Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 35

Bókoba “kolendisana”

Bókoba “kolendisana”

“Bókoba kobɔndisana mpe kolendisana, ndenge kutu bozali kosala yango.”​—1 TES. 5:11.

LOYEMBO 90 Tólendisanaka

NA MOKUSE *

1. Na kotalela 1 Batesaloniki 5:11, biso nyonso topesaka mabɔkɔ na mosala nini?

 ESÍ batongá Ndako na bino ya Bokonzi to babongisá yango lisusu? Soki bongo, na ntembe te ozali komikundwela mbala ya liboso oyo bosalaki makita na Ndako ya Bokonzi ya sika. Opesaki Yehova matɔndi mpo na yango. Mbala mosusu, olelaki na esengo mpe ozalaki kokoka te koyemba loyembo ya ebandeli. Bandako ya Bokonzi na biso ya kitoko ekumisaka Yehova. Kasi tokumisaka lisusu ye mingi ntango tomipesaka na mosala ya botongi ya lolenge mosusu. Mosala yango eleki mosika mosala ya kotonga bandako. Mosala yango ezali ya kolendisa bato oyo bayaka na bisika wana ya losambo. Na ndenge ya elilingi, ntoma Paulo azalaki kokanisa mosala wana ntango alobaki maloba oyo ezali na vɛrsɛ ya motó ya likambo ya lisolo ya boyekoli oyo: 1 Batesaloniki 5:11.​—Tángá.

2. Tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Ntoma Paulo azali ndakisa malamu ya moto oyo ayebaki ndenge ya kolendisa bandeko na ye bakristo. Azalaki komitya na esika na bango. Na lisolo oyo, tokolobela ndenge asalisaki bandeko na ye ya basi mpe ya mibali (1) báyika mpiko, (2) bázala na kimya na basusu, mpe (3) bákómisa makasi kondima na bango epai ya Yehova. Tótala ndenge tokoki komekola ye mpe na nsima tókoka kolendisa bandeko na biso ya basi mpe ya mibali lelo oyo.​—1 Ko. 11:1.

PAULO ASALISAKI BANDEKO NA YE YA BASI MPE YA MIBALI BÁYIKA MPIKO

3. Ndenge nini Paulo azalaki kosala makambo na bokatikati?

3 Paulo azalaki kolinga bandeko na ye mingi. Ye moko akutanaki na makambo mingi ya mpasi; yango wana, akokaki koyoka mawa mpo na bandeko na ye bakristo mpe komitya na esika na bango ntango bazali kokutana na komekama. Na ntango moko boye, Paulo azalaki na mbongo te mpe asengelaki kosala mosala mpo na komisunga mpe kosunga baninga na ye. (Mis. 20:34) Azalaki kotonga bahema mpo yango ezalaki mosala na ye. Ntango akómaki na Korinti, na ebandeli azalaki kotonga bahema elongo na baninga na ye Akila mpe Prisile. Kasi “sabata nyonso” azalaki kosakwela Bayuda mpe Bagrɛki. Na nsima ntango Silasi mpe Timote bayaki, “Paulo abandaki komipesa mingi na mosala oyo etali liloba.” (Mis. 18:2-5) Paulo abungisaki soki moke te mokano ya libosoliboso oyo amityelaki, elingi koloba, kosalela Yehova. Lokola Paulo atiká ndakisa malamu mpo azalaki mosali ya molende mpe azalaki kokokisa bamposa na ye moko, yango wana azalaki na likoki ya kolendisa bandeko na ye ya basi mpe ya mibali. Akundwelaki bango bápesa nzela te ete mitungisi ya bomoi mpe kokokisa bamposa ya libota na bango esala ete básundola “makambo oyo eleki ntina,” elingi kokoba, makambo nyonso etali losambo ya Yehova.​—Flp. 1:10.

4. Ndenge nini Paulo ná Timote basalisaki bandeko na bango bakristo báyikela minyoko mpiko?

4 Mwa moke na nsima, wana lisangá na Tesaloniki efungwamaki, bandimi wana ya sika bakutanaki na botɛlɛmi makasi. Ntango etuluku moko ya batɛmɛli bakokaki te kozwa Paulo ná Silasi, babendaki “bandeko mosusu epai ya bakonzi ya engumba,” mpe bagangaki ete: “Bato yango . . . bazali kosala makambo na kotɛmɛla mibeko ya Kaisala.” (Mis. 17:6, 7) Kanisá naino ndenge bandimi wana ya sika bazalaki kobanga ntango bamonaki ete mibali ya engumba na bango babalukelaki bango! Milende na bango ekokaki kokita na mosala ya Yehova, kasi Paulo alingaki te ete esalama bongo. Atako ye ná Silasi basengelaki kolongwa kuna, balukaki naino komindimisa soki lisangá yango ya sika ekobatelama malamu mpenza. Yango wana, Paulo akundwelaki Batesaloniki boye: “Totindaki Timote, ndeko na biso . . . , [mpo] abɔndisa bino mpo na kondima na bino, mpo moto moko te aningisama na malɔzi wana.” (1 Tes. 3:2, 3) Na ntembe te, Timote akutanaki na minyoko na engumba na ye moko Listra. Amonaki ndenge Paulo alendisaki bandeko kuna. Komona ndenge Yehova asalisaki Paulo, Timote akokaki kondimisa bandeko na ye ya sika ete makambo nyonso ekosukela mpe bango malamu.​—Mis. 14:8, 19-22; Ebr. 12:2.

5. Ndenge nini ndeko moko na nkombo Bryant azwaki matomba na lisalisi ya nkulutu moko?

5 Likambo nini mosusu Paulo asalaki mpo na kolendisa bandeko na ye bakristo? Ntango bazongaki na Listra, na Ikoniumu, mpe na Antiokia, Paulo ná Barnabasi “batyelaki bango bankulutu na lisangá moko na moko.” (Mis. 14:21-23) Na ntembe te, bato oyo batyamaki bankulutu bamonisaki ete bazali libɔndisi mpo na lisangá, ndenge mpe bankulutu bazali lelo oyo. Yoká makambo oyo ndeko moko na nkombo Bryant alobi: “Ntango nazalaki na mbula 15, tata na ngai alongwaki na ndako mpe mama na ngai alongolamaki na lisangá. Namiyokaki ete nasundolami mpe nalɛmbaki nzoto.” Nini esalisaki Bryant ayika mpiko na ntango wana ya mpasi? Alobi boye: “Tony, nkulutu moko, azalaki kosolola na ngai liboso mpe nsima ya makita mpe na bangonga mosusu. Ayebisaki ngai masolo ya bato oyo bakutanaki na komekama mpe atako bongo bazalaki na esengo. Atángelaki ngai Nzembo 27:10 mpe mbala na mbala azalaki kolobela mingi ndakisa ya Hizikiya, oyo asalelaki Nzambe na bosembo nyonso atako tata na ye azalaki ndakisa malamu te.” Ndenge nini lisungi oyo nkulutu wana apesaki Bryant esalisaki ye? Alobi boye: “Nsukansuka, malendisi oyo Tony apesaki ngai, esalisaki ngai nabanda mosala ya esengo, elingi koloba, mosala ya ntango nyonso.” Bankulutu, bótyaka likebi mpo na kosalisa bandeko oyo, lokola Bryant, bakoki kozala na mposa ya “liloba ya malamu” mpo bálendisama.​—Mas. 12:25.

6. Ndenge nini Paulo asalelaki masolo ya bomoi mpo na kolendisa bandeko na ye ya basi mpe ya mibali?

6 Paulo akundwelaki bandeko na ye bakristo ete “lipata monene boye ya batatoli” bayikaki mpiko mpo Yehova apesaki bango makasi. (Ebr. 12:1) Paulo ayebaki ete masolo ya bomoi ya bato ya ntango ya kala oyo balongaki mpe bayikaki mpiko na mitindo nyonso ya bampasi ekokaki kopesa bandeko na ye ya basi mpe ya mibali mpiko mpe kosalisa bango bátya makanisi na “engumba ya Nzambe ya bomoi.” (Ebr. 12:22) Yango mpe esalisaka biso lelo oyo. Nani alendisamaka te ntango atángaka ndenge Yehova asalisaki Gideone, Barake, Davidi, Samwele, mpe bato mosusu oyo totángi awa te? (Ebr. 11:32-35) Kasi ezali boni mpo na bandakisa ya kondima ya bandeko na biso ya mikolo oyo? Na biro monene ya mokili mobimba, tozwaka mbala na mbala mikanda oyo bandeko basi mpe mibali bakomelaka biso mpo na komonisa ndenge kondima na bango ekómaki makasi nsima ya kotánga masolo ya bomoi ya Batatoli ya Yehova ya sembo ya mikolo na biso.

PAULO ALAKISAKI BANDEKO NA YE YA BASI MPE YA MIBALI NDENGE YA KOZALA NA KIMYA NA BASUSU

7. Liteya nini ozwi na toli oyo Paulo apesaki na Baroma 14:19-21?

7 Tolendisaka bandeko na biso ya basi mpe ya mibali ntango tolobaka mpe tosalaka makambo oyo ekosala ete kimya ezala na lisangá. Totikaka nzela te ete kokesana ya makanisi oyo tozalaka na yango ekabola biso. Mpe totingamaka te na ntomo oyo tozali na yango soki likambo moko ekobuka te mitinda ya Biblia. Tózwa ndakisa moko. Lisangá oyo ezalaki na Roma esangisaki bakristo oyo bazalaki Bayuda mpe bato ya bikólo. Ntango Mibeko ya Moize elongolamaki, bipekiseli oyo mibeko yango etyaki mpo na kolya biloko mosusu ezalaki lisusu na ntina ye. (Mrk. 7:19) Kobanda ntango wana, Bayuda oyo bazalaki bakristo bakómaki na bonsomi ya kolya mitindo nyonso ya bilei. Kasi, Bayuda mosusu oyo bazalaki bakristo bamonaki ete ezalaki malamu te kolya bilei yango. Na likambo yango, lisangá ekabwanaki. Kasi Paulo amonisaki polelepolele ntina ya kobatela kimya mpe alobaki boye: “Ezali malamu koboya kolya mosuni ya nyama to komɛla vinyo to kosala eloko moko boye oyo ezali kobɛtisa ndeko na yo libaku.” (Tángá Baroma 14:19-21.) Na yango, Paulo asalisaki bandeko na ye bakristo bámona ndenge kowelana ya ndenge wana ekokaki kobimisela bato mpe lisangá mobimba likama. Lisusu azalaki na mposa ya kobongola bizaleli na ye mpo na koboya kobɛtisa basusu libaku. (1 Ko. 9:19-22) Ndenge moko mpe tokoki kolendisa basusu mpe kobatela kimya soki tozali koboya kowelana mpo na makambo oyo tolingaka.

8. Paulo asalaki nini ntango likambo moko ebimaki oyo elingaki kobebisa kimya na lisangá?

8 Paulo atiká ndakisa moko malamu na likambo etali kobatela kimya elongo na baoyo tozali na bango na matata. Na ndakisa, bakristo mosusu na lisangá ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kotingama ete bato ya bikólo oyo bakómaki bakristo bákatama ngenga, mbala mosusu mpo na koboya ete Bayuda báloba mabe mpo na bango. (Gal. 6:12) Paulo atɛmɛlaki mpenza likanisi wana, kasi na esika atingama ete bálanda likanisi na ye, na komikitisa nyonso, amemaki likambo yango epai ya bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme. (Mis. 15:1, 2) Lokola Paulo asalaki bongo, yango esalisaki bakristo yango bábatela esengo mpe kimya na lisangá.​—Mis. 15:30, 31.

9. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Paulo?

9 Soki kowelana moko makasi ebimi, tobatelaka kimya ntango tolukaka litambwisi epai ya baoyo Yehova atyá mpo na kobatela lisangá. Mbala mingi, tokoki kozwa litambwisi oyo esimbami na Biblia, na mikanda na biso to na malako oyo ebongiseli ya Yehova epesaka biso. Soki tozali kolanda malako yango malamumalamu na esika ya kotingama na makanisi na biso moko, tokosala ete kimya ezala na lisangá.

10. Likambo nini mosusu Paulo asalaki mpo kimya ezala na lisangá?

10 Paulo asalaki ete kimya ezala ntango azalaki kolobela bizaleli malamu ya bandeko na ye ya basi mpe ya mibali; kasi azalaki kolobela te bizaleli na bango ya mabe. Na ndakisa, mpo na kosukisa mokanda na ye epai ya Baroma, Paulo atángaki bankombo ya bandeko mingi mpe na nsima abakisaki bizaleli na bango ya malamu to makambo ya mikemike etali mokomoko na bango. Tokoki komekola Paulo ntango tozali kolobela bizaleli ya malamu ya bandeko na biso ya basi mpe ya mibali kozanga kokakatana. Ntango tosalaka bongo, tosalaka ete boninga mpe bolingo ekóma makasi kati ya bandeko na lisangá.

11. Ndenge nini tokoki kozongisa kimya soki matata ebimi?

11 Na bantango mosusu, ata bakristo oyo bakɔmɛli na elimo bakoki kozala na matata to kowelana na basusu. Yango mpe ekómelaki Paulo ná moninga na ye ya motema Barnabasi. Mibali wana baswanaki makasi mpo na likambo etali Marko; soki akokende elongo na bango na mosala ya misionɛrɛ na mbala oyo ekoya. “Koswana makasi” ebimaki kati na bango, mpe yango esalaki ete bákabwana moto na moto na nzela na ye. (Mis. 15:37-39) Kasi Paulo, Barnabasi, mpe Marko bazongisaki kimya kati na bango, mpo na komonisa ete kimya mpe bomoko ya lisangá ezalaki na motuya mingi na miso na bango. Na nsima Paulo alobaki malamu mpo na Barnabasi mpe Marko. (1 Ko. 9:6; Kol. 4:10) Biso mpe tosengeli kosilisaka matata nyonso oyo tokoki kozala na yango na basusu na lisangá mpe na nsima kokoba kotya makanisi na bizaleli na bango ya malamu. Na ndenge wana, tokosala ete kimya mpe bomoko ezala.​—Ef. 4:3.

PAULO ALENDISAKI KONDIMA YA BANDEKO NA YE YA BASI MPE YA MIBALI

12. Wapi mwa mikakatano oyo bandeko na biso ya basi mpe ya mibali bazali kokutana na yango?

12 Totongaka bandeko na biso ya basi mpe ya mibali ntango tolendisaka kondima na bango epai ya Yehova. Bandeko na biso mosusu batyolamaka na bandeko na bango ya libota oyo bazali Batatoli ya Yehova te to baninga na bango ya mosala to baninga na bango ya kelasi. Basusu babundaka na mikakatano makasi ya nzoto to batungisamaka mingi na makanisi. Basusu bazwá batisimo banda bambula mingi mpe bazali kozela na boumeli ya bambula mingi mpo ebongiseli ya makambo oyo ekóma na nsuka. Makambo yango ekoki komeka kondima ya bakristo lelo oyo. Bakristo ya siɛklɛ ya liboso mpe bakutanaki na mikakatano ya ndenge wana. Makambo nini Paulo asalaki mpo na kolendisa bandeko na ye ya basi mpe ya mibali?

Lokola ntoma Paulo, ndenge nini tokoki kolendisa basusu? (Talá paragrafe 13) *

13. Ndenge nini Paulo asalisaki baoyo bazalaki kotyola bango mpo na bindimeli na bango?

13 Paulo asalelaki Makomami mpo na kolendisa kondima ya bandeko na ye ya basi mpe ya mibali. Na ndakisa, Bayuda oyo bakómaki bakristo bakokaki kozanga maloba ya koloba epai ya bandeko na bango ya libota oyo bazalaki bandimi te, oyo bazalaki kotuta ntolo ete mangomba ya Bayuda elekaki lisangá ya bokristo. Na ntembe te, mokanda ya Paulo epai ya Baebre elendisaki mpenza bakristo wana. (Ebr. 1:5, 6; 2:2, 3; 9:24, 25) Bakokaki kosalela maloba ya nguya oyo Paulo asalelaki mpo na kokangisa bandeko na bango ya libota oyo bazalaki kotɛmɛla bango monɔkɔ. Lelo oyo, tokoki kosalisa bandeko na biso bakristo oyo bazali kotyola bango básalela mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia mpo na kolimbola ntina oyo tondimaka mateya boye to boye. Soki bilenge na biso bazali kotyola bango mpo bandimaka mateya ya bozalisi, tokoki kosalisa bango bázwa makambo ya koloba na mwa buku La vie a-t-elle été créée? mpe Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie mpo na komonisa ntina oyo bandimaka ete bomoi ekelamaki.

Lokola ntoma Paulo, ndenge nini tokoki kolendisa basusu? (Talá paragrafe 14) *

14. Atako Paulo azalaki na mingi ya kosala na mosala ya kosakola mpe ya koteya, makambo nini asalaki?

14 Paulo alendisaki bandeko na ye ya basi mpe ya mibali bámonisa bolingo na “misala ya malamu.” (Ebr. 10:24) Asalisaki bandeko na ye ya basi mpe ya mibali kaka te na maloba kasi mpe na misala. Na ndakisa, ntango nzala moko makasi ebɛtaki bandeko na ye bakristo na Yudea, Paulo amemelaki bango biloko oyo basengelaki na yango. (Mis. 11:27-30) Ya solo, atako azalaki na mingi ya kosala na mosala ya kosakola mpe ya koteya, azalaki ntango nyonso koluka ndenge ya kosalisa baoyo bazalaki kokelela na mosuni. (Gal. 2:10) Na ndenge yango, asalisaki bandeko na ye bakristo bátya motema ete Yehova akokokisa bamposa na bango. Lelo oyo, ntango topesaka ntango, makasi mpe makoki na biso mpo na kosalisa bandeko na ntango ya makama oyo ebimaka yango moko, biso mpe tolendisaka kondima ya bandeko na biso ya basi mpe ya mibali. Tosalaka mpe bongo, ntango topesaka makabo mpo na kosunga mosala ya kosakola na mokili mobimba. Na lolenge moko to mosusu, tosalisaka bandeko na biso ya basi mpe ya mibali bátya motema ete Yehova akosundola bango soki moke te.

Lokola ntoma Paulo, ndenge nini tokoki kolendisa basusu? (Talá paragrafe 15-16) *

15-16. Baoyo kondima na bango elɛmbá, tosengeli kosalela bango makambo ndenge nini?

15 Paulo akobaki kosalisa baoyo balɛmbá na elimo. Azalaki komitya na esika na bango mpe koloba na bango na nsai mpe na ndenge ebongi. (Ebr. 6:9; 10:39) Na ndakisa, na mokanda na ye epai ya Baebre, azalaki mbala na mbala kosalela liloba “to” mpe “biso,” mpo na komonisa ete ye mpe asengelaki kotosa toli oyo azalaki kopesa. (Ebr. 2:1, 3) Ndenge moko na Paulo, tozali kokoba kosalisa baoyo balɛmbá na elimo. Lisusu, tolendisaka bango ntango totyelaka bango likebi ya solosolo. Na ndenge yango, tomonisaka ete tolingaka bango. Maloba na biso mpe ndenge oyo tozali koloba ekoki kolendisa bango.

16 Paulo andimisaki bandeko na ye ete Yehova azalaki komona misala na bango ya malamu. (Ebr. 10:32-34) Tokoki kosala bongo ntango tozali kosalisa ndeko moko oyo alɛmbá na elimo. Tokoki kosɛnga ye ayebisa biso ndenge ayebaki solo to kolendisa ye amikundwela makambo oyo Yehova asalelá ye mpo na kosunga ye. Tokoki kosalela libaku yango mpo na kondimisa ye ete Yehova abosani te bolingo oyo amonisaki mpo na ye mpe Yehova akosundola ye soki moke te na mikolo ezali koya. (Ebr. 6:10; 13:5, 6) Mbala mosusu masolo ya ndenge wana ekoki kolendisa ye azala na mposa ya kokoba kosalela Yehova.

“BÓKOBA KOBƆNDISANA MPE KOLENDISANA”

17. Makambo nini tokoki kosala mpo na kokoba kokolisa makoki na biso?

17 Kaka ndenge motongi ndako akolisaka makoki na ye mbala na mbala, biso mpe tokoki kokolisa makoki na biso ya kolendisa basusu. Tokoki kosalisa basusu bákóma na makasi ya koyikela komekama mpiko ntango tozali koyebisa bango ndakisa ya bato oyo bayikaki mpiko na ntango ya kala. Tokoki kosala ete kimya ezala ntango tozali kolobela makambo ya malamu oyo tozali komona epai ya basusu, kobatela kimya ntango elingi ebeba, mpe kozongisa yango ntango matata ebimi. Lisusu, tokoki kokoba kolendisa kondima ya bandeko na biso ya basi mpe ya mibali ntango tozali koyebisa bango mateya ya ntina ya Biblia, ntango tozali kosalisa bango na ndenge ebongi, mpe kosunga baoyo balɛmbá na elimo.

18. Ozwi ekateli ya kosala nini?

18 Baoyo basalaka mosala ya botongi ya bandako ya Teokrasi bazalaka na esengo mpenza. Tokoki kozwa esengo mpenza ntango tozali kosalisa bandeko na biso ya basi mpe ya mibali bákómisa kondima na bango makasi. Bandako oyo bato batongaka nsukansuka ekobeba, kasi mosala na biso ya kolendisa basusu ekoki kosalisa bango seko na seko! Tózala na ekateli ya ‘kokoba kobɔndisana mpe kolendisana.’​—1 Tes. 5:11.

LOYEMBO 100 Tóyamba bango malamu

^ Bomoi na mokili oyo ezali mpasi. Bandeko na biso ya basi mpe ya mibali bazali kokutana na mikakatano mingi. Tokoki kosalisa bango soki tozali koluka libaku ya kolendisa bango. Mpo na yango, ekozala malamu tótalela ndakisa ya ntoma Paulo.

^ ELILINGI: (Na likoló) Tata moko azali kolakisa mwana na ye ya mwasi ndenge akoki kosalela makanisi oyo ezwami na mikanda na biso mpo na kotɛmɛla mbamba oyo bazali kotya ye mpo na kosala fɛti ya Noele

^ ELILINGI: (Na katikati) Mobali moko ná mwasi na ye bakei na mboka mosusu ya ekólo na bango mpo na kopesa lisungi na ntango ya makama.

^ ELILINGI: (Na nse) Nkulutu moko akei kotala ndeko mobali moko oyo alɛmbá na elimo. Azali kolakisa ndeko mobali yango mwa bafɔtɔ oyo bazwaki na Eteyelo ya babongisi-nzela oyo bakɔtaki elongo eleki mwa bambula. Ntango ndeko yango atali bafɔtɔ yango, akanisi esengo oyo bazalaká na yango. Lisusu ndeko yango alingi kozongela esengo oyo azalaki na yango ntango azalaki kosalela Yehova. Kendekende, azongi na lisangá.