Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BIBLIA​—NDENGE OYO EBATELAMAKI

Lisolo moko ya ntina mingi

Lisolo moko ya ntina mingi

Biblia ekeseni na babuku nyonso ya mangomba mpe ezali na buku mosusu te oyo mateya na yango esalisá bato mingi na boumeli ya ebele ya bambula lokola Biblia. Ata bongo, ezali na buku moko te oyo bato batyolaka mpe balandelaka yango lokola Biblia.

Na ndakisa, bato mosusu ya mayele bandimaka te ete Babiblia ya lelo ezali mpenza ndenge ekomamaki na ebandeli. Profesɛrɛ moko ya makambo ya lingomba alobi boye: “Tokoki kondima te ete makambo oyo ezali na Biblia ya lelo ezali ndenge ezalaki na makomi ya ebandeli. Mpo bakopi ya bamaniskri oyo tozali na yango etondi na mabunga mpe mingi na yango ekomamaki basiɛklɛ ebele na nsima mpe ekokani te na makomi ya ebandeli na makambo mingi.”

Bato mosusu batyelaka Biblia ntembe mpo na mateya oyo bateyá bango na mangomba na bango. Na ndakisa, bateyaki Faizal epai ya bato ya libota na ye oyo bazali bakristo te ete Biblia ezali buku moko mosantu, kasi babakisá mpe balongolá makambo mosusu. Alobi boye: “Yango wana soki moto alingi kosolola na ngai makambo ya Biblia nazalaki kolinga mpenza te. Kutu bazalaki na Biblia ya solosolo te. Babakisá mpe balongolá makambo mosusu na kati.”

Ezali na ntina tóyeba soki Biblia ezali kaka ndenge ekomamaki na ebandeli to babakisá makambo mosusu? Tótalela naino mituna oyo: Soki oyebi mpenza te ete bilaka ya Biblia oyo elobeli mikolo ezali koya ezalaki bongo na makomi ya ebandeli, okotyela yango motema? (Baroma 15:4) Olingaki kosalela batoli ya Biblia mpo na kozwa bikateli ya minene na likambo etali mosala, libota to losambo soki Babiblia ya lelo ezalaki kaka bakopi oyo bato basalaki, oyo etondi na mabunga?

Atako makomi ya libosoliboso ya Biblia ezalaka lisusu te, tokoki kotala bakopi ya kala ata mpe ebele ya bamaniskri ya Biblia. Ndenge nini bamaniskri yango ebatelamaki mpe ebebaki te atako bato batɛmɛlaki mpe balukaki kobakisa makambo mosusu? Ndenge nini kobatelama na yango ekoki kotinda yo ondima mpenza ete Biblia oyo ozali na yango ezali kaka ndenge ekomamaki na ebandeli? Tótalela biyano na mituna wana na lisolo oyo elandi, oyo emonisi ndenge Biblia ebatelamaki.