LISOLO YA TITRE YA EZIPELI | BAANZELU—BAZALAKA MPENZA? KOYEBA YANGO EZALI NA NTINA?
Ndenge oyo baanzelu bakoki kosalisa yo
Baanzelu ya sembo batyaka likebi mingi na makambo ya bato mpe basalaka makambo mingi mpo na kokokisa mokano ya Yehova. Ntango Nzambe akelaki mabele, baanzelu ‘bagangaki elongo na esengo, mpe bana nyonso ya Nzambe babandaki koganga na esengo.’ (Yobo 38:4, 7) Banda mokili ebandá, baanzelu bazalaka na mposa “ya kotalatala” mpo na koyeba bisakweli oyo elobeli makambo oyo ekosalema na mabele na mikolo ezali koya.—1 Petro 1:11, 12.
Biblia emonisi ete mpo na kokokisa mokano ya Nzambe, na bantango mosusu, baanzelu babatelaki basaleli ya sembo ya Nzambe. (Nzembo 34:7) Na ndakisa:
-
Ntango Yehova abebisaki bingumba mabe ya Sodoma ná Gomora, baanzelu basalisaki Lota, moto ya sembo, ná libota na ye mpo bákima.—Ebandeli 19:1, 15-26.
-
Na Babilone ya kala, ntango balingaki koboma bilenge Baebre misato na litumbu ya mɔtɔ, Nzambe ‘atindaki anzelu na ye mpe abikisaki basaleli na ye.’—Danyele 3:19-28.
-
Nsima ya kolekisa butu mobima na libulu ya bankɔsi, Danyele alobaki ete abikaki mpo ‘Nzambe atindaki anzelu na ye mpe akangaki monɔkɔ ya bankɔsi.’—Danyele 6:16, 22.
BAANZELU BASUNGAKI LISANGÁ YA BOKRISTO NA SIƐKLƐ YA LIBOSO
Na bantango mosusu, baanzelu ya Nzambe basalisaki lisangá ya bakristo na siɛklɛ ya liboso mpo mokano ya Yehova ekokisama. Na ndakisa:
-
Anzelu moko afungolaki baporte ya bolɔkɔ mpe atindaki bantoma oyo bazalaki na bolɔkɔ mpo bákoba kosakola na tempelo.—Misala 5:17-21.
-
Anzelu moko ayebisaki Filipe, mopalanganisi ya nsango malamu, akende na nzela ya esobe oyo ezalaki banda na Yerusaleme tii na Gaza, mpo na kosakwela moto moko ya Etiopi oyo autaki na Yerusaleme mpo na kosambela.—Misala 8:26-33.
-
Ntango Nzambe alingaki ete bato oyo bazalaki Bayuda te bákóma Bakristo, na nzela ya emonaneli, anzelu moko abimelaki Korneyi, mokonzi ya basoda ya Roma, mpe ayebisaki ye abengisa ntoma Petro epai na ye.—Misala 10:3-5.
- Ntango ntoma Petro azalaki na bolɔkɔ, anzelu moko abimelaki ye mpe abimisaki ye na bolɔkɔ.—
NDENGE OYO BAANZELU BAKOKI KOSALISA YO
Eloko moko te emonisi ete lelo oyo Nzambe asalelaka baanzelu mpo na kosalisa bato na ndenge ya likamwisi, ndenge emonisami na Biblia. Kasi, mpo na mikolo na biso, Yesu alobaki boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Oyebaka ete baanzelu nde basalisaka bayekoli ya Kristo mpo básala mosala yango?
Mokanda ya Emoniseli emonisi ete baanzelu basalisaka bato na mabele mobimba báyeba Yehova Nzambe mpe mokano na ye mpo na bato. Ntoma Yoane akomaki: “Namonaki anzelu mosusu azali kopumbwa na katikati ya likoló, mpe azalaki na nsango malamu ya seko, nsango ya esengo ya kosakwela bato oyo bafandi na mabele, mpe bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso, azali koloba na mongongo makasi ete: ‘Bóbanga Nzambe mpe bókumisa ye, mpo ngonga na ye ya kosambisa eyei, yango wana bósambela Oyo asalá likoló, ná mabele, ná mbu, ná maziba ya mai.’” (Emoniseli 14:6, 7) Makambo mingi oyo bandeko bakutanaka na yango na mikolo na biso emonisaka ete baanzelu bapesaka mabɔkɔ na mosala ya kosakola Bokonzi na mokili mobimba. Kutu, ata ntango mosumuki moko abongoli motema mpe azongeli Yehova, ‘baanzelu ya Nzambe bazalaka na esengo.’—Luka 15:10.
Nini ekosalema ntango mosala ya kosakola ekokóma na nsuka? Na ntango yango, “mampinga ya likoló” ya baanzelu bakosunga Yesu Kristo, Mokonzi ya bakonzi, “na etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” na Armagedone. (Emoniseli 16:14-16; 19:14-16) Baanzelu ya nguya bakopesa bitumbu ya Nzambe ntango Nkolo Yesu “akozongisa mabe na baoyo . . . bazali kotosa te nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu.”—2 Batesaloniki 1:7, 8.
Yango wana, yebá ete baanzelu batyelaka yo likebi. Balandelaka mpenza bolamu ya bato oyo balingi kosalela Nzambe, mpe mbala na mbala Yehova asalelaki bango mpo na kopesa basaleli na ye ya sembo awa na mabele makasi mpe kobatela bango.—Baebre 1:14.
Na yango, mokomoko na biso asengeli kopona soki akondima koyoka mpe kotosa nsango malamu oyo ezali kosakolama na mabele mobimba. Batatoli ya Yehova na esika ofandi bakosepela kosalisa yo ozwa matomba na lisungi ya baanzelu ya Nzambe oyo bazali na nguya mingi.