Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Elikya nini ezali mpo na bakufi?

Elikya nini ezali mpo na bakufi?

Liwa epesaka moto nyonso mpasi. Kasi liwa nde nsuka ya nyonso? Nzambe abosani bakufi? Elikya ezali mpo na bakufi?

TALÁ OYO BIBLIA ELOBI:

NZAMBE ABOSANI BAKUFI TE

“Baoyo nyonso bazali na kati ya malita . . . bakobima.”​—Yoane 5:28, 29.

Nzambe abosani bakufi te; baoyo bazali na makanisi na ye bakozonga na bomoi.

LISEKWA EKOZALA NA MABELE

“Lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.”​—Misala 24:15.

Bamiliare ya bato oyo bakufá, bakozonga na bomoi na mabele oyo ekozala na kimya mpe bakokufa lisusu te.

LISEKWA EKOSALEMA MPENZA

“[Nzambe] atángaka motángo ya minzoto; Abengaka yango nyonso na nkombo na yango.”​—Nzembo 147:4.

Lokola Nzambe abengaka minzoto na nkombo na yango, akoki mpe kobosana te bato oyo akosekwisa.