete lokola wolo ebebaka te, ekoki kokómisa bomoi ya moto molai.

Lelo, bato mingi ya siansi bazali koluka koyeba ntina oyo bato bakómaka mibange. Lokola “nkisi ya maji,” milende oyo bazali kosala emonisi ete bato bazali na elikya ya kosala ete bato bakóma lisusu mibange te mpe bákufa te. Kasi balongi kosala yango?

NZAMBE ATYÁ ‘LIKANISI YA KOZALA NA BOMOI YA SEKO NA MOTEMA NA BANGO.’​—MOSAKOLI 3:10, 11

BAZALI KOLUKA NTINA BATO BAKÓMAKA MIBANGE

Bato ya siansi oyo bayekolaka baselile ya nzoto bapesi makanisi ekeseni koleka 300 mpo na ntina oyo tokómaka mibange mpe tokufaka. Na bambula oyo eleki, bato ya siansi basali ete baselile ya banyama mpe ya bato ezala na bomoi molai. Mayele wana etindi bato mingi ya bozwi bápesa mbongo mpo ete bato ya siansi báyeba ntina oyo tokufaka. Esuki ndenge nini?

Bazali koluka kokómisa bomoi molai. Bato mosusu ya siansi balobi ete bato bakómaka mibange mpo na makambo oyo ekómelaka ba-telomere, selile oyo ezalaka na nsuka ya ba-chromosomes. Ba-telomere ebatelaka makambo oyo ezalaka na kati ya baselile na biso ntango ekabwanaka. Ntango nyonso oyo baselile ekabwanaka, ba-telomere ekómaka mokuse. Nsukansuka, baselile etikaka kokabwana mpe tokómaka mibange.

Na 2009, Elizabeth Blackburn, oyo azwaki mbano ya Prix Nobel mpe bato oyo bazalaki kosala na ye bamonaki ete enzyme, eloko moko oyo ezalaka na makila, ekoki kosala ete ba-telomere ekóma lisusu mokuse te mpe na ndenge yango tokokóma lisusu mibange te. Kasi, na lapolo na bango balobi ete ba-telomere te nde esalaka ete bato bázala na bomoi molai.

Kobongola ndenge baselile esalaka ezali mayele mosusu mpo na koluka kosukisa bobange. Ntango baselile ezali lisusu kobimisa baselile mosusu te mpo ekoli mingi, ekoki kotinda mesaje ya mabe na baselile oyo ebatelaka nzoto, yango ekoki kosala ete moto ayoka mpasi na nzoto mpe abɛla. Mikolo oyo euti koleka, bato ya siansi ya France bazwaki baselile ya bato oyo bazali mibange mpe babongolaki ndenge baselile yango esalaka; na nsima baselile yango ekómaki kobimisa baselile mosusu. Profesɛrɛ Jean-Marc Lemaître, moto oyo abimisaki mayele yango alobaki ete yango emonisi ete bakoki “kokitisa mbula” na kati ya baselile.

SIANSI EKOKI KOKÓMISA BOMOI MOLAI?

Bato mingi ya siansi bazali koloba ete atako bankisi oyo epekisaka moto kokóma mobange noki ezali mingi, moto akoki te kokóma na bomoi molai koleka ndenge ezalaka. Ya solo, kobanda siɛklɛ ya 19, bato bakómi koumela mwa moke na bomoi. Yango ezali mpo bato bazali kotya bopɛto, bazali na bankisi oyo ezali kopekisa moto akóma na maladi mpe bankisi mosusu oyo ezali kosilisa bamaladi mingi. Bato mosusu ya siansi bandimaka ete mikolo ya mbula ya moto ekómi na esika oyo esengeli kosuka.

Esali sikoyo mbula soki 3500, Moize, mokomi moko ya Biblia akomaki: “Mikolo ya bambula na biso ezali mbula ntuku nsambo (70); mpe soki mpo na nguya mingi ekómi mbula ntuku mwambe (80). Yango etondi kaka na mawa mpe na makambo oyo eyokisaka mpasi; mpo ekoleka mpenza nokinoki, mpe tozali kopumbwa mpe kokende.” (Nzembo 90:10) Atako bato basali nini mpo na kokómisa molai mikolo ya bambula na biso, mbula na biso ezali kaka ndenge Moize alobaki.

Na ngambo mosusu, banyama mosusu ekoki kozala na bomoi bankama ya bambula, mpe banzete mosusu ekoki kosala bankotó ya bambula. Soki tokokanisi mikolo ya bomoi na biso na oyo ya bikelamu mosusu ya bomoi, tokoki komituna: ‘Bomoi nyonso esuki kaka na mbula 70 to 80?’