Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biblia elobi nini?

Biblia elobi nini?

Nzambe ayanolaka mabondeli nyonso?

OKOLOBA ETE AYANOLAKA MABONDELI YA . . .

  • Moto nyonso

  • Bato mosusu

  • Moto moko te

OYO BIBLIA ELOBI

“Yehova azali pene na baoyo nyonso . . . babelelaka ye na bosolo.”​—Nzembo 145:18.

MAKAMBO NINI MOSUSU TOYEKOLAKA NA BIBLIA?

  • Nzambe ayokaka te mabondeli ya baoyo baboyaka kotosa ye. (Yisaya 1:15) Kasi, bakoki ‘kobongisa makambo’ ná Nzambe soki batiki banzela na bango ya mabe.​—Yisaya 1:18.

  • Mpo Nzambe ayanola libondeli, esengeli eyokana na makambo oyo asɛngaka na Biblia.​—1 Yoane 5:14.

Esɛngi tófanda, tótɛlɛma to tófukama mpo na kobondela?

BATO MOSUSU BAKANISAKA ete basengeli kofukama, kotya elongi na nse to kokanga mabɔkɔ ntango bazali kobondela. Okanisi nini?

OYO BIBLIA ELOBI

Nzambe andimaki mabondeli ya bato oyo babondelaki ye ya ‘kofanda,’ ya ‘kotɛlɛma’ to baoyo ‘balalaki elongi na nse’ to ‘bagumbaki mabɔlɔngɔ.’ (1 Ntango 17:16; 2 Ntango 30:27; Ezera 10:1; Misala 9:40) Asɛngaka te ete moto azala ndenge moko boye ntango azali kobondela.

MAKAMBO NINI MOSUSU TOYEKOLAKA NA BIBLIA?