Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini tokómaka mibange mpe tokufaka?

Mpo na nini tokómaka mibange mpe tokufaka?

MOKANO ya Nzambe ezalaki te ete bato bákufa. Adama ná Eva, baboti na biso ya liboso, bakelamaki na nzoto mpe makanisi ya kokoka; bakokaki kozala na bomoi tii lelo. Yango emonani polele na makambo oyo Yehova ayebisaki Adama mpo na nzete moko oyo ezalaki na kati ya elanga ya Edene.

Nzambe alobaki na Adama: “Mokolo okolya yango okokufa solo.” (Ebandeli 2:17) Soki Nzambe akelaki Adama mpo akóma mobange mpe akufa, mobeko yango elingaki kozala na ntina te. Adama ayebaki ete soki alyaki mbuma ya nzete yango te, alingaki kokufa te.

MOKANO YA NZAMBE EZALAKI TE ETE BATO BÁKUFA

Adama ná Eva bazalaki kaka na nzete wana te lokola bilei mpo bákoba kozala na bomoi; elanga etondaki na banzete oyo ebotaka mbuma. (Ebandeli 2:9) Soki Adama ná Eva bályaka mbuma ya nzete wana te, balingaki komonisa botosi na bango epai ya Nzambe oyo apesaki bango bomoi. Balingaki mpe komonisa ete bandimi ete kaka Nzambe nde asengeli koyebisa bango oyo basengeli kosala.

MPO NA NINI ADAMA NA EVA BAKUFAKI?

Mpo na koyeba ntina oyo Adama ná Eva bakufaki, tosengeli kotalela lisolo moko oyo etali mpe biso. Satana asalelaki nyoka mpo na kokosa Eva. Biblia elobi: “Sikoyo nyoka ezalaki ekɛngɛ koleka banyama nyonso ya zamba ya mokili oyo Yehova Nzambe asalaki. Na bongo abandaki koloba na mwasi ete: ‘Ezali mpenza solo ete Nzambe alobaki na bino ete bosengeli te kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga?’”​—Ebandeli 3:1.

Eva ayanolaki: “Tokoki kolya mbuma ya banzete ya elanga. Kasi na oyo etali kolya mbuma ya nzete oyo ezali na katikati ya elanga, Nzambe alobaki ete: ‘Bosengeli kolya yango te, ɛɛ, bosengeli kosimba yango te mpo bókufa te.’” Na nsima, nyoka alobaki na Eva: “Bokokufa soki moke te. Mpo Nzambe ayebi ete mokolo kaka bokolya yango miso na bino ekofungwama mpenza mpe bokokóma mpenza lokola Nzambe, bokoyeba malamu ná mabe.” Satana alobaki ete Yehova azali lokuta, mpo alingi te ete Adama ná Eva bázwa eloko ya malamu.​—Ebandeli 3:2-5.

Eva andimaki makambo ayokaki. Atalaki nzete yango. Amonaki ete ezali kitoko na kotala mpe eloko oyo miso ekokaki kolula. Abukaki mbuma na yango mpe abandaki kolya. Na nsima Biblia elobi: “Na nsima apesaki mpe mobali na ye ntango azalaki elongo na ye mpe ye alyaki.”​—Ebandeli 3:6.

Nzambe alobaki na Adama: “Mokolo okolya yango okokufa solo.”​—EBANDELI 2:17

Nzambe ayokaki mawa mpenza ndenge amonaki bana oyo alingaki baboyi kotosa ye na nko! Asalaki nini? Yehova ayebisaki Adama: “Okozonga na mabele, mpo outaki na yango. Mpamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu.” (Ebandeli 3:17-19) Yango wana, “mikolo nyonso oyo Adama aumelaki na bomoi ezalaki mbula nkama libwa na ntuku misato (930) mpe akufaki.” (Ebandeli 5:5) Adama akobaki te kozala na bomoi esika mosusu, na ndakisa na likoló. Azalaki na bomoi te liboso ete Yehova asala ye na putulu. Yango wana, ntango akufaki abungisaki bomoi, mpe nzoto na ye ezongaki lisusu putulu. Akufaki. Likambo ya mawa mpenza!

TOZALI BATO YA KOKOKA TE

Lokola Adama ná Eva baboyaki kotosa Nzambe na nko, babungisaki bomoi ya kokoka mpe libaku ya kozala na bomoi libela na libela. Nzoto na bango ebongwanaki; bakómaki bato ya kozanga kokoka mpe bato ya masumu. Kasi lisumu basalaki esukaki kaka na bango moko te. Batikelaki bana na bango lisumu. Baroma 5:12 elobi: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adama] mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.”

Biblia elobi ete lisumu mpe liwa ezali “eloko oyo ezipi bato ya bikólo nyonso, mpe elamba oyo elitamá oyo ezipi bikólo nyonso.” (Yisaya 25:7) Eloko yango ezipi bato nyonso lokola mapata oyo ezali na pwazɔ mpe moto moko te akoki kokima yango. Ya solo, “bato nyonso bazali kokufa na kati ya Adama.” (1 Bakorinti 15:22) Motuna oyo ntoma Paulo atunaki yango oyo: “Nani akobikisa ngai na nzoto oyo ezali komema ngai na liwa?” Ata moto moko te?​—Baroma 7:24.