Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bolingo ekotinda biso tósalisa naino basusu

Ndenge oyo tosengeli kolinga basusu

Ndenge oyo tosengeli kolinga basusu

Biso nyonso tozali bato ya libota moko mpo tozali bana ya Adama. Esengeli bato ya libota bálingana mpe bápesana limemya, kasi lelo oyo bolingo ezali mpenza te na kati ya libota. Nzokande, Nzambe alingi bongo te.

OYO MAKOMAMI MOSANTU ELOBI MPO NA BOLINGO

“Osengeli kolinga moninga na yo lokola yo moko.”​—BALEVI 19:18.

“Bókoba kolinga banguna na bino.”​—MATAI 5:44.

BOLINGO ELIMBOLI NINI?

Na 1 Bakorinti 13:4-7, Nzambe apesi ndimbola ya bolingo ete:

“Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto.”

Kanisá naino: Oyokaka ndenge nini ntango basusu bamoniseli yo motema molai mpe boboto mpe basiliki mbala moko te ntango osali likambo moko ya mabe?

“Bolingo ezali na zuwa te.”

Kanisá naino: Oyokaka ndenge nini ntango basusu bakaniseli yo mabe to bayokeli yo likunya?

Bolingo “elukaka matomba na yango moko te.”

Kanisá naino: Oyokaka ndenge nini ntango basusu bandimi makanisi na yo mpe baluki te kondimisa yo na makasi makanisi na bango?

Bolingo “ebombaka mabe na motema te.”

Kanisá naino: Nzambe asepelaka kolimbisa bato oyo basalaki masumu mpe babongoli mitema. Makomami Mosantu elobi: “Akoluka ntango nyonso komonisa mabunga na biso te, akokanga mpe nkanda te.” (Nzembo 103:9) Tosepelaka ntango moto oyo tosalaki mabe alimbisi biso. Yango wana, tosengeli kolimbisa basusu ntango basali biso mabe.​—Nzembo 86:5.

Bolingo “esepelaka na makambo ya kozanga boyengebene te.”

Kanisá naino: Tolingaka te komona basusu básepela na mpasi oyo tozali na yango. Yango wana, biso mpe tosengeli kosepela te na mpasi ya basusu, ata soki banyokolaki biso.

Mpo Nzambe apambola biso, tosengeli kolinga bato ya mbula nyonso, bikólo to mangomba nyonso. Tokoki kosala yango mpe ntango tozali kosalisa bato oyo bazali na mpasi.