Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Okoki kozala na bomoi ya esengo

Okoki kozala na bomoi ya esengo

MOKOLO mosusu moto moko te akobɛla, akokóma mobange to mpe akokufa. Yo mpe okoki kozala na bomoi ya bongo. Kasi lelo oyo, moto nyonso azali kokutana na bampasi mpe mikakatano. Nini ekoki kosalisa yo ozala na bomoi ya esengo? Biblia ekoki kosalisa yo. Tólobela mikakatano mosusu tokutanaka na yango mpe lisalisi oyo Biblia epesi.

SEPELÁ NA OYO OZALI NA YANGO

Toli ya Biblia: “Bomoi na bino ezala na bolingo ya mbongo te, bósepela na biloko oyo bozali na yango sikoyo.”​Baebre 13:5.

Lelo oyo, ezali na biloko mingi oyo bato bazali koloba ete tosengeli kozala na yango. Kasi, Biblia elobi na biso ‘tósepela na biloko oyo tozali na yango sikoyo.’ Ndenge nini tokosala yango?

Kozala te na “bolingo ya mbongo.” Kaka mpo na “bolingo ya mbongo,” bato bazali kosala nyonso, ata soki ekobebisa boyokani na bango na libota, na baninga, bizaleli na bango to lokumu na bango. (1 Timote 6:10) Kosala bongo, ezali na ntina te. Mpo moto alingá bozwi ‘akotonda yango te.’​—Mosakoli 5:10.

Pesá valɛrɛ na bato, kasi na biloko te. Ya solo, biloko ya mokili ekoki kosalisa. Kasi biloko ekoki te kolinga to kozala na botɔndi; kaka bato nde bakoki kosala yango. “Moninga ya solosolo” akosalisa biso tósepela na oyo tozali na yango.​—Masese 17:17.

OKOKI KOZALA NA BOMOI YA ESENGO SOKI OZALI KOSALELA BATOLI YA BIBLIA

BATELÁ ESENGO NTANGO OZALI NA MALADI

Toli ya Biblia: “Motema oyo ezali na esengo esalaka malamu lokola eloko oyo ebikisaka.”​Masese 17:22.

Lokola “eloko oyo ebikisaka,” esengo ekosalisa biso tóyika mpiko ntango tozali na maladi. Kasi okoki kosala nini mpo ozala na esengo ntango ozali na maladi?

Zalá na botɔndi. Soki totye kaka makanisi na mikakatano na biso, tokomona “mikolo nyonso” kaka mabe. (Masese 15:15) Yango wana, Biblia elobi: “Bózala na botɔndi.” (Bakolose 3:15) Zalá na botɔndi ata mpo na makambo ya mike. Makambo lokola, kolala ya moi, mwa mopɛpɛ kitoko, komona moto tolingaka azali kosɛka, ekoki kobakisa biso esengo.

Salisá basusu. Ata soki ozali na maladi, “esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Ntango bato bazali na botɔndi mpo na oyo tosali, tokozala na esengo mpe tokokanisa mikakatano na biso mingi te. Tokoki kozala na bomoi ya esengo soki tozali kosalisa basusu mpe bázala na esengo.

MATISÁ BOLINGO NA LIBALA NA BINO

Toli ya Biblia: “Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.”​Bafilipi 1:10.

Mobali ná mwasi oyo balekisaka ntango mingi te elongo bakómaka na mikakatano na libala na bango. Mibali mpe basi basengeli komona ete libala na bango ezali eloko oyo eleki ntina na bomoi na bango.

Bósala makambo elongo. Na esika moto na moto asala makambo na ye, ye moko, bósala yango elongo. Biblia elobi ete: “Bato mibale baleki moto moko.” (Mosakoli 4:9) Bokoki kolamba, kolya, kosakana to kozwa mopɛpɛ elongo.

Monisá bolingo na yo. Biblia elendisi mobali mpe mwasi balingana mpe bamoniselana limemya. (Baefese 5:28, 33) Makambo lokola, mwa kosɛka, koyambana to kopesana bakado ematisaka bolingo na libala. Ya solo, mobali to mwasi asengeli kosangisa nzoto kaka na molongani na ye.​—Baebre 13:4.