Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tokelamá te mpo tókufa

Tokelamá te mpo tókufa

MOTO nyonso alingaka kozala na bomoi molai mpe ya esengo. Kanisá ete ozali na bomoi ya seko, ya esengo mpe oyo ezangi maladi! Okolekisa ntango mingi na bato oyo olingaka, okotambola mokili mobimba, okobakisa mayele, bwanya, mpe okoyekola kosala makambo oyo olingaka.

Mposa yango ezali mabe? Soki moke te! Biblia eyebisi biso ete Nzambe atyá mposa wana na kati ya motema biso. (Mosakoli 3:11) Elobi mpe ete “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Nzambe alingaka biso, yango wana akokaki te kotya na mitema na biso mposa ya kozala na bomoi ya seko soki ayebaki ete ekosalema te.

Moto moko te alingaka kokufa. Kutu, Biblia ebengi liwa “monguna.” (1 Bakorinti 15:26) Bato mosusu bakufaka ntango bazali naino bilenge; basusu ntango bakómi mibange, kasi nsukansuka moto nyonso akokufa. Bato mingi babangaka ntango bakanisaka ete bakokufa. Liwa ekolongolama? Likambo yango ekoki kosalema?

ELIKYA EZALI

Koyeba ete mokano ya Nzambe ezali te ete bato bakufa, ekoki kokamwisa yo! Mokanda ya ebandeli emonisi ete mokano ya Nzambe ezalaki ete bato báfanda libela awa na mabele. Yehova Nzambe akelaki mabele ná biloko nyonso oyo moto asengeli na yango mpo azala na bomoi mpe na esengo. Na nsima, akelaki Adama, moto ya liboso, mpe atyaki ye na paradiso, elingi koloba elanga ya Edene. Nsima na yango, “Nzambe amonaki eloko nyonso oyo asalaki mpe, talá! ezalaki malamu mingi.”​—Ebandeli 1:26, 31.

Nzambe akelaki Adama moto ya kokoka. (Kolimbola Mibeko 32:4) Eva, mwasi ya Adama, azalaki ata na mbemba moko te, azalaki na makanisi mpe nzoto ya kokoka. Yehova alobaki na bango: “Bóbota mpe bókóma mingi mpe bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino, mpe bózala na bokonzi likoló ya mbisi ya mbu mpe likoló ya bikelamu oyo epumbwaka na likoló mpe likoló ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi, oyo ezali kolanda na mabele.”​—Ebandeli 1:28.

Esengelaki kozwa ntango mpo Adama ná Eva bátondisa mabele na bana na bango. Eva asengelaki kobota bana, mpe bana yango basengelaki kobota bana tii mabele elingaki kotonda ndenge Nzambe alingaki. (Yisaya 45:18) Elingaki kozala malamu te ete Yehova apesa bango mokumba wana soki ayebaki ete bakoumela te na bomoi mpo na komona bana na bango ná bankɔkɔ na bango, mpe bámona te ndenge makambo ekosuka!

Kanisá mpe mokumba oyo Nzambe apesaki bango ya kozala na bokonzi likoló ya banyama. Nzambe apesaki Adama mokumba ya kopesa banyama nkombo, mpe yango esengelaki kozwa ntango. (Ebandeli 2:19) Kasi mpo na kozala na bokonzi likoló ya banyama, Adama asengelaki koyeba bango mpe kobatela bango. Yango mpe esengelaki kozwa mpenza ntango.

Na yango, mobeko ya Nzambe ya kotondisa mabele mpe ya kozala na bokonzi likoló ya banyama emonisi ete Adama ná Eva bakelamaki mpo na kozala na bomoi ntango molai. Kutu, Adama aumelaki mingi na bomoi.

MOKANO YA NZAMBE EZALI ETE BATO BÁFANDA LIBELA AWA NA MABELE OYO EKOBOGWANA PARADISO

BAUMELAKI MINGI NA BOMOI

Adama asalaki mbula 930

Metusela asalaki mbula 969

Noa asalaki mbula 950

Lelo mbula 70 to 80

Biblia emonisi ete bato ya ntango ya kala baumelaki mingi na bomoi koleka bato ya lelo. Elobi: “Mikolo nyonso oyo Adama aumelaki na bomoi ezalaki mbula nkama libwa na ntuku misato (930).” Mpe na nsima bato mosusu motoba baumelaki na bomoi mbula koleka 900! Ezalaki Sete, Enoshe, Kenane, Yarede, Metusela, mpe Noa. Bango nyonso bazalaki na bomoi liboso ya Mpela oyo esalemaki na mikolo ya Noa, mpe Noa azalaki na mbula 600 ntango Mpela eyaki. (Ebandeli 5:5-27; 7:6; 9:29) Mpo na nini bato bazalaki koumela mingi bongo?

Bato wana nyonso babotamaki mwa moke nsima ya ntango oyo Adama na Eva bazalaki bato ya kokoka. Yango wana mbala mosusu baumelaki mingi na bomoi. Na ndenge nini kozala moto ya kokoka eyokani ná kozala na bomoi molai? Ndenge nini liwa ekolongolama? Mpo na kozwa biyano, tosengeli liboso koyeba mpo na nini tokómaka mibange mpe tokufaka.